Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 40

LOYEMBO 30 Tata na ngai, Nzambe na ngai mpe moninga na ngai

Yehova “abikisaka baoyo bazoki na motema”

Yehova “abikisaka baoyo bazoki na motema”

Yehova “abikisaka baoyo bazoki na motema; akangaka bampota na bango.”NZ. 147:3.

NA MOKUSE

Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na baoyo bazali konyokwama mpo na bampota oyo bazoká na motema. Lisolo oyo ekomonisa ndenge Yehova abɔndisaka biso ntango tozali na mawa mpe ndenge asalisaka biso tóbɔndisa basusu.

1. Yehova ayokaka ndenge nini mpo na basaleli na ye?

 YEHOVA amonaka nini ntango atalaka basaleli na ye awa na mabele? Yehova amonaka ntango tozali na esengo mpe ntango tozali na mawa. (Nz. 37:18) Ntango amonaka ete tozali kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalela ye atako tozali na mpasi na motema, asepelaka mpenza! Kutu alingaka mpenza kosalisa biso mpe kobɔndisa biso.

2. Yehova asalaka nini mpo na baoyo bazoki na motema, mpe tokoki kosala nini mpo lisalisi na ye esimba mpenza?

2 Nzembo 147:3 elobi ete Yehova “akangaka bampota” ya baoyo bazoki na motema. Vɛrsɛ yango emonisi ndenge Yehova asalisaka na boboto nyonso bato oyo bazoki na motema. Tosengeli kosala nini mpo Yehova asalisa biso ndenge wana? Tótalela ndakisa moko. Monganga ya malamu akoki kosalisa mpenza moto oyo azoki mpo abika. Kasi mpo lisalisi yango esimba mpenza, moto oyo azoki asengeli kolanda na likebi malako ya monganga. Na lisolo oyo, tokomona oyo Yehova alobi na Liloba na ye epai ya baoyo bazali konyokwama mpo na bampota oyo bazoká na motema mpe tokotalela ndenge oyo tokoki kosalela toli na ye ya bolingo.

YEHOVA ALINGI TÓYEBA ETE TOZALI NA MOTUYA MINGI

3. Mpo na nini bato mosusu bamonaka ete bazali mpenza na motuya te?

3 Tozali na mokili oyo bolingo ezali te, mpe likambo ya mawa, bato mingi bakómá koyoka ete bazali mpenza na motuya te mpo na makambo oyo basalá bango. Ndeko mwasi moko na nkombo Helen a alobi boye: “Baboti na biso bazalaki kolinga biso te. Tata na ngai azalaki moto ya nkanza mpe mokolo na mokolo azalaki koyebisa biso ete tozali ata na ntina moko te.” Ndenge moko na Helen, mbala mosusu yo mpe banyokolá yo, bazalaki kofinga yo, to komonisa ete balingaka yo te. Soki ezali bongo, mbala mosusu ezali mpasi mpo ondima ete ezali na moto oyo amibanzabanzaka mpenza mpo na yo.

4. Nzembo 34:18 elobi nini mpo na Yehova?

4 Ata soki banyokolá yo, yebá ete Yehova alingaka yo mpe azwaka yo na motuya. Azali “pene na baoyo motema ebukani.” (Tángá Nzembo 34:18.) Soki ozali koyoka ete olɛmbi nzoto to “elimo [na yo] etutami,” kobosana te ete Yehova amonaki makambo ya malamu na motema na yo mpe ye moko abendaki yo epai na ye. (Yoa. 6:44) Azalaka ntango nyonso pene ya kosalisa yo mpo ozali na motuya na miso na ye.

5. Ndenge Yesu azalaki kotalela baoyo basusu bazalaki komona ete bazali bato mpamba eteyi biso nini?

5 Tokoki koyeba mayoki oyo Yehova azalaka na yango soki totaleli ndakisa ya Yesu. Na mosala na ye awa na mabele, bato oyo basusu bazalaki komona ete bazali bato mpamba, Yesu atyelaki bango likebi mpe amoniselaki bango motema mawa. (Mat. 9:​9-12) Ntango mwasi moko oyo azalaki na maladi ya nsɔmɔ asimbaki elamba ya Yesu na elikya ete akobika, Yesu abɔndisaki ye mpe apesaki ye longonya mpo na kondima na ye. (Mrk. 5:​25-34) Yesu amonisaka bizaleli ya Tata na ye na ndenge ya kokoka. (Yoa. 14:9) Na yango, okoki kondima ete Yehova azwaka yo na motuya mpe amonaka bizaleli na yo ya malamu, ata mpe kondima na yo mpe bolingo na yo mpo na ye.

6. Moto oyo azali komiyoka ete azali na ntina te akoki kosala nini?

6 Okoki kosala nini soki oyokaka kaka ete ozali na motuya te to ozangá ntina? Tángá bavɛrsɛ ya Biblia oyo emonisi ete Yehova azwaka yo na motuya mpe manyolá yango. b (Nz. 94:19) Soki olongi te kokokisa mokano moko to olɛmbi nzoto mpo ozali kokoka te kosala mingi lokola basusu, kokanisa te ete ozali na ntina te. Yehova asɛngaka biso te tósala koleka makoki na biso. (Nz. 103:​13, 14) Soki basalá yo makambo ya mabe na kala, komipesa foti te mpo na makambo oyo moto yango asalaki. Ebongaki te básala yo bongo! Kobosana te ete Yehova akosɛnga nde baoyo basalaka basusu mabe bázongisa monɔkɔ epai na ye, kasi te baoyo banyokwami. (1 Pe. 3:12) Sandra, oyo basalá ye makambo ya mabe na bomwana, alobi boye: “Nasɛngaka Yehova mbala na mbala ete asalisa ngai namimona na ndenge oyo ebongi, na ndenge oyo ye amonaka ngai.”

7. Ndenge nini makambo oyo tokutaná na yango na kala ekoki kosalisa biso na mosala ya Yehova?

7 Kotyaka ntembe te ete Yehova akoki kosalela yo mpo na kosalisa basusu. Apesi yo lokumu ya kosala elongo na ye na mosala ya kosakola. (1 Ko. 3:9) Na ntembe te makambo oyo okutaná na yango na bomoi esalisá yo oyeba komitya na esika ya basusu mpe ososola ndenge oyo mbala mosusu bazali komiyoka. Okoki koyeba malamu ndenge ya kosalisa bango. Helen, oyo tolobelaki liboso azwaki lisalisi, mpe sikoyo ye moko mpe asalisaka basusu. Alobi boye: “Yehova akómisi ‘moto mpamba’ lokola ngai moto oyo basusu bakoki kolinga mpe moto oyo azali na ntina mpo na kosalisa basusu.” Lelo oyo, Helen azali na esengo mpe azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza.

YEHOVA ALINGI TÓNDIMA ETE ALIMBISÁ BISO

8. Likambo nini ya kokitisa motema ezali na Yisaya 1:18?

8 Basaleli mosusu ya Yehova bamitungisaka mingi mpo bayokaka mawa mpo na makambo oyo basalá kala, ezala liboso to ata nsima ya batisimo. Kasi ebongi tóbosana te ete Yehova apesaki lisiko mpo alingaka biso mingi. Na ntembe te alingaka tóndima likabo na ye. Yehova ayebisi biso ete soki ‘tobongisi makambo’ c elongo na ye, atángaka lisusu te masumu oyo tosalaki. (Tángá Yisaya 1:18.) Ndenge oyo Yehova akanisaka lisusu te masumu na biso ya kala emonisi ete alingaka biso mpenza! Abosanaka mpe te bolamu oyo tosalá.—Nz. 103:​9, 12; Ebr. 6:10.

9. Mpo na nini eleki malamu kotya makanisi na makambo oyo tozali kosala sikoyo mpe oyo tokosala na mikolo ezali koya na esika ya kokanisaka makambo ya kala?

9 Soki ozali komitungisa mingi mpo na makambo oyo osalá na kala, salá makasi otya makanisi na makambo oyo ozali kosala sikoyo mpe oyo okosala na mikolo ezali koya na esika okanisa makambo ya kala. Tótalela ndakisa ya ntoma Paulo. Ayokaki mawa mingi ndenge azalaki liboso konyokola bakristo, kasi ayebaki ete Yehova alimbisaki ye. (1 Tim. 1:​12-15) Na nsima, akobaki kaka kokanisa masumu na ye ya kala? Na ntembe te aboyaki kosala bongo, kaka ndenge aboyaki kokanisakanisa makambo minene oyo asalaki ntango azalaki na Lingomba ya Bayuda. (Flp. 3:​4-8, 13-15) Na esika asala bongo, Paulo akobaki kosakola na molende, mpe atyaki makanisi na mikolo ezali koya. Ndenge moko na Paulo, okoki te kobongola makambo oyo eleká. Kasi, okoki kokumisa Yehova na makambo oyo okoki kosala sikoyo mpe kotya makanisi na makambo ya malamu oyo Yehova alaki kosala mpo na yo na mikolo ezali koya.

10. Tokoki kosala nini soki makambo oyo tosalá na kala epesaki basusu mpasi?

10 Mbala mosusu ozali komitungisa mpo makambo mosusu oyo osalá na kala epesaki basusu mpasi. Okoki kosala nini? Salá oyo okoki mpo na kobongisa makambo, ata mpe kosɛnga bolimbisi oyo euti na motema. (2 Ko. 7:11) Sɛngá Yehova asalisa bato oyo makambo oyo osalaki enyokolaki. Yehova akoki kosalisa yo mpe baoyo opesaki mpasi bóyika mpiko mpe bózwa lisusu kimya.

11. Ndakisa ya mosakoli Yona ekoki koteya biso nini? (Talá mpe ezipeli.)

11 Zwá mateya na mabunga oyo osalá na kala, mpe ndimá Yehova asalela yo na ndenge oyo alingi. Talá ndakisa ya mosakoli Yona. Na esika akende na Ninive epai Nzambe atindaki ye, Yona akimaki na ngámbo mosusu. Yehova apesaki Yona disiplini mpe Yona azwaki mateya na libunga na ye. (Yona 1:​1-4, 15-17; 2:​7-10) Yehova atikaki te kosalela Yona lokola mosakoli. Apesaki ye lisusu libaku ya kokende na Ninive, mpe Yona atosaki mbala moko. Atikaki te ete mawa oyo ayokaki mpo na libunga oyo asalaki liboso epekisa ye kondima mokumba mosusu epai ya Yehova.—Yona 3:​1-3.

Ntango mosakoli Yona abikaki na kati ya libumu ya mbisi monene, na nsima Yehova ayebisaki ye lisusu akende na Ninive kosakola nsango na Ye (Talá paragrafe 11)


YEHOVA APESAKA BISO ELIMO SANTU MPO NA KOBƆNDISA BISO

12. Ndenge nini Yehova apesaka biso kimya ntango makambo ya nsɔmɔ ekómeli biso? (Bafilipi 4:​6, 7)

12 Na nzela ya elimo santu na ye, Yehova abɔndisaka biso ntango makambo ya nsɔmɔ ekómeli biso. Tótalela likambo ya nsɔmɔ oyo ekómelaki Ron ná Carol. Mwana na bango ya mobali amibomaki. Balobi boye: “Tosilaki kokutana na mikakatano ya makasi liboso, kasi oyo ezalaki mabe koleka nyonso. Na babutu mingi oyo mpɔngi ezalaki kokima biso, tozalaki kobondela, mpe toyokaki mpenza kimya oyo Biblia elobeli na Bafilipi 4:​6, 7.” (Tángá.) Soki ozali kokutana na komekama oyo ezokisi motema na yo, fungolelá Yehova motema na yo na libondeli, mbala nyonso mpe ntango nyonso oyo olingi. (Nz. 86:3; 88:1) Kobá kosɛnga Yehova apesa yo elimo santu na ye. Akozanga te kopesa yo makambo oyo osɛngi ye.—Luka 11:​9-13.

13. Ndenge nini elimo santu ekoki kosalisa biso tókoba kosambela Yehova na bosembo? (Baefese 3:16)

13 Mokakatano oyo okutanaki na yango esilisi yo makasi? Elimo santu ekoki kopesa yo nguya ya kokoba kosalela Yehova na bosembo. (Tángá Baefese 3:16.) Tótalela likambo oyo ekómelaki ndeko mwasi moko na nkombo Flora. Ye ná mobali na ye bazalaki bamisionɛrɛ; kasi na nsima mobali na ye asalaki ekobo mpe babomaki libala. Flora alobi boye: “Mpasi oyo nayokaki mpo na kozanga bosembo na ye elyaki ngai nzoto. Nasɛngaki Yehova apesa ngai elimo santu na ye mpo nakoba koyika mpiko. Yehova apesaki ngai oyo nasengelaki na yango mpo motema na ngai ebika mpe nayika mpiko na likambo oyo na ebandeli namonaki ete nakokoka yango te.” Flora amonaka ete Nzambe asalisi ye atyela ye motema lisusu mingi mpe andimi ete akosalisa ye na mikakatano na ye nyonso. Abakisi boye: “Maloba ya Nzembo 119:32 ekokisami epai na ngai, ete: ‘Nakolanda mpenza nzela ya mitindo na yo mpo ofungoli motema na ngai [mpo na yango].’”

14. Tokoki kosala nini mpo tózwa elimo ya Nzambe?

14 Soki osɛngi Yehova apesa yo elimo santu, ndenge nini okoki kosala na boyokani na libondeli yango? Salá makambo oyo ekosalisa yo ozwa lisusu elimo ya Nzambe mingi. Na ndakisa, osengeli koyanganaka na makita mpe kobimaka mosala ya kosakola. Tángáká Liloba ya Yehova mokolo na mokolo mpo otondisa motema na yo na makanisi ya Nzambe. (Flp. 4:​8, 9) Wana ozali kotánga Biblia, tyá likebi na bato oyo bakutanaki na komekama, mpe manyolá ndenge oyo Yehova asalisaki bango báyika mpiko. Sandra, oyo tolobelaki liboso, akutanaki na makambo ndenge na ndenge ya mpasi. Alobi boye: “Lisolo ya Yozefe esimbaki mpenza motema na ngai. Atikaki te ete komekama mpe makambo ya kozanga bosembo oyo akutanaki na yango elɛmbisa boninga na ye na Yehova.”—Eba. 39:​21-23.

YEHOVA ASALELAKA BANDEKO MPO NA KOBƆNDISA BISO

15. Tokoki kozwa libɔndisi epai ya banani, mpe ndenge nini bakoki kosalisa biso? (Talá mpe elilingi.)

15 Ntango tozali komona mpasi, bandeko na biso bakoki kokóma “libɔndisi mpenza.” (Kol. 4:11) Yehova amonisaka ndenge alingaka biso na nzela ya bandeko na biso bakristo. Mpo na kobɔndisa biso, bandeko bayokaka biso na boboto, mpe komona bango pembeni na biso ekoki kolendisa biso. Bakoki kotángela biso vɛrsɛ moko oyo ekokitisa biso motema to kobondela elongo na biso. d (Rom. 15:4) Na bantango mosusu, ndeko mobali to ndeko mwasi moko akoki kokundwela biso ndenge oyo Yehova atalelaka makambo mpe yango ekoki kosalisa biso tóbatela kimya ya makanisi. Bandeko bakoki mpe kopesa biso lisalisi ya sikisiki na ndenge mosusu, na ndakisa bakoki komemela biso bilei ntango tozali na mpasi.

Baninga oyo bakɔmɛli, oyo otyelaka motema, bakoki kobɔndisa yo mpe kosunga yo (Talá paragrafe 15)


16. Ekoki kosɛnga tósala nini mpo basusu bákoka kosalisa biso?

16 Mpo basusu básalisa biso, ekoki kosɛnga ete tóyebisa bango ete tozali na mposa ya lisalisi. Bandeko na biso balingaka biso mpe bakosepela kosalisa biso. (Mas. 17:17) Kasi na bantango mosusu bayebaka te soki tozali komiyoka ndenge nini, to tozali na mposa ya eloko nini. (Mas. 14:10) Soki ozali na mawa, okoki koyebisa mayoki na yo epai ya baninga oyo bakɔmɛli na elimo. Yebisá bango ndenge oyo bakoki kosalisa yo. Mbala mosusu okoki kopona koyebisa likambo na yo epai ya nkulutu moko to bankulutu mibale oyo osololaka na bango malamu. Bandeko basi mosusu bamoni ete kosolola na ndeko mwasi moko oyo akɔmɛli na elimo ebɔndisaka.

17. Mikakatano nini ekoki kopekisa biso tózwa malendisi oyo esengeli, mpe ndenge nini tokoki kolonga yango?

17 Tɛmɛlá mposa ya kokima basusu. Mpo na mpasi oyo ozali na yango na motema, ekoki kozala ete ozali na mposa ya kosolola na basusu te. Ntango mosusu bandeko bakoyeba mposa na yo te, to bakoloba na yo maloba mosusu oyo ebongi te. (Yak. 3:2) Kasi kotika te ete mikakatano ya ndenge wana epekisa yo ozwa malendisi oyo osengeli na yango. Nkulutu moko na nkombo Gavin, oyo azali na maladi ya konyokwama na makanisi alobi boye: “Mbala mingi kosolola na baninga nde likambo ya nsuka oyo nayokaka mposa ya kosala.” Kasi Gavin atikaka te ete mayoki na ye etambwisa ye mpe azwaka matomba mingi na kosolola na basusu. Ndeko mwasi moko na nkombo Amy alobi boye: “Mpo na makambo oyo nakutaná na yango na kala, nakokaka mpenza kotyela basusu motema te. Kasi nayekoli kolinga mpe kotyela bandeko na ngai motema, ndenge Yehova asalaka. Nayebi ete kosala bongo esepelisaka Yehova, mpe yango ezali kopesa ngai esengo.”

TIKÁ ETE BILAKA YA YEHOVA EBƆNDISA YO

18. Yehova akosala nini na mikolo ezali koya, mpe tokoki kosala nini lelo oyo?

18 Tokoki kozala na motema ya kokita mpo na mikolo ezali koya, mpo mosika te Yehova akobikisa biso na mpasi nyonso ya nzoto mpe ya makanisi. (Em. 21:​3, 4) Na ntango wana, makambo nyonso ya mpasi oyo tokutaná na yango, “ekoya na motema te.” (Yis. 65:17) Ndenge tomoni yango na lisolo oyo, Yehova ‘akangaka bampota na biso’ ata lelo oyo. Ndimá bibongiseli nyonso oyo Yehova azwi na bolingo na ye mpo na kobɔndisa yo mpe kokitisa yo motema. Kotya ntembe ata moke te ete “atyelaka [yo] likebi.”—1 Pe. 5:7.

LOYEMBO 7 Yehova azali makasi na biso

a Topesi bango bankombo mosusu.

b Talá etanda “ Yehova azwaka yo na motuya.”

c Mpo na ‘kobongisa makambo’ elongo na Yehova, tosengeli komonisa ete tobongoli motema, kosɛnga ye alimbisa biso mpo na masumu na biso, mpe kobongola bizaleli na biso. Soki tosali lisumu ya monene, tosengeli mpe kosɛnga lisalisi ya bankulutu na lisangá.—Yak. 5:​14, 15.

d Na ndakisa, talá bavɛrsɛ oyo ezali na nse ya motó ya likambo “Mitungisi” mpe “Libɔndisi” na buku Batoli ya Biblia mpo na bomoi ya bakristo.