Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Onésime ná Géraldine

Yehova apambolaka baoyo bazongaka na bamboka na bango

Yehova apambolaka baoyo bazongaka na bamboka na bango

BANDEKO mingi oyo bakendaki koluka mbongo na bamboka ya bapaya, bazongá na bamboka na bango. Bolingo na bango mpo na Yehova mpe bato etindaki bango bákende kofanda na bisika oyo basakoli ya Bokonzi bazali mingi te. (Mat. 22:37-39) Makambo nini bamipimelaki mpe mapamboli nini bazwaki? Mpo na koyeba yango, tólobela likambo moko oyo esalemaki na Cameroun, ekólo oyo ezali na wɛsti ya Afrika.

“ESIKA OYO EBONGI MPO NA ‘KOKANGA MBISI’”

Na 1998, ndeko mobali moko na nkombo Onésime atikaki mboka na ye Cameroun. Afandaki na mboka mopaya mbula 14. Mokolo moko na makita, ayokaki ndenge bapesaki ndakisa moko oyo etali mosala ya kosakola. Molobi alobaki boye: “Soki bato mibale bazali kolɔba mbisi moto na moto na esika na ye, mosusu azali kokanga mbisi mingi kasi mosusu azali kokanga te, oyo azali kokanga te akokende na esika oyo moninga azali kokanga mbisi mingi, boye te?”

Ndakisa yango etindaki Onésime akanisa kozonga na Cameroun, esika oyo bato ebele bazalaki na mposa ya koyekola Biblia, mpo na kosalisa basakoli oyo bazalaki kuna. Kasi azalaki kobanga likambo moko. Akomesana lisusu na bomoi na Cameroun nsima ya kolekisa bambula ebele na mboka mopaya? Mpo na koyeba soki akokoka to te, Onésime akendaki kofanda na Cameroun sanza motoba. Na nsima, na 2012, azongaki kuna mpo na libela.

Onésime alobi boye: “Nasengelaki lisusu komesana na molunge mpe na bomoi ya kuna. Na Ndako ya Bokonzi, esengelaki namesana lisusu kofanda na banc.Abakisi boye na mwa kosɛka: “Kotya makanisi nyonso na programɛ ezalaki kosalisa ngai nabosana bakiti ya kitoko oyo tozalaki kofandela na Bandako ya Bokonzi na ekólo oyo toutaki.”

Na 2013, Onésime abalaki Géraldine, oyo azongaki na Cameroun nsima ya kofanda na France mbula libwa. Mapamboli nini bazwaki ndenge batyaki mosala ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na bango? Onésime alobi boye: “Tokɔtaki Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi mpe tosalaki na Betele. Na mbula oyo eleki, bayekoli ya Biblia 20 ya lisangá na biso bazwaki batisimo. Namoni ete sikoyo nazali na esika oyo ebongi mpo na ‘kokanga mbisi.’” (Mrk. 1:17, 18) Géraldine abakisi boye: “Nazwi mapamboli mingi koleka ndenge oyo nakanisaki.”

ESENGO YA KOKÓMISA BATO BAYEKOLI

Judith ná Sam-Castel

Judith akendaki kofanda na États-Unis, kasi azalaki na mposa makasi ya kosalela Yehova mingi mpenza. Alobi boye: “Mbala nyonso soki nasilisi kotala libota na ngai na Cameroun, nazalaki kolela, mpo nasengelaki kotika bato mingi oyo nabandaki koyekola na bango Biblia.” Kasi, Judith azalaki kokakatana mpo na kozonga lisusu na Cameroun. Azalaki na mosala ya malamu oyo ezalaki kosalisa ye azwa mbongo ya kotindela tata na ye oyo azalaki na Cameroun mpo na kozwa lisalisi ya monganga. Kasi, lokola Judith atyelaki Yehova motema, azongaki na Cameroun. Alobi ete azalaki kozanga biloko mosusu oyo azalaki na yango na mboka mopaya. Abondelaki Yehova asalisa ye mpo abongola lolenge ya bomoi na ye, mpe azwaki lisalisi epai ya mokɛngɛli ya zongazonga ná mwasi na ye.

Ntango Judith akanisaka ndenge makambo ezalaki na Cameroun ntango bazongaki, alobi boye: “Na boumeli ya mbula misato, nayokaki esengo ndenge nasalisaki bato minei bázwa batisimo.” Judith akómaki mobongisi-nzela monene. Lelo oyo, ye ná mobali na ye Sam-Castel, bazali na mosala ya zongazonga. Kasi nini ekómelaki tata ya Judith? Judith ná bandeko na ye bazwaki lopitalo moko na mboka mopaya, oyo endimaki kofutela tata na bango mbongo ya lipaso. Likambo ya esengo, lipaso yango elekaki malamu mpenza.

YEHOVA ASALISAKI BANGO

Caroline ná Victor

Ndeko mobali moko na nkombo Victor akendaki kofanda na Canada. Nsima ya kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo elobelaki bakelasi ya milaimilai, akanisaki na likambo yango. Alongwaki na iniversite mpe azwaki formasyo ya ntango mokuse mpo na koyekola mosala ya mabɔkɔ. Alobi boye: “Yango esalisaki ngai nazwa mosala noki, mpe nasala eloko oyo nazalaki na mposa ya kosala banda kala: mosala ya mobongisi-nzela.” Na nsima, Victor abalaki Caroline, mpe bango mibale bakendaki kotala Cameroun. Mokolo moko ntango bakendaki kotala biro ya filiale ya Cameroun, balendisaki bango ete bákoka kotalela likoki ya kosalela Yehova na Cameroun. Victor alobi boye: “Tomonaki ntina ya koboya te, mpe banda wana tokómisaki bomoi na biso pɛpɛlɛ mpo tóndima libyangi yango.” Atako nzoto ezalaki kotungisa Caroline, bazwaki ekateli ya kokende kofanda na Cameroun.

Victor ná Caroline bakómaki babongisi-nzela ya sanza na sanza mpo na kosalisa bato oyo bazalaki kosepela koyekola Biblia. Na ebandeli, bazalaki kosalela kaka mbongo oyo babombaki. Na nsima, bazongaki kosala na Canada na boumeli ya mwa basanza, mpo na kozwa mbongo oyo ekosalisa bango bázonga lisusu na Cameroun mpo na kokoba mosala ya mobongisi-nzela. Mapamboli nini bazwaki? Bakɔtaki Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi, bakómaki babongisi-nzela monene, mpe sikoyo bazali kosala mosala ya kotonga bandako na biso ya losambo. Victor alobi boye: “Kotika esika oyo bomoi ezalaki malamu esalisi biso tómona lobɔkɔ ya Yehova.”

KOSALISA BATO BÁMIPESA NA YEHOVA EPESAKA ESENGO

Stéphanie ná Alain

Na 2002, Alain, oyo azalaki na inivɛrsite na Allemagne, atángaki traktɛ oyo elobaki, Bilenge​—Bokosala nini na bomoi na bino? Makambo oyo atángaki etindaki ye amityela mikano ya sika. Na 2006, akɔtaki Eteyelo mpo na kobongisa basungi mpe batindaki ye na Cameroun, na mboka na ye.

Na Cameroun, Alain azwaki mosala oyo ezalaki kozwa ye ntango mingi te. Na nsima, azwaki mosala oyo ezalaki kofuta ye malamu, kasi akómaki komitungisa mpo akozala lisusu na likoki te ya kosakola mingi ndenge azalaki kosala liboso. Na yango, ntango basɛngaki ye akóma mobongisi-nzela monene, andimaki mbala moko. Patrɔ na ye alobaki na ye ete akobakisela ye mbongo mingi, kasi Alain aboyaki mpe akómaki mobongisi-nzela monene. Na nsima, abalaki Stéphanie, oyo afandaki bambula ebele na France. Mikakatano nini Stéphanie akutanaki na yango ntango azongaki na Cameroun?

Stéphanie alobi boye: “Nabɛlaki mwa bamaladi ya mikemike ebele mpenza, mpe nzoto na ngai ezalaki kokoka biloko mosusu te, kasi nasalaki nyonso mpo nazwaka lisalisi ya monganga mbala na mbala mpo nayoka malamu.” Lokola babalani yango bayikaki mpiko, bazwaki mpenza mbano. Alain alobi boye: “Ntango tokendaki kosakola na mboka moko ya mosika na nkombo Katé, tokutaki bato ebele oyo bazalaki na mposa ya koyekola Biblia. Na nsima, tokómaki koyekola Biblia na bato yango na telefone. Bayekoli ya Biblia mibale kati na bato yango bazwaki batisimo, mpe mwa etuluku moko efungwamaki kuna.” Stéphanie abakisi boye: “Esengo ya kosalisa bato bámipesa na Yehova eleki esengo mosusu nyonso. Lokola tozali kosala awa, tozwi esengo ya ndenge wana mbala mingi.” Lelo oyo, Alain ná Stéphanie bazali na mosala ya zongazonga.

“TOSALAKI MPENZA OYO ESENGELAKI TÓSALA”

Léonce ná Gisèle

Gisèle azwaki batisimo ntango azalaki kotánga kelasi ya monganga na Italie. Akamwaki komona ndenge babongisi-nzela oyo bazalaki koyekola na ye Biblia bazalaki na bomoi ya mindɔndɔ te, mpe yango epesaki ye mposa ya kosakola lisusu mingi. Yango wana, ntango asilisaki kelasi, akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza.

Gisèle azalaki na mposa ya kozonga na Cameroun mpo asalela Yehova lisusu mingi, kasi azalaki kobanga mwa moke. Alobi boye: “Nasengelaki kosundola lotomo na ngai ya kofanda na Italie, mpe nasengelaki kokabwana na baninga mpe bandeko na ngai oyo bafandaka kuna.” Atako bongo, na sanza ya 05/2016, Gisèle azongaki na Cameroun.

Nsima ya mwa ntango, abalanaki na Léonce, mpe biro ya filiale ya Cameroun etindaki bango na Ayos, engumba oyo ezalaki na basakoli mingi te.

Bomoi na Ayos ezalaki ndenge nini? Gisèle alobi boye: “Mbala mingi tozalaki na likoki ya kosalela batelefone na biso te mpo tozalaki kozanga kura na boumeli ya bapɔsɔ ebele. Nayekolaki kolamba na nkoni, mpe tozalaki kokende kotoka mai na bruweti, na butu na batɔrshe, na ntango oyo bato bazalaka mingi te na liziba.” Nini esalisaki Gisèle ná mobali na ye báyika mpiko? Gisèle alobi: “Elimo ya Yehova esalisaki biso tóyika mpiko. Mpe ngai ná mobali na ngai tozalaki kopesana mabɔkɔ. Lisusu, bandeko na biso ya libota, mpe baninga na biso bazalaki kolendisa biso mpe na bantango mosusu bazalaki kotindela biso mwa mbongo.”

Gisèle azali na esengo ndenge azongaki na mboka na ye? Alobi boye: “Nazali na esengo mpenza! Na ebandeli, mikakatano mpe makanisi ya kolɛmba nzoto ezalaki. Kasi ntango kaka tolongaki yango, ngai ná mobali na ngai toyokaki ete tosalaki mpenza oyo esengelaki tósala. Totyelaki Yehova motema mobimba mpe toyokaki ete tozali penepene na ye.” Léonce ná Gisèle bakɔtaki Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi, mpe sikoyo bazali babongisi-nzela monene mpo na mwa ntango.

Lokola babomi-mbisi ya mpiko oyo basalaka nyonso bákanga mbisi mingi atako mikakatano, bandeko oyo bazongaka na bamboka na bango bamipimelaka makambo mingi mpo na kosalisa bato ya mitema sembo oyo bazali kosepela na nsango ya Bokonzi. Na ntembe te, Yehova akobosana te basakoli wana oyo bazali kosala mosala makasi mpo na bolingo oyo bamonisi mpo na nkombo na ye. (Neh. 5:19; Ebr. 6:10) Soki ofandaka na mboka-mopaya mpe mboka na yo ezali na mposa ya basakoli ya Bokonzi, okosepela kozonga? Soki osali bongo, Yehova akopambola yo.​—Mas. 10:22.