Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 45

Bókoba komoniselana bolingo ya sembo

Bókoba komoniselana bolingo ya sembo

“Bómoniselanaka motema boboto [to bolingo ya sembo] mpe motema mawa.”​—ZEK. 7:9.

LOYEMBO 107 Bolingo ya sembo ya Nzambe

NA MOKUSE *

1-2. Mpo na nini tosengeli komoniselana bolingo ya sembo?

 EZALI mpenza na ntina tómoniselanaka bolingo ya sembo. Mpo na nini? Tótalela ndenge masese ya Biblia oyo elandi eyanoli na motuna yango: “Motema boboto [to bolingo ya sembo] mpe bosolo etika yo te. . . . Bongo ondimama mpe ozala na mayele mingi ya kososola na miso ya Nzambe mpe ya moto ya mabele.” “Moto ya motema boboto asalelaka molimo na ye moko makambo oyo epesaka mbano.” “Ye oyo azali kolanda boyengebene mpe motema boboto [to bolingo ya sembo] akozwa bomoi.”​—Mas. 3:3, 4; 11:17; 21:21.

2 Masese yango emonisi bantina misato oyo mpo na yango tosengeli komonisa motema boboto to bolingo ya sembo. Ya liboso, komonisa bolingo ya sembo esalaka ete tózala na motuya na miso ya Nzambe. Ya mibale, komonisa bolingo ya sembo epesaka biso moko matomba. Na ndakisa, esalaka ete boninga na biso ná basusu eumela. Ya misato, komonisa bolingo ya sembo ekosalisa biso tózwa mapamboli na mikolo ezali koya, ata mpe bomoi ya seko. Ya solo, ezali mpenza na ntina tótosa maloba oyo ya Yehova ete: “Bómoniselanaka motema boboto [to bolingo ya sembo] mpe motema mawa.”​—Zek. 7:9.

3. Lisolo oyo ekoyanola na mituna nini?

3 Na lisolo oyo, tokoyanola na mituna minei: Tosengeli komonisela banani bolingo ya sembo? Mokanda ya Ruta ekoki koteya biso nini na likambo etali komonisa bolingo ya sembo? Ndenge nini tokoki komonisa bolingo ya sembo lelo oyo? Baoyo bamonisaka bolingo ya sembo bazwaka mapamboli nini?

TOSENGELI KOMONISELA BANANI BOLINGO YA SEMBO?

4. Ndenge nini tokoki komekola Yehova na likambo etali komonisa bolingo ya sembo? (Marko 10:29, 30)

4 Ndenge toyekolaki yango na lisolo oyo eleki, Yehova amonisaka bolingo na ye ya sembo kaka epai ya baoyo balingaka ye mpe basalelaka ye. (Dan. 9:4) Tosengeli kokóma “bamekoli ya Nzambe, lokola bana ya bolingo.” (Ef. 5:1) Na yango, tosengeli komonisela bandeko na biso bakristo bolingo ya sembo, elingi koloba, kolinga bango makasi mpenza mpe kokangama na bango.​—Tángá Marko 10:29, 30.

5-6. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ndenge bato mosusu batalelaka liloba “bosembo.”

5 Na ntembe te, soki tokangi malamu ntina ya bolingo ya sembo, yango ekosalisa biso tóyeba lolenge eleki malamu ya komonisela yango bandeko na biso bakristo. Mpo na koyeba soki bolingo ya sembo elimboli mpenza nini, tótala bokeseni oyo ezali kati na yango mpe liloba moko oyo bato basalelaka mingi: bosembo. Tózwa ndakisa moko.

 6 Lelo oyo, tokoki koloba ete soki moto asali na kompanyi moko na boumeli ya bambula mingi, azali mosali moko ya sembo. Kasi ekoki kozala ete akutaná naino te na mokonzi ya kompanyi yango na boumeli ya bambula nyonso oyo alekisi wana. Ekoki mpe kozala ete asepelaka te na mibeko nyonso oyo bakonzi ya kompanyi yango batyá. To mpe alingaka kompanyi yango te, kasi asalaka kaka mpo azwa mbongo. Akokoba kosala tii mokolo akozwa pansiɔ, to mpe tii mokolo akozwa mosala mosusu ya malamu na esika mosusu.

7-8. (a) Nini etindaka moto amonisa bolingo ya sembo? (b) Mpo na nini tokotalela bavɛrsɛ mosusu na mokanda ya Ruta?

7 Eloko oyo ekesenisi bosembo oyo tolobeli na  paragrafe 6 na bolingo ya sembo ezali makanisi oyo etindaka moto amonisa ezaleli yango. Nini ezalaki kotinda basaleli ya Yehova ya ntango ya kala bámonisa bolingo ya sembo? Baoyo bamonisaki ezaleli yango basalaki yango te kaka tiká básala, kasi nde mpo motema na bango etindaki bango. Tótalela ndakisa ya Davidi. Motema na ye etindaki ye amonisela moninga na ye Yonatane bolingo ya sembo atako tata ya Yonatane alingaki koboma Davidi. Bambula nsima ya liwa ya Yonatane, Davidi akobaki kaka komonisela ye bolingo ya sembo na ndenge asalisaki Mefiboshete, mwana na ye.​—1 Sa. 20:9, 14, 15; 2 Sa. 4:4; 8:15; 9:1, 6, 7.

8 Mokanda ya Ruta ezali na bavɛrsɛ oyo ekoki kosalisa biso tóyekola makambo mingi oyo etali bolingo ya sembo. Bato oyo mokanda yango elobeli, bakoki koteya biso nini na oyo etali komonisa bolingo ya sembo? Ndenge nini tokoki kosalela mateya yango na lisangá? *

MOKANDA YA RUTA EKOKI KOTEYA BISO NINI NA LIKAMBO ETALI KOMONISA BOLINGO YA SEMBO?

9. Mpo na nini Naomi akanisaki ete Yehova asambwisaki ye?

9 Mokanda ya Ruta ebɛti lisolo ya Ruta, ná mama-bokilo na ye Naomi, mpe Boaze, mobali moko oyo azalaki kobanga Nzambe mpe oyo azalaki ndeko ya mobali ya Naomi. Lokola nzala makasi ekɔtaki na Yisraele, Naomi ná mobali na ye mpe bana na bango mibale ya mibali bakendaki kofanda na Moabe. Kuna, mobali ya Naomi akufaki. Bana na bango mibale babalaki, kasi likambo ya mawa, bango nyonso mibale mpe bakufaki. (Ruta 1:3-5; 2:1) Makambo yango elɛmbisaki mpenza Naomi nzoto mpe esilisaki ye mayele. Atungisamaki mingi mpenza mpe akómaki kokanisa ete Yehova asambwisaki ye. Amonisaki ndenge oyo azalaki komiyoka mpo na Nzambe na maloba oyo: “Lobɔkɔ ya Yehova ebɛti ngai.” “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akómiseli ngai makambo bololo mpenza.” Alobaki lisusu boye: “Yehova asambwisi ngai mpe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ayeiseli ngai mpasi.”​—Ruta 1:13, 20, 21.

10. Yehova asalaki nini mpo na makambo oyo Naomi alobaki?

10 Yehova asalaki nini mpo na makambo oyo Naomi alobaki? Asilikelaki Naomi te. Kutu, amityaki nde na esika na ye. Yehova ayebaki ete “monyoko ekoki kotinda moto ya bwanya asala lokola moto ya ligboma.” (Mos. 7:7) Kasi, Naomi azalaki na mposa ya lisalisi mpo amona ete Yehova azalaki na ngámbo na ye. Ndenge nini Yehova asalisaki ye? (1 Sa. 2:8) Atindaki Ruta amonisela ye bolingo ya sembo. Ruta andimaki komonisela Naomi bolingo ya sembo, mpe na boboto nyonso, asalisaki ye mpo alɛmba nzoto mingi te mpe ayeba ete Yehova azalaki kaka kolinga ye. Ndakisa ya Ruta ezali koteya biso nini?

11. Mpo na nini bandeko ya motema boboto bandimaka kosalisa bandeko ya lisangá oyo bazali na mawa to oyo bazali konyokwama na makanisi?

11 Bolingo ya sembo etindaka biso tósalisa baoyo bazali na mawa to balɛmbi nzoto. Ndenge kaka Ruta akangamaki na Naomi, lelo oyo mpe, bandeko mingi ya motema boboto bandimaka kosalisa bandeko ya lisangá oyo bazali na mawa makasi to mpe oyo bazali konyokwama na makanisi. Balingaka bandeko na bango mpe balingaka kosala nyonso oyo bakoki mpo na kosalisa bango. (Mas. 12:25; 24:10) Yango eyokani mpenza na makambo oyo Paulo alobaki ete: “Bólobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo enyokwami na makanisi, bósalisa bato ya bolɛmbu, bózala na motema molai epai ya bato nyonso.”​—1 Tes. 5:14.

Tokoki kosalisa ndeko oyo alɛmbi nzoto soki tozali koyoka ye na likebi (Talá paragrafe 12)

12. Mbala mingi, wapi lolenge eleki malamu ya kosalisa ndeko oyo alɛmbi nzoto?

12 Mbala mingi likambo eleki malamu oyo tokoki kosala mpo na kosalisa ndeko oyo azali na mawa to oyo alɛmbi nzoto ezali ya koyoka ye na likebi mpe koyebisa ye ete tolingaka ye. Yehova amonaka ntango otyelaka moko ya bampate na ye likebi. (Nz. 41:1) Masese 19:17 elobi: “Ye oyo amoniselaka moto oyo azangá boboto azali kodefisa Yehova, mpe [Yehova] akozongisela ye ndenge na ye wana ya kosala.”

Ruta akangami na mama-bokilo na ye Naomi, wana Orpa azali kozonga na Moabe. Ruta ayebisi Naomi ete: “Epai okokende, ngai mpe nakokende.” (Talá paragrafe 13)

13. Nini ekesenisaki Ruta ná Orpa, mpe mpo na nini ekateli oyo Ruta azwaki emonisaki bolingo ya sembo oyo azalaki na yango? (Talá elilingi ya ezipeli.)

13 Soki totali makambo oyo ekómelaki Naomi nsima ya liwa ya mobali mpe bana na ye, tokoyeba soki bolingo ya sembo elimboli mpenza nini. Ntango Naomi ayokaki ete “Yehova atyelaki bato na ye likebi na kopesáká bango limpa,” azwaki ekateli ya kozonga na ekólo na bango. (Ruta 1:6) Ruta ná Orpa babandaki kozonga elongo na ye. Kasi na nzela, Naomi asɛngaki bango mbala misato mobimba bázonga na Moabe. Nini esalemaki? Biblia elobi boye: “Orpa apwɛpwaki bokilo na ye. Kasi Ruta, akangamaki na ye.” (Ruta 1:7-14) Orpa asalaki makambo oyo Naomi asɛngaki bango mpe azongaki na Moabe. Kasi Ruta asukaki kaka wana te, asalaki mingi koleka. Ye mpe akokaki kozonga, kasi bolingo ya sembo etindaki ye atikala mpo na kosalisa Naomi. (Ruta 1:16, 17) Ruta andimaki kokangama na naomi. Ezali te mpo asengelaki kosala bongo, kasi nde mpo alingaki kosala bongo. Ekateli oyo Ruta azwaki emonisaki mpenza bolingo ya sembo oyo azalaki na yango. Lisolo yango eteyi biso nini?

14. (a) Bandeko na biso mingi bandimaka kosala nini lelo oyo? (b) Na kotalela Baebre 13:16, makambo nini esepelisaka Nzambe?

14 Bolingo ya sembo etindaka biso tósala mingi koleka mpo na kosalisa basusu. Lelo oyo mpe bandeko na biso mingi bandimaka komonisela basusu bolingo ya sembo; basalaka yango ata epai ya bandeko oyo bayebi te. Na ndakisa, soki bayoki ete likama moko ekweli bandeko, na mbala moko balukaka ndenge ya kosalisa bango. Lisusu, soki bayoki ete ndeko moko ya lisangá azali na mikakatano ya mbongo, balukaka mbala moko ndenge oyo bakoki kosalisa ye. Ndenge moko na bakristo ya Masedonia ya siɛklɛ ya liboso, basalaka mingi koleka mpo na kosalisa bango. Bamipimelaka makambo mosusu mpe bapesaka “koleka ata makoki na bango mpenza” mpo na kosalisa bandeko na bango oyo bazali na bosɛnga. (2 Ko. 8:3) Yehova asepelaka mpenza komona bolingo ya ndenge wana!​—Tángá Baebre 13:16.

NDENGE NINI TOKOKI KOMONISA BOLINGO YA SEMBO LELO OYO?

15-16. Ndenge nini Ruta amonisaki ete alɛmbaki te?

15 Tokoki kozwa mateya mingi ya malamu na ndenge oyo Ruta asalisaki Naomi. Tótala mwa ndambo na yango.

16 Kolɛmba te. Ntango Ruta asɛngaki ete akende ná mama-bokilo na ye na Yuda, na ebandeli Naomi aboyaki. Kasi Ruta alɛmbaki te. Yango ebimisaki matomba nini? Biblia elobi: “Ntango amonaki ete atingamaki kaka kokende elongo na ye, atikaki kolobela ye.”​—Ruta 1:15-18.

17. Nini ekosalisa biso tólɛmba noki te?

17 Liteya mpo na biso: Esɛngaka ntango mpo na kosalisa baoyo balɛmbi nzoto, kasi tosengeli kolɛmba bango te. Na ndakisa, ndeko mwasi moko oyo azali na mposa ya lisalisi akoki koboya tósalisa ye na ebandeli. * Kasi bolingo ya sembo ekotinda biso tósala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa ye. (Gal. 6:2) Tozalaka na elikya ete nsukansuka akondima lisalisi na biso mpe akondima ete tólendisa ye.

18. Nini ekokaki kotinda Ruta asilika?

18 Kosilikaka te. Ntango Naomi ná Ruta bakómaki na Beteleme, Naomi akutanaki na baninga na ye ya kala. Ayebisaki bango boye: “Nazalaki na mingi ntango nakendaki, mpe Yehova azongisi ngai mabɔkɔ mpamba.” (Ruta 1:21) Kanisá ndenge oyo Ruta amiyokaki ntango Naomi azalaki koloba bongo! Asalaki nyonso oyo akokaki mpo na kosalisa Naomi. Ruta alelaki elongo na ye, apesaki ye makasi, atambolaki elongo na ye na boumeli ya mikolo mingi. Atako Ruta asalisaki ye mingi mpenza, Naomi alobaki: “Yehova azongisi ngai mabɔkɔ mpamba.” Maloba yango emonisaki ete Naomi abosanaki lisalisi nyonso oyo Ruta apesaki ye. Na ntembe te, maloba yango epesaki mpenza Ruta mpasi na motema! Kasi asundolaki Naomi te.

19. Nini ekosalisa biso tósundola te ndeko na biso oyo alɛmbi nzoto?

19 Liteya mpo na biso: Lelo oyo, ndeko mwasi oyo alɛmbi nzoto akoki na ebandeli koloba likambo moko oyo ekoki kopesa biso mpasi na motema, atako milende nyonso oyo tozali kosala mpo na kosalisa ye. Kasi tosilikaka te. Tosundolaka te ndeko na biso oyo azali na mposa ya lisalisi, mpe tosɛngaka Yehova asalisa biso tómona ndenge ya kopesa ye makasi.​—Mas. 17:17.

Ndenge nini bankulutu bakoki komekola Boaze? (Talá paragrafe 20-21)

20. Nini epesaki Ruta makasi oyo asengelaki na yango mpo alɛmba te?

20 Lɛndisáká na ntango ebongi. Ruta amoniselaki Naomi bolingo ya sembo, kasi sikoyo ye moko mpe akómi na mposa bálɛndisa ye. Na yango, Yehova atindaki Boaze mpo na kolɛndisa Ruta. Boaze ayebisaki Ruta boye: “Tiká Yehova apesa mbano mpo na oyo osalaki, mpe ozwa lifuti ya kokoka uta na Yehova Nzambe ya Yisraele, oyo na nse ya mapapu na ye oyei koluka esika ya komibomba.” Maloba yango esimbaki mpenza motema ya Ruta. Na yango ayebisaki Boaze boye: “Obɔndisi ngai . . . mpo olobi na mosaleli na yo na ndenge ya kokitisa motema.” (Ruta 2:12, 13) Maloba oyo Boaze alobaki na ntango oyo ebongi epesaki Ruta makasi oyo asengelaki na yango mpo alɛmba te.

21. Ndenge Yisaya 32:1, 2 emonisi yango, bankulutu oyo batyelaka bandeko ya lisangá likebi basalaka nini?

21 Liteya mpo na biso: Na bantango mosusu, baoyo bamoniselaka basusu bolingo ya sembo bazalaka mpe na mposa ete basusu bálɛndisa bango. Ndenge kaka Boaze ayebisaki Ruta ete Yehova azalaki komona boboto oyo amonisaki, lelo oyo mpe bankulutu oyo batyelaka bandeko ya lisangá likebi, bapesaka longonya na ntango ebongi na bandeko ya lisangá oyo basalisaka basusu. Yango epesaka bandeko yango makasi oyo basengeli na yango mpo bálɛmba te.​—Tángá Yisaya 32:1, 2.

BAOYO BAMONISAKA BOLINGO YA SEMBO BAZWAKA MATOMBA NINI?

22-23. Ndenge nini makanisi ya Naomi ebongwanaki, mpe mpo na nini? (Nzembo 136:23, 26)

22 Nsima ya mwa ntango, Boaze apesaki Ruta ná Naomi biloko ya kolya. (Ruta 2:14-18) Naomi asalaki nini nsima ya kozwa lisalisi yango? Alobaki boye: “Yehova apambola ye, ye oyo alongoli te motema boboto na ye epai ya bato ya bomoi mpe bakufi.” (Ruta 2:20a) Makanisi ya Naomi ebongwanaki mpenza! Liboso, alelaki mpo na mpasi oyo azalaki na yango mpe alobaki ete: “Yehova . . . asambwisi ngai.” Kasi sikoyo alobi na esengo nyonso ete: “Yehova . . . alongoli te motema boboto [to bolingo ya sembo] na ye.” Mbala mosusu nini esalaki ete makanisi ya Naomi ebongwana bongo?

23 Nsukansuka, Naomi akómaki komona lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na ye. Yehova asalelaki Ruta mpo na kosalisa ye na mobembo oyo asalaki mpo na kozonga na Yuda. (Ruta 1:16) Naomi amonaki mpe lobɔkɔ ya Yehova na ndenge asalelaki Boaze, moko ya “basikoli” na bango, mpo amonisela bango boboto mpe akabela bango biloko ya kolya. * (Ruta 2:19, 20b) Ntango mosusu Naomi akanisaki boye: ‘Sikoyo namoni ete Yehova asundolaki ngai te. Azalaki elongo na ngai ntango wana nyonso!’ (Tángá Nzembo 136:23, 26.) Na ntembe te, Naomi asengelaki mpenza kozala na botɔndi ndenge Boaze mpe Ruta basundolaki ye te! Bango nyonso basepelaki ndenge Naomi azongelaki esengo mpe makasi na ye mpo na kosalela Yehova.

24. Mpo na nini tosengeli kokoba komonisela bandeko na biso bolingo ya sembo?

24 Mokanda ya Ruta eteyi biso nini na likambo etali bolingo ya sembo? Tomoni ete bolingo ya sembo etindaka biso tósundola te bandeko na biso oyo bazali kokutana na makambo ya mpasi. Bolingo yango etindaka biso mpe tómipimela makambo mosusu mpo na kosalisa bango. Lisusu, bankulutu basengeli kolendisa na ntango oyo ebongi bandeko oyo bamoniselaka basusu bolingo ya sembo. Ntango tomonaka baoyo bazali na mposa ya lisalisi bazongeli makasi na bango mpo na kosalela Yehova, toyokaka mpenza esengo. (Mis. 20:35) Kasi wapi mpenza ntina ya libosoliboso oyo tokobaka komonisela bandeko na biso bolingo ya sembo? Ezali mpo tolingaka komekola mpe kosepelisa Yehova, oyo “atondi na motema boboto” to bolingo ya sembo.​—Kob. 34:6; Nz. 33:22.

LOYEMBO 130 Tólimbisaka

^ par. 5 Yehova alingi ete tómoniselaka bandeko na biso bakristo bolingo ya sembo. Mpo na koyeba mpenza soki komonisa bolingo ya sembo elimboli nini, tótala ndenge basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala bamonisaki ezaleli yango. Na lisolo oyo, tokolobela ndakisa ya Ruta, ya Naomi, mpe ya Boaze.

^ par. 8 Mpo na kokanga mpenza ntina ya mateya oyo ezali na lisolo oyo, tolɛndisi yo otánga Ruta mokapo 1 mpe 2.

^ par. 17 Lokola tozali kolobela ndakisa ya Naomi, yango wana tosaleli ndakisa ya ndeko mwasi oyo azali na mposa ya lisalisi. Kasi makanisi oyo ezali na lisolo oyo etaleli mpe bandeko mibali.

^ par. 23 Mpo na koyeba makambo mosusu na mokumba ya mosikoli oyo Boaze azalaki na yango, talá lisolo “Mekolá kondima na bango​—‘Mwasi moko malamu mingi,’” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/10/2012, lok. 20.