Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 46

Bandeko oyo bouti kobalana—Bótya mosala ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na bino

Bandeko oyo bouti kobalana—Bótya mosala ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na bino

“Yehova azali makasi na ngai . . . Motema na ngai etyeli ye elikya.”​—NZ. 28:7.

LOYEMBO 131 “Oyo Nzambe akangisi esika moko”

NA MOKUSE *

1-2. (a) Mpo na nini bandeko oyo bauti kobalana basengeli kotyela Yehova motema? (Nzembo 37:3, 4) (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

 ETIKALI moke obala to outi kobala kala mingi te? Soki ezali bongo, na ntembe te ozali kozela kolekisa bomoi ya esengo elongo na moto oyo olingaka mingi. Ya solo, libala ezalaka na mikakatano na yango. Mpe baoyo bauti kobala sika bazali na bikateli ya ntina mingi oyo basengeli kozwa. Makambo oyo bokosala ntango bokokutana na mikakatano mpe bikateli oyo bokozwa ekosalisa bino bózala na esengo to te na boumeli ya bambula mingi. Soki botyeli Yehova motema, bokozwa bikateli ya malamu, boyokani na bino na libala ekozala makasi mpe bokozala na esengo. Soki bosaleli te batoli oyo Nzambe apesaka, na ntembe te, bokokutana na mikakatano oyo ekobebisa libala na bino mpe bokozala na esengo te.​—Tángá Nzembo 37:3, 4.

2 Atako lisolo oyo ebongisami mpo na baoyo bauti kobalana, ekolobela mikakatano oyo babalani nyonso bakoki kokutana na yango. Ekolobela mpe mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya basi mpe mibali ya sembo oyo Biblia elobeli. Bandakisa yango ekoki koteya biso mateya mingi ya ntina oyo tokoki kosalela na makambo ndenge na ndenge ya bomoi na biso; ata mpe na libala. Tokolobela mpe mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya babalani mosusu ya mikolo na biso.

BANDEKO OYO BAUTI KOBALANA BAKOKI KOKUTANA NA MIKAKATANO NINI?

Bikateli nini ekoki kopekisa bandeko oyo bauti kobalana básala lisusu mingi na mosala ya Yehova? (Talá paragrafe 3-4)

3-4. Mikakatano nini bandeko oyo bauti kobalana bakoki kokutana na yango?

3 Bato mosusu bakoki kolendisa bandeko oyo bauti kobalana bázala na bomoi oyo bato mingi bazalaka na yango lelo oyo. Na ndakisa, baboti mpe bandeko mosusu ya libota bakoki kotya bango mbamba mpo bábanda mbala moko kobota bana. Lisusu, baninga mpe bandeko ya libota, bakoki kolendisa bango básomba ndako mpe bátondisa yango na biloko ya kitoko.

4 Soki babalani yango bakebi te, bakoki kozwa ekateli oyo ekotinda bango bákɔta banyongo mingi mpenza. Na nsima, ekoki kosɛnga ete mwasi ná mobali yango bálekisaka ntango mingi na mosala mpo na kofuta banyongo yango. Mosala ya mosuni ekoki kobanda kozwa bango ntango oyo basengelaki kolekisa na koyekola Biblia, kosala losambo na kati ya libota, mpe kobima na mosala ya kosakola. Bakoki mpe kozangisa makita mpo básala mingi nsima ya ngonga ya mosala mpo bázwa mbongo mingi to mpo bábungisa mosala na bango te. Yango ekoki kosala ete bázanga mabaku ya kosala mingi na mosala ya Yehova.

5. Mateya nini ozwi na ndakisa ya ndeko Klaus ná mwasi na ye Marisa?

5 Bandakisa mingi emonisi ete komipesa mingi mpo na konduka biloko ya mosuni ememaka esengo ya solosolo te. Tótalela makambo oyo ndeko mobali moko na nkombo Klaus ná mwasi na ye Marisa bakutanaki na yango. * Na ebandeli ya libala na bango, bango nyonso mibale bazalaki kosala mosala banda ntɔngɔ tii mpokwa mpo na kozala na bomoi ya malamu. Kasi bazalaki mpenza na esengo te. Ndeko Klaus alobi boye: “Tozalaki na biloko mingi ya mosuni koleka oyo tosengelaki na yango, kasi tozalaki ata na mokano moko te ya elimo. Mpo na koloba solo, tozalaki na bomoi ya mindondo mpe tozalaki komitungisa.” Mbala mosusu yo mpe omoni ete komipesa mobimba mpo na konduka biloko ya mosuni ememeli yo esengo ya solosolo te. Soki ezali bongo, kolɛmba nzoto te. Kotalela ndakisa malamu ya bato mosusu, ekoki kosalisa yo ozwa bikateli ya malamu. Tólobela naino mateya oyo mibali bakoki kozwa na ndakisa ya Mokonzi Yehoshafate.

LOKOLA MOKONZI YEHOSHAFATE, BÓTYELAKA YEHOVA MOTEMA

6. Na boyokani na toli oyo ezali na Masese 3:5, 6, Mokonzi Yehoshafate asalaki nini mpo na kolonga mokakatano monene oyo akutanaki na yango?

6 Mibali, na bantango mosusu bolɛmbaka mpo na mikumba oyo bozali na yango? Soki ezali bongo, ndakisa ya Mokonzi Yehoshafate ekoki kosalisa bino. Lokola azalaki mokonzi, Yehoshafate azalaki na mokumba ya kobatela ekólo mobimba! Ndenge nini akokisaki mokumba yango ya monene? Yehoshafate asalaki oyo akoki mpo na kobatela bato ya ekólo na ye. Akómisaki bingumba ya Yuda makasi mpe asangisaki limpinga ya nguya ya basoda koleka 1 160 000. (2 Nt. 17:12-19) Na nsima, Yehoshafate akutanaki na mokakatano moko monene. Limpinga moko monene ya bana ya Amona, ya Moabe, mpe ya mibali oyo bazalaki kofanda na etúká ya bangomba ya Seire, bayaki mpo na kobundisa ye, bato ya libota na ye, mpe bato ya ekólo na ye. (2 Nt. 20:1, 2) Yehoshafate asalaki nini? Asɛngaki Yehova asalisa ye mpe apesa ye makasi. Yango eyokanaki mpenza na toli ya bwanya oyo ezali na Masese 3:5, 6. (Tángá.) Libondeli ya komikitisa oyo Yehoshafate asalaki, oyo ezali na 2 Ntango 20:5-12, emonisi ete azalaki mpenza kotyela Yehova motema. Ndenge nini Yehova ayanolaki na libondeli na ye?

7. Ndenge nini Yehova ayanolaki na libondeli ya Yehoshafate?

7 Yehova asololaki na Yehoshafate na nzela ya Molevi moko na nkombo Yahaziele. Yehova alobaki boye: “Bótɛlɛma, bóningana te, mpe bómona lobiko ya Yehova mpo na bolamu na bino.” (2 Nt. 20:13-17) Na ntembe te, yango ezali lolenge malamu te ya kobunda etumba! Kasi malako yango eutaki te epai ya bato, eutaki nde epai ya Yehova. Lokola atyelaki Nzambe na ye motema mobimba, Yehoshafate asalaki kaka ndenge bayebisaki ye. Ntango ye ná bato na ye bakendaki mpo na kokutana na banguna yango, atyaki te basoda oyo bayebi kobunda malamu na molɔngɔ ya liboso, kasi atyaki nde bayembi oyo bayebaki na bango kobunda te. Yehova akokisaki elaka na ye epai ya Yehoshafate; mpe Yehova asalaki ete banguna yango bábomana.​—2 Nt. 20:18-23.

Bandeko oyo bauti kobalana bakoki kosalela bomoi na bango na mosala ya Yehova soki bazali kobondela mpe koyekola Liloba na ye (Talá paragrafe 8, 10)

8. Mateya nini mibali bakoki kozwa na ndakisa ya Mokonzi Yehoshafate?

8 Mibali, bokoki kozwa mateya na ndakisa ya Yehoshafate. Bozali na mokumba ya kokokisa bamposa ya bato ya mabota na bino, yango wana bosalaka mosala makasi mpo na kobatela mpe kosalisa bango. Ntango bokutani na mikakatano, bokoki kokanisa ete bokosilisa yango na makasi na bino moko. Kasi bóboya ezaleli ya komityela motema mobimba. Bóbondelaka nde Yehova ntango bozali bino moko. Lisusu, bóbondelaka na motema mobimba elongo na basi na bino. Bólukaka litambwisi ya Yehova na nzela ya koyekola Biblia, mikanda mpe bavideo oyo ebongiseli na ye ebimisaka. Bósalekaka mateya oyo bozwi. Bato mosusu bakoki kosepela te na bikateli oyo bozwi oyo esimbami na Liloba ya Nzambe, mpe bakoki ata koloba na bino ete bobɛli motó. Bakoki mpe koyebisa bino ete mbongo mpe biloko ya mokili ekobatela mpenza mabota na bino. Kasi bóbosana te ndakisa ya Mokonzi Yehoshafate. Atyelaki Yehova motema mpe amonisaki yango na misala na ye. Lokola Yehova asundolaki Yehoshafate te, bóyeba ete akosundola mpe bino te. (Nz. 37:28; Ebr. 13:5) Likambo nini mosusu mwasi ná mobali bakoki kosala mpo bázala na bomoi ya esengo?

LOKOLA MOSAKOLI YISAYA NÁ MWASI NA YE, BÓTYAKA MOSALA YA YEHOVA NA ESIKA YA LIBOSO

9. Tokoki koloba nini mpo na mosakoli Yisaya ná mwasi na ye?

9 Mosakoli Yisaya ná mwasi na ye batyaki mosala ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na bango. Ekoki kozala ete mwasi na ye azalaki mpe mosakoli, mpo abengami “mosakoli mwasi.” (Yis. 8:1-4) Babalani yango batyaki losambo ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na bango. Bazali mpenza ndakisa malamu mpo na babalani ya lelo!

10. Ndenge nini koyekola bisakweli ya Biblia esalisaka babalani bákóma lisusu na ekateli makasi ya kosala oyo bakoki na mosala ya Yehova?

10 Lelo oyo, babalani bakoki kotya losambo ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na bango soki bazali kosala nyonso oyo bakoki na mosala na ye. Bakoki kokómisa kondima na bango makasi epai ya Yehova soki bazali koyekola bisakweli ya Biblia elongo mpe komona ndenge oyo bisakweli yango ekokisamaka. * (Tito 1:2) Bakoki kokanisa na oyo bakoki kosala mpo na kokokisa bisakweli mosusu ya Biblia. Na ndakisa, bakoki kopesa mabɔkɔ na esakweli oyo Yesu alobaki ete nsango malamu esengeli kosakolama na mabele mobimba liboso ete nsuka eya. (Mat. 24:14) Soki babalani bazali komona kokokisama ya bisakweli ya Biblia, bakokóma lisusu na ekateli makasi ya kosala oyo bakoki na mosala ya Yehova.

LOKOLA AKILA NÁ PRISILE, BÓTYAKA MATOMBA YA BOKONZI NA ESIKA YA LIBOSO

11. Akila ná Prisile basalaki nini, mpe mpo na nini?

11 Bilenge oyo bauti kobalana bakoki koyekola makambo mingi na ndakisa ya Akila ná Prisile, Bayuda oyo bazalaki kofanda na engumba Roma. Bayokaki nsango malamu na ntina etali Yesu mpe bakómaki bakristo. Na ntembe te, bazalaki kosepela na lolenge ya bomoi oyo bazalaki na yango. Kasi bomoi na bango ebongwanaki na mbalakaka ntango amperɛrɛ Klode apesaki mitindo ete Bayuda nyonso bálongwa na Roma. Kanisá ndenge likambo yango ebongolaki bomoi ya Akila ná Prisile. Basengelaki kotika esika oyo bamesanaki kofanda mpe kokende kosala mosala na bango ya kotonga bahema na esika mosusu. Likambo wana ya mpasi etindaki bango bázongisa mosala ya Yehova nsima? Na ntembe te oyebi eyano na motuna yango. Ntango bakómaki na esika oyo basengelaki kofanda na Korinti, Akila ná Prisile bapesaki mabɔkɔ na lisangá na bango ya sika mpe basalaki elongo na ntoma Paulo mpo na kolendisa bandeko. Na nsima, bakendaki na engumba mosusu epai mposa ya basakoli ezalaki monene. (Mis. 18:18-21; Rom. 16:3-5) Na ntembe te bazalaki na bomoi ya esengo mpe na makambo mingi ya kosala!

12. Mpo na nini babalani basengeli komityelaka mikano ya elimo?

12 Lelo oyo, babalani bakoki komekola Akila ná Prisile soki bazali kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. Ntango ya malamu oyo babalani basengeli kolobela mikano oyo basengeli komityela na bomoi na bango ezali ntango bazali bafianse. Soki babalani bazwi bikateli elongo mpe basali nyonso bákokisa mikano ya elimo elongo, bakomona ndenge elimo ya Yehova ekosala na bomoi na bango. (Mos. 4:9, 12) Tólobela ndakisa ya ndeko Russell ná mwasi na ye Elizabeth. Ndeko Russell alobi boye: “Ntango tozalaki bafianse, tozalaki kolobela mingimingi mikano na biso ya elimo.” Elizabeth alobi boye: “Tozalaki kolobela yango mpo soki na nsima ekosɛnga tózwa bikateli mosusu, bikateli yango epekisa biso te kokokisa mikano oyo tomityelaki.” Makambo ya bomoi ya ndeko Russell ná mwasi na ye Elizabeth epesaki bango likoki ya kokende na Micronésie epai mposa ya basakoli ezalaki monene.

Bandeko oyo bauti kobalana bakoki kosalela bomoi na bango na mosala ya Yehova soki bazali komityela mikano ya elimo (Talá paragrafe 13)

13. Na kotalela Nzembo 28:7, matomba nini babalani bakozwa soki bazali kotyela Yehova motema?

13 Ndenge moko na Russell mpe Elizabeth, babalani mingi bazwá ekateli ya kozala na bomoi ya pɛpɛlɛ mpo bákoka kosala lisusu mingi na mosala ya kosakola mpe ya koteya nsango malamu. Soki babalani bamityeli mokano ya kosala mingi na mosala ya Yehova, mpe basali elongo mpo na kokokisa mokano yango, bakozwa mapamboli mingi. Bakomona ndenge Yehova akokokisa bamposa na bango, bakotyela ye lisusu motema mingi mpe bakokóma mpenza na esengo.​—Tángá Nzembo 28:7.

LOKOLA NTOMA PETRO NÁ MWASI NA YE, BÓTYELAKA BILAKA YA YEHOVA MOTEMA

14. Ndenge nini ntoma Petro ná mwasi na ye bamonisaki ete batyaki motema na elaka oyo ezali na Matai 6:25, 31-34?

14 Babalani bakoki mpe kozwa mateya na ndakisa ya ntoma Petro ná mwasi na ye. Sanza soki motoba to mbula moko nsima ya kokutana na Yesu, Petro asengelaki kozwa ekateli moko ya ntina mingi. Azalaki kosala mosala ya koboma mbisi mpo na kosalisa libota na ye. Na yango, ntango Yesu asɛngaki Petro akóma kolanda ye ntango nyonso, Petro asengelaki mpe kokanisa mwasi na ye ntango azalaki kozwa ekateli yango. (Luka 5:1-11) Ntoma Petro aponaki kokende elongo na Yesu na mosala ya kosakola. Azwaki mpenza ekateli ya malamu! Mpe tozali mpenza na ntina ya kondima ete mwasi na ye apesaki ye mabɔkɔ. Biblia elobi ete nsima ya lisekwa ya Yesu, mwasi yango asalaki mpe mibembo elongo na Petro mpo na mwa ntango. (1 Ko. 9:5) Na ntembe te, lokola mwasi yango azalaki mokristo moko malamu, yango esalaki ete Petro akoka kopesa babalani toli ya polele. (1 Pe. 3:1-7) Ezali polele ete Petro ná mwasi na ye batyaki motema na elaka ya Yehova oyo elobi ete akokokisa bamposa na bango soki batye Bokonzi na esika ya liboso.​—Tángá Matai 6:25, 31-34.

15. Makambo oyo ndeko Tiago ná mwasi na ye Esther balobi eteyi yo nini?

15 Soki bobalaná eleki sikoyo mwa bambula, ndenge nini bokoki kokoba kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova? Lolenge moko ya kosala yango ezali ya kozwa mateya na ndakisa ya babalani mosusu. Na ndakisa, bokoki kotánga molɔngɔ ya masolo, “Bamipesaki na bolingo na bango moko.” Masolo ya ndenge wana esalisaki ndeko Tiago ná mwasi na ye Esther, oyo bafandaka na Brésil, bákolisa mposa makasi ya kokende kosala na esika oyo mposa ezali mingi. Ndeko Tiago alobi boye: “Ntango totángaki ndenge oyo Yehova asalisaki basaleli na ye ya mikolo na biso, biso mpe tomonaki malamu tólanda toli ya Yehova mpo tómona lobɔkɔ na ye na bomoi na biso.” Nsukansuka bakendaki na Paraguay, epai bazali kosakola na teritware ya monɔkɔ ya Portuguais kobanda 2014. Esther alobi boye: “Vɛrsɛ moko oyo tosepelaka na yango mingi ezali Baefese 3:20. Mbala mingi tomoni ndenge maloba ya vɛrsɛ yango ekokisamaka na mosala na biso mpo na Yehova.” Na mokanda yango, oyo ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Efese, alakaki ete Yehova akopesa biso mingi koleka ndenge oyo tozali kosɛnga. Elaka yango ezali mpenza solo!

Bandeko oyo bauti kobalana bakoki kosalela bomoi na bango na mosala ya Yehova soki bazali koluka toli epai ya bandeko oyo bakɔmeli na elimo (Talá paragrafe 16)

16. Babalani oyo bazali naino bilenge basengeli koluka toli epai ya nani soki bazali kotalela mikano oyo basengeli komityela?

16 Babalani oyo bazali naino bilenge bakoki koyekola makambo mingi epai ya bandeko mosusu oyo batyelaka Yehova motema. Na ndakisa, ezali na babalani mosusu oyo balekisi bambula mingi na mosala ya ntango nyonso. Soki bozali kotalela mikano oyo bolingi komityela na mosala ya Yehova, ekozala malamu bósɛnga bango toli. Yango mpe ezali lolenge mosusu ya komonisa ete botyelaka Yehova motema. (Mas. 22:17, 19) Bankulutu mpe bakoki kosalisa babalani oyo bazali naino bilenge bámityela mikano ya elimo mpe bákokisa yango.

17. Likambo nini ekómelaki ndeko Klaus ná mwasi na ye Marisa, mpe ndakisa na bango ekoki koteya biso nini?

17 Na bantango mosusu, tokoki kozala na mposa tósalela Yehova na lolenge moko boye, kasi makambo ekoki kotambola te ndenge tozalaki kokanisa. Tózwa ndakisa ya Klaus ná Marisa oyo tolobelaki na ebandeli. Nsima ya kolekisa mbula misato na libala na bango, batikaki mboka na bango mpe bakendaki kopesa mabɔkɔ na mosala ya botongi na filiale ya Finlande. Kasi bayebisaki bango ete bakopesa bango ndingisa te ya kofanda kuna basanza koleka motoba. Na ebandeli, balɛmbaki nzoto. Kasi mwa moke na nsima, basɛngaki bango bákende koyekola monɔkɔ ya Arabe, mpe sikoyo bazali kosakola na teritware ya monɔkɔ yango na ekólo mosusu. Ndeko Marisa alobi boye mpo na likambo yango: “Nazalaki kobanga kosala likambo moko boye oyo nasalá naino te liboso, mpe nasengelaki kotyela Yehova motema na ngai mobimba. Kasi namoni ndenge oyo Yehova asalisaka biso koleka ndenge oyo tozalaki kokanisa. Yango esalisi ngai nakóma lisusu kotyela Yehova motema mingi.” Ndenge ndakisa oyo emonisi yango, okoki kozala na elikya ete Yehova akopesa yo mapamboli mingi soki otyeli ye motema na yo mobimba.

18. Babalani bakoki kosala nini mpo bákoba kotyela Yehova motema?

18 Libala ezali likabo oyo euti na Yehova. (Mat. 19:5, 6) Alingaka ete babalani básepela na likabo yango. (Mas. 5:18) Bino babalani oyo bozali naino bilenge, ekozala malamu bótalela lisusu ndenge oyo bozali kosalela bomoi na bino. Bozali kosala nyonso oyo bokoki mpo na komonisa Yehova ete bosepelaka na makabo oyo apesá bino? Bósololaka na Yehova na nzela ya libondeli. Bóluka toli ya Liloba na ye oyo eyokani na makambo ya bomoi na bino. Mpe na nsima, bólanda batoli oyo Yehova azali kopesa bino. Bóyeba ete bokozala na bomoi ya esengo mpe Yehova akopambola bino mingi soki botye mosala na ye na esika ya liboso na bomoi na bino!

LOYEMBO 132 Sikoyo tokómi moto moko

^ par. 5 Bikateli mosusu oyo tozwaka, ekoki kosala ete tósalela ntango mpe makasi na biso na mosala ya Yehova to te. Mingimingi bandeko oyo bauti kobalana, basengeli kozwa bikateli oyo ekotambwisa bomoi na bango mobimba. Lisolo oyo ekosalisa bango bázwa bikateli ya malamu oyo ekosalisa bango bázala na bomoi ya esengo.

^ par. 5 Topesi bango bankombo mosusu.