LISOLO YA BOYEKOLI 47
Okobatela kondima na yo makasi?
“Mitema na bino etungisama te. Bóndimela Nzambe.”—YOA. 14:1.
LOYEMBO 119 Tosengeli kozala na kondima
NA MOKUSE *
1. Motuna nini tokoki komituna?
NA BANTANGO mosusu, omitungisaka soki okanisi makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya, na ndakisa kobebisama ya mangomba ya lokuta, etumba ya Goge ya Magoge, mpe etumba ya Armagedone? Mbala mosusu omitunaka boye: ‘Nakobatela mpenza bosembo na ngai ntango makambo yango ya nsɔmɔ ekosalema?’ Soki omitunaka bongo, na ntembe te, maloba ya Yesu oyo ezali na vɛrsɛ oyo esimbi motó ya likambo ya lisolo oyo ekosalisa yo. Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Mitema na bino etungisama te. Bóndimela Nzambe.” (Yoa. 14:1) Soki tozali na kondima makasi, yango ekosalisa biso tóyika mpiko na makambo ya mpasi oyo ezali koya.
2. Ndenge nini tokoki kokómisa kondima na biso makasi, mpe makambo nini tokolobela na lisolo oyo?
2 Soki toyebi makambo oyo tosalaka lelo oyo ntango tokutani na komekama, yango ekosalisa biso tókómisa kondima na biso makasi mpo tólonga mikakatano oyo ezali koya. Soki tosali bongo, yango ekoki kosalisa biso tómona bisika nini tosengeli kobongisa mpo tókómisa kondima na biso makasi. Mbala nyonso oyo toyikaka mpiko na komekama, kondima na biso ekómaka lisusu makasi. Yango ekosalisa biso tóyika mpiko na komekama oyo tokokutana na yango na mikolo ezali koya. Na lisolo oyo, tokolobela makambo minei oyo bayekoli ya Yesu bakutanaki na yango, oyo emonisaki ete basengelaki lisusu kokómisa kondima na bango makasi. Na nsima, tokomona ndenge oyo biso mpe tokoki koyika mpiko na mikakatano ya ndenge wana lelo oyo, mpe ndenge oyo yango ekoki kobongisa biso mpo na mikakatano oyo tokokutana na yango na mikolo ezali koya.
TOSENGELI KOZALA NA KONDIMA ETE NZAMBE AKOKOKISA BAMPOSA NA BISO YA MOSUNI
3. Maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:30, 33 esalisi biso tóndima likambo nini?
3 Tata nyonso ya libota azalaka na mposa ya kopesa bato ya libota na ye biloko mingi ya kolya, bilamba, mpe esika ya kolala. Kasi kosala bongo ezali pɛtɛɛ te na mikolo oyo ya nsuka. Bandeko na biso mosusu babungisi misala na bango, mpe atako milende oyo bazali kosala, bazali kokoka kozwa mosala mosusu te. Basusu mpe batiká mosala oyo ebongi te mpo na bakristo. Na makambo yango nyonso, tosengeli kozala na kondima ete na lolenge moko to mosusu, Yehova akopesa biso oyo tosengeli na yango mpo na kokokisa bamposa ya bato ya libota na biso. Yesu amonisaki yango polele epai ya bayekoli na ye na lisolo oyo asalaki likoló ya ngomba. (Tángá Matai 6:30, 33.) Soki tondimi mpenza ete Yehova akosundola biso te, yango ekosalisa biso tótya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. Ntango tozali komona ndenge Yehova azali kokokisa bamposa na biso ya mosuni, tokopusana lisusu penepene na ye mpe kondima na biso ekokóma lisusu makasi.
4-5. Nini esalisaki libota moko bálonga mitungisi oyo bazalaki na yango ya kokokisa bamposa na bango ya mosuni?
4 Tótala ndenge libota moko na Venezuela emonaki ndenge oyo Yehova azalaki kosalisa bango ntango bazalaki komitungisa mpo na kokokisa bamposa na bango ya mosuni. Na kala, ndeko Miguel Castro ná libota na ye bazalaki kosala na bilanga na bango mpe yango ezalaki kosalisa bango bázwa mwa mbongo. Kasi na nsima, etuluku moko ya mibali oyo bazalaki na minduki babotɔlaki bilanga na bango mpe babenganaki bango. Miguel, tata ya libota yango, alobi boye: “Sikoyo, tozali kosala mosala na mwa elanga moko ya moke oyo badefisá biso. Nabondelaka Yehova apesa biso oyo tosengeli na yango mpo na mokolo wana.” Bomoi ya libota ya ndeko Castro ezali mpasi mpenza, kasi lokola bazalaka na kondima ete Tata na biso oyo atondi na bolingo akokokisa bamposa na bango ya mokolo na mokolo, libota yango eyanganaka na makita nyonso mpe ebimaka na mosala ya kosakola. Batyaka matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na bango, mpe Yehova apesaka bango oyo basengeli na yango.
5 Na boumeli ya ntango wana ya mpasi, ndeko Miguel ná mwasi na ye Yurai, batyaki makanisi na bango nyonso na oyo Yehova azalaki kosala mpo na kokokisa bamposa na bango. Na bantango mosusu, Yehova asalelaki bandeko ya lisangá mpo na kokabela bango mwa eloko, to mpo na kosalisa ndeko Miguel azwa mosala. Na bantango mosusu mpe Yehova asalelaki biro ya filiale mpo na kopesa bango lisungi oyo basengelaki na yango. Yehova asundolá bango soki moke te. Yango esali ete kondima ya libota na bango ekóma lisusu makasi. Nsima ya kolobela makambo ya sikisiki oyo Yehova asalaki mpo ma kosalisa bango, Yoselin, mwana na bango ya liboso ya mwasi, alobi boye: “Komona polele lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na biso, esimbaka mpenza motema. Natalelaka Yehova lokola moninga oyo nasengeli kotyela motema bomoi na ngai mobimba.” Abakisi boye: “Mikakatano oyo libota na biso ekutanaki na yango, ebongisi biso mpo na mikakatano minene oyo tokokutana na yango na mikolo ezali koya.”
6. Ndenge nini okoki kokómisa kondima na yo makasi ntango ozali kokutana na mikakatano ya mbongo?
6 Ozali kokutana na mikakatano ya mbongo? Soki ezali bongo, yango ezali mpenza ntango moko ya mpasi mpo na yo. Kasi okoki kosalela ntango yango ya mpasi mpo na kokómisa lisusu kondima na yo makasi. Bondelá Yehova, mpe tángá maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:25-34 mpe manyolá na yango. Kanisá na bandakisa ya mikolo na biso oyo emonisi ndenge Yehova akokisaka bamposa ya baoyo bamipesaka mobimba na mosala na ye. (1 Ko. 15:58) Kosala bongo ekokómisa lisusu kondima na yo makasi ete Yehova akosalisa yo kaka ndenge asalisaki bandeko mosusu oyo bakutanaki mpe na mikakatano lokola oyo ya yo. Ayebi oyo osengeli na yango, mpe ayebi ndenge ya kopesa yo yango. Ntango ozali komona ndenge Yehova azali kosalisa yo, kondima na yo ekokóma lisusu makasi mpe yango ekosalisa yo oyika lisusu mpiko na mikakatano ya minene oyo okoki kokutana na yango na mikolo ezali koya.—Hab. 3:17, 18.
TOSENGELI KOZALA NA KONDIMA MPO TÓYIKA MPIKO NA MAKAMBO YA MPASI
7. Na kotalela Matai 8:23-26, ndenge nini mopɛpɛ makasi emekaki kondima ya bayekoli ya Yesu?
7 Ntango Yesu ná bayekoli na ye bakutanaki na mopɛpɛ moko makasi na mbu, Yesu asalelaki likambo yango mpo na kosalisa bango bámona bisika oyo basengelaki kokómisa kondima na bango makasi. (Tángá Matai 8:23-26.) Wana mopɛpɛ etombokaki makasi mpenza, mpe mai etondaki na masuwa na bango, Yesu azalaki na ye kolala. Ntango bayekoli na ye oyo bazalaki kobanga makasi balamusaki ye mpe basɛngaki ye abikisa bango, na boboto mpenza Yesu atunaki bango: “Mpo na nini bozali kobangabanga, bino bato ya kondima moke?” Bayekoli yango basengelaki koyeba ete Yehova azalaki na likoki ya kobatela Yesu ná baoyo bazalaki elongo na ye mpo bázwa likama te. Yango eteyi biso nini? Kondima makasi ekoki kosalisa biso tóyika mpiko ata na mokakatano oyo ekoki kozala lokola mopɛpɛ makasi.
8-9. Ndenge nini kondima ya Anel emekamaki, mpe nini esalisaki ye?
8 Tótalela ndakisa ya Anel, ndeko mwasi moko monzemba, oyo afandaka na Porto Rico. Akómaki na kondima makasi mpo akutanaki na likambo moko ya mpasi mpenza. Ye mpe akutanaki na mopɛpɛ moko makasi mpenza. Likambo yango esalemaki na 2017 ntango mopɛpɛ makasi babengi Maria ebɛtaki na esika azalaki kofanda mpe ebebisaki ndako na ye. Mpe yango esalaki ete abungisa mosala na ye. Anel alobi boye: “Na ntango wana ya mpasi, nazalaki mpenza komitungisa. Kasi namonaki ete nasengelaki kotyela Yehova motema. Yango wana, nazalaki kobondela ye mpe kotika te ete mitungisi yango elɛmbisa ngai nzoto.”
9 Anel alobeli likambo mosusu oyo esalisaki ye ayika mpiko na mokakatano yango: botosi. Alobi boye: “Kolanda malako oyo ebongiseli ya Yehova epesaka, esalisaki ngai nafanda kimya. Bilendiseli ya elimo oyo bandeko bazalaki kopesa ngai, ata mpe biloko ya mosuni, esalisaki ngai namona lobɔkɔ ya Yehova.” Abakisi boye: “Yehova apesaki ngai biloko mingi koleka oyo nasɛngaki ye, mpe yango ekómisaki mpenza kondima na ngai makasi.”
10. Okoki kosala nini soki ozali kokutana na mokakatano oyo ezali lokola mopɛpɛ makasi?
10 Mbala mosusu yo mpe ozali kokutana na mikakatano oyo ezali lokola mopɛpɛ makasi. Ekoki kozala ete ozali konyokwama mpo na makama oyo ebimaka yango moko. Ntango mosusu mpe ozali na maladi moko ya makasi mpenza oyo elɛmbisi yo nzoto mpe ozali koyeba te oyo osengeli kosala. Na bantango mosusu yango ekoki kotungisa yo, kasi kotika te ete mitungisi yango epekisa yo kotyela Yehova motema. Pusanáká penepene na ye na nzela ya libondeli. Kanisá ndenge Yehova asalisaki yo na kala; yango ekokómisa kondima na yo makasi. (Nz. 77:11, 12) Yebá ete akosundola yo ata mokolo moko te.
11. Mpo na nini tosengeli kozala na ekateli ya kotosa baoyo bazali kokamba biso?
11 Makambo nini mosusu ekoki kosalisa yo mpo oyika mpiko na mikakatano? Ndenge ndeko Anel amonisaki yango, ezali botosi. Tyá motema epai ya baoyo Yehova ná Yesu batyelaka motema. Na bantango mosusu, bandeko oyo bazali kokamba bakoki kopesa biso malako oyo tokanisi ete ezangi motó ná makolo. Kasi Yehova apambolaka baoyo batosaka. Masolo ya Biblia mpe ya bandeko ya sembo emonisi ete botosi ebikisaka bomoi ya bato. (Kob. 14:1-4; 2 Nt. 20:17) Kanisáká na mozindo na bandakisa yango. Kosala bongo ekokómisa lisusu makasi ekateli na yo ya kotosa litambwisi oyo Yehova azali kopesa biso na nzela ya ebongiseli na ye, ezala sikoyo to mpe na mikolo ezali koya. (Ebr. 13:17) Yango ekosalisa yo obanga te bolɔzi monene oyo ekoya mosika te.—Mas. 3:25.
TOSENGELI KOZALA NA KONDIMA MPO TÓYIKA MPIKO NA MAKAMBO YA KOZANGA BOSEMBO
12. Ndenge Luka 18:1-8 emonisi yango, boyokani nini ezali kati na kozala na kondima mpe koyika mpiko na makambo ya kozanga bosembo?
12 Yesu ayebaki ete makambo ya kozanga bosembo ekotya kondima ya bayekoli na ye na komekama. Mpo na kosalisa bango báyika mpiko, apesaki ndakisa moko oyo ezali na mokanda ya Luka. Abɛtɛlaki bango lisolo ya mwasi moko oyo mobali akufá oyo azalaki kosɛnga zuzi moko ya motema mabe akata likambo na ye na bosembo. Mwasi yango ayebaki ete soki akobi kosɛnga, zuzi yango akokata likambo na ye na bosembo. Mpe nsukansuka, zuzi yango andimaki kosalisa ye. Yango eteyi biso nini? Yehova azali te Nzambe oyo azangi bosembo. Yango wana Yesu alobaki: “Bongo Nzambe akosala te ete likambo ya bato na ye oyo aponaki, oyo babelelaka ye butu moi, ekatama na bosembo?” (Tángá Luka 18:1-8.) Na nsima Yesu abakisaki: “Ntango Mwana ya moto akoya, akokuta mpenza kondima awa na mabele?” Ntango tokutani na makambo ya kozanga bosembo, tokomonisa ete tozali na kondima makasi lokola ya mwasi wana soki tozali na motema molai mpe tolɛmbi te. Soki tozali na kondima ya ndenge wana, tokoki kotya motema ete nsukansuka Yehova akosalisa biso. Tosengeli mpe kondima ete libondeli ezalaka mpenza na nguya. Na bantango mosusu, Yehova akoki koyanola na mabondeli na biso na ndenge oyo tokanisaki te.
13. Ndenge nini libondeli esalisaki bato ya libota moko oyo basalelaki bango makambo na kozanga bosembo?
13 Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi moko na nkombo Vero, oyo afandaka na République Démocratique du Congo. Ntango batomboki bakɔtaki na mboka na bango, ye ná mobali na ye oyo azali Motatoli te mpe mwana na bango ya mwasi oyo azali na mbula 15 bakimaki mboka na bango. Ntango bazalaki kokima, bakómaki na esika oyo batomboki yango bakangaki nzela. Batɛlɛmisaki bango, mpe balobaki ete bakoboma bango. Ntango ndeko Vero abandaki kolela, mwana na bango wana ya mwasi asalaki libondeli na mongongo makasi mpe azongelaki nkombo ya Yehova mbala mingi mpo na kokitisa mama na ye motema. Ntango asilisaki kobondela, mokonzi ya batomboki yango atunaki ye boye: “Mwana mwasi, nani alakisaki yo ndenge ya kobondela?” Mwana yango alobaki: “Mama na ngai nde asalelaki maloba oyo ezali na Matai 6:9-13 mpo na kosalisa ngai nayeba ndenge ya kobondela.” Bongo mokonzi ya batomboki yango alobaki: “Elenge mwasi, kende na kimya elongo na baboti na yo. Mpe tiká Yehova Nzambe na bino abatela bino!”
14. Makambo nini ekoki komeka kondima na biso, mpe nini ekoki kosalisa biso tóyika mpiko?
14 Bandakisa ya boye emonisi ete tosengeli kobosana soki moke te ete libondeli ezali na ntina mingi. Kasi okosala nini soki Yehova azali koyanola noki te na mabondeli na yo mpe azali kosala yango te na ndenge ya kokamwa? Lokola mwasi wana oyo mobali akufá, kobá kobondela mpe zalá na kondima ete Yehova Nzambe na biso akosundola yo te. Mpe yebá ete ata ndenge nini, na lolenge moko to mosusu, Yehova akoyanola na libondeli na yo. Kobá kosɛnga Yehova apesa yo elimo santu na ye. (Flp. 4:13) Kobosana mpe te ete, mosika te, Yehova akopambola yo mingi mpenza mpe okobosana makambo nyonso ya mpasi oyo okutaná na yango. Wana ozali koyika mpiko na lisalisi ya Yehova, kondima na yo ekokóma makasi mpe ekosalisa yo mpo na mikakatano oyo ezali koya.—1 Pe. 1:6, 7.
TOSENGELI KOZALA NA KONDIMA MPO TÓYIKA MPIKO NA MIKAKATANO
15. Ndenge Matai 17:19, 20 emonisi yango, mokakatano nini bayekoli ya Yesu bakutanaki na yango?
15 Yesu ateyaki bayekoli na ye ete kondima ekosalisa bango bálonga mikakatano. (Tángá Matai 17:19, 20.) Atako na bantango mosusu bazalaki na likoki ya kobengana bademo, kasi mokolo moko balongaki te kosala yango. Mpo na nini? Yesu ayebisaki bango ete basengelaki kobakisa kondima na bango. Ayebisaki bango ete soki bazali na kondima mingi, bakozala na likoki ya kolonga ata mikakatano oyo ekoki kozala lokola ngomba! Lelo oyo, biso mpe tokoki kokutana na mikakatano oyo ekoki komonana lokola tokoka kolonga yango te.
16. Ndenge nini kondima esalisi Geydi ayika mpiko na likambo ya mpasi oyo ekómelaki ye?
16 Tózwa ndakisa ya ndeko mwasi moko na nkombo Geydi, oyo afandaka na Guatemala. Mokolo moko ntango bautaki makita mpe bazalaki kozonga ndako, babomaki mobali na ye Edi. Nini esalisaka Geydi ayika mpiko na likambo wana ya mpasi mpenza? Alobi boye: “Libondeli esalisaki ngai nabwakela Yehova mokumba na ngai ya kilo mpe yango esalaki ete nazwa kimya. Namonaka ndenge oyo Yehova atyelaka ngai likebi na nzela ya libota mpe ya baninga na ngai ya lisangá. Kozala na mingi ya kosala na mosala ya Yehova ekitisaka mpasi na ngai, mpe esalisaka ngai namitungisaka koleka ndelo te mpo na makambo oyo ekokómela ngai lobi. Banda nakutaná na mokakatano wana, nandimi mpenza ete ata soki nakutani na mokakatano nini na mikoko ezali koya, nakolonga yango na lisalisi ya Yehova, ya Yesu, mpe ya ebongiseli na biso.”
17. Tokoki kosala nini ntango tokutani na mokakatano oyo ezali lokola ngomba?
17 Ozali na mawa mpo moto moko oyo olingaka akufi? Soki ezali bongo, tángáká masolo ya Biblia oyo elobeli bato oyo basekwaki; yango ekokómisa kondima na yo makasi na elikya ya lisekwa. Ozali na mawa makasi mpo ndeko na yo ya libota alongolami na lisangá? Yekoláká mpo omindimisa lisusu ete Nzambe apesaka disiplini na lolenge oyo eleki malamu. Ata soki okutani na likambo nini, salelá libaku yango mpo na kokómisa lisusu kondima na yo makasi. Sopelá Yehova makambo nyonso oyo ezali na motema na yo. Zaláká ntango nyonso pene na bandeko ya lisangá. (Mas. 18:1) Saláká makambo oyo ekosalisa yo oyika mpiko, ata soki ozali naino kolela mpo na mikakatano yango. (Nz. 126:5, 6) Kobá koyangana na makita, kobima mosala ya kosakola mpe kotángaka Biblia. Mpe tyá makanisi na yo nyonso na mapamboli kitoko oyo Yehova abombeli yo na mikolo ezali koya. Wana ozali komona ndenge Yehova azali kosalisa yo, kondima na yo ekokóma lisusu makasi koleka.
“BAKISELÁ BISO KONDIMA”
18. Soki omoni ete kondima na yo ebandi kolɛmba, osengeli kosala nini?
18 Soki mikakatano oyo ozali kokutana na yango sikoyo, to mpe oyo okutaná na yango kala elɛmbisi kondima yo, kolɛmba nzoto te. Talelá yango lokola libaku oyo ozali na yango mpo na kokómisa lisusu kondima na yo makasi. Salá lokola bantoma ya Yesu oyo balobaki: “Bakiselá biso kondima.” (Luka 17:5) Lisusu, kanisá bandakisa oyo tolobeli na lisolo oyo. Lokola Miguel mpe Yurai, kobosanaka te mbala nyonso oyo Yehova asalisaki yo. Lokola mwana-mwasi ya ndeko Vero mpe ndeko Anel, bondeláká Yehova na motema mobimba, mingimingi ntango okutani na mokakatano moko monene. Mpe lokola ndeko Geydi, kobosana te ete Yehova akoki kosalisa biso na nzela ya bandeko na biso ya libota to mpe baninga. Soki otiki Yehova asalisa yo oyika mpiko na mikakatano oyo ozali kokutana na yango sikoyo, okokóma lisusu na kondima makasi ete akosalisa yo oyika mpiko na mikakatano nyonso oyo okoki kokutana na yango na mikolo ezali koya.
19. Likambo nini Yesu ayebaki, mpe osengeli koyeba likambo nini?
19 Yesu asalisaki bayekoli na ye bámona esika oyo bazangaki kondima. Kasi ayebaki ete, na lisalisi ya Yehova, bakolonga mikakatano oyo bakokutana na yango na mikolo ezali koya. (Yoa. 14:1; 16:33) Ayebaki ete kondima makasi ekosalisa ebele mpenza ya bato bábika na bolɔzi monene oyo ezali koya. (Em. 7:9, 14) Okozala na kati ya bato oyo bakobika? Na nzela ya boboto monene ya Yehova, okozala na kati ya bato yango soki osaleli mabaku nyonso oyo ozali na yango sikoyo mpo na kokómisa lisusu kondima na yo makasi!—Ebr. 10:39.
LOYEMBO 118 “Bakiselá biso kondima”
^ par. 5 Tozali kozela na mposa makasi nsuka ya mokili oyo. Kasi na bantango mosusu tokoki komituna soki tokozala na kondima oyo ekosalisa biso tóyika mpiko tii na nsuka. Na lisolo oyo, tokotalela bandakisa mpe mateya ya sikisiki oyo ekoki kosalisa biso tókómisa kondima na biso makasi.