LISOLO YA BOYEKOLI 48
Batelá makanisi na yo ntango bosembo na yo emekami
“Batelá makanisi na yo na makambo nyonso.”—2 TIM. 4:5.
LOYEMBO 123 Tótosaka ebongiseli ya Teokrasi
NA MOKUSE *
1. Na kotalela 2 Timote 4:5, ‘kobatela makanisi na biso’ elimboli nini?
NTANGO tokutanaka na mikakatano, bosembo na biso epai ya Yehova mpe ebongiseli na ye emekamaka. Ndenge nini tokoki kolonga mikakatano yango? Tosengeli kobatela makanisi na biso, kolala mpɔngi te, mpe kotɛlɛma ngwi na kondima. (Tángá 2 Timote 4:5.) Tobatelaka makanisi na biso ntango tofandaka nyɛɛ, tokanisaka malamu, mpe tosalaka makasi tótalela makambo ndenge Yehova atalelaka yango. Ntango tosalaka bongo, totambwisaka te makanisi na biso na kolanda mayoki na biso.
2. Tokolobela nini na lisolo oyo?
2 Na lisolo oyo eleki, tomonaki mikakatano misato oyo eutaka na libándá ya lisangá oyo tokoki kokutana na yango. Na lisolo oyo, tokolobela mikakatano misato oyo eutaka na kati ya lisangá oyo ekoki komeka bosembo na biso epai ya Yehova. Mikakatano yango ezali (1) ntango tomoni ete ndeko moko asaleli biso makambo na bosembo te, (2) ntango tozwi disiplini, mpe (3) ntango tozali kosala makasi mpo na komesana na bambongwana oyo ezali kosalema na ebongiseli ya Yehova. Ndenge nini tokoki kobatela makanisi na biso mpe kotikala sembo epai ya Yehova mpe ebongiseli na ye ntango tozali kokutana na mikakatano ya ndenge wana?
NTANGO TOMONI ETE NDEKO MOKO ASALELI BISO MAKAMBO NA BOSEMBO TE
3. Tokoki kosala nini soki tomoni ete ndeko moko asaleli biso makambo na bosembo te?
3 Esí ekómelá yo ete ndeko moko asalela yo makambo na bosembo te, mbala mosusu moto oyo azali na mikumba na lisangá, na ndakisa, nkulutu? Mbala mosusu, ndeko yango asalaki likambo yango na nko te. (Rom. 3:23; Yak. 3:2) Kasi, likambo oyo asali ekoki kopesa yo nkanda. Ekoki kozangisa yo mpɔngi mpo ozali kokanisa kaka likambo yango. Mbala mosusu, okoki komituna boye: ‘Soki ndeko akoki kosala likambo ya boye, oyo ezali mpenza ebongiseli ya Nzambe?’ Ezali mpenza likambo oyo Satana alingi okanisa. (2 Ko. 2:11) Kokanisa ndenge wana ekoki kotinda biso tótika kosalela Yehova mpe tósundola ebongiseli na ye. Na yango, soki tomoni ete ndeko moko asaleli biso makambo na bosembo te, ndenge nini tokoki kobatela makanisi na biso mpe koboya kokanisa ndenge Satana alingi tókanisa?
4. (a) Na kotalela Ebandeli 50:19-21, ndenge nini Yozefe abatelaki makanisi na ye ntango basalelaki ye makambo na bosembo te? (b) Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa na ye?
4 Kokóma nkandankanda te. Ntango Yozefe azalaki elenge, bayaya na ye basalelaki ye makambo na bosembo te. Bayinaki ye, mpe basusu balingaki kutu koboma ye. (Eba. 37:4, 18-22) Nsukansuka, batɛkaki ye lokola moombo. Yango wana, Yozefe akutanaki na komekama makasi oyo eumelaki mbula soki 13. Yozefe akokaki komituna soki Yehova azalaki mpenza kolinga ye. Lisusu, akokaki komituna soki Yehova asundolaki ye ntango azalaki na mposa ya lisalisi. Atako bongo, Yozefe akómaki nkandankanda te. Kutu abatelaki makanisi na ye na ndenge afandaki nyɛɛ. Ntango azwaki libaku ya kozongisela bandeko na ye mabe, aboyaki kosala bongo, amoniselaki bango bolingo mpe alimbisaki bango. (Eba. 45:4, 5) Yozefe asalaki ndenge wana mpo azalaki kokanisa malamu. Na esika atya makanisi kaka na mikakatano na ye, akobaki kokanisa makambo oyo Yehova alingaki asala. (Tángá Ebandeli 50:19-21.) Yango eteyi biso nini? Soki basaleli biso makambo na bosembo te, tosengeli te kosilikela Yehova to komituna soki asundoli biso. Kasi, tosengeli komanyola ndenge azali kosalisa biso mpo tóyikela mokakatano yango mpiko. Longola yango, ntango basusu basaleli yo makambo na bosembo te, osengeli koluka kozipa mabunga na bango na bolingo.—1 Pe. 4:8.
5. Ndenge nini Miqueas abatelaki makanisi na ye ntango amonaki ete bandeko basalelaki ye makambo na bosembo te?
5 Tózwa ndakisa ya nkulutu moko na Sudi ya Amerika na nkombo Miqueas. * Akanisi lisusu ntango amonaki ete bandeko mosusu oyo bazali na mikumba na lisangá basalelaki ye makambo na bosembo te. Alobaki boye: “Namitungisá naino te liboso boye. Nazalaki kobanga. Nazalaki kokoka kolala te na butu, mpe nazalaki kolela mpo namonaki eloko ya kosala ezali te.” Atako bongo, Miqueas abatelaki makanisi na ye mpe asalaki makasi apekisa mayoki na ye. Azalaki kobondela mbala na mbala mpe kosɛnga Yehova apesa ye elimo santu mpe makasi mpo na koyika mpiko. Lisusu, alukalukaki na mikanda na biso masolo oyo ekokaki kosalisa ye. Yango eteyi yo nini? Soki omoni ete ndeko moko asaleli yo makambo na bosembo te, fandá nyɛɛ mpe boyá makanisi nyonso ya mabe oyo ekoki koyela yo. Mbala mosusu, okoki koyeba te makambo nini etindaki ndeko yango asala bongo. Na yango, bondelá Yehova mpe sɛngá ye asalisa yo otalela makambo ndenge ndeko yango azali kotalela yango. Kosala bongo ekoki kosalisa yo omona ete ndeko yango asalelaki yo makambo na nko te mpe olimbisa ye. (Mas. 19:11) Kobosana te ete Yehova ayebi makambo oyo ezali kokómela yo mpe akopesa makasi oyo osengeli na yango mpo oyika mpiko.—2 Nt. 16:9; Mos. 5:8.
NTANGO TOZWI DISIPLINI
6. Na kotalela Baebre 12:5, 6, 11, mpo na nini ezali na ntina tóyeba ete Yehova apesaka biso disiplini mpo alingaka biso?
6 Disiplini ekoki kopesa biso mpasi na motema. Kasi soki tozali kotya makanisi kaka na mpasi yango, tokoki kobanda kotyola disiplini, komilongisa to komona ete disiplini yango ezali mpenza mpasi. Yango ekoki kosala ete tózanga eloko moko ya ntina mingi, elingi koloba, koyeba ete Yehova apesaka biso disiplini mpo alingaka biso. (Tángá Baebre 12:5, 6, 11.) Mpe soki totiki ete mayoki na biso etambwisa biso, tokopesa Satana libaku ya kobundisa biso. Alingaka ete tóboya disiplini mpe, likambo eleki mabe, tómitangola na Yehova mpe lisangá. Soki ozwi disiplini, ndenge nini okoki kobatela makanisi na yo?
7. (a) Ndenge elilingi emonisi yango, ndenge nini Yehova asalelaki Petro nsima ya kondima disiplini oyo azwaki? (b) Ndakisa ya Petro eteyi yo nini?
7 Ndimáká disiplini, mpe saláká mbongwana oyo esengeli. Mbala mibale mobimba, Yesu asembolaki Petro na miso ya bantoma mosusu. (Mrk 8:33; Luka 22:31-34) Na ntembe te, yango eyokisaki ye nsɔni! Atako bongo, Petro atikalaki sembo epai ya Yesu. Andimaki disiplini mpe azwaki mateya na mabunga na ye. Na yango, Yehova apambolaki bosembo ya Petro mpe apesaki ye mikumba minene na lisangá. (Yoa. 21:15-17; Mis. 10:24-33; 1 Pe. 1:1) Ndakisa ya Petro ekoki koteya biso nini? Ezala biso moko mpe basusu tozwaka matomba ntango toyokaka nsɔni te soki tozwi disiplini, tondimaka kosembolama, mpe tosalaka mbongwana oyo esengeli. Ntango tosalaka bongo, tokómaka lisusu na motuya mingi na miso ya Yehova mpe ya bandeko na biso.
8-9. Ndeko Bernardo ayokaki ndenge nini na ebandeli nsima ya kozwa disiplini, kasi nini esalisaki ye asembola makanisi na ye?
8 Tótalela makambo oyo ekómelaki Bernardo, ndeko mobali moko na Mozambique. Abungisaki mokumba na ye ya nkulutu. Ndenge nini ndeko Bernardo amiyokaki na ebandeli? Alobi boye: “Nazalaki nkandankanda mpo nasepelaki te na disiplini oyo nazwaki.” Azalaki komitungisa ndenge oyo bandeko mosusu na lisangá bakotalela ye. Alobi boye: “Esalaki mwa basanza mpo nakóma kotalela disiplini na ndenge moko ya malamu mpe natyela lisusu Yehova mpe ebongiseli na ye motema.” Nini esalisaki ndeko Bernardo abongola makanisi na ye?
9 Ndeko Bernardo asembolaki makanisi na ye. Alobi boye: “Ntango nazalaki nkulutu, nazalaki kosalela Baebre 12:7 mpo na kosalisa basusu bátalela disiplini ya Yehova na ndenge oyo ebongi. Sikoyo namitunaki boye: ‘Nani asengeli kosalela vɛrsɛ oyo?’ Basaleli nyonso ya Yehova, ata mpe ngai.” Na nsima, ndeko Bernardo asalaki bambongwana mpo na kotyela lisusu Yehova mpe ebongiseli na ye motema. Akómaki kotánga Biblia mingi mpe kokanisa na mozindo makambo oyo azalaki kotánga. Atako azalaki kaka komitungisa mpo na ndenge oyo bandeko bazalaki kotalela ye, azalaki kosakola elongo na bango, koyanganaka na makita mpe kopesaka biyano na makita ya lisangá. Nsukansuka, ndeko Bernardo azongelaki mokumba na ye ya nkulutu. Ndenge moko na ndeko Bernardo, soki ozwi disiplini na lisangá, kokanisa mingi te nsɔni oyo ozali koyoka, kasi ndimá disiplini mpe salá bambongwana oyo esengeli. * (Mas. 8:33; 22:4) Soki osali bongo, okomindimisa ete Yehova akopambola yo na ndenge otikali sembo epai na ye mpe ebongiseli na ye.
NTANGO TOZALI KOSALA MAKASI MPO NA KOMESANA NA BAMBONGWANA OYO EZALI KOSALEMA NA EBONGISELI YA YEHOVA
10. Mbongwana nini emekaki bosembo ya mibali mosusu ya Yisraele?
10 Bambongwana oyo esalemaka na ebongiseli ya Yehova ekoki komeka bosembo na biso. Soki tokebi te, ekoki kokabola biso ná Yehova. Na ndakisa, meká kokanisa ndenge oyo Bayisraele mosusu bazalaki komiyoka ntango oyo bambongwana ezalaki kosalema na nse ya Mibeko ya Moize. Liboso ete mobeko etyama, batata ya mabota bazalaki kosala makambo oyo banganga-nzambe bakómaki kosala. Bazalaki kotonga bitumbelo mpe kopesa Yehova bambeka mpo na mabota na bango. (Eba. 8:20, 21; 12:7; 26:25; 35:1, 6, 7; Yobo 1:5) Kasi ntango mobeko etyamaki, batata ya mabota basengelaki kotika mokumba yango. Yehova aponaki bato ya libota ya Arona mpo bázala banganga-nzambe mpo na kopesa bambeka. Nsima ya mbongwana wana oyo esalemaki na ebongiseli ya Yehova, soki tata moko ya libota oyo azali te mokitani ya Arona, akómi kosala makambo lokola nganga-nzambe, asengelaki kobomama. * (Lev. 17:3-6, 8, 9) Mbala mosusu ekoki kozala mpo na mbongwana yango nde Kora, Datane, Abirame, mpe bankumu 250 ya Yisraele batɛmɛlaki Moize ná Arona? (Mit. 16:1-3) Toyebi mpenza te. Ezala bongo to te, Kora mpe baninga na ye batikalaki sembo te epai ya Yehova. Soki mbongwana moko oyo esalemi na ebongiseli ya Yehova emeki bosembo na yo, okosala nini?
11. Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa ya balevi ya libota ya Kohate?
11 Pesáká mabɔkɔ na bambongwana oyo ezali kosalema na ebongiseli ya Yehova. Ntango bazalaki na mobembo na esobe, Bakohate bazalaki kokokisa mokumba moko ya ntina mingi. Ntango nyonso oyo Bayisraele bazalaki kolongola kaa, Bakohate mosusu bazalaki komema sanduku ya kondimana liboso ya ekólo mobimba. (Mit. 3:29, 31; 10:33; Yos. 3:2-4) Ezalaki libaku moko malamu mpenza! Kasi, makambo ebongwanaki ntango Bayisraele bakɔtaki na Mokili ya Ndaka. Esɛngaki lisusu te komema mbala na mbala sanduku. Na yango, ntango Salomo azalaki koyangela, Bakohate mosusu bazwaki mokumba ya kozala bayembi, ndambo na bango bazalaki kotɛlɛma lokola bakɛngɛli na baporte mpe basusu bazalaki kosala na bisika ya kobomba biloko ya kolya. (1 Nt. 6:31-33; 26:1, 24) Makomami emonisi ata esika moko te ete Bakohate bazalaki komilelalela to kosɛnga mikumba ya minene lokola oyo bazalaki na yango liboso. Yango ekoki koteya biso nini? Tosengeli kopesaka mabɔkɔ na motema mobimba na bambongwana nyonso oyo ezali kosalema na ebongiseli ya Yehova ata soki yango ebongoli mokumba na biso. Sepelá na mokumba nyonso oyo bapesi yo. Kobosana te ete ezali te mokumba oyo ozali na yango nde esali ete ozala na motuya mingi na miso ya Yehova. Yehova asepelaka na botosi na yo koleka mokumba nini oyo okoki kozala na yango.—1 Sa. 15:22.
12. Ndeko Zaina ayokaki ndenge nini ntango basɛngaki ye alongwa na Betele mpe batindaki ye lokola mobongisi-nzela monene?
12 Tótalela ndakisa ya Zaina, ndeko mwasi moko oyo afandaka na Moyen-Orient, oyo mokumba na ye ebongwanaki mpe abungisaki mokumba oyo azalaki kolinga mingi. Nsima ya kolekisa mbula 23 na Betele, batindaki ye lokola mobongisi-nzela monene. Alobi boye: “Mbongwana yango esalaki ngai mpasi mingi mpenza. Namiyokaki ete nazangi ntina mpe nazalaki komituna boye: ‘Likambo nini ya mabe nasali?’” Likambo ya mawa, bandeko mosusu ya lisangá babakiselaki ye mpasi ntango bazalaki koloba na ye ete: “Soki ozalaki makasi na mosala, mbɛlɛ ebongiseli ya Yehova elingaki kobimisa yo na Betele te.” Na bantango mosusu, Zaina alɛmbaki nzoto mpe azalaki kolela butu nyonso. Kasi alobi ete: “Yango esalaki te ete nakóma na bantembe mpo na ebongiseli ya Yehova mpe bolingo na ye mpo na ngai.” Nini esalisaki Zaina abatela makanisi malamu?
13. Ndeko Zaina asalaki nini mpo na kolongola makanisi ya mabe oyo azalaki na yango?
13 Ndenge nini ndeko Zaina alongolaki makanisi ya mabe oyo azalaki na yango? Azalaki kotánga mikanda oyo ezalaki na masolo oyo etali likambo oyo ekómelaki ye, yango esalisaki ye ayikela yango mpiko. Lisolo “Okoki kolonga ezaleli ya kolɛmba nzoto!” oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/02/2001 esalisaki ye mingi. Lisolo yango elobeli ndenge Marko mokomi moko ya Biblia amiyokaki lokola ndeko Zaina, ntango mikumba na ye ebongwanaki. Ndeko Zaina alobi boye: “Ndakisa ya Marko ezalaki nkisi oyo esalisaki ngai natika komiyoka ete nalɛmbi nzoto.” Ndeko Zaina azalaki ntango nyonso elongo na baninga na ye. Azalaki te kolinga kozala kaka ye moko to koboya kosakola elongo na bandeko mpe atikaki kozala mawamawa. Alobi ete na nzela ya elimo santu ya Yehova, nde ebongiseli na ye ezwaka bikateli mpe bandeko oyo bazalaki kokamba basalisaki ye mpenza. Kasi ayebaki mpe ete eloko oyo ezali na ntina na ebongiseli ya Yehova ezali ete mosala na ye esalema.
14. Mpo na nini ezalaki mpasi mpo na ndeko Vlado amesana na mbongwana oyo esalemaki na ebongiseli ya Yehova, kasi nini esalisaki ye?
14 Vlado, nkulutu moko ya mbula 73 oyo afandaka na Slovénie, atungisamaki ntango basangisaki lisangá na bango ná lisangá mosusu mpe bayebisaki bango ete bakosalela lisusu te Ndako ya Bokonzi na bango. Alobi boye: “Nazalaki komituna ntina oyo balobaki na biso ete tokosalela lisusu te Ndako ya Bokonzi wana ya kitoko. Nayokaki mpasi mpo toutaki kobongisa ndako yango kala mingi te. Nazali mosali ya mabaya, mpe ngai nde nasalaki biloko mosusu ya sika. Mpe kobongisa lisusu makambo esɛngaki kobongola makambo mingi mpe yango ezalaki pɛtɛɛ te mpo na biso basakoli oyo tokómi mibange.” Nini esalisaki ndeko Vlado atosa litambwisi yango? Alobi boye: “Komesana na bambongwana oyo ezali kosalema na ebongiseli ya Yehova ememaka ntango nyonso mapamboli. Bambongwana wana ya mike ezali kobongisa biso mpo na bambongwana ya minene oyo ekosalema na mikolo ezali koya.” Ozali komitungisa mpo na bambongwana oyo etali ndenge basangisi lisangá na bino ná lisangá mosusu to mpo mokumba na yo ebongwani? Yebá ete Yehova ayebi ndenge ozali komiyoka. Ntango ozali kopesa mabɔkɔ na bambongwana yango mpe otikali sembo epai ya Yehova mpe ebongiseli oyo azali kosalela, okozwa mapamboli.—Nz. 18:25.
BATELÁ MAKANISI NA YO NA MAKAMBO NYONSO
15. Ndenge nini tokoki kobatela makanisi na biso ntango tokutani na mikakatano na kati ya lisangá?
15 Lokola tozali kokóma na nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, tokoki mpe komizela ete tokokutana na mikakatano na kati ya lisangá. Mikakatano yango ekoki komeka bosembo na biso epai ya Yehova. Mpo na yango, tosengeli kobatela makanisi na biso. Soki ndeko moko asaleli yo makambo na bosembo te, kokóma nkandankanda te. Soki ozwi disiplini, kotya makanisi te kaka na nsɔni oyo ozali koyoka, ndimá toli mpe salá bambongwana oyo esengeli. Mpe ntango mbongwana moko esalemi na ebongiseli ya Yehova oyo etaleli yo, ndimá yango na motema moko mpe tosá litambwisi oyo epesami.
16. Ndenge nini okoki kokoba kotyela Yehova mpe ebongiseli na ye motema?
16 Osengeli kokoba kotyela Yehova mpe ebongiseli na ye motema ntango bosembo na yo emekami. Kasi mpo na kosala bongo, osengeli kobatela makanisi na yo, elingi koloba, kofanda nyɛɛ, kokanisa malamu mpe kotalela makambo ndenge oyo Yehova atalelaka yango. Zwá ekateli ya koyekola masolo ya Biblia ya bato oyo balongaki mikakatano ndenge moko na oyo ya yo mpe manyolá na bandakisa na bango. Bondelá Yehova asalisa yo. Mpe kolinga te kozala mosika na bandeko ya lisangá. Mpe ata soki likambo nini ekómi, Satana akokoka te kokabola yo ná Yehova mpe ebongiseli na ye.—Yak. 4:7.
LOYEMBO 126 Kɛngɛláká, tɛlɛmá ngwi, zalá makasi
^ Bosembo na biso epai ya Yehova mpe ebongiseli na ye ekoki komekama, mingimingi ntango tozali kokutana na mikakatano oyo eutaka na kati ya lisangá. Lisolo oyo ekolobela kaka mikakatano misato na kati na yango mpe makambo oyo tokoki kosala mpo tótikala sembo epai ya Yehova mpe ebongiseli na ye.
^ Topesi bango bankombo mosusu.
^ Okoki kozwa makanisi mosusu oyo ekoki kosalisa yo na lisolo “Obungisá mikumba na yo? Okoki kozongela yango?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/08/2009, lokasa 30.
^ Mobeko esɛngaki na batata ya mabota ete soki balingi koboma nyama ya mboka mpo na kolya mosuni basengelaki komema yango na tabernakle. Mobeko yango etalelaki te batata ya mabota oyo bazalaki kofanda mosika na tabernakle.—Mib. 12:21.