Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 47

Kotika eloko moko te ekabola yo ná Yehova

Kotika eloko moko te ekabola yo ná Yehova

“Natyeli yo motema, Ee Yehova.”​—NZ. 31:14.

LOYEMBO 122 Tópikama makasi, tóninganaka te!

NA MOKUSE *

1. Ndenge nini toyebi ete Yehova alingi kopusana penepene na biso?

 YEHOVA asɛngi biso tópusana penepene na ye. (Yak. 4:8) Alingi kozala Nzambe, Tata, mpe moninga na biso. Ayanolaka na mabondeli na biso mpe asalisaka biso na ntango ya mpasi. Lisusu asalelaka ebongiseli na ye mpo na koteya biso mpe kobatela biso. Kasi tosengeli kosala nini mpo tópusana penepene na Yehova?

2. Ndenge nini tokoki kopusana penepene na Yehova?

2 Topusanaka penepene na Yehova ntango tobondelaka ye, totángaka Liloba na ye, mpe tomanyolaka yango. Ntango tosalaka bongo, tomonisaka ete tolingaka ye mpe tozalaka na botɔndi. Yango etindaka biso tótosa ye mpe tókumisa ye mpo abongi na yango. (Em. 4:11) Soki tozali koyekola makambo mingi mpo na koyeba Yehova, tokotyela ye lisusu motema mingi mpe ebongiseli oyo atyá mpo na kosalisa biso.

3. (a) Na kotalela Nzembo 31:13, 14, ndenge nini Zabolo alukaka kokabola biso ná Yehova? (b) Nini ekosalisa biso tótika te Nzambe na biso mpe ebongiseli na ye?

3 Kasi Zabolo alukaka kokabola biso ná Yehova, mingimingi ntango tozali kokutana na mikakatano. Ndenge nini asalaka yango? Alukaka mokemoke kotinda biso tótika kotyela Yehova mpe ebongiseli na ye motema. Kasi tokoki komibatela na mayele na ye wana. Soki kondima na biso ezali makasi mpe totyeli Yehova motema na biso mobimba, tokotika te Nzambe na biso mpe ebongiseli na ye.​—Tángá Nzembo 31:13, 14.

4. Tokolobela nini na lisolo oyo?

4 Na lisolo oyo, tokolobela makambo misato oyo ekoki kouta na libándá ya lisangá; mokomoko na yango ekoki kosala ete tótika kotyela Yehova mpe ebongiseli na ye motema. Ndenge nini makambo yango ekoki kokabola biso ná Yehova? Mpe tokoki kosala nini mpo tótikala sembo epai ya Yehova mpe ebongiseli na ye?

NTANGO TOZALI KOKUTANA NA MIKAKATANO

5. Ndenge nini mikakatano ekoki kotinda biso tótika kotyela Yehova mpe ebongiseli na ye motema?

5 Na bantango mosusu, tokutanaka na mikakatano, na ndakisa, botɛmɛli ya libota to kobungisa mosala. Ndenge nini mikakatano yango ekoki kotinda biso tótika kotyela ebongiseli ya Yehova motema mpe kokabola biso ná ye? Ntango tozali kokutana na mikakatano oyo ezali koumela, tokoki kobungisa elikya mpe kolɛmba nzoto. Satana asalelaka ntango ya ndenge wana mpo na kotinda biso tókanisa ete Yehova alingaka biso te. Zabolo alingaka kotinda biso tókanisa ete Yehova mpe ebongiseli na ye nde babimiselaka biso bampasi. Likambo ya ndenge wana ekómelaki Bayisraele mosusu na Ezipito. Na ebandeli, bandimaki ete Yehova aponaki Moize ná Arona mpo na kosikola bango na boombo. (Kob. 4:29-31) Kasi na nsima, ntango Farao akómisaki bomoi na bango mpasi, babandaki koloba mabe mpo na Moize mpe Arona mpo na mikakatano na bango, bayebisaki bango boye: “[Bino] bokómisi biso eloko ya nsolo mabe epai ya Farao mpe epai ya basaleli na ye, na kotyáká mopanga na lobɔkɔ na bango mpo báboma biso.” (Kob. 5:19-21) Balobaki mabe mpo na basaleli ya sembo ya Nzambe. Ezalaki likambo ya mawa! Soki ozali kokoba koyika mpiko na mikakatano oyo ezali koumela, ndenge nini okoki kokoba lisusu kotyela Yehova mpe ebongiseli na ye motema?

6. Na kotalela Habakuku 3:17-19, mateya nini tozwi epai ya mosakoli Habakuku na oyo etali koyikela mikakatano mpiko?

6 Sopelá Yehova motema na yo na libondeli, mpe luká lisalisi na ye. Mosakoli Habakuku akutanaki na mikakatano mingi. Na ntango moko boye, emonani ete akómaki komituna soki Yehova azalaki kotyela ye likebi. Na yango, abondelaki Yehova mpe ayebisaki ye ndenge azalaki komiyoka. Alobaki boye: “Ee Yehova, kino ntango nini nakobelela mpo na kosɛnga lisalisi, mpe yo okoyoka te? . . . [Mpo na nini] ozali kokoba kotala motungisi?” (Hab. 1:2, 3) Yehova ayanolaki na libondeli oyo mosaleli na ye ya sembo asalaki na motema mobimba. (Hab. 2:2, 3) Nsima ya komanyola na misala ya kobikisa ya Yehova, Habakuku akómaki lisusu na esengo. Akómaki kondima ete Yehova azalaki kotyela ye likebi mpe akosalisa ye ayikela mokakatano nyonso mpiko. (Tángá Habakuku 3:17-19.) Yango eteyi biso nini? Ntango tozali kokutana na mikakatano, tosengeli kobondela Yehova mpe koyebisa ye ndenge tozali komiyoka. Na nsima, tosengeli koluka lisalisi na ye. Soki tosali bongo, tokoki kondima ete Yehova akopesa biso makasi oyo tosengeli na yango mpo na koyika mpiko. Mpe ntango tokomona ete asalisi biso, kondima na biso ekokóma lisusu makasi.

7. (a) Likambo nini bandeko ya Shirley balukaki kondimisa ye? (b) Nini esalisaki ye abatela kondima na ye epai ya Yehova?

7 Kobá kozala na mimeseno malamu ya elimo. Tótala ndenge kosala bongo esalisaki Shirley, ndeko mwasi moko na Papouasie-Nouvelle-Guinée, ntango akutanaki na mikakatano. * Libota ya Shirley ezalaki na bozwi mingi te mpe na bantango mosusu bazalaki kozanga mbongo mpo na kosomba biloko ya kolya. Ndeko na ye moko ya mobali alukaki kotinda ye atika kotyela Yehova motema. Alobaki boye: “Olobi ete elimo santu ya Nzambe ezali kosalisa yo, kasi lisalisi ezali wapi? Libota ezali kaka na bobola. Ozali kolekisa ntango na yo mpamba na kosakola.” Shirley alobi boye: “Namitunaki boye: ‘Nzambe akipaka biso to te?’ Na yango, nabondelaki Yehova na mbala moko mpe nayebisaki ye makambo nyonso oyo nazalaki kokanisa. Nakobaki kotánga Biblia mpe mikanda na biso, mpe nakobaki kosakola mpe koyangana na makita.” Eumelaki te abandaki komona ete Yehova azalaki kosalisa libota na bango. Bazalaki kozanga bilei te, mpe bazalaki na esengo. Shirley alobi boye: “Namonaki ete Yehova azalaki koyanola na mabondeli na ngai.” (1 Tim. 6:6-8) Soki okangami na mimeseno na yo ya elimo, yo mpe okotika te ete mikakatano to bantembe ekabola yo ná Yehova.

NTANGO BAZALI KOSALELA BANDEKO OYO BAZALI KOKAMBA NA LISANGÁ MAKAMBO NA BOSEMBO TE

8. Nini ekoki kokómela bandeko oyo bazali kokamba na ebongiseli ya Yehova?

8 Na nzela ya bashɛni ya radio to ya televizyo mpe basite Internet ya kosolola na baninga, banguna na biso bakoki kopanza bansango ya lokuta mpo na bandeko mibali oyo bazali kokamba na ebongiseli ya Yehova. (Nz. 31:13) Bandeko mosusu bazali kokanga bango mpe kofunda bango ete bazali basali-mabe. Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bakutanaki mpe na likambo ya bongo ntango bakoselaki ntoma Paulo makambo mpe bakangaki ye na bolɔkɔ. Basalaki nini?

9. Bakristo mosusu basalaki nini ntango ntoma Paulo azalaki na bolɔkɔ?

9 Bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso batikaki kosalisa ntoma Paulo ntango azalaki na bolɔkɔ na Roma. (2 Tim. 1:8, 15) Mpo na nini? Bazalaki koyokela Paulo nsɔni mpo bato bazalaki kotalela ye lokola mosali-mabe? (2 Tim. 2:8, 9) To bazalaki kobanga mpo bango mpe bakonyokola bango? Ezala mpo na bantina nini, kanisá ndenge ntoma Paulo amiyokaki na ntango wana. Ayikelaki mikakatano mingi mpiko mpe atyaki bomoi na ye na likama mpo na bango. (Mis. 20:18-21; 2 Ko. 1:8) Tosengeli soki moko te kozala lokola bato oyo basundolaki ntoma Paulo na ntango oyo azalaki na mposa ya lisalisi! Makambo nini tosengeli kobosana te ntango bazali konyokola bandeko oyo bazali kokamba na lisangá?

10. Makambo nini tosengeli kobosana te ntango bazali konyokola bandeko oyo bazali kokamba na lisangá, mpe mpo na nini?

10 Kobosana te ntina oyo bato banyokolaka biso mpe nani nde asalaka ete bányokola biso. 2 Timote 3:12 elobi: “Baoyo nyonso bazali na mposa ya kozala na bomoi na ezaleli ya kokangama na Nzambe na boyokani na Kristo Yesu bango mpe bakonyokwama.” Na yango, tosengeli kokamwa te komona ndenge Satana abundisaka bandeko oyo bazali kokamba na lisangá. Alingaka ete bandeko yango bátika kozala sembo epai ya Yehova mpe alingaka kobangisa biso.​—1 Pe. 5:8.

Atako ntoma Paulo azalaki na minyɔlɔlɔ, Onezifore asungaki ye na mpiko nyonso. Lelo oyo, bandeko na biso ya basi mpe ya mibali basungaka bandeko na bango bakristo oyo bazali na bolɔkɔ, ndenge elilingi oyo emonisi yango (Talá paragrafe 11-12)

11. Na kotalela 2 Timote 1:16-18, ndakisa ya Onezifore eteyi biso nini?

11 Kobá kopesa bandeko oyo bazali kokamba na lisangá mabɔkɔ mpe kangamá na bango na bosembo mpenza. (Tángá 2 Timote 1:16-18.) Mokristo moko ya siɛklɛ ya liboso na nkombo Onezifore akesanaki na basusu mpo asalisaki ntoma Paulo ntango azalaki na bolɔkɔ. “Ayokelaki minyɔlɔlɔ [ya Paulo] nsɔni te.” Kutu, Onezifore alukaki ntoma Paulo, mpe ntango azwaki ye, alukaki ndenge ya malamu ya kosalisa ye. Ntango asalaki bongo, Onezifore atyaki bomoi na ye na likama. Yango eteyi biso nini? Tosengeli te kotika kobanga bato ebangisa biso to epekisa biso tósalisa bandeko na biso oyo bazali konyokola bango. Na esika ya kosundola bango, tiká tókɔtela bango mpe tósala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa bango. (Mas. 17:17) Bazalaka na mposa ya bolingo mpe lisungi na biso.

12. Liteya nini tozwi epai ya bandeko na biso ya basi mpe ya mibali ya Russie?

12 Tótalela ndenge oyo bandeko na biso ya basi mpe ya mibali na Russie basalaka mpo na kosalisa bandeko na bango bakristo oyo bazali na bolɔkɔ. Ntango basusu basambaka na tribinale, bandeko mingi ya basi mpe ya mibali bayaka na tribinale mpo na kopesa bango mabɔkɔ. Yango eteyi biso nini? Ntango bazali kosalela bandeko oyo bazali kokamba na lisangá makambo na bosembo te, bakangi bango, to bazali konyokola bango, tosengeli kobanga te. Tosengeli kobondela mpo na bango, kotyela bandeko na bango ya libota likebi, mpe koluka ndenge malamu ya kosalisa bango.​—Mis. 12:5; 2 Ko. 1:10, 11.

NTANGO BAZALI KOTYOLA BISO

13. Ndenge oyo bato batyolaka biso ekoki kosala ete tótika kotyela Yehova mpe ebongiseli na ye motema? Limbolá.

13 Bandeko na biso ya libota oyo bazali Batatoli te, baninga na biso ya mosala to ya kelasi bakoki kotyola biso mpo tozali kosakola to kotosa mibeko ya Yehova na oyo etali malamu ná mabe. (1 Pe. 4:4) Bakoki koloba boye: “Nazali moto lokola yo, kasi lingomba na yo ezali na mibeko oyo eleki makasi mpe na makambo ya kala.” Mbala mosusu basusu batyolaka biso mpo na ndenge oyo tosalelaka baoyo balongolami na lisangá makambo mpe balobaka boye: “Ndenge nini bokoki komibenga bato oyo balingaka basusu?” Maloba lokola oyo wana ekoki kotinda biso tómituna soki mibeko ya Yehova ezali sembo. Tokoki kobanda komilobela boye: ‘Yehova asɛngaka ngai makambo oyo eleki makasi? Ebongiseli na ye etondi na bipekiseli?’ Soki ozali kokutana na likambo ya bongo, ndenge nini okoki kozala ntango nyonso penepene na Yehova mpe ebongiseli na ye?

Yobo aboyaki kondima lokuta ya baninga na ye ya mabe oyo bazalaki kotyola ye. Kutu, azalaki na ekateli ya kobatela bosembo na ye epai ya Yehova (Talá paragrafe 14)

14. Na kotalela Nzembo 119:50-52, tosengeli kosala nini ntango basusu bazali kotyola biso mpo tozali kotosa mibeko ya Yehova?

14 Zalá na ekateli ya kopesa mibeko ya Yehova mabɔkɔ. Yobo azalaki moto oyo azalaki kopesa mibeko ya Yehova mabɔkɔ atako bazalaki kotyola ye mpo asalaki bongo. Moko ya baninga mabe ya Yobo alukaki mpe kondimisa ye ete ezalaki na ntina te na miso ya Nzambe soki Yobo azalaki kotosa mibeko na ye to te. (Yobo 4:17, 18; 22:3) Kasi Yobo aboyaki kondima lokuta wana. Ayebaki ete mibeko ya Yehova na oyo etali malamu ná mabe ezali sembo, mpe azalaki na ekateli ya kopesa yango mabɔkɔ. Atikaki nzela te ete basusu bábebisa bosembo na ye. (Yobo 27:5, 6) Yango eteyi biso nini? Tótika te ete ndenge oyo bato batyolaka biso etinda biso tókóma komituna soki mibeko ya Yehova ezali sembo to te. Tókanisa makambo oyo ekómelaka biso na bomoi. Mbala mingi tomonaka ete bomoi na biso ezali malamu mpenza ntango tosalaka makambo oyo Yehova asɛngaka biso. Yango wana, zalá ntango nyonso na ekateli ya kozala na ebongiseli ya Yehova oyo etosaka makambo oyo Yehova asɛngaka biso. Na yango, ezala bato batyoli biso ndenge nini, tokotika soki moke te kosalela Yehova.​—Tángá Nzembo 119:50-52.

15. Mpo na nini batyolaki ndeko mwasi Brizit?

15 Tózwa ndakisa ya Brizit, ndeko mwasi moko na Inde. Bandeko na ye ya libota bazalaki kotyola ye mpo na kondima na ye. Mwa moke nsima ya kozwa batisimo na mobu 1997, mobali na ye oyo azalaki Motatoli te abungisaki mosala na ye. Yango wana, mobali na ye azwaki ekateli ete ye, Brizit, mpe bana na bango ya basi bákende kofanda esika moko na baboti ya mobali, oyo bazalaki kofanda na engumba mosusu. Kasi Brizit akutanaki na mikakatano mosusu ya mpasi mpenza. Lokola mobali na ye azalaki na mosala te, azalaki kosala mosala makasi mpo na kosunga libota na ye. Lisusu, lisangá oyo ezalaki pene, ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 350. Likambo ya mawa, mobali na ye atɛmɛlaki ye mpo na kondima na ye. Botɛmɛli yango ekómaki lisusu makasi mpenza, mpe yango esalaki ete libota ya Brizit elongwa mpe ekende na esika mosusu. Longola yango, na mbalakaka, mobali na ye akufaki. Na nsima, mwana na ye moko ya mwasi akufaki na kanser wana azalaki kaka na mbula 12. Mpo na kokómisa makambo ndongo, bandeko ya Brizit mpe bakómaki kolobela ye mabe mpo na makambo oyo esalemaki. Balobaki na ye ete soki azalaka Motatoli ya Yehova te, mbɛlɛ makambo wana nyonso elingaki kosalema te. Atako bongo, akobaki kotyela Yehova motema mpe akangamaki na ebongiseli na ye.

16. Ndenge nini Yehova apambolaki ndeko Brizit mpo atikalaki sembo epai na ye mpe ebongiseli na ye?

16 Lokola ndeko Brizit azalaki kofanda mosika mpenza na lisangá, mokɛngɛli ya zongazonga alendisaki ye asakolaka na esika oyo azali kofanda mpe asalaka makita na ndako na ye. Na ebandeli, amonaki ete ezalaki likambo moko ya mpasi. Kasi atosaki toli oyo bapesaki ye. Azalaki kosakwela basusu nsango malamu, kosala makita na ndako na ye, mpe atyaki programɛ ya kosala losambo na kati ya libota elongo na bana na ye ya basi. Yango ebimisaki matomba nini? Ndeko Brizit azalaki koyekola na bato mingi Biblia, mpe bayekoli na ye mingi bazwaki batisimo. Na mobu 2005 akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Lokola atyelaki Yehova motema mpe atikalaki sembo na ebongiseli na ye, azwaki mapamboli. Bana na ye ya basi bazali kosalela Yehova na bosembo, mpe sikoyo ezali na masangá mibale na esika yango! Brizit andimi ete Yehova apesaki ye makasi ya koyika mpiko na mikakatano na ye mpe kotyola ya bandeko na ye ya libota.

TIKALÁ SEMBO EPAI YA YEHOVA MPE EBONGISELI NA YE

17. Tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini?

17 Satana alingaka kondimisa biso ete Yehova akosundola biso ntango tokutani na mikakatano mpe makambo ekokóma ndongo soki tokobi kopesa ebongiseli ya Yehova mabɔkɔ. Satana alingaka kobangisa biso ntango bazali kokosela bandeko oyo bazali kokamba na lisangá makambo, konyokola bango, to kokanga bango. Lisusu asalelaka kotyola mpo na kotinda biso tóboya kotya motema na mibeko ya Yehova mpe ebongiseli na ye. Kasi, lokola toyebi malamu mayele na ye ya mabe, yango wana akokosa biso te. (2 Ko. 2:11) Zalá na ekateli ya koboya lokuta ya Satana mpe ya kotikala sembo epai ya Yehova mpe ebongiseli na ye. Kobosana te ete Yehova akosundola yo soki moke te. (Nz. 28:7) Na yango, kotika eloko moko te ekabola yo ná Yehova!​—Rom. 8:35-39.

18. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

18 Na lisolo oyo, tolobeli mikakatano oyo tokoki kokutana na yango na libándá ya lisangá. Kasi, mikakatano oyo eutaka na kati ya lisangá ekoki mpe komeka biso mpo tótika kotyela Yehova mpe ebongiseli na ye motema. Ndenge nini tokoki kolonga koyika mpiko na mikakatano ya ndenge wana? Tokolobela yango na lisolo oyo elandi.

LOYEMBO 118 “Bakiselá biso kondima”

^ Mpo tóyika mpiko na bosembo nyonso na mikolo oyo ya nsuka, tosengeli kokoba kotyela Yehova mpe ebongiseli na ye motema. Zabolo asalelaka komekama mpo na kotinda biso tótika kotyela Yehova motema. Lisolo oyo ekolobela makambo misato oyo Zabolo asalaka mpe makambo oyo tokoki kosala mpo tótikala sembo epai ya Yehova mpe ebongiseli na ye.

^ Topesi bango bankombo mosusu.