Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

“Nalingaki kosalela Yehova”

“Nalingaki kosalela Yehova”

TOPƐPAKI mbote na etuluku moko ya bato oyo tokendaki kotala pene na mboka Granbori, oyo ezali na kati ya zamba ya Suriname. Lisusu, tokendaki na bwato moko ya mabaya na ebale Tapanahoni. Na nsima, wana tozalaki kokatisa ebale mbangumbangu, motɛrɛ ya bwato etutaki libanga moko. Na mbala moko, liboso ya bwato yango ezindaki na ebale mpe tozindaki na mai. Nakómaki kobanga makasi. Atako namesanaki kosala mibembo na bwato na ebale bambula mingi lokola mokɛngɛli ya zongazonga, nayebaki te kobɛta mai!

Liboso nalobela makambo oyo esalemaki na nsima, tiká nayebisa bino ndenge nakɔtaki na mosala ya ntango nyonso.

Nabotamá na mobu 1942 na esanga kitoko ya Caraïbe na Curaçao. Tata na ngai autaki na Suriname, kasi akendeki na esanga yango mpo na mosala. Mwa bambula liboso nabotama, akómaki moko ya Batatoli ya Yehova oyo bazwaki batisimo na Curaçao. * Tata azalaki koyekola na biso Biblia pɔsɔ nyonso, atako tozalaki kosepela koyekola te. Ntango nazalaki na mbula 14, tata na ngai amemaki libota na biso na Suriname mpo na kobatela mama na ye oyo akómaki mobange.

BANINGA MALAMU BASALISAKI NGAI

Na Suriname, nasalaki boninga ná bilenge basi mpe mibali oyo bazalaki kosalela Yehova na molende. Balekaki ngai mwa moke na mbula mpe bazalaki babongisi-nzela ya sanza na sanza. Ntango bazalaki kolobela makambo oyo bazalaki kokutana na yango na mosala ya kosakola, esengo ezalaki komonana na bilongi na bango. Nsima ya makita, ngai ná baninga na ngai tozalaki kobɛta masolo ya Biblia, mpe na bantango mosusu tozalaki kofanda libándá na butu. Baninga yango basalisaki ngai nakokisa makambo oyo nakanaki kosala na bomoi na ngai; nalingaki kosalela Yehova. Na yango, nazwaki batisimo ntango nazalaki na mbula 16. Na nsima, ntango nakómaki na mbula 18, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza.

NAYEKOLAKI MATEYA YA NTINA MINGI

Ntango nazalaki mobongisi-nzela na Paramaribo

Nayekolaki mateya mingi lokola nazalaki mobongisi-nzela, mpe yango esalisaki ngai na mosala na ngai ya ntango nyonso. Na ndakisa, likambo ya libosoliboso oyo nayekolaki ezalaki ntina ya kopesa basusu formasyo. Ntango nabandaki mosala ya mobongisi-nzela, misionɛrɛ moko na nkombo Willem van Seijl atyelaki ngai likebi. * Ateyaki ngai makambo mingi na oyo etali ndenge ya kokokisa mikumba na lisangá. Na ntango wana, nakanisaki te ete nazalaki mpenza na mposa ya formasyo. Mbula oyo elandaki nakómaki mobongisi-nzela monene mpe na nsima nabandaki kosalisa bituluku ya bandeko basi mpe mibali oyo bazalaki kofanda mosika na kati ya zamba ya Suriname. Nasepelaki makasi na formasyo oyo bandeko bapesaki ngai! Banda wana, nakómaki komekola ndakisa na bango ya kopesa basusu formasyo.

Likambo ya mibale oyo nayekolaki ezalaki matomba ya kozala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ mpe oyo ebongisami malamu. Na ebandeli ya sanza nyonso, ngai ná moninga na ngai ya mosala tozalaki kobongisa biloko ya kobikela oyo tosengelaki na yango mpo na bapɔsɔ oyo ekolanda. Na yango, moko na biso azalaki kosala mobembo mokolo mobimba na mboka-mokonzi mpo na kosomba biloko oyo tozalaki na yango mposa. Tosengelaki kosalela malamu mbongo oyo tozalaki kozwa sanza nyonso mpe biloko na biso ya kolya mpo ekómisa biso na nsuka ya sanza. Ntango tozalaki kozanga eloko moko atako tozalaki kofanda na zamba, moto moko to bato moke bazalaki kosalisa biso. Nandimi ete koyekola kozala na bomoi ezangi mindɔndɔ na bolenge mpe komibongisa malamu esalisaki ngai nakoba kotya makanisi na mosala ya Yehova na bomoi na ngai mobimba.

Likambo ya misato oyo nayekolaki ezalaki litomba ya koteya bato na minɔkɔ ya mboka na bango. Nayekolaki koloba monɔkɔ ya Néerlandais, ya Anglais, ya Papiamento, mpe ya Sranantongo (eyebani mpe na nkombo Sranan), monɔkɔ oyo bato mingi balobaka na Suriname. Kasi na bamboka ya zamba, namonaki ete bato bazalaki kosepela mingi na nsango malamu ntango tozalaki kosakwela bango na minɔkɔ ya mboka na bango. Namonaki ete koloba minɔkɔ yango mosusu ezalaki mpasi, na ndakisa, monɔkɔ ya Saramaccan, oyo esɛngaka komatisa mpe kokitisa mongongo. Kasi, milende oyo nasalaki ekendaki na mai te. Na boumeli ya bambula, nakómaki na likoki ya koteya bato mingi solo mpo nakokaki koloba na minɔkɔ ya mboka na bango.

Tiká nalobela bino likambo moko ya nsɔni oyo ekómelaki ngai. Na ndakisa, mokolo moko natunaki mwasi moko, moyekoli ya Biblia, oyo alobaka monɔkɔ ya Saramaccan mpo na koyeba soki azalaki komiyoka ndenge nini, mpo azalaki koyoka libumu mpasi. Kasi motuna oyo natunaki ye ezalaki ya koyeba soki azalaki na zemi! Na ntembe te, motuna wana eyokisaki ye nsɔni. Atako nazalaki kosala mabunga lokola oyo wana, nazalaki ntango nyonso komeka koloba monɔkɔ ya bato ya teritware na ngai.

NANDIMAKI MIKUMBA MOSUSU OYO BAPESAKI NGAI

Na mobu 1970, nakómaki mokɛngɛli ya zongazonga. Na mbula yango, nazalaki kolakisa bituluku ya bandeko oyo bazalaki kofanda mosika na bamboka ya zamba bililingi ya programɛ ya “Viziti ya biro monene ya Batatoli ya Yehova.” Mpo tókóma epai na bango, ngai ná bandeko mosusu tozalaki kosala mibembo na bwato moko ya molai ya mabaya na ebale. Tomemaki na bwato na biso motɛrɛ moko ya kura, tɔnɔ moko ya esansi, mpe bisaleli ya kolakisa bililingi. Ntango tokómaki na esika oyo tozalaki kokende, tozalaki komema bisaleli nyonso ya kolakisa bililingi na bamboka oyo tosengelaki kolakisa yango. Na mibembo oyo tosalaki, nazali komikundola ndenge bato mingi bazalaki kosepela na programɛ yango. Nazalaki na esengo mingi ya kosalisa basusu báyeba Yehova mpe eteni ya ebongiseli na ye awa na mabele. Komona ndenge nasalaki mosala makasi mpo na kosalisa bato mosusu bápusana penepene na Yehova epesaka ngai esengo mingi.

KOTONGA BANSINGA MISATO

Ngai ná Ethel tobalanaki na sanza ya 09/1971

Atako namonaki matomba ya kozala monzemba na mosala ya Yehova, kasi nazalaki kaka na mposa ya kobala. Na yango, nabandaki kobondela na bosikisiki mpenza mpo nazwa mwasi oyo akosepela kosala elongo na ngai na mosala ya ntango nyonso na teritware wana ya mpasi. Mbula moko na nsima, nalakaki kobala Ethel, mobongisi-nzela moko monene oyo azalaki na elimo ya komipimela. Banda bolenge na ye, Ethel azalaki kosepela na ntoma Paulo mpe alingaki komipesa na mosala ya kosakola lokola Paulo. Tobalanaki na sanza ya 09/1971 mpe nabandaki kosala elongo na ye na mosala ya zongazonga.

Ethel akolaki na libota oyo bazalaki na biloko mingi te ya kobikela, yango esalisaki ye amesana na mosala ya mokɛngɛli-motamboli na bamboka ya zamba. Na ndakisa, ntango tozalaki komibongisa mpo na kokende kotala masangá oyo ezalaki mosika na kati ya zamba, tozalaki komema biloko mingi te. Tozalaki kosukola nzoto mpe bilamba na bibale. Tomesanaki mpe kolya biloko nyonso oyo bandeko bazalaki kopesa biso, na ndakisa, nyama babengi iguanes, mpe mbisi babengi piranhas, to nyama nyonso mosusu oyo bazalaki kokanga na bokila na zamba to mbisi oyo bazalaki kokanga na bibale. Ntango tozalaki kozanga saani ya kolyela, tozalaki kosalela nkasa ya bitabe. Ntango tozalaki kozanga balutu mpe bakanya, tozalaki kolya na mabɔkɔ. Ngai ná Ethel tomoni ete komonisa elongo elimo ya komipimela mpo na kosalela Yehova, esalisi biso tósala nsinga moko oyo esalemi na bansinga misato. (Mos. 4:12) Ezali ata na eloko moko te oyo tokoki kokokanisa na makambo oyo tokutanaki na yango na mosala ya Yehova!

Mokolo moko, wana tozalaki kozonga nsima ya viziti uta na teritware moko ya mosika na kati ya zamba, tokutanaki na likambo oyo nalobaki na ebandeli ya lisolo na ngai. Ntango bwato ezalaki kotíyola mbangumbangu, nsima ya ntango moke ezindaki na mai mpe eumelaki te emataki na likoló. Tobikaki mpo tolataki bilamba ya mai (gilet de sauvetage), mpe bwato ebalusaki biso te. Kasi bwato na biso etondaki na mai. Tobwakaki bilei oyo ezalaki na banzungu na biso na ebale mpe na nsima tosalelaki banzungu yango mpo na kopɛpa mai na bwato.

Lokola tobungisaki bilei na biso, tokómaki kokanga bambisi wana tozalaki kokoba mobembo na biso na ebale. Kasi tozalaki kokanga eloko moko te. Yango wana, tobondelaki Yehova mpe tosɛngaki ye apesa biso bilei na biso mpo na mokolo. Kaka nsima ya kobondela, ndeko moko abwakaki monyama na kati ya mai mpe tozwaki mbisi moko ya monene oyo biso mitano tolyaki na butu wana mpe totondaki.

MOBALI, TATA, MPE MOKƐNGƐLI-MOTAMBOLI

Nsima ya kosala elongo mbula mitano na mosala ya mokɛngɛli-motamboli, ngai ná Ethel tozwaki lipamboli oyo tozalaki komizela na yango te, elingi koloba, tokokóma baboti. Nasepelaki koyoka nsango wana, atako nayebaki mpenza te eloko nini ekokómela biso. Ngai ná Ethel tozalaki na mposa makasi ya kokoba mosala ya ntango nyonso soki esengeli. Na mobu 1976, Ethniël mwana na biso ya liboso ya mobali abotamaki. Mbula mibale na ndambo na nsima, Giovanni mwana na biso ya mibale ya mobali abotamaki.

Na esika oyo bato bazalaki kozwa batisimo na ebale Tapanahoni pene na Godo Holo na Ɛsti ya Suriname​—1983

Lokola na ntango wana mposa ezalaki makasi na Suriname, biro ya filiale ezwaki bibongiseli mpo nakoba kosala lokola mokɛngɛli ya zongazonga wana tozalaki kobɔkɔla bana na biso. Ntango bana na biso bakómaki bilenge, bapesaki ngai kaka mwa masangá mpo nakendaka kotala. Yango ezalaki kopesa ngai nzela ya kosala pɔsɔ mibale sanza nyonso lokola mokɛngɛli-motamboli mpe mikolo oyo etikalaki na sanza nazalaki kosala lokola mobongisi-nzela na lisangá oyo nazalaki. Ethel mpe bana na biso bazalaki kokende elongo na ngai ntango nazalaki kokende kotala masangá oyo ezalaki mosika te na ndako na biso. Kasi, nazalaki kokende ngai moko na masangá mpe na mayangani na bamboka ya mosika na zamba.

Na mosala ya zongazonga, nazalaki mbala na mbala kosala mibembo na bwato mpo na kokende kotala masangá oyo ezalaki mosika mpenza

Nasengelaki kobongisa makambo malamumalamu mpo nakokisa mikumba na ngai nyonso. Nazalaki kosala nyonso mpo tósalaka losambo na kati ya libota pɔsɔ nyonso. Ntango nazalaki kokende kotala masangá mosika na zamba, Ethel azalaki kotambwisa losambo na kati ya libota elongo na bana na ndako. Soki esengeli, tozalaki kosala makambo elongo. Ngai ná Ethel tozalaki mpe kolekisa mbala na mbala ntango elongo na bana, elingi koloba, kominanola, kosakana to kokende kotala bisika ya kitoko. Mbala mingi nazalaki kolekisa bangonga mingi na butu liboso ya kolala mpo na kobongisa mikumba ya Teokrasi. Longola yango, Ethel, azali mwasi ya makoki oyo Masese 31:15 elobeli, azalaki kolamuka ntɔngɔ makasi mpo na komindimisa ete tokozala na likoki ya kotánga mokapo ya mokolo na libota mpe kobongisa biloko ya kolya liboso bana bákende na kelasi. Nazali na botɔndi ya kozala na mwasi oyo azali na elimo ya komipimela mpe azali ntango nyonso kosalisa ngai nakokisa mikumba oyo Yehova apesi ngai!

Lokola baboti, tozalaki kosala makasi mpo na kosalisa bana bálinga Yehova mpe mosala ya kosakola. Tolingaki ete bana na biso bápona mosala ya ntango nyonso na bomoi na bango, ezala te mpo ezalaki makambo oyo tolingaki básala, kasi mpo bango moko baponaki kosala yango. Tozalaki kolobela bango mbala na mbala esengo oyo mosala ya ntango nyonso epesaka. Kozanga kobosana mikakatano, tozalaki kolobela ndenge Yehova asalisaki biso mpe apambolaki biso lokola libota. Tozalaki mpe kosala nyonso ete bana na biso bálekisaka ntango elongo na bandeko oyo batyaka Yehova na esika ya liboso na bomoi na bango.

Yehova azalaki kopesa biso biloko nyonso oyo tozalaki na yango mposa wana tozalaki kobɔkɔla bana na biso. Ya solo, nasalaki nyonso mpo na kosunga libota na ngai. Makambo oyo nakutanaki na yango na mosala ya mobongisi-nzela monene na mboka ya zamba ntango nazalaki monzemba, eteyaki ngai nabombaka mbongo mpo na kosomba biloko oyo tozalaki na yango mposa. Kasi, atako tosalaki nyonso oyo tosengelaki kosala, na bantango mosusu, tozalaki te na eloko nyonso oyo tozalaki na yango mposa. Na bantango wana, nandimi ete Yehova azalaki kosalisa biso. Na ndakisa, kobanda na mobu 1986 tii na mobu 1992, etumba ya bana-mboka ekɔtaki na Suriname. Na bambula yango, na bantango mosusu ezalaki mpasi kozwa biloko ya ntina. Atako bongo, Yehova azalaki kokokisa bamposa na biso.​—Mat. 6:32.

SOKI NAKANISI LISUSU BOMOI NA NGAI

Kobanda na lobɔkɔ ya mwasi tii na lobɔkɔ ya mobali: Elongo na mwasi na ngai, Ethel

Mwana na biso ya liboso ya mobali, Ethniël, elongo na mwasi na ye, Natalie

Mwana na biso ya mibale ya mobali, Giovanni, elongo na mwasi na ye, Christal

Na bomoi na biso mobimba, Yehova azalaki ntango nyonso kokokisa bamposa na biso mpe asalisaki biso tózala na esengo mpe tósepela na biloko oyo tozalaki na yango. Bana na biso bazalaki lipamboli moko monene mpo na biso, mpe kobɔkɔla bango mpo na kosalela Yehova ezalaki libaku moko malamu. Tozali na esengo ndenge bango mpe baponaki kosala mosala ya ntango nyonso na bomoi na bango. Ethniël mpe Giovanni bango nyonso bazwaki diplome na biteyelo ya Teokrasi mpe sikoyo bazali kosala na biro ya filiale na Suriname elongo na basi na bango.

Ngai ná Ethel tokómi sikoyo mibange mpenza, kasi tozali kokoba kosala mingi na mosala ya Yehova lokola babongisi-nzela monene. Yango wana, lokola tozali na mingi ya kosala, tozwi naino te ntango ya koyekola kobɛta mai! Kasi nazali koyoka mawa te mpo na yango. Soki nakanisi lisusu bomoi na ngai, namoni na bosembo mpenza ete ekateli oyo nazwaki banda bolenge ya komipesa na mosala ya ntango nyonso ezalaki ekateli oyo eleki malamu na bikateli malamu oyo nakokaki kozwa na bomoi na ngai.

^ Lisolo ya Willem van Seijl, La réalité a dépassé mes attentes, oyo ebimaki na Lamuká! ya 08/10/1999, na Français.