Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Mordekai azalaki mpenza moto ya solo?

MOYUDA moko na nkombo Mordekai akokisaki mokumba moko ya ntina oyo mokanda ya Estere elobeli. Azalaki Moyuda oyo bamemaki na bokangami mpe azalaki kosala na ndako ya mokonzi ya Perse. Ezalaki na mobu 496 L.T.B., “na mikolo ya [Mokonzi] Ahasueruse.” (Mokonzi yango ayebani mpe lelo oyo na nkombo Zerezese I.) Ntango ayokaki nsango ete balingi koboma mokonzi, Mordekai abimisaki sekele yango. Mpo na komonisa botɔndi, mokonzi azwaki bibongiseli ete bato nyonso bápesa Mordekai lokumu. Na nsima, mokonzi akómisaki Mordekai ministre-mokonzi nsima ya liwa ya Hamane, oyo azalaki monguna ya Mordekai mpe ya Bayuda mosusu. Lokola azalaki ministre-mokonzi, Mordekai asalaki ete bábimisa mobeko moko oyo ebikisaki Bayuda na Ampire ya Perse mpo bábomama te.​—Estere 1:1; 2:5, 21-23; 8:1, 2; 9:16.

Mwa bambula na ebandeli ya siɛklɛ ya 20, bato ya istware balobaki ete mokanda ya Estere ezali lisapo mpamba, mpe Mordekai azalaki moto ya solo te. Kasi na mobu 1941, bato ya arkeoloji bazwaki biloko oyo ekoki kozala bilembeteli oyo emonisi ete makambo oyo Biblia elobi mpo na Mordekai ezali solo. Biloko nini bazwaki?

Bato oyo basalaka bolukiluki bamonaki makomi ya cuneiforme ya Perse oyo elobeli moto moko na nkombo Marduka (na Lingala Mordekai). Asalaki lokola kapita, ekoki kozala azalaki kosala mosala ya kobomba mbongo, na engumba Shushane. Arthur Ungnad, moto moko ya istware na Moyen-Orient, alobaki ete longola Biblia, makomi ya cuneiforme ezalaki “kaka mokanda moko oyo elobelaki Mordekai” na ntango wana.

Banda Ungnad alobaki bongo, bato oyo balimbolaka maloba ya Biblia babandaki kobongola bankóto ya makomi mosusu ya cuneiforme ya Perse. Na ndakisa, bitanda ya Persépolis ezali mpe na kati na yango, oyo ezali na bitiká oyo ezali na esika ya kobomba biloko ya motuya, pene ya bifelo ya engumba yango. Bitanda yango ezali ya ntango ya boyangeli ya Zerezese I. Ezali na monɔkɔ ya Elame mpe etondi na bankombo oyo ezali na mokanda ya Estere. *

Ndenge nkombo Mordekai (Marduka) ezali komonana na makomi ya cuneiforme ya Perse

Bitanda mingi ya Persépolis elobeli nkombo Marduka, oyo asalaki lokola mokomeli ya mokonzi na ndako ya mokonzi na engumba Shushane na boumeli ya boyangeli ya Zerezese I. Etanda moko emonisi ete Marduka azalaki mobongoli. Mwa makambo wana ya mikemike eyokani na makambo oyo Biblia elobi mpo na Mordekai. Azalaki moto oyo azalaki kosala na ndako ya Mokonzi Ahasueruse (Zerezese I) mpe azalaki koloba minɔkɔ mibale to koleka. Mordekai azalaki kofanda mbala na mbala na porte ya ndako ya mokonzi na Shushane. (Estere 2:19, 21; 3:3) Porte yango ya mokonzi ezalaki ndako monene epai bato oyo basalaka na ndako ya mokonzi bazalaki kosala.

Bokokani ezali kati na makambo ya ntina oyo bitanda wana elobi mpo na Marduka mpe makambo oyo Biblia elobi mpo na Mordekai. Bazalaki na eleko moko mpe esika moko mpe basalaki lokola bakapita na esika kaka moko ya mosala. Bokokani wana nyonso emonisi ete biloko oyo bato ya arkeoloji bamoni ekoki kozala na boyokani na makambo oyo mokanda ya Estere elobi mpo na Mordekai.

^ Na mobu 1992, Profesɛrɛ Edwin Yamauch akomaki lisolo moko oyo atángaki bankombo zomi na makomi ya Persépolisi, mpe bankombo yango ezali mpe na mokanda ya Estere.