Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 45

Yehova asalisaka biso tókokisa mosala na biso ya kosakola

Yehova asalisaka biso tókokisa mosala na biso ya kosakola

“Ya solo, bakoyeba mpe ete mosakoli moko azalaki na kati na bango.”​—EZK. 2:5.

LOYEMBO 67 “Sakolá Liloba”

NA MOKUSE *

1. Tokoki komizela na nini, mpe tokoki komindimisa na likambo nini?

 TOKOKI komizela ete tokokutana na botɛmɛli wana tozali kokokisa mosala na biso ya kosakola. Botɛmɛli yango ekoki kokóma lisusu makasi na mikolo ezali koya. (Dan. 11:44; 2 Tim. 3:12; Em. 16:21) Atako bongo, tokoki komindimisa ete Yehova akopesa biso lisalisi oyo tozali na yango mposa. Mpo na nini? Mpo Yehova asalisaka ntango nyonso basaleli na ye mpo bákokisa mikumba na bango, ata soki ezali mpasi ndenge nini. Mpo na yango, tiká tótalela mwa makambo oyo ekómelaki mosakoli Ezekiele, oyo asakwelaki Bayuda oyo bazalaki bakangami na Babilone.

2. (a) Na kotalela Ezekiele 2:3-6, Yehova alobaki nini mpo na bato oyo Ezekiele asengelaki kosakwela? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Ezekiele asengelaki kosakwela bato ya ndenge nini? Yehova alobelaki bango lokola bato ya “elongi ya lofundo,” ya “motema makasi,” mpe “batomboki.” Bazalaki kopesa mpasi lokola nzubɛ mpe bazalaki mabe lokola bankotó. Yango wana, Yehova alobaki na Ezekiele mbala na mbala boye: “Kobanga bango te”! (Tángá Ezekiele 2:3-6.) Ezekiele akokaki kokokisa mokumba na ye ya kosakola mpo (1) Yehova nde atindaki ye, (2) elimo santu ya Yehova epesaki ye makasi oyo asengelaki na yango, mpe (3) Liloba ya Nzambe ekómisaki kondima na ye makasi. Ndenge nini makambo wana misato esalisaki Ezekiele? Mpe ndenge nini esalisaka biso lelo oyo?

YEHOVA ATINDAKI EZEKIELE

3. (a) Maloba nini esengelaki kopesa Ezekiele makasi? (b) Ndenge nini Yehova amonisaki ete akosalisa ye?

3 Yehova ayebisaki Ezekiele boye: “Nazali kotinda yo.” (Ezk. 2:3, 4) Maloba yango esengelaki kopesa Ezekiele makasi. Mpo na nini? Na ntembe te, amikundolaki ndenge Yehova asalelaki mpe maloba yango ntango atindaki Moize mpe Yisaya, oyo bazalaki basakoli na ye. (Kob. 3:10; Yis. 6:8) Ezekiele ayebaki mpe ndenge Yehova asalisaki basakoli wana mibale bákokisa mikumba ya mpasi oyo bazalaki na yango. Na yango, ntango Yehova ayebisaki Ezekiele mbala mibale boye: “Nazali kotinda yo,” Ezekiele azalaki na ntina ya kotya motema na lisalisi ya Yehova. Longola yango, na mokanda ya Ezekiele, tozali kokuta maloba oyo ezongelami mbala na mbala: “Liloba ya Yehova eyelaki ngai.” (Ezk. 3:16) Lisusu, maloba “liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai” ezongelami mbala na mbala. (Ezk. 6:1) Na ntembe te, Ezekiele andimaki ete Yehova nde atindaki ye. Lisusu, tata ya Ezekiele azalaki nganga-nzambe, mpe mbala mosusu ateyaki Ezekiele ndenge oyo Yehova azalaki ntango nyonso koloba na basakoli na ye ete akosalisa bango. Yehova alobaki na Yisaka, Yakobo, mpe Yirimia maloba oyo: “Nazali elongo na yo.”​—Eba. 26:24; 28:15; Yir. 1:8.

4. Maloba nini ya kobɔndisa esengelaki kopesa Ezekiele makasi?

4 Ndenge nini Bayisraele mingi bakotalela nsango oyo Ezekiele akosakwela bango? Yehova alobaki: “Ndako ya Yisraele, bango bakolinga te koyoka yo, mpo bazali kolinga koyoka ngai te.” (Ezk. 3:7) Lokola baboyaki Ezekiele, baboyaki mpe Yehova. Maloba yango endimisaki Ezekiele ete akokisaki mokumba na ye malamu atako bato baboyaki koyoka ye. Longola yango, Yehova andimisaki Ezekiele ete ntango bitumbu ya lisambisi ekokokisama, bato “bakoyeba mpe ete mosakoli moko azalaki na kati na bango.” (Ezk. 2:5; 33:33) Na ntembe te, maloba wana ya kobɔndisa epesaki Ezekiele makasi oyo asengelaki na yango mpo na kokokisa mosala na ye ya kosakola.

YEHOVA ATINDI BISO LELO OYO

Ndenge moko na Ezekiele, bato bakoki koboya koyoka nsango na biso mpe kotɛmɛla biso, kasi toyebi ete Yehova azali elongo na biso (Talá paragrafe 5-6)

5. Na kotalela Yisaya 44:8, epai wapi tozwaka makasi?

5 Biso mpe tozwaka makasi mpo toyebi ete Yehova nde atindi biso. Apesi biso lokumu na ndenge abengi biso “batatoli” na ye. (Yis. 43:10) Oyo nde libaku malamu mpenza! Kaka ndenge Yehova ayebisaki Ezekiele ete: “Kobanga te,” Yehova ayebisi biso: “Bózala na nsɔmɔ te.” Mpo na nini tosengeli te kobanga bato oyo batɛmɛlaka biso? Ndenge moko na Ezekiele, Yehova nde atindi biso mpe asungaka biso.​—Tángá Yisaya 44:8.

6. (a) Ndenge nini Yehova alaki ete akosunga biso? (b) Nini ebɔndisaka biso mpe epesaka biso makasi?

6 Yehova alaki ete akosunga biso. Na ndakisa, liboso Yehova aloba ete: “Bino bozali batatoli na ngai,” alobaki: “Soki oleki na mai, nakozala elongo na yo; mpe soki oleki na bibale, ekozindisa yo te. Soki otamboli na mɔtɔ, okozika te, lolemo ya mɔtɔ mpe ekotumba yo te.” (Yis. 43:2) Wana tozali kokokisa mosala na biso ya kosakola, mbala mosusu tokoki kokutana na mikakatano oyo ezali lokola mpela mpe komekama oyo ezali mpasi lokola mɔtɔ. Atako bongo, na lisalisi ya Yehova, tokobaka kosakola. (Yis. 41:13) Ndenge moko na mikolo ya Ezekiele, bato mingi lelo oyo baboyaka nsango na biso. Tobatelaka na makanisi ete tozali kokokisa mosala na biso malamu atako bato baboyi koyoka nsango na biso. Tobɔndisamaka mpe tozwaka makasi mpo toyebi ete Yehova asepelaka ntango tokobaka na bosembo nyonso kosakola nsango na ye. Ntoma Paulo alobaki boye: “Moto na moto akozwa mbano na ye na kolanda mosala na ye mpenza ya makasi.” (1 Ko. 3:8; 4:1, 2) Ndeko mwasi moko oyo aumeli na mosala ya mobongisi-nzela alobi boye: “Epesaka ngai esengo ya koyeba ete Yehova asepelaka na milende oyo tosalaka.”

ELIMO YA NZAMBE EPESAKI EZEKIELE MAKASI

Ezekiele amoni emonaneli moko ya likalo ya Yehova kuna na likoló, oyo ekómisi kondima na ye makasi ete Yehova akosalisa ye akokisa mosala na ye (Talá paragrafe 7)

7. Ndenge nini Ezekiele azalaki komiyoka ntango azalaki kokanisa emonaneli oyo amonaki? (Talá elilingi ya ezipeli.)

7 Ezekiele amonaki ndenge elimo ya Nzambe ezali na nguya. Na emonaneli moko, amonaki ndenge elimo santu ezali kosala mosala likoló ya bikelamu ya elimo ya nguya mpe likoló ya bibakata ya bayiká ya likalo kuna na likoló. (Ezk. 1:20, 21) Ezekiele asalaki nini? Akomaki makambo oyo amonaki. Alobaki boye: “Ntango namonaki yango, nakweaki elongi na nse.” Na ntembe te, Ezekiele ayokaki nsɔmɔ mpenza, mpe akweaki na mabele. (Ezk. 1:28) Na nsima, ntango nyonso oyo Ezekiele azalaki kokanisa emonaneli ya nsɔmɔ oyo amonaki, yango ekómisaki kondima na ye makasi ete akokokisa mosala na ye ya kosakola na lisalisi ya elimo ya Nzambe.

8-9. (a) Yehova asɛngaki Ezekiele asala nini? (b) Ndenge nini Yehova apesaki lisusu Ezekiele makasi mpo na teritware na ye oyo ezalaki mpasi?

8 Yehova apesaki Ezekiele motindo oyo: “Mwana ya moto, tɛlɛmá na makolo na yo mpo naloba na yo.” Na nzela ya etinda oyo azwaki mpe elimo santu ya Nzambe, Ezekiele azwaki makasi oyo asengelaki na yango mpo atɛlɛma uta na mabele. Ezekiele akomaki boye: “Elimo ebandaki kokɔtela ngai . . . mpe etɛlɛmisaki ngai na makolo na ngai.” (Ezk. 2:1, 2) Na nsima mpe na boumeli ya mosala na ye ya kosakola, “lobɔkɔ” ya Nzambe, elingi koloba, elimo santu ya Nzambe ezalaki kotambwisa Ezekiele. (Ezk. 3:22; 8:1; 33:22; 37:1; 40:1) Elimo ya Nzambe epesaki Ezekiele makasi mpo akokisa mokumba oyo azwaki, elingi koloba, mokumba ya kosakwela bato ya teritware na ye oyo bazalaki “motó makasi mpe motema makasi.” (Ezk. 3:7) Yehova ayebisaki Ezekiele boye: “Nakómisi elongi na yo makasi lokola bilongi na bango mpe motó na yo makasi lokola mitó na bango. Nakómisi motó na yo lokola diama, makasi koleka libanga ya silekise. Osengeli kobanga bango te, mpe osengeli koyoka bilongi na bango nsɔmɔ te.” (Ezk. 3:8, 9) Na yango, ezali lokola Yehova alobaki na Ezekiele boye: ‘Kotika te motema makasi ya bato elɛmbisa yo nzoto. Nakopesa yo makasi.’

9 Na nsima, elimo ya Nzambe ezalaki kosunga Ezekiele na mosala na ye ya kosakola. Ezekiele akomaki boye: “Lobɔkɔ ya Yehova ezalaki makasi likoló na ngai.” Ezwaki mosakoli pɔsɔ moko mobimba mpo alya nsango oyo asengelaki koyebisa bato mpe afandisa yango na motema na ye. (Ezk. 3:14, 15) Na nsima, Yehova asɛngaki ye akende na lobwaku ya patatalu epai “elimo ekɔtelaki [ye].” (Ezk. 3:23, 24) Ezekiele abongamaki mpo na kobanda mosala na ye ya kosakola.

ELIMO YA NZAMBE EPESAKA BISO MAKASI

Ndenge moko na Ezekiele, nini esalisaka biso lelo oyo tókokisa mosala na biso ya kosakola? (Talá paragrafe 10)

10. Lisalisi nini tozali na yango mposa mpo na kokokisa mosala na biso ya kosakola, mpe mpo na nini?

10 Lisalisi nini tozali na yango mposa mpo na kokokisa mosala na biso ya kosakola? Mpo na kozwa eyano na motuna yango, kanisá lisusu makambo oyo ekómelaki Ezekiele. Liboso abanda mosala na ye ya kosakola, elimo ya Nzambe epesaki ye makasi oyo asengelaki na yango. Ndenge moko na Ezekiele, lelo oyo mpe tokoki kokokisa mosala na biso ya kosakola kaka na lisalisi ya elimo ya Nzambe. Mpo na nini? Mpamba te, Satana abundisaka biso mpo tótika kosakola. (Em. 12:17) Bato mingi bakanisaka ete Satana azali na makasi mingi mpe tokoki te kolonga etumba ná ye. Kasi na nzela ya mosala na biso ya kosakola, tozali kolonga ye! (Em. 12:9-11) Na ndenge nini? Ntango tosakolaka, tomonisaka ete tobangaka Satana te. Ntango nyonso oyo tosakolaka, tolongaka Satana. Na yango, tokoki koloba nini lokola tomoni ete tozali na likoki ya kokokisa mosala na biso ya kosakola atako botɛmɛli? Tokoki koloba ete elimo santu ezali kopesa biso makasi mpe Yehova azali kondima biso.​—Mat. 5:10-12; 1 Pe. 4:14.

11. (a) Elimo ya Nzambe ekoki kosala nini mpo na biso? (b) Ndenge nini tokoki kozwa yango?

11 Likambo nini mosusu toyekoli ntango tozali kokanisa ndenge Yehova apesaki Ezekiele makasi oyo asengelaki na yango mpo na kosakola? Elimo ya Nzambe ekoki kopesa biso makasi oyo tozali na yango mposa mpo na kolonga mikakatano nyonso oyo tokoki kokutana na yango na mosala na biso ya kosakola. (2 Ko. 4:7-9) Na yango, tokoki kosala nini mpo tómindimisa ete tozali ntango nyonso kozwa elimo ya Nzambe? Tosengeli kobondela mpo na yango na etingya mpenza, mpe kotya motema ete Yehova akoyoka mabondeli na biso. Yango wana, Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bókoba kosɛnga, . . . bókoba koluka, . . . bókoba kobɛta kɔkɔkɔ.” Na nsima, ayebisaki bango ete Yehova ‘akopesa baoyo bazali kosɛnga ye elimo santu.’​—Luka 11:9, 13; Mis. 1:14; 2:4.

LILOBA YA NZAMBE EKÓMISAKI KONDIMA YA EZEKIELE MAKASI

12. Na kotalela Ezekiele 2:9–3:3, rulo eutaki wapi, mpe nini ezalaki na kati?

12 Ezekiele azwaki makasi kaka na elimo ya Nzambe te, kasi mpe na Liloba ya Nzambe. Na emonaneli moko, Ezekiele amonaki lobɔkɔ moko esimbi rulo moko. (Tángá Ezekiele 2:9–3:3.) Rulo yango eutaki wapi? Mpe nini ezalaki na kati? Ndenge nini ekómisaki Ezekiele makasi? Tiká tótalela yango. Rulo yango eutaki na kiti ya bokonzi ya Nzambe. Na ndenge yango, Yehova asalelaki moko ya baanzelu minei oyo Ezekiele amonaki liboso mpo na komemela ye rulo yango. (Ezk. 1:8; 10:7, 20) Rulo yango ezalaki na maloba ya Nzambe, elingi koloba, nsango ya lisambisi oyo Ezekiele asengelaki koyebisa bakangami oyo bazalaki batomboki. (Ezk. 2:7) Nsango yango ekomamaki na bangámbo nyonso mibale ya rulo yango.

13. Yehova ayebisaki Ezekiele asala nini na rulo, mpe mpo na nini ezalaki elɛngi?

13 Yehova ayebisaki mosakoli na ye alya rulo yango mpo ‘atondisa misɔpɔ na ye na yango.’ Ezekiele atosaki mpe alyaki rulo yango mobimba. Eteni oyo ya emonaneli ezalaki kolimbola nini? Ezekiele asengelaki mpenza kokanga ntina ya nsango oyo asengelaki kosakola. Asengelaki kondima nsango yango mpo etinda ye asakwela bato. Na nsima, likambo moko ya kokamwa esalemaki. Ezekiele amonaki ete rulo yango “ekómaki elɛngi na monɔkɔ na [ye] lokola mafuta ya nzoi.” (Ezk. 3:3) Mpo na nini? Mpo na Ezekiele, lokumu ya kozala momonisi ya Yehova ezalaki likabo ya kitoko to ya kosepelisa. (Nz. 19:8-11) Azalaki na botɔndi ndenge Yehova andimaki kosalela ye lokola mosakoli.

14. Likambo nini esalisaki Ezekiele andima mokumba oyo bapesaki ye?

14 Na nsima, Yehova ayebisaki Ezekiele boye: “Maloba na ngai nyonso oyo nakoyebisa yo, tyá yango na motema na yo mpe yoká na matoi na yo.” (Ezk. 3:10) Na kotalela malako yango, Yehova ayebisaki Ezekiele abatela na makanisi na ye maloba oyo ekomami na rulo yango mpe amanyola yango. Ntango Ezekiele asalaki bongo, kondima na ye ekómaki makasi. Lisusu, rulo yango epesaki ye nsango moko ya nguya oyo asengelaki koyebisa bato. (Ezk. 3:11) Ntango Ezekiele akangaki mpenza ntina ya nsango ya Nzambe mpe andimaki yango, abongamaki mpo na kosakola mpe akobaki kosala yango tii mosala na ye ekómaki na nsuka.​—Nzembo 19:14.

LILOBA YA NZAMBE EKÓMISAKA KONDIMA NA BISO MAKASI

15. Mpo tókoba kosakola, likambo nini tosengeli ‘kotya na motema’?

15 Mpo tókoba kosakola, biso mpe tosengeli ntango nyonso kokómisa kondima na biso makasi na nzela ya Liloba ya Nzambe. Tosengeli ‘kotya na motema’ makambo nyonso oyo Yehova azali koyebisa biso. Lelo oyo, Yehova alobaka na biso na nzela ya Biblia, Liloba na ye oyo ekomami. Ndenge nini tokoki komindimisa ete Liloba ya Nzambe ezali kokoba kobongola makanisi na biso, mayoki na biso, mpe makambo oyo tosalaka?

16. (a) Tosengeli kosala nini na Liloba ya Nzambe? (b) Ndenge nini tokoki kokɔtisa yango na motema na biso?

16 Kaka ndenge tolyaka bilei ya mosuni mpe topemaka mwa moke nsima ya kolya mpo bilei yango etonga nzoto na biso, tosalaka mpe bongo mpo na kolya bilei ya elimo ntango totángaka Liloba ya Nzambe mpe tomanyolaka yango. Yango nde liteya oyo tozwi na likambo etali rulo yango. Yehova alingi ete ‘tótondisa misɔpɔ na biso na yango,’ elingi koloba, tókanga mpenza ntina ya Liloba na ye. Tokoki kosala bongo wana tozali kobondela, kotánga, mpe komanyola. Ya liboso, tobondelaka mpo na kobongisa motema na biso mpo makanisi ya Nzambe esimba yango. Ya mibale, totángaka Biblia. Na nsima, topemaka mwa moke mpo na komanyola mpe kokanisa na mozindo makambo oyo tozali kotánga. Nini ekosalema na nsima? Soki tozali komanyola mingi, tokokanga ntina ya Liloba ya Nzambe mpe ekokómisa kondima na biso makasi.

17. Mpo na nini ezali na ntina mingi komanyola makambo oyo tozali kotánga na Biblia?

17 Mpo na nini ezali na ntina mingi kotánga Biblia mpe komanyola yango? Kosala bongo epesaka biso makasi oyo tozali na yango mposa mpo na kosakola nsango ya Bokonzi sikoyo mpe mbala mosusu mpo na kosakola nsango ya lisambisi mosika te. Lisusu, ntango tozali komanyola na bizaleli kitoko ya Yehova, boyokani na biso ná ye ekokóma lisusu makasi. Yango wana, tokozala na eloko moko ya elɛngi to oyo esepelisaka mpenza, elingi koloba, kimya ya motema mpe esengo.​—Nz. 119:103.

TOLENDISAMI NA KOKOBA TII NA NSUKA

18. Bato ya teritware na biso bakoyeba likambo nini, mpe mpo na nini?

18 Na kokesana na Ezekiele, tozwaka emonaneli te mpo na kosakwela bato. Nzokande, tozali na ekateli ya kokoba kosakola nsango ya Nzambe oyo abatelaki na Liloba na ye, tii ntango ye moko akoloba ete mosala ekómi na nsuka. Ntango mokolo ya lisambisi ekoya, bato ya teritware na biso bakoloba te ete bakebisaki bango te to Nzambe atyelaki bango likebi te. (Ezk. 3:19; 18:23) Kasi, bakoyeba ete nsango oyo tosakwelaki bango eutaki na Nzambe.

19. Nini ekopesa biso makasi mpo tókokisa mosala na biso ya kosakola?

19 Nini ekopesa biso makasi mpo tókokisa mosala na biso ya kosakola? Makambo misato oyo epesaki Ezekiele makasi. Tokobaka kosakola mpo toyebi ete Yehova nde atindi biso, elimo santu ya Nzambe epesaka biso makasi, mpe Liloba na ye nde ekómisaka kondima na biso makasi. Na lisalisi ya Yehova, tolendisami na kokokisa mosala na biso ya kosakola mpe koyika mpiko “tii na nsuka.”​—Mat. 24:13.

LOYEMBO 65 Kende liboso!

^ Na lisolo oyo, tokotalela makambo misato oyo esalisaki mosakoli Ezekiele akokokisa mokumba na ye ya kosakola. Tokolobela ndenge oyo Yehova asalisaki mosakoli na ye, mpe yango ekosalisa biso tótya lisusu motema ete Yehova akosalisa biso tókokisa mosala na biso ya kosakola.