Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 46

Yehova asalisaka biso tózala na esengo mpe tóyika mpiko

Yehova asalisaka biso tózala na esengo mpe tóyika mpiko

“Yehova akokoba kozela mpo na komonisela bino boboto, mpe yango wana akotɛlɛma mpo na koyokela bino mawa.”​—YIS. 30:18.

LOYEMBO 3 Nguya na ngai, elikya na ngai, makasi na ngai

NA MOKUSE *

1-2. (a) Tokoyanola na mituna nini? (b) Nini emonisi ete Yehova azalaka na mposa makasi ya kosalisa biso?

 YEHOVA asalisaka biso tóyikela mikakatano ya bomoi mpiko mpe tózala na esengo na mosala mosantu oyo tosalelaka ye. Asalaka nini mpo na kosalisa biso? Mpe ndenge nini tokoki kozwa matomba mingi na lisalisi oyo Yehova apesaka biso? Lisolo oyo ekopesa biyano na mituna yango. Kasi, liboso tóyanola na mituna yango, tiká tótalela naino motuna oyo ya ntina: Yehova azalaka mpenza na mposa ya kosalisa biso?

2 Liloba oyo ntoma Paulo asaleli na mokanda na ye epai ya Baebre ekoki kosalisa biso tózwa eyano na motuna yango. Ntoma Paulo akomaki boye: “Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akoki kosala ngai nini?” (Ebr. 13:6) Mikanda oyo elimbolaka maloba ya Biblia emonisi ete ndenge basaleli liloba “mosungi” na vɛrsɛ oyo, ezali kolobela moto oyo azali kokima mbangu mpo na kosalisa moto oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi. Moná na makanisi ndenge Yehova azali kosala nokinoki mpo na kobikisa moto oyo azali na mpasi. Na ntembe te, okondima ete ndakisa oyo emonisi ete Yehova azalaka na mposa makasi ya kosalisa biso. Ntango Yehova asalisaka biso, tozalaka na esengo mpe toyikelaka mikakatano na biso mpiko.

3. Wapi makambo misato oyo Yehova asalaka mpo na kosalisa biso tózala na esengo mpe tóyikela mikakatano na biso mpiko?

3 Makambo nini mosusu Yehova asalaka mpo na kosalisa biso tózala na esengo mpe tóyikela mikakatano na biso mpiko? Mpo na koyanola na motuna oyo, tiká tótalela mokanda ya Yisaya. Mpo na nini? Mpamba te, bisakweli mingi oyo Yisaya akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe etaleli basaleli ya Nzambe lelo oyo. Lisusu, Yisaya alobeli Yehova mbala mingi na maloba oyo tokoki kokanga ntina na yango kozanga mindɔndɔ. Yisaya mokapo 30 ezali na mwa bandakisa ya maloba yango. Na mokapo yango, Yisaya asaleli bandakisa ya kitoko mpo na komonisa ndenge Yehova asalisaka basaleli na ye. Akomaki ete Yehova asalisaka biso (1) na ndenge ayokaka biso na likebi mpe ayanolaka na mabondeli na biso, (2) na ndenge atambwisaka biso, mpe (3) na ndenge apambolaka biso sikoyo mpe na mikolo ezali koya. Tokolobela makambo misato oyo Yehova asalaka mpo na kosalisa biso.

YEHOVA AYOKAKA BISO

4. (a) Yehova alobaki nini mpo na Bayuda oyo bazalaki na mikolo ya Yisaya, mpe nsukansuka atikaki nini ekómela bango? (b) Na kotalela Yisaya 30:18, 19, elikya nini Yehova apesaki bato ya sembo?

4 Na maloba ya ebandeli ya Yisaya mokapo 30, Yehova alobeli Bayuda lokola “bana ya motó makasi,” baoyo bazali “kobakisa lisumu likoló ya lisumu.” Abakisi boye: “Bazali batomboki, . . . oyo baboyá koyoka mobeko ya Yehova.” (Yis. 30:1, 9) Lokola bato baboyaki koyoka, Yisaya asakolaki ete Yehova akotika ete mpasi ekómela bango. (Yis. 30:5, 17; Yir. 25:8-11) Mpe yango esalemaki ntango bato ya Babilone bamemaki bango bakangami na Babilone. Atako bongo, ezalaki mpe na Bayuda mosusu oyo bazalaki sembo na kati na bango, mpe Yisaya apesaki bango nsango ya elikya. Ayebisaki bango ete mokolo moko Yehova akosala ete bázonga na mboka na bango. (Tángá Yisaya 30:18, 19.) Mpe yango nde esalemaki mpenza. Yehova abimisaki bango na bokangami na Babilone. Kasi, elekaki bambula mingi liboso Yehova asikola bango. Maloba “Yehova akokoba kozela mpo na komonisela bino boboto” emonisaki ete esengelaki mwa ntango eleka liboso bato ya sembo básikolama. Yango wana, Bayisraele balekisaki mbula 70 na bokangami na Babilone liboso bato oyo batikalaki bázonga na Yerusaleme. (Yis. 10:21; Yir. 29:10) Ntango Bayisraele bazongaki na ekólo na bango, mpisoli ya mawa oyo babimisaki ntango bazalaki na bokangami ebongolamaki na mpisoli ya esengo.

5. Yisaya 30:19 epesi biso elikya nini?

5 Lelo oyo, tokoki kobɔndisama na maloba oyo: “Ye akozanga te komonisela yo boboto ntango lokito ya koganga na yo ekoyokana.” (Yis. 30:19) Yisaya alendisi biso ete Yehova akoyoka biso na likebi mpenza soki koganga na biso ekómeli ye, mpe akoyanola na malɔmbɔ na biso kozanga koumela. Yisaya abakisi boye: “Ntango kaka akoyoka yango, akoyanola yo mpenza.” Maloba wana ya kokitisa motema ekundweli biso ete Tata na biso azalaka na mposa makasi ya kosalisa baoyo bazali kosɛnga ye lisalisi. Koyeba yango esalisaka biso tózala na esengo mpe tóyika mpiko.

6. Ndenge nini maloba ya Yisaya emonisi ete Yehova ayokaka mabondeli ya mosaleli na ye mokomoko?

6 Likambo nini mosusu vɛrsɛ yango eteyi biso na oyo etali mabondeli na biso? Yehova ayokaka na likebi mpenza mabondeli ya mokomoko na biso. Mpo na nini tolobi bongo? Na eteni ya liboso ya Yisaya mokapo 30, basaleli liloba “bino” oyo ezali na boike (pluriel) mpo Yehova azali koloba na bato na ye lokola etuluku. Kasi, na vɛrsɛ 19 basaleli liloba “yo;” yango emonisi ete nsango yango etaleli moto mokomoko. Yisaya akomi boye: “Okolela ata moke te. Ye akozanga te komonisela yo boboto ntango lokito ya koganga na yo ekoyokana, . . . akoyanola yo mpenza.” Lokola azali Tata ya bolingo, Yehova alobi te na mwana na ye ya mwasi to ya mobali oyo alɛmbi nzoto boye: “Osengeli kozala makasi lokola ndeko na yo ya mwasi to ya mobali.” Kasi, atyelaka biso likebi mpe ayokaka mabondeli na biso na likebi mpenza.​—Nz. 116:1; Yis. 57:15.

Yisaya alingaki koloba nini ntango alobaki: “Bótika [Yehova] kimya te”? (Talá paragrafe 7)

7. Ndenge nini Yisaya mpe Yesu bamonisi ntina oyo tosengeli kokoba kobondela?

7 Ntango tobondelaka Yehova Nzambe mpe toyebisaka ye makambo oyo etungisaka biso, akoki kopesa biso mbala moko makasi oyo tosengeli na yango mpo na koyikela makambo yango mpiko. Lisusu, soki mitungisi na biso esili noki te ndenge tokanisaki, tosengeli mbala na mbala kosɛnga Yehova apesa biso makasi ya koyikela yango mpiko. Asɛngi biso tósalaka bongo. Yango eyokani na maloba oyo ya Yisaya: “Bótika [Yehova] kimya te.” (Yis. 62:7) Yango elimboli nini? Tosengeli kobondela Yehova kozanga kotika lokola nde tolingi te ete azwa ntango ya kopema. Maloba wana ya Yisaya ekundweli biso ndakisa oyo Yesu apesaki na Luka 11:8-10, 13 na likambo etali libondeli. Na bavɛrsɛ yango, Yesu alendisi biso tóbondelaka na “mbamba makasi” mpe ‘tókoba kosɛnga’ elimo santu. Tosengeli mpe kosɛnga Yehova apesa biso litambwisi oyo tosengeli na yango mpo tózwa bikateli ya malamu.

YEHOVA ATAMBWISAKA BISO

8. Na ntango ya kala, ndenge nini maloba ya Yisaya 30:20, 21 ekokisamaki?

8 Tángá Yisaya 30:20, 21. Ntango limpinga ya basoda ya Babilone bazingaki Yerusaleme na boumeli ya mbula moko na ndambo, bato bakutanaki na mpasi makasi oyo bamesanaki na yango lokola limpa ná mai. Kasi na kotalela vɛrsɛ 20 mpe 21, Yehova alakaki Bayuda ete soki babongoli mpenza motema mpe babongwani mpenza, akobikisa bango. Yisaya abengaki Yehova “Molakisi na [bango] Monene,” mpe alakaki bato yango ete Yehova akoteya bango ndenge oyo andimaka básambela ye. Maloba yango ekokisamaki ntango Bayuda balongwaki na bokangami. Yehova amonisaki ete azalaki Molakisi na bango Monene, mpe na litambwisi na ye, basaleli na ye balongaki kozongisa losambo ya pɛto. Tozali na esengo lokola Yehova azali Molakisi na biso Monene lelo oyo.

9. Wapi lolenge moko oyo tozwaka litambwisi ya Yehova lelo oyo?

9 Na bavɛrsɛ yango, Yisaya alobi ete tozali lokola bana-kelasi oyo bazali koteyama na Yehova na lolenge mibale. Ya liboso, Yisaya alobi: “Miso na yo ekokóma mpenza miso oyo ezali komona Molakisi na yo Monene.” Na maloba yango, Yisaya amonisi ete Molakisi yango atɛmɛli liboso ya bana-kelasi. Ezali libaku malamu ndenge Nzambe azali koteya biso lelo oyo. Ndenge nini Yehova ateyaka biso? Ateyaka biso na nzela ya ebongiseli na ye. Tozali na botɔndi mpenza mpo na malako ya polele oyo tozwaka na ebongiseli na ye! Malako yango epesamaka na makita ya lisangá, na mayangani na biso, ezala mpe na mikanda, baemisyo ya TV JW, mpe makambo mosusu mingi esalisaka biso tózala na esengo mpe tóyikela mikakatano mpiko.

10. Na ndenge nini toyokaka “liloba nsima na [biso]”?

10 Yisaya alobeli lolenge ya mibale oyo Yehova ateyaka biso, ntango alobaki: “Matoi na yo ekoyoka liloba nsima na yo.” Na vɛrsɛ yango, Yisaya alobi ete Yehova azali lokola molakisi ya ekɛngɛ oyo azali kotambola nsima ya bana-kelasi, azali koyebisa bango nzela nini basengeli kokende mpo na kotambwisa bango. Lelo oyo toyokaka mongongo ya Nzambe nsima na biso. Na ndenge nini? Na nzela ya Biblia, maloba ya Nzambe oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo na ye eleki bambula mingi liboso na biso. Na yango, ntango totángaka Biblia, ezali lokola toyokaka mongongo ya Nzambe ezali koya nsima na biso.​—Yis. 51:4.

11. Mpo tózala na esengo mpe tóyika mpiko, makambo nini tosengeli kosala mpe mpo na nini?

11 Ndenge nini tozwaka mapamboli mingi na litambwisi oyo Yehova apesaka na nzela ya ebongiseli na ye mpe Liloba na ye? Simbá ete Yisaya alobaki makambo mibale. Ya liboso, “nzela yango oyo.” Ya mibale, “bótambola na yango.” (Yis. 30:21) Tosengeli kosuka kaka te na koyeba “nzela.” Tosengeli mpe ‘kotambola na yango.’ Liloba ya Yehova mpe bandimbola oyo tozwaka na ebongiseli na ye eteyaka biso makambo oyo Yehova asɛngaka biso. Toyekolaka mpe ndenge ya kosalela makambo oyo toyekolaka. Mpo tózala na esengo mpe tóyika mpiko na mosala oyo tosalelaka Yehova, tosengeli kosala makambo wana mibale. Kaka soki tosali bongo nde tokoki komindimisa ete akopambola biso.

YEHOVA APAMBOLAKA BISO

12. Na kotalela Yisaya 30:23-26, ndenge nini Yehova apambolaki basaleli na ye?

12 Tángá Yisaya 30:23-26. Ndenge nini esakweli oyo ekokisamaki mpo na Bayuda oyo bazongaki na mboka na bango Yisraele nsima ya bokangami na Babilone? Bazwaki mapamboli mingi ezala na mosuni mpe na elimo. Yehova apesaki basaleli na ye biloko mingi ya kolya. Kasi, likambo eleki ntina, apesaki bango eloko nyonso oyo basengelaki na yango mpo bápusana penepene na ye mpe bábanda lisusu kosambela ye na ndenge ebongi. Na ntango wana, basaleli ya Nzambe bazwá naino te liboso mapamboli ebele ndenge wana. Ndenge vɛrsɛ 26 emonisi yango, Yehova apesaki bango pole mingi, elingi koloba, asalisaki bango bákanga ntina ya Liloba na ye. (Yis. 60:2) Mapamboli oyo Yehova apesaki basaleli na ye esalisaki bango bákoba kosalela ye na esengo mpe na molende ‘na ndenge bayokaki malamu na motema.’​—Yis. 65:14.

13. Ndenge nini esakweli oyo etali kozongisama ya losambo ya pɛto ezali kokokisama lelo oyo?

13 Esakweli oyo etali kozongisama ya losambo ya pɛto etaleli mpe biso lelo oyo? Ɛɛ! Na ndenge nini? Kobanda na mobu 1919 ya ntango na biso, bato bazali kolongwa na boombo ya Babilone Monene, oyo ezali lisangá ya mangomba nyonso ya lokuta. Bazali kokamba bango na esika eleki malamu koleka Mokili ya Ndaka ya Yisraele. Bazali kokamba bango na paradiso ya elimo. (Yis. 51:3; 66:8) Paradiso yango ya elimo ezali nini?

14. (a) Paradiso ya elimo ezali nini? (b) Banani bazali kuna lelo oyo? (Talá Ndimbola ya maloba.)

14 Kobanda na mobu 1919 ya ntango na biso, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali na paradiso ya elimo. * Kendekende, baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele, elingi koloba, “bampate mosusu,” bazali mpe kokɔta na paradiso yango ya elimo mpe bazali kosepela na ebele ya mapamboli oyo Yehova azali kopesa.​—Yoa. 10:16; Yis. 25:6; 65:13.

15. Paradiso ya elimo ezalaka wapi?

15 Paradiso yango ya elimo ezalaka wapi? Basambeli ya Yehova bazali na mabele mobimba. Na yango, paradiso yango ya elimo ezali mpe na mokili mobimba. Yango wana, lelo oyo, ezala esika nini tozali na mabele, tokoki kozala na paradiso ya elimo wana tozali kopesa losambo ya solo mabɔkɔ na motema na biso mobimba.

Mokomoko na biso asengeli kosala nini mpo na kobatela kitoko ya paradiso ya elimo? (Talá paragrafe 16-17)

16. Ndenge nini tokoki kokoba komona kitoko ya paradiso ya elimo?

16 Mpo tótikala na paradiso ya elimo, tosengeli kokoba kozala na botɔndi mpo na lisangá ya bokristo na mokili mobimba. Ndenge nini tokoki kosala yango? Soki tozali kotala bizaleli malamu ya bandeko na biso kasi te mabunga na bango. (Yoa. 17:20, 21) Mpo na nini yango ezali mpenza na ntina? Tózwa ndakisa oyo. Tosepelaka kotala mitindo ndenge na ndenge ya banzete na parkɛ to elanga moko ya kitoko. Ndenge moko mpe, paradiso ya elimo oyo ezali na masangá lelo oyo, etondi na bato ndenge na ndenge oyo tokoki kokokanisa bango na banzete. (Yis. 44:4; 61:3) Tosengeli kosala makasi mpo tókoba kotala kitoko ya “zamba,” kasi te kotala mabe oyo ezali na “banzete” mokomoko oyo ezali pene na biso. Tokoki te kotika ete mabunga na biso moko to ya bandeko mosusu na lisangá epekisa biso tómona kitoko ya lisangá ya bokristo oyo ezali na bomoko na mokili mobimba.

17. Mokomoko na biso asengeli kosala nini mpo bomoko ezala na lisangá?

17 Mokomoko na biso asengeli kosala nini mpo na kobatela bomoko ya lisangá? Tosengeli kozala bato oyo batyaka kimya. (Mat. 5:9; Rom. 12:18) Mbala nyonso oyo tozalaka bato ya liboso mpo na kobatela boyokani ya malamu mpe kozala na kimya elongo na bandeko mosusu na lisangá, tobakisaka kitoko ya paradiso ya elimo. Tobosanaka te ete Yehova nde abendaka moto mokomoko oyo azali na paradiso ya elimo na losambo ya pɛto. (Yoa. 6:44) Kanisá esengo oyo Yehova ayokaka ntango amonaka milende oyo tosalaka mpo kimya mpe bomoko ezala makasi kati na basaleli na ye oyo bazali na motuya mingi na miso na ye!​—Yis. 26:3; Hag. 2:7.

18. Makambo nini tosengeli kokanisa na mozindo, mpe mpo na nini?

18 Ndenge nini tokoki kozwa matomba mingi na mapamboli oyo Nzambe apesaka basaleli na ye? Tokoki kokanisa na mozindo makambo oyo toyekolaka na Liloba ya Nzambe mpe na mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia. Koyekola mpe komanyola bongo ekosalisa biso tólona bizaleli ya bokristo oyo ekotinda biso tómonisa “bolingo ya bondeko” mpe ‘tólinganaka na motema’ na lisangá. (Rom. 12:10) Ntango tomanyolaka na mapamboli oyo tozwaka lelo, tokómisaka makasi boyokani na biso ná Yehova. Lisusu, ntango tokanisaka na mozindo mapamboli oyo Yehova alaki kopesa biso na mikolo ezali koya, tokobaka kozala na elikya ya kosalela ye libela na libela. Makambo oyo nyonso ekosalisa biso tózala na esengo ya kosalela Yehova lelo oyo.

ZALÁ NA EKATELI YA KOKOBA KOYIKA MPIKO

19. (a) Na kotalela Yisaya 30:18, tokoki kondima likambo nini? (b) Nini ekosalisa biso tózala na esengo mpe tóyika mpiko?

19 Yehova “akotɛlɛma” mpo na bolamu na biso ntango akotya nsuka na mokili oyo mabe. (Yis. 30:18) Tondimi ete Yehova azali “Nzambe oyo asambisaka na bosembo,” elingi koloba, akotika te ete mokili ya Satana ekoba kozala nsima ya ntango oyo atyá ete ekobomama. (Yis. 25:9) Tozelaka na mposa mpenza mokolo oyo Yehova akoya kosikola biso. Atako bongo, tozali na ekateli ya kokoba kozwa na motuya libaku ya kobondela, koyekola Liloba ya Nzambe, kosalela yango, mpe kokanisa na mozindo mapamboli oyo tozwaka. Soki tosali bongo, Yehova akosalisa biso tózala na esengo mpe tóyika mpiko wana tozali kosambela ye.

LOYEMBO 142 Tósimba makasi elikya na biso

^ Lisolo oyo elobeli makambo misato oyo Yehova asalaka mpo na kosalisa basambeli na ye bázala na esengo mpe báyikela mikakatano ya bomoi mpiko. Tokomona mitindo yango ya lisalisi oyo mokanda ya Yisaya mokapo 30 elobeli. Wana tozali kotalela lisusu mokapo yango, yango ekokundwela biso ntina ya kobondela Yehova, kotánga Liloba na ye mpe komanyola na mapamboli oyo tozali kozwa sikoyo mpe oyo tokozwa na mikolo ezali koya.

^ NDIMBOLA YA MALOBA: “Paradiso ya elimo” elimboli esika ya kimya oyo tosambelaka Yehova na bomoko. Na esika yango, tozali na ebele ya bilei ya elimo oyo esikoli biso na mateya ya mangomba ya lokuta mpe tozali na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi oyo epesaka biso esengo. Tosepelaka na boyokani ya penepene elongo na Yehova, mpe tozalaka na kimya elongo na bandeko na biso ya basi mpe ya mibali oyo balingaka biso, oyo basalisaka biso tózala na esengo mpe tóyikela mikakatano ya bomoi mpiko. Tokɔtaka na paradiso yango ya elimo ntango tobandaka kosambela Yehova na ndenge ebongi mpe ntango tosalaka makasi mpo tómekola ye.