LISOLO YA BOYEKOLI 48
“Bosengeli kozala basantu”
“Bókóma basantu na etamboli na bino mobimba.”—1 PE. 1:15.
LOYEMBO 34 Tambolá na bosembo
NA MOKUSE *
1. Toli nini ntoma Petro apesaki bandeko na ye bakristo, kasi mpo na nini ekoki komonana ete ezali mpasi mingi kosalela yango?
EZALA tozali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na likoló to mpe awa na mabele, tokoki koyekola makambo mingi na toli oyo ntoma Petro apesaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo na siɛklɛ ya liboso. Akomaki boye: “Na boyokani na Mosantu oyo abengaki bino, bino mpe bókóma basantu na etamboli na bino mobimba, mpo ekomamá ete: ‘Bosengeli kozala basantu, mpamba te ngai nazali mosantu.’” (1 Pe. 1:15, 16) Maloba yango emonisi ete tokoki komekola Yehova, ndakisa eleki malamu na likambo etali bosantu. Tokoki mpe tosengeli kozala basantu na etamboli na biso mobimba. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, kosala bongo ekoki komonana mpasi mingi. Kutu Petro asalaki mabunga mingi; kasi ndakisa na ye emonisi ete tokoki ‘kokóma basantu.’
2. Tokotalela mituna nini na lisolo oyo?
2 Na lisolo oyo, tokotalela mituna oyo: Bosantu ezali nini? Biblia eteyaka biso nini na likambo etali bosantu ya Yehova? Ndenge nini tokoki kokóma basantu na etamboli na biso? Mpe boyokani nini ezali kati na bosantu mpe boyokani na biso elongo na Yehova?
BOSANTU EZALI NINI?
3. Bato mingi bakanisaka ete kozala mosantu elimboli nini, kasi nini ekoki kosalisa biso tóyeba ndimbola na yango?
3 Bato mingi bakanisaka ete moto oyo azali mosantu ezali moto oyo asɛkaka te, oyo alataka bilamba ya bato ya mangomba mpe oyo azalaka kimyakimya. Kasi ezali bongo te. Biblia elobi ete Yehova azali mosantu, mpe azali “Nzambe ya esengo.” (1 Tim. 1:11) Baoyo basambelaka ye babengami bato ya “esengo.” (Nz. 144:15) Yesu apamelaki bato oyo bazalaki kolata bilamba oyo ezalaki kokesenisa bango na bato mosusu mpe oyo bazalaki kosala makambo ya malamu kaka mpo basusu bámona bango. (Mat. 6:1; Mrk. 12:38) Makambo oyo toyekoli na Biblia esalisi biso, bakristo ya solo, tóyeba soki kozala mosantu elakisi mpenza nini. Toyebi ete Nzambe na biso oyo azali mosantu mpe oyo atondi na bolingo akopesa biso soki moke te mobeko oyo tokokoka te kotosa. Na yango, ntango Yehova ayebisi biso ete: “Bosengeli kozala basantu,” tondimaka mpenza ete tokoki kokóma bongo. Kasi liboso tókóma basantu na etamboli na biso, tosengeli naino koyeba soki bosantu ezali nini.
4. Maloba “mosantu” mpe “bosantu” elimboli nini?
4 Bosantu elimboli nini? Na Biblia, liloba “mosantu” mpe “bosantu” esalelamaka mpo na kolobela bopɛto na bizaleli mpe na makambo ya losambo. Liloba yango ezali mpe kopesa likanisi ya kotyama pembeni mpo na kosalela Nzambe. Na maloba mosusu, tokozala basantu soki tozali na bizaleli ya malamu, soki tozali kosambela Nzambe na ndenge oyo andimaka, mpe soki tozali na boyokani ya malamu elongo na ye. Koyeba ete Yehova, Nzambe oyo azali mosantu na ndenge ya kokoka, alingaka kaka tózala baninga na ye atako tozali bato ya kozanga kokoka, ezali mpenza kokamwisa!
“MOSANTU, MOSANTU, MOSANTU EZALI YEHOVA”
5. Baanzelu ya sembo bakoki koteya biso nini mpo na Yehova?
5 Yehova azali pɛto mpe azali na mbindo te na makambo nyonso. Toyebi yango na maloba oyo baserafɛ, baanzelu oyo bazalaka penepene ya kiti na ye ya bokonzi, balobaki mpo na ye. Basusu kati na bango balobaki: “Mosantu, mosantu, mosantu ezali Yehova ya mampinga.” (Yis. 6:3) Ya solo, mpo baanzelu bázala na boyokani malamu elongo na Nzambe na bango oyo azali mosantu, bango moko mpe basengeli kozala basantu; likambo ya esengo, bazalaka bongo. Kutu, soki kaka anzelu moko ya Yehova akiti na esika moko awa na mabele, esika yango ekoki kokóma mosantu. Yango nde esalemaki ntango Moize azalaki pene ya mwa nzete ya nzube oyo ezalaki kopela mɔtɔ.—Kob. 3:2-5; Yos. 5:15.
6-7. (a) Na kotalela Kobima 15:1, 11, ndenge nini Moize alobelaki bosantu ya Nzambe? (b) Nini ezalaki kosalisa Bayisraele báyeba ete Yehova azali mosantu? (Talá elilingi ya ezipeli.)
6 Nsima ya kokatisa Bayisraele na Mbu Motane, Moize ayebisaki bango ete Yehova, Nzambe na bango, azali mosantu. (Tángá Kobima 15:1, 11.) Bato oyo bazalaki kosambela banzambe ya Ezipito bazalaki na bizaleli ya mbindo. Ezalaki mpe bongo mpo na baoyo bazalaki kosambela banzambe ya Kanana. Losambo na bango esangisaki makambo lokola kopesa bana mbeka mpe kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo mpenza. (Lev. 18:3, 4, 21-24; Mib. 18:9, 10) Nzokande, Yehova akosɛnga soki moke te basaleli na ye básala likambo moko oyo ekobebisa lokumu na bango. Azali mpenza mosantu. Yango emonisamaki polele na likomi oyo ezalaki na linzanza ya wolo likoló ya tirba ya nganga-nzambe monene. Linzanza yango ezalaki na maloba oyo: “Bosantu ezali ya Yehova.”—Kob. 28:36-38.
7 Maloba oyo ezalaki likoló ya linzanza yango esengelaki kondimisa moto nyonso oyo akomona yango ete Yehova azali mpenza mosantu. Kasi tokoloba nini mpo na Moyisraele oyo akokaki komona maloba yango te mpo azalaki na likoki te ya kopusana penepene na nganga-nzambe monene? Ndenge nini alingaki koyeba ete Yehova azali mosantu? Ntango bazalaki kotánga Mobeko liboso ya mibali, basi, mpe bana, Moyisraele nyonso azalaki koyoka ete Yehova azali mosantu. (Mib. 31:9-12) Soki yo mpe ozalaka wana, na ntembe te olingaki koyoka maloba oyo: “Ngai nazali Yehova Nzambe na bino; mpe bosengeli . . . kozala basantu, mpamba te ngai nazali mosantu.” “Bosengeli kozala basantu mpo na ngai, mpamba te ngai Yehova nazali mosantu.”—Lev. 11:44, 45; 20:7, 26.
8. Maloba oyo ezali na Balevi 19:2 mpe 1 Petro 1:14-16 ezali koteya biso nini?
Balevi 19:2. Yehova ayebisaki Moize boye: “Lobá na liyangani mobimba ya bana ya Yisraele, mpe osengeli koyebisa bango ete: ‘Bokozala basantu, mpamba te ngai, Yehova Nzambe na bino, nazali mosantu.’” Ekoki kozala ete Petro asalelaki maloba yango ntango ayebisaki bakristo ‘bákóma basantu.’ (Tángá 1 Petro 1:14-16.) Lelo oyo, tozali na nse ya Mibeko ya Moize te. Atako bongo, makambo oyo Petro akomaki endimisi maloba oyo ezali na Balevi 19:2, ete: Yehova azali mosantu, mpe baoyo balingaka ye basengeli kosala makasi bázala basantu, ezala bazali na elikya ya kozala na bomoi na likoló to mpe na paradiso awa na mabele.—1 Pe. 1:4; 2 Pe. 3:13.
8 Tótalela sikoyo likambo moko oyo Yehova alobaki ete basengeli kotángela Bayisraele nyonso. Likambo yango ezali na“BÓKÓMA BASANTU NA ETAMBOLI NA BINO MOBIMBA”
9. Matomba nini tokozwa soki totaleli Balevi mokapo 19?
9 Lokola tolingaka kosepelisa Nzambe na biso oyo azali mosantu, yango wana tolingaka koyekola ndenge ya kokóma basantu. Yehova apesi biso oyo ekoki kosalisa biso tókóma basantu. Esika malamu koleka oyo tokoki komona batoli yango ezali na Balevi mokapo 19. Marcus Kalisch, moto moko ya mayele ya ekólo Israël, akomaki boye: “Oyo ekoki kozala mokapo oyo eleki ntina na mokanda ya Balevi mpe na mikanda mitano ya ebandeli ya Biblia.” Kobosana te ete Balevi mokapo 19 ebandi na maloba: “Bokozala basantu.” Tokotalela sikoyo bavɛrsɛ mosusu ya mokapo yango, oyo ezali koteya biso ndenge ya kozala basantu na makambo ndenge na ndenge ya bomoi na biso ya mokolo na mokolo.
10-11. Balevi 19:3 esɛngi biso tósala nini, mpe mpo na nini yango ezali na ntina?
10 Nsima ya koyebisa Bayisraele ete basengeli kozala basantu, Yehova abakisaki boye: “Bokobanga moto na moto mama na ye mpe tata na ye . . . Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.”—Lev. 19:2, 3.
11 Ya solo, tosengeli kozwa na lisɛki te mobeko ya Nzambe oyo esɛngi tótosaka baboti na biso. Kanisá lisusu ntango moto moko atunaki Yesu ete: “Nini nasengeli kosala mpo nazwa bomoi ya seko?” Na eyano oyo Yesu apesaki, ayebisaki moto yango mpe ete asengelaki kotosa tata mpe mama na ye. (Mat. 19:16-19) Kutu Yesu apamelaki Bafarisai ná Bakomeli mpo bazalaki kosala nyonso mpo báboya kokumisa baboti na bango. Na ndenge yango, ‘bakómisaki liloba ya Nzambe mpamba.’ (Mat. 15:3-6) “Liloba ya Nzambe” esangisaki mpe mobeko ya mitano kati na Mibeko Zomi, ata mpe oyo touti kotánga na Balevi 19:3. (Kob. 20:12) Lisusu, kobosana te ete mobeko oyo ezali na Balevi 19:3, oyo esɛngi biso tókumisa tata ná mama, eyei na nsima ya mobeko oyo elobi: “Bokozala basantu, mpamba te ngai, Yehova Nzambe na bino, nazali mosantu.”
12. Ndenge nini tokoki kosalela toli oyo ezali na Balevi 19:3?
12 Soki tokanisi mobeko oyo Yehova apesaki ya kokumisa baboti na biso, tokoki komituna boye: ‘Nakumisaka mpenza baboti na ngai?’ Soki omoni ete osalaka yango te, sikoyo nde ntango ya kobongisa makambo. Ya solo, okoki te kobongola makambo oyo eleká. Kasi okoki sikoyo kozwa ekateli ya kosalisa baboti na yo lisusu mingi. Na ndakisa, okoki kozwa bibongiseli mpo olekisaka ntango mingi elongo na bango. Okoki mpe kopesa bango mwa mbongo mpo básomba biloko oyo basengeli na yango, kosalisa bango bázala na boyokani makasi ná Yehova, mpe kolendisa bango. Soki osali bongo, yango ekomonisa ete ozali kotosa maloba oyo ezali na Balevi 19:3.
13. (a) Toli nini mosusu ezali na Balevi 19:3? (b) Na kotalela Luka 4:16-18, ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu lelo oyo?
13 Balevi 19:3 ezali koteya biso likambo mosusu oyo tosengeli kosala mpo tókóma basantu. Elobeli likambo ya kotosa Sabata. Kasi biso bakristo tozali na nse ya Mibeko te, yango wana totosaka Sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ te. Atako bongo, tokoki koyekola makambo mingi na ndenge oyo Bayisraele bazalaki kotosa Sabata mpe matomba oyo bazalaki kozwa na kosala bongo. Sabata ezalaki ntango oyo bato bazalaki kopema na misala na bango mpe komipesa mingi na makambo ya elimo. * Yango wana na mokolo ya Sabata, Yesu azalaki kokende na Sinagoga ya mboka na ye mpe kotánga Liloba ya Nzambe. (Kob. 31:12-15; tángá Luka 4:16-18.) Mobeko oyo Nzambe apesaki ya ‘kotosa basabata na ye’ esengeli kotinda biso tósombaka ntango na makambo na biso ya mokolo na mokolo mpo tókoka komipesa mingi na makambo ya elimo. Omoni ete osengeli kobongisa makambo mosusu mpo na kotya makambo ya elimo na esika ya liboso? Soki ozali kozwa ntango mbala na mbala mpo omipesa mingi na makambo ya elimo, okokóma na boyokani ya malamu elongo na Yehova, mpe yango ekosala ete okóma mosantu.
KÓMISÁ BOYOKANI NA YO NÁ YEHOVA MAKASI
14. Wapi liteya ya ntina mingi oyo ezongelami na Balevi mokapo 19?
14 Balevi mokapo 19 ezongeli mbala na mbala liteya ya ntina mingi oyo ekoki kosalisa biso tótikala basantu. Vɛrsɛ 4 esuki na maloba oyo: “Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.” Maloba yango mpe maloba mosusu oyo ekokani na yango ezali mbala 16 na mokapo yango. Yango ekundweli biso mobeko ya liboso oyo elobaki ete: “Ngai nazali Yehova Nzambe na yo . . . Osengeli kozala na banzambe mosusu te mpo na kotɛmɛla ngai.” (Kob. 20:2, 3) Mokristo nyonso oyo alingi kokóma mosantu, asengeli komindimisa ete moto to eloko moko te ekómi na ntina mingi koleka boyokani na ye elongo na Nzambe. Mpe lokola tobengami Batatoli ya Yehova, tozali na ekateli ya koboya kosala likambo nyonso oyo ekoki kosambwisa to mpe kofingisa nkombo na ye mosantu.—Lev. 19:12; Yis. 57:15.
15. Bavɛrsɛ oyo ezali na Balevi mokapo 19 oyo elobeli kopesa bambeka, esengeli kotinda biso tósala nini?
15 Bayisraele bazalaki komonisa ete bandimi Balevi 18:4 elobi: “Bokosalela bikateli na ngai ya lisambisi, mpe bokotosa mibeko na ngai mpo bótambola na yango. Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.” Mokapo 19 etángi mwa “mibeko” oyo Bayisraele basengelaki kotosa. Na ndakisa, vɛrsɛ 5-8, 21, 22 elobeli likambo etali kopesa bambeka ya banyama. Bambeka yango esengelaki te kopesama na ndenge oyo ‘ekokómisa eloko mosantu ya Yehova eloko mpamba.’ Kotánga bavɛrsɛ yango esengeli kotinda biso tósepelisa motema ya Yehova mpe tópesa ye bambeka ya masanzoli oyo akondima, ndenge Baebre 13:15 esɛngi biso tósala.
Yehova azala Nzambe na bango na ndenge bazalaki kotosa mibeko na ye.16. Toli nini ezali na Balevi mokapo 19 oyo ekoki kosalisa biso tóyeba bokeseni kati na baoyo basalelaka Nzambe mpe baoyo basalelaka ye te?
16 Mpo tókóma basantu, tosengeli kotika bato bámona ete tokeseni na baoyo basambelaka Nzambe te. Kosala bongo ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Na bantango mosusu, baninga na biso ya kelasi, ya mosala, bandeko na biso ya libota oyo bazali Batatoli te bakoki kotya biso mbamba tómipesa na makambo oyo eyokani te na losambo na biso. Soki basali bongo, tosengeli kozwa ekateli ya ntina mingi. Nini ekoki kosalisa biso tózwa ekateli ya malamu? Tótalela toli moko kitoko oyo ezali na Balevi 19:19, oyo elobi: “Osengeli te kolata elamba ya mitindo mibale ya nsinga, oyo esangisami esika moko.” Mobeko yango ezalaki kokesenisa Bayisraele na bikólo oyo ezalaki zingazinga na bango. Lelo oyo, biso bakristo toboyaka te kolata bilamba oyo esalemi na nsinga ya mitindo mibale, na ndakisa oyo esalemi na kɔtɔ mpe lini. Kasi toboyaka kozala lokola bato oyo bindimeli mpe mateya na bango eyokani te na oyo Biblia eteyaka; ata soki bato yango bazali baninga na biso ya kelasi, ya mosala, to mpe bandeko na biso ya libota. Ya solo, tolingaka bandeko na biso ya libota, mpe bato oyo tofandaka na bango. Kasi bikateli oyo tozwaka na bomoi emonisaka ete tokotosa Yehova, ata soki yango ekosɛnga ete tókesana na bato yango. Yango ezali na ntina mingi mpo soki tolingi kokóma basantu, tosengeli kokesana na basusu mpe kotyama pembeni mpo na Nzambe.—2 Ko. 6:14-16; 1 Pe. 4:3, 4.
17-18. Wapi liteya ya ntina mingi oyo tokoki koyekola na Balevi 19:23-25?
17 Maloba “ngai nazali Yehova Nzambe na bino” esengelaki kosalisa Bayisraele bátya boyokani na bango elongo na Yehova na esika ya liboso. Na ndenge nini? Balevi 19:23-25 emonisi lolenge moko. (Tángá.) Tótalela ndenge oyo Bayisraele basengelaki kosalela mibeko yango nsima ya kokɔta na Mokili ya Ndaka. Mibeko elobaki ete soki moto aloni banzete oyo ebotaka mbuma, asengelaki kolya mbuma na yango te na boumeli ya mbula misato. Na mbula ya minei, asengelaki kotya mbuma na yango pembeni mpo ezala likabo mpo na mosala na ndako ya Yehova. Kaka na mbula ya mitano nde nkolo na yango akokaki kolya mbuma na yango. Mobeko yango esengelaki kosalisa Bayisraele báyeba ete basengelaki te kotya matomba na bango na esika ya liboso. Basengelaki nde kotya losambo na ye na esika ya liboso mpe kotya motema ete Yehova akokokisa bamposa na bango. Lisusu, basengelaki koyeba ete Yehova akosala nyonso mpo bázanga biloko ya kolya te. Mpe Nzambe alendisaki bango bápesaka makabo na bolingo na bango moko na ndako na ye; esika oyo bazalaki kosambela ye.
18 Mobeko oyo ezali na Balevi 19:23-25 ezali kokundwela biso maloba oyo Yesu alobaki na Lisolo likoló ya Ngomba. Alobaki boye: “Bótika komitungisa mpo na . . . oyo bokolya to oyo bokomɛla.” Yesu abakisaki boye: “Mpo Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko nyonso wana.” Nzambe akokokisa bamposa na biso ndenge kaka asalaka yango mpo na bandɛkɛ. (Mat. 6:25, 26, 32) Totyelaka Yehova motema mpo azali Mosungi na biso. Mpe topesaka “makabo ya motema mawa” kozanga ete bato mosusu báyeba mpo na kosalisa baoyo bazali na bosɛnga. Tosepelaka mpe kopesa makabo na kotalela makoki na biso mpo na kosalisa lisangá. Yehova amonaka ezaleli wana ya bokabi mpe akopesa biso mbano mpo na yango. (Mat. 6:2-4) Ntango tosalaka bongo, tomonisaka ete tokangi ntina ya mateya oyo ezali na Balevi 19:23-25.
19. Matomba nini ozwi na bavɛrsɛ oyo totaleli na mokanda ya Balevi?
19 Touti kotalela kaka mwa bavɛrsɛ ya Balevi mokapo 19, oyo esalisi biso tómona ndenge oyo tokoki kozala basantu lokola Nzambe na biso. Soki tozali komekola ye, tokosala makasi ‘tókóma basantu na etamboli na biso mobimba.’ (1 Pe. 1:15) Bato mingi oyo basambelaka Yehova te bamonaka bango moko etamboli na biso ya malamu. Kutu, yango etindaka bamosusu bápesa Yehova nkembo. (1 Pe. 2:12) Kasi ezali na makambo mosusu mingi oyo tokoki koyekola na Balevi mokapo 19. Lisolo oyo elandi ekolobela bavɛrsɛ mosusu ya mokapo yango, mpe ekosalisa biso tóyeba oyo tokoki kosala mpo ‘tókóma basantu’ na makambo mosusu ya bomoi na biso, ndenge Petro alendisi biso.
LOYEMBO 80 ‘Bómeka mpe bómona malamu ya Yehova’
^ par. 5 Tolingaka Yehova mingi mpenza mpe tolingaka kosepelisa ye. Yehova azali mosantu, yango wana asɛngaka mpe basaleli na ye bázala basantu. Bato ya kozanga kokoka bakoki mpenza kozala basantu? Ɛɛ. Tokoki koyekola ndenge ya kozala basantu soki totaleli na likebi makambo oyo ntoma Petro akomelaki bakristo mpe makambo oyo Yehova asɛngaki bana ya Yisraele.
^ par. 13 Mpo na koyeba mateya mosusu oyo tokoki kozwa na likambo etali Sabata, talá lisolo “‘Ezali na ntango’ ya kosala mpe ya kopema” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 12/2019.