Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 51

Kobá koyoka mongongo na ye

Kobá koyoka mongongo na ye

“Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi; bóyoka ye.”​—MAT. 17:5.

LOYEMBO 54 “Nzela yango oyo”

NA MOKUSE *

1-2. (a) Nzambe ayebisaki bantoma misato ya Yesu básala nini, mpe basalaki nini? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

NSIMA ya pantekote ya mobu 32 ya ntango na biso, ntoma Petro, Yakobo, mpe Yoane bamonaki emonaneli moko ya kokamwa. Ntango bazalaki likoló ya ngomba moko molai, mbala mosusu na Ngomba Hermone, Yesu abongwanaki liboso na bango. “Elongi na ye engɛngaki lokola moi, mpe bilamba na ye ya likoló ekómaki kongɛnga lokola pole.” (Mat. 17:1-4) Pene ya nsuka ya emonaneli yango, bantoma bayokaki mongongo ya Nzambe ezali koloba: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi; bóyoka ye.” (Mat. 17:5) Bantoma yango misato bamonisaki na bomoi na bango ete bazalaki koyoka Yesu. Biso mpe tosengeli kolanda ndakisa na bango.

2 Na lisolo oyo eleki, toyekolaki ete koyoka mongongo ya Yesu elimboli kotika kosala makambo mosusu. Kasi na lisolo oyo, tokolobela makambo oyo Yesu alobi ete tosengeli kosala.

“BÓKƆTA NA PORTE YA MOKE”

3. Na kotalela Matai 7:13, 14, tosengeli kosala nini?

3 Tángá Matai 7:13, 14. Simbá ete Yesu alobelaki baporte mibale ekeseni oyo ezali komema na banzela mibale ekeseni, elingi koloba, nzela ya “monene” mpe nzela ya “nkaka.” Alobelaki nzela mosusu ya misato te. Biso moko tosengeli kopona nzela nini tokolanda. Yango ezali ekateli ya ntina mingi oyo tosengeli kozwa, mpamba te yango ekoki kosala ete tózwa bomoi ya seko to te.

4. Nzela ya “monene” ezali nini?

4 Tosengeli kobosana te bokeseni oyo ezali kati na banzela yango mibale. Ebele ya bato balandaka nzela ya “monene” mpo ezalaka mpasi te kotambola na nzela yango. Likambo ya mawa, ebele ya bato baponaka kotikala na nzela yango mpe balandaka makambo oyo bato mingi oyo bazali na nzela yango basalaka. Bayebaka te ete Satana nde moto azali kosala nyonso atinda bato na nzela yango, mpe ete nzela yango ememaka na liwa.​—1 Ko. 6:9, 10; 1 Yoa. 5:19.

5. Milende nini bandeko mosusu basalá mpo bámona nzela ya “nkaka” mpe bábanda kotambola na kati?

5 Na kokesana na nzela ya “monene,” nzela mosusu ezali ya “nkaka” mpe Yesu alobaki ete kaka bato moke nde bamonaka yango. Mpo na nini? Ezali esengo koyeba ete na vɛrsɛ oyo elandi, Yesu akebisaki bayekoli na ye na basakoli ya lokuta. (Mat. 7:15) Bato mosusu balobaka ete ezali na bankóto ya mangomba mpe ete mingi na yango eteyaka solo. Lokola ezali na mangomba ebele ndenge wana, bato mingi balɛmbi mpenza nzoto to babulungani mpe bazali kutu koluka te nzela oyo ezali komema na bomoi. Nzokande, bakoki komona nzela yango. Yesu alobaki: “Soki botikali na kati ya liloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.” (Yoa. 8:31, 32) Ezali malamu ndenge olandaki te nzela oyo bato mingi balandaka, kasi olukaki nde koyeba solo. Obandaki koyekola Biblia na mozindo mpo na koyeba oyo yango ezali kosɛnga biso, mpe oyokaki mateya ya Yesu. Kati na mateya yango, oyekolaki ete Yehova asɛngi biso tóboya mateya nyonso ya mangomba ya lokuta mpe tótika kosangana na bafɛti mpe milulu oyo eyokani te na makambo oyo Biblia eteyaka. Oyekolaki mpe ete ezalaka pɛtɛɛ te kosala makambo oyo Yehova asɛngi biso mpe kotika kosala makambo oyo esepelisaka ye te. (Mat. 10:34-36) Mbala mosusu ezalaki pɛtɛɛ te mpo osala bambongwana yango. Kasi osalaki makasi osala yango mpo olingaka Tata na yo ya likoló mpe olingi kosepelisa ye. Na ntembe te ye mpe alingaka yo mingi!​—Mas. 27:11.

NDENGE YA KOTIKALA NA NZELA YA NKAKA

Toli mpe mibeko ya Nzambe esalisaka biso tótikala na nzela ya “nkaka” (Talá paragrafe 6-8) *

6. Na kotalela Nzembo 119:9, 10, 45, 133, nini ekoki kosalisa biso tótikala na nzela ya nkaka?

6 Wana tobandi kotambola na nzela ya nkaka, nini ekoki kosalisa biso tólongwa na yango te? Tózwa ndakisa oyo. Na bamboka mosusu, batɛlɛmisaka mwa mabende pembenipembeni ya banzela ya mike oyo elekaka na bangomba mpo esalisa mituka mpe bakumbi na yango bázwa likama te. Mwa mabende yango ebatelaka bakumbi-mituka mpo bálongwa na nzela te. Mokumbi-motuka moko te akoki komilelalela ete mwa mabende yango ekotya bango nkaka. Ndenge moko mpe, mibeko ya Yehova ezali lokola mwa mabende yango oyo ebatelaka bakumbi-mituka. Mibeko yango esalisaka biso tókoba kotambola na nzela ya nkaka.​—Tángá Nzembo 119:9, 10, 45, 133.

7. Ndenge nini bilenge basengeli kotalela nzela ya nkaka?

7 Bilenge, na bantango mosusu bomonaka ete mibeko ya Yehova etyaka bomoi na bino nkaka? Satana alingaka ete bókanisa bongo. Akolinga ete bótya makanisi na bino na makambo oyo bato oyo bazali na nzela ya monene basalaka, mpo emonanaka lokola bazali mpenza na bomoi ya esengo. Akoki kotinda bino bókanisa ete bozali kozanga makambo mosusu mpo bosalaka te makambo oyo baninga na bino ya kelasi to mpe bato mosusu oyo botalaka na Internet basalaka. Satana alingi bókanisa ete mibeko ya Nzambe epekisaka bino bózala na bomoi ya esengo. * Kasi bóbosana likambo oyo te: Satana alingaka te ete baoyo bazali kotambola na nzela na ye bámona epai nzela yango ekomema bango. Kasi Yehova alingi oyeba ete okozala na bomoi ya esengo soki otikali na nzela ya bomoi.​—Nz. 37:29; Yis. 35:5, 6; 65:21-23.

8. Ndakisa ya Olaf ekoki koteya bilenge nini?

8 Talá mateya oyo okoki kozwa na ndakisa ya ndeko mobali moko na nkombo Olaf. * Baninga na ye ya kelasi batyaki ye mbamba mpo asala pite. Ntango ayebisaki bango ete Batatoli ya Yehova batosaka mitinda ya Yehova oyo etali bizaleli malamu, bilenge basi mosusu ya kelasi na bango basalaki lisusu milende mpo na kondimisa ye asala pite ná bango. Kasi Olaf akangamaki makasi na oyo ezali malamu. Longola yango, akutanaki mpe na mokakatano mosusu. Olaf alobi boye: “Balakisi na ngai balukaki kondimisa ngai ete nasengelaki kokende na iniversite mpo na nsima, bato bakobanda kopesa ngai lokumu. Balobaki ete soki nasali bongo te, nakolonga te na bomoi.” Nini esalisaki Olaf alonga komekama wana? Alobi boye: “Nasalaki boninga makasi elongo na bandeko ya lisangá na biso. Bakómaki lokola bandeko na ngai ya libota. Lisusu, nakómaki koyekola Biblia na mozindo mpenza. Wana nakómaki koyekola na mozindo, nakómaki lisusu komindimisa mpenza ete ezalaki solo. Yango esalaki ete nazwa ekateli ya kosalela Yehova.”

9. Baoyo balingi kotikala na nzela ya nkaka basengeli kosala nini?

9 Satana akosepela ete otika kotambola na nzela oyo ezali komema na bomoi. Alingi ete osala makambo oyo bato mingi basalaka, mpe otambola na nzela oyo “ememaka na libebi.” (Mat. 7:13) Kasi tokotikala na nzela ya nkaka soki tokobi koyoka Yesu, mpe soki totaleli nzela yango lokola libateli. Tólobela sikoyo likambo mosusu oyo Yesu alobi ete tosengeli kosala.

YOKANÁ YO NA NDEKO NA YO

10. Na kotalela Matai 5:23, 24, Yesu alobaki ete tosengeli kosala nini?

10 Tángá Matai 5:23, 24. Awa, Yesu alobelaki ntango moko ya ntina mingi mpo na Bayuda oyo bazalaki koyoka ye. Kanisá ete moto moko ayei ná nyama na tempelo mpo na kopesa yango mbeka epai ya nganga-nzambe. Soki na ntango wana moto yango akanisi ete ndeko na ye azali na likambo ná ye, asengelaki kotika mbeka na ye mpe ‘kokende’ koluka ye. Mpo na nini? Mpo asengelaki naino kosala likambo moko ya ntina mingi liboso apesa Yehova mbeka na ye. Yesu amonisaki yango polele ntango alobaki: “Liboso yokaná yo na ndeko na yo.”

Okolanda ndakisa ya Yakobo oyo amikitisaki mpo na kotya kimya elongo na ndeko na ye? (Talá paragrafe 11-12) *

11. Lobelá milende oyo Yakobo asalaki mpo na kotya kimya ná ndeko na ye Esau?

11 Tokoki kozwa mateya mingi ya ntina na likambo etali kotya kimya to koyokana na basusu soki totaleli makambo oyo ekómelaki Yakobo. Nsima ya kotika mboka na ye na boumeli ya mbula soki 20, Nzambe ayebisaki Yakobo na nzela ya anzelu moko ete azonga lisusu kuna. (Eba. 31:11, 13, 38) Kasi ezalaki na mokakatano moko. Yaya na ye Esau azalaki na makanisi ya koboma ye. (Eba. 27:41) Yakobo “abandaki kobanga mingi mpe akómaki motema likoló” mpo mbala mosusu ndeko na ye azalaki kaka na nkanda na ye. (Eba. 32:7) Yakobo asalaki nini mpo na kotya kimya ná ndeko na ye? Ya liboso, abondelaki Yehova na motema mobimba mpo na likambo yango. Na nsima, atindelaki Esau makabo. (Eba. 32:9-15) Nsukansuka ntango bakutanaki, Yakobo apesaki Esau lokumu mingi. Agumbamaki liboso ya Esau kaka mbala moko to mibale te, kasi mbala nsambo! Na komikitisa mpe na limemya nyonso, Yakobo atyaki kimya ná ndeko na ye.​—Eba. 33:3, 4.

12. Ndakisa ya Yakobo eteyi biso nini?

12 Ndenge oyo Yakobo amibongisaki mpo na koya kokutana na ndeko na ye ekoki koteya biso likambo moko ya ntina mingi. Na komikitisa nyonso, Yakobo asɛngaki Yehova asalisa ye. Na nsima, asalaki na boyokani ná libondeli na ye na ndenge asalaki oyo akoki mpo na kotya kimya ná ndeko na ye. Ntango bakutanaki, Yakobo aswanisaki Esau te mpe alukaki komilongisa te. Mokano na ye ezalaki ya kotya kimya elongo na ndeko na ye. Ndenge nini tokoki komekola Yakobo?

NDENGE YA KOTYA KIMYA NÁ BASUSU

13-14. Tosengeli kosala nini soki topesaki ndeko na biso mpasi?

13 Biso baoyo tozali kotambola na nzela oyo ezali komema na bomoi, tolingaka kotya kimya elongo na bandeko na biso. (Rom. 12:18) Tosengeli kosala nini soki toyebi ete tosali likambo oyo epesi ndeko na biso mpasi? Lokola Yakobo, tosengeli kobondela Yehova na motema mobimba. Tokoki kosɛnga ye apambola milende oyo tozali kosala mpo na kotya kimya elongo na ndeko na biso.

14 Tosengeli mpe kozwaka ntango mpo na komitalelaka biso moko. Tokoki komituna boye: ‘Nandimaka mambunga na ngai, namikitisaka mpo na kosɛnga bolimbisi, mpe natyaka kimya? Yehova ná Yesu bakoyoka ndenge nini soki nazwi bibongiseli mpo na kotya kimya elongo na ndeko na ngai?’ Biyano oyo tokopesa ekoki kotinda biso tóyoka Yesu mpe tókende kokutana na ndeko na biso mpo na kotya kimya. Na ndenge yango, tokomekola Yakobo.

15. Ndenge nini kosalela toli oyo ezali na Baefese 4:2, 3 ekoki kosalisa biso tótya kimya elongo na ndeko na biso?

15 Meká kokanisa makambo oyo elingaki kosalema soki Yakobo aswanisaka Esau mpe alukaka komilongisa! Elingaki kosuka mabe mpenza. Ndenge moko mpe, ntango tokei koluka ndeko na biso mpo na kotya kimya, tosengeli mpenza komikitisa. (Tángá Baefese 4:2, 3.) Masese 18:19 elobi boye: “Ndeko oyo basaleli mabe aleki sité ya makasi; mpe kowelana mosusu ezali lokola ekangiseli ya ndako molai ya kofanda.” Kosɛnga bolimbisi ekoki kosalisa biso tókɔta na “ndako molai” yango, elingi koloba, kotya kimya elongo na ndeko biso.

16. Tosengeli kokeba na likambo nini, mpe mpo na nini?

16 Tosengeli mpe kokeba na makambo oyo tokoyebisa ndeko na biso mpe ndenge oyo tokoloba yango. Soki esɛngi tóloba, mokano na biso esengeli kozala ya kozongisa kimya elongo na ye mpe kokitisa mpasi oyo ayokaki na motema. Na ebandeli, ndeko yango akoki koloba likambo moko oyo ekoki kopesa biso mpasi. Mbala mosusu tokoki kosilika to mpe koluka komilongisa, kasi kosala bongo ekosalisa biso te mpo tózongisa kimya. Kobosana te ete kotya kimya elongo na ndeko na yo ezali na ntina koleka koluka komilongisa.​—1 Ko. 6:7.

17. Ndakisa ya ndeko Gilbert ekoki koteya yo nini?

17. Ndeko mobali moko na nkombo Gilbert asalaki makasi mpo akóma moto oyo atyaka kimya. Alobi boye: “Na ntango moko boye, nazalaki koyokana te na mwana na ngai ya mwasi. Na boumeli ya mbula mibale, nasalaki nyonso tósolola likambo yango na kimya mpo tókoka kozongisa lisusu boyokani na biso.” Ndeko Gilbert asalaki lisusu nini? Alobi boye: “Mbala nyonso, liboso ya kosolola na ye, nazalaki kobondela mpe kobongisa makanisi na ngai mpo ata soki alobi likambo moko ya mabe nasilika te. Nazalaki kosala nyonso mpo nazala pene ya kolimbisa ye. Namonaki ete nasengelaki te koluka komilongisa, mpe nayebaki ete mokano na ngai ezalaki nde ya kotya kimya.” Yango ebotaki mbuma nini? Gilbert alobi boye: “Lelo oyo, nazali na kimya ya makanisi mpo nazali na boyokani malamu elongo na bato nyonso ya libota na ngai.”

18-19. Soki topesaki moto moko mpasi na motema, tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini, mpe mpo na nini?

18 Osengeli kosala nini soki omoni ete opesaki ndeko moko ya lisangá mpasi na motema? Landá toli oyo Yesu apesaki ya kotya kimya. Yebisá Yehova likambo yango, mpe tyá motema ete elimo santu na ye ekosalisa yo ozala moto oyo atyaka kimya. Soki osali bongo, okozala na esengo, mpe okomonisa mpenza ete ozali koyoka Yesu.​—Mat. 5:9.

19 Tozalaka na botɔndi ndenge Yehova apesaka biso litambwisi ya malamu na nzela ya Yesu Kristo, “mokonzi ya lisangá.” (Ef. 5:23) Lokola ntoma Petro, Yakobo, mpe Yoane, tózwa ekateli ya ‘koyoka’ Yesu. (Mat. 17:5) Tomoni ete tokoki kosala yango soki tozali kozongisa kimya ná ndeko oyo topesaki mpasi na motema. Soki tosali bongo, mpe totikali na nzela ya nkaka oyo ezali komema na bomoi, tokozwa mapamboli mingi sikoyo, mpe na mikolo ezali koya esengo ya seko.

LOYEMBO 130 Tólimbisaka

^ par. 5 Yesu asɛngi biso tókɔta na porte ya nkaka oyo ezali komema na bomoi ya seko. Asɛngi biso mpe tótyaka kimya elongo na bandeko na biso bakristo. Mikakatano nini tokoki kokutana na yango wana tozali kosala makasi tósalela toli yango? Mpe ndenge nini tokoki kolonga yango?

^ par. 7 Talá motuna 6 ya mwa buku Biyano na mituna 10 oyo bilenge batunaka, oyo elobi: “Nasala nini mpo naboya makanisi mabe ya baninga?” Mpe video: Moto azali koyema Boyá makanisi mabe ya baninga! na jw.org. (Kende na MATEYA YA BIBLIA > BILENGE.)

^ par. 8 Topesi bango bankombo mosusu.

^ par. 56 ELILINGI: Soki totikali na nzela ya “nkaka” oyo ebatelami na mibeko ya Nzambe, tokokima makama lokola pornografi, baninga mabe, mpe mbamba oyo bakoki kotya biso mpo tótánga bakelasi ya milaimilai.

^ par. 58 ELILINGI: Mpo na kotya kimya, Yakobo agumbamaki mbala na mbala liboso ya ndeko na ye Esau.