Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Maloba ya ntoma Paulo oyo ezali na 1 Bakorinti 15:29 elimboli nde ete bakristo mosusu na ntango ya kala bazwaki batisimo mpo na bakufi?

Te! Ezala Biblia to babuku ya makambo ya kala elobeli likambo ya ndenge wana te.

Ndenge vɛrsɛ yango ebongolami na Babiblia mingi etindi bato mosusu bákanisa ete, na mikolo ya ntoma Paulo, bazalaki kobatisa bato na mai mpo na bakufi. Na ndakisa, libongoli moko ya Biblia ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Sikoyo soki lisekwa ezali te, bato oyo bazali kobatisama mpo na bakufi bakosala nini?”

Kasi, talá makambo oyo bato mibale ya mayele na makambo ya Biblia balobaki. Dr. Gregory Lockwood alobaki boye: “Ezali na elembeteli moko te na Biblia to na makambo ya kala oyo emonisi ete moto moko azwaki batisimo na esika ya moto oyo akufá.” Ndenge moko mpe, Profesɛrɛ Gordon D. Fee akomaki boye: “Ezali na ndakisa moko te, ezala na Biblia to na makambo ya kala, oyo elobeli batisimo ya ndenge wana.” Abakisi boye: “Kondimana ya Sika elobeli yango ata moke te. Ezali mpe ata na elembeteli moko te oyo emonisi ete bakristo ya siɛklɛ ya liboso bapesaki batisimo ya ndenge wana. Ata mangomba oyo esalemaki mwa moke nsima ya liwa ya bantoma, bapesaki bato batisimo ya ndenge wana te.”

Biblia elobi ete bayekoli ya Yesu basengelaki ‘kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, kobatisa bango mpe koteya bango bátosa makambo nyonso oyo apesaki bango mitindo.’ (Mat. 28:19, 20) Liboso moto akóma mokristo oyo azwi batisimo, asengeli koyekola, kondima, mpe kotosa Yehova ná Mwana na ye. Moto oyo akufi mpe bakundi ye na lilita akoki kozwa batisimo te. Mokristo mosusu oyo azali na bomoi akoki mpe te kozwa batisimo na esika na ye.​—Mos. 9:5, 10; Yoa. 4:1; 1 Ko. 1:14-16.

Ntoma Paulo alingaki mpenza koloba nini?

Bakorinti mosusu bazalaki kondima te ete bakufi bakosekwa. (1 Ko. 15:12) Paulo amonisaki bango polele ete makanisi wana ezali lokuta. Na ndenge nini? Amonisaki ete ‘mokolo na mokolo azalaki liboso ya liwa.’ Na ntembe te, azalaki naino na bomoi. Atako azalaki kokutana na makama ya liwa mokolo na mokolo, azalaki na elikya ete, nsima ya liwa na ye, akosekwa mpe akokende kofanda na likoló lokola Yesu.​—1 Ko. 15:30-32, 42-44.

Bakristo ya Korinti basengelaki koyeba ete, lokola batyamaki mafuta na elimo, basengelaki kokutana na komekama mokolo na mokolo mpe kokufa liboso ete bákoka kosekwa. Na yango, ntango ‘babatisamaki na kati ya Kristo Yesu,’ emonisi mpe ete ‘babatisamaki na kati ya liwa na ye.’ (Rom. 6:3) Yango elingi koloba ete, lokola Yesu, basengelaki kokutana na komekama mpe kokufa mpo bákoka kosekwa mpo na kokende na likoló.

Mbula soki mibale nsima ya batisimo ya Yesu na mai, ayebisaki bantoma na ye mibale boye: “Batisimo oyo nazali kobatisama, bokobatisama na yango.” (Mrk. 10:38, 39) Yesu azalaki te kobatisama na mai na ntango wana. Alingaki nde komonisa ete bosembo na ye epai ya Nzambe ekomema ye tii na liwa. Ntoma Paulo akomaki ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo ‘bakomona mpasi elongo na ye, mpo bákoka mpe kozwa nkembo elongo na ye.’ (Rom. 8:16, 17; 2 Ko. 4:17) Yango wana, bango mpe basengelaki kokufa mpe na nsima kosekwa mpo bákende kofanda na likoló.

Na yango, maloba ya ntoma Paulo esengeli kobongolama na bosikisiki boye: “Soki bongo te, baoyo bazali kobatisama mpo na kozala bakufi bakosala nini? Soki bakufi bakolamuka te, mpo na nini bango mpe bazali kobatisama ndenge wana?”