Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ozali koyeba lisusu?

Ozali koyeba lisusu?

Otángaki na likebi mpenza masolo oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya mbula oyo? Soki ezali bongo, talá soki okoki koyanola na mituna oyo elandi:

Ndenge nini tosengeli kosalela bandeko oyo batyami mafuta na elimo makambo?

Tosepelaka mingi na kondima na bango; kasi, tosengeli te kotyelaka bango likebi koleka ndelo. Toboyaka “kokumisa bato.” (Yuda 16) Toboyaka mpe kotuna bango mituna oyo etali elikya na bango.​—w20.01, lok. 29.

Nini esengeli kondimisa yo ete Yehova atyelaka yo mpenza likebi?

Biblia emonisi ete Yehova amonaki yo kutu liboso obotama. Ayokaka mabondeli na yo. Ayebi makanisi mpe makambo oyo ezali na motema na yo. Lisusu, makambo oyo osalaka ekoki kosepelisa to kopesa ye mawa. (1 Nt. 28:9; Mas. 27:11) Yehova ye moko abendi yo epai na ye.​—w20.02, lok. 12.

Pesá bandakisa oyo emonisi ntango oyo tosengeli koloba mpe ntango oyo tosengeli kofanda nyɛɛ?

Tosepelaka kolobela makambo etali Yehova. Tolobaka mpe soki tomoni moto moko azali kolanda nzela ya mabe. Bankulutu basengeli koloba ntango bamoni ete ndeko mobali to ndeko mwasi moko asengeli kozwa toli. Toboyaka kolobela makambo nyonso oyo etali mosala na biso na bikóló oyo yango epekisami. Toboyaka mpe kolobela makambo oyo ezali sekele.​—w20.03, nk. 20-21.

Bokeseni nini ezali kati na mayoyo oyo Yoele mokapo 2 elobeli mpe oyo Emoniseli mokapo 9 elobeli?

Yoele 2:20-29 elobi ete Nzambe alongoli mayoyo mpe alaki ete akobongisa makambo mabe oyo mayoyo yango esali. Na nsima na yango, Nzambe asopi elimo na ye. Makambo yango ekokisamaki ntango bato ya Babilone bayaki kobundisa ekólo Yisraele mpe makambo mosusu ekokisamaki na nsima. Nzokande mayoyo oyo Emoniseli 9:1-11 elobeli, emonisi mpenza basaleli ya Yehova oyo batyami mafuta na elimo. Bazali kosakola na mpiko nyonso bitumbu oyo Nzambe akopesa ebongiseli oyo mabe, mpe bato na yango bazali kotungisama mpo na nsango yango.​—w20.04, nk. 3-6.

Nani nde mokonzi ya nɔrdi lelo oyo?

Russie mpe bikólo oyo epesaka yango mabɔkɔ. Banyokolaka basaleli ya Nzambe, bapekisaka mosala ya kosakola, mpe bayinaka Batatoli ya Yehova. Mokonzi ya nɔrdi awelanaka na mokonzi ya sudi.​—w20.05, lok. 13.

“Mbuma ya elimo” ezali kaka bizaleli libwa oyo Bagalatia 5:22, 23 elobeli?

Te. Elimo ya Nzambe ekoki kosalisa biso tókolisa bizaleli mosusu ya malamu, na ndakisa boyengebene. (Ef. 5:8, 9)​—w20.06, lok. 17.

Kotya bafɔtɔ na biso moko mpe biloko mosusu na Internet ezali na likama nini?

Bakomantɛrɛ, bafɔtɔ mpe bavideo oyo otyaka na Internet ekoki komonisa ete ozali komikumisa, mpe ozali na komikitisa te.​—w20.07, nk. 6-7.

Ndakisa ya baluki-mbisi oyo bayebi malamu mosala na bango ekoki koteya biso nini?

Baluki-mbisi basengeli koyeba esika oyo bakoki kokanga mbisi mpe ntango ya malamu ya kokanga yango. basengeli kozala na bisaleli ya malamu mpe koyeba ndenge ya kosalela yango. Na mpiko nyonso, basalaka na molili na butu. Biso mpe tosengeli kosalaka bongo na mosala na biso ya kosakola.​—w20.09, lok. 5.

Makambo nini tokoki kosala mpo na kosalisa bayekoli ya Biblia bákóma kolinga lisusu Nzambe mingi?

Tokoki kolendisa bango batángaka Biblia mokolo na mokolo mpe bamanyolaka na makambo oyo bazali kotánga. Tokoki mpe kolakisa bango ndenge ya kobondela.​—w20.11, lok. 4.

Banani bazali na kati ya ‘bato nyonso oyo bakozongisama na bomoi na kati ya Kristo’?​—1 Ko. 15:22.

Ntoma Paulo azalaki koloba te ete bato nyonso bakosekwa. Azalaki nde kolobela bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo ‘basantisamá na bomoko elongo na Kristo Yesu.’ (1 Ko. 1:2; 15:18)​—w20.12, nk. 5-6.

Makambo nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakosala ntango bakobongwana nsima ya “kobɛta ya liso, na kelelo ya nsuka”?​—1 Ko. 15:51-53.

Bakosala elongo na Kristo mpo na kokamba bato na lingenda ya ebende. (Em. 2:26, 27)​—w20.12, nk. 12-13.