Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bolingo ya ndenge nini epesaka esengo ya solosolo?

Bolingo ya ndenge nini epesaka esengo ya solosolo?

“Esengo na bato oyo Yehova azali Nzambe na bango!”​—NZEMBO 144:15.

NZEMBO: 111, 109

1. Mpo na nini eleko na biso ekeseni na eleko mosusu nyonso?

TOZALI na eleko oyo ekeseni mpenza na bileko mosusu nyonso. Yehova azali koyanganisa ebele mpenza ya bato ‘na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso na mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso,’ kaka ndenge Biblia esakolaki yango. Bazali “ekólo ya nguya” ya bato koleka milio 8 oyo bazali na esengo mpe “bazali kosalela [Nzambe] mosala mosantu butu moi.” (Emoniseli 7:9, 15; Yisaya 60:22) Mbala ya liboso bato ebele boye báyekola kolinga Nzambe mpe bazalani na bango.

2. Bolingo nini bato oyo bazali baninga ya Nzambe te bazalaka na yango? (Talá elilingi ya ebandeli.)

2 Kasi, Biblia esakolaki mpe ete na mikolo na biso, bato oyo bazali baninga ya Nzambe te bakozala na bolingo ya mabe, bolingo yango elukaka kaka matomba na yango moko. Ntoma Paulo akomaki ete na mikolo ya nsuka, bato bakozala “bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo,” mpe bato “balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe.” (2 Timote 3:1-4) Bolingo yango ya moimi ekeseni na bolingo ya bokristo. Bolingo yango epesaka esengo te. Kutu, etindaka bato báluka kaka bolamu na bango mpe ekómisaka bomoi mpasi mpo na moto nyonso.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo, mpe mpo na nini?

3 Ntoma Paulo ayebaki ete bolingo oyo elukaka kaka matomba na yango moko ekokóma mingi mpe ekozala likama mpo na bakristo. Yango wana akebisaki bango ete ‘bákima,’ to báboya, baoyo bamonisaka bolingo wana ya mabe. (2 Timote 3:5) Kasi tokokoka te koboya bato yango na makambo nyonso. Na yango, ndenge nini tokoki komibatela na bizaleli ya bato ya mokili mpe kosala makasi tósepelisa Yehova, Nzambe ya bolingo? Tótalela bokeseni kati na bolingo oyo Nzambe asɛngi biso tómonisa mpe bolingo oyo 2 Timote 3:2-4 elobeli. Kosala yango ekosalisa biso tótala ndenge ya komonisa bolingo oyo epesaka esengo ya solosolo.

OLINGAKA NZAMBE TO OMILINGAKA?

4. Mpo na nini ezali mabe te komilinga na ndenge oyo ebongi?

4 Ntoma Paulo akomaki ete: “Bato bakozala bato oyo bamilingaka.” Yango elingi koloba ete komilinga ezali mabe? Te, komilinga na ndenge oyo ebongi ezali mabe te, kutu esengeli moto amilinga. Yehova akelá biso bongo. Yesu alobaki: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Marko 12:31) Tokoki kolinga bato mosusu te soki biso moko tomilingaka te. Biblia elobi mpe ete: “Mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko. Moto oyo azali kolinga mwasi na ye azali komilinga ye moko, mpo ata moto moko te ayinaka nzoto na ye moko; kasi aleisaka nde yango mpe alɛngɛlaka yango.” (Baefese 5:28, 29) Na yango, komilinga na ndenge oyo ebongi ezali mabe te.

5. Bato oyo bamilingaka koleka ndelo bazalaka ndenge nini?

5 Komilinga oyo 2 Timote 3:2 elobeli ezali ya malamu te, ebongi te. Etindaka moto aluka kaka matomba na ye moko. Moto oyo amilingaka koleka ndelo, amitalelaka koleka ndenge oyo azali mpenza. (Tángá Baroma 12:3.) Atyelaka basusu likebi ata moke te. Soki makambo etamboli malamu te, apesaka kaka foti epai ya basusu. Moto ya ndenge wana azalaka mpenza na esengo te.

6. Kolinga Nzambe ebimisaka matomba nini?

6 Bato mosusu ya mayele na makambo ya Biblia balobaka ete ntango ntoma Paulo alobelaki bizaleli oyo ekomonana na mikolo ya nsuka, atángaki komilinga na esika ya liboso mpo yango nde ebimisaka bizaleli mosusu ya mabe oyo atángaki na nsima. Nzokande, kolinga Nzambe ebimisaka bizaleli ya malamu. Biblia etángi bolingo yango esika moko na esengo, kimya, motema molai, boboto, bolamu, kondima, motema pɛtɛɛ, mpe komipekisa. (Bagalatia 5:22, 23) Mokomi ya nzembo alobaki: “Esengo na bato oyo Yehova azali Nzambe na bango!” (Nzembo 144:15) Lokola Yehova azali Nzambe ya esengo, basaleli na ye mpe bazalaka na esengo. Lisusu, na bokeseni na bato oyo bamilingaka koleka ndelo mpe bakanisaka kaka na oyo bakoki kozwa, basaleli ya Yehova bazalaka na esengo mpo bapesaka basusu.​—Misala 20:35.

Tokoki kosala nini mpo tókóma te bato oyo bamilingaka koleka ndelo? (Talá paragrafe 7)

7. Mituna nini ekosalisa biso tóyeba ndenge bolingo na biso mpo na Nzambe ezali?

7 Ndenge nini okoki koyeba soki obandi komilinga mingi koleka Nzambe? Kanisá toli oyo ya bwanya: “Bósala eloko moko te na kowelana to mpo bozali komimona ete boleki bamosusu, kasi na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino, bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.” (Bafilipi 2:3, 4) Okoki komituna boye: ‘Nasalelaka toli yango? Nasalaka makasi nasala oyo Nzambe asɛngi? Nalukaka ndenge ya kosalisa basusu na lisangá mpe na mosala ya kosakola?’ Ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te kopesa ntango mpe makasi na biso mpo na kosalisa basusu. Esɛngaka kosala milende mpe komipimela makambo mosusu. Kasi eloko moko te ekoki kopesa biso esengo koleka koyeba ete Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba asepelaka na biso!

8. Kolinga Nzambe etindaki bakristo mosusu básala nini?

8 Kolinga Nzambe mpe mposa ya komipesa na mosala na ye etindaki bakristo mosusu bátika misala oyo ekokaki kopesa bango mbongo mingi. Ndeko Ericka afandaka na États-Unis mpe azali monganga. Na esika amipesa na mosala ya monganga, aponaki kokóma mobongisi-nzela mpe ye ná mobali na ye bakendaki kopesa mabɔkɔ na mikili ndenge na ndenge. Alobi boye: “Makambo ya malamu oyo tokutanaki na yango ntango tozalaki kopesa mabɔkɔ na lisangá ya monɔkɔ ya bapaya mpe boninga oyo tosali na bandeko esalisi biso mingi na bomoi. Nasalaka kaka mosala ya monganga tii lelo, kasi kopesa ntango mpe makasi na ngai na koteya bato makambo ya Yehova mpe kosalisa bandeko ya lisangá epesaka ngai esengo makasi na motema.”

OBOMBAKA BOZWI NA LIKOLÓ TO NA MABELE?

9. Mpo na nini moto oyo alingaka mbongo azalaka na esengo te?

9 Ntoma Paulo akomaki ete bato bakozala “bato oyo balingá mbongo.” Eleki mwa bambula, mobongisi-nzela moko na Irlande azalaki koyebisa mobali moko makambo ya Nzambe. Mobali yango afungolaki pɔtɔmɔni na ye, abimisaki nkasa ya mbongo, mpe alobaki: “Oyo nde nzambe na ngai!” Atako bato mingi bandimaka yango polele ndenge wana te, mingi bakanisaka bongo. Balingaka mbongo mpe biloko oyo yango ekoki kosomba. Nzokande, Biblia epesi likebisi oyo: “Moto oyo alingá palata akotonda palata te, mpe moto alingá bozwi akotonda mpe lifuti te.” (Mosakoli 5:10) Moto oyo alingaka mbongo atondaka yango te. Mposa na ye ezalaka kaka abakisa mpe abomaka nzoto mpo na yango. Nyonso wana ememaka “ebele ya bampasi.”​—1 Timote 6:9, 10.

10. Biblia elobi nini mpo na bozwi mpe bobola?

10 Toboyi te, biso nyonso tozalaka na mposa ya mbongo. Biblia elobi ete mbongo ebatelaka. (Mosakoli 7:12) Kasi moto akoki mpenza kozala na esengo soki azali kaka na oyo esengeli? Ɛɛ! (Tángá Mosakoli 5:12.) Agure mwana ya Yake akomaki boye: “Kopesa ngai bobola te, bomɛngo mpe te. Tiká nalya bilei oyo esengeli na ngai.” Ezali mpasi te komona ntina oyo alingaki te kozala na bobola makasi. Ndenge amonisaki yango na nsima, alingaki te kokóma moyibi mpo koyiba ekofingisa Nzambe. Kasi mpo na nini alingaki te kozala mozwi? Akomaki boye: “Noki natonda mpe nawangana yo mpe naloba: ‘Yehova nde nani?’” (Masese 30:8, 9) Mbala mosusu oyebi bato oyo batyelaka bomɛngo na bango motema na esika ya kotyela Nzambe motema.

11. Yesu alobaki nini mpo na mbongo?

11 Moto oyo alingaka mbongo akoki kosepelisa Nzambe te. Yesu alobaki: “Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale; mpo to akoyina oyo mpe akolinga mosusu, to akokangama na oyo mpe akotyola mosusu. Bokoki te kozala baombo ya Nzambe mpe ya Bomɛngo.” Liboso alobaki: “Bótika komibombela biloko ya motuya na mabele, epai ndɔngɛ mpe koguga ebebisaka, mpe epai miyibi bakɔtaka na makasi mpe bayibaka. Nzokande, bómibombela biloko ya motuya na likoló, epai ndɔngɛ mpe koguga ebebisaka te, mpe epai miyibi bakoki kokɔta te mpe koyiba te.”​—Matai 6:19, 20, 24.

12. Ndenge nini bomoi ya pɛpɛlɛ ekoki kosalisa biso tósalela Nzambe malamu? Pesá ndakisa.

12 Basaleli mingi ya Yehova basalaka makasi bázala na bomoi ya pɛpɛlɛ. Bamonaka ete bomoi yango epesaka esengo mpe etikelaka bango ntango mingi ya kosalela Yehova. Ndeko Jack, oyo afandaka na États-Unis, atɛkaki ndako na ye ya monene mpe kompanyi na ye mpo akóma mobongisi-nzela, lokola mwasi na ye. Alobi boye: “Ezalaki mpasi kotika ndako na biso ya kitoko mpe biloko na biso na mwa mboka moko kitoko. Kasi bambula ebele, nazalaki kozonga ndako na esengo te mpo na mikakatano ya mosala. Mwasi na ngai azalaki mobongisi-nzela mpe azalaki ntango nyonso na esengo. Azalaki koloba, ‘Nazali na patrɔ oyo aleki bapatrɔ nyonso!’ Sikoyo lokola ngai mpe nakómá mobongisi-nzela, biso nyonso tozali kosalela patrɔ moko, Yehova.”

Tokoki kosala nini mpo tókóma te bato balingá mbongo? (Talá paragrafe 13)

13. Mituna nini ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge oyo totalelaka mbongo?

13 Mpo oyeba ndenge oyo otalelaka mbongo, omituna boye na bosembo nyonso: ‘Bomoi na ngai emonisaka ete nandimaka mpenza makambo Biblia elobi mpo na mbongo? Koluka mbongo nde likambo eleki ntina mpo na ngai? Biloko ya mokili ezali na ntina mingi mpo na ngai koleka boyokani na ngai na Yehova mpe bato? Nandimaka mpenza ete Yehova akokokisa bamposa na ngai?’ Tóyeba ete Yehova akosundola ata mokolo moko te bato oyo batyelaka ye motema!​—Matai 6:33.

OLINGAKA YEHOVA TO BISENGO?

14. Wapi lolenge ya malamu ya kotalela bisengo?

14 Biblia esakolaki mpe ete na mikolo ya nsuka, bato bakozala bato “oyo balingá bisengo.” Kaka ndenge ezali mabe te komilinga na ndenge oyo ebongi mpe kotalela mbongo na bokatikati, ezali mabe te kosepela na bomoi na ndenge oyo ebongi. Bato mosusu balingaka komisepelisa ata moke te, nzokande yango te Yehova asɛngi biso. Biblia eyebisi basaleli ya Nzambe boye: “Kende, lyá bilei na yo na esengo mpe mɛlá vinyo na yo na motema esengo, mpo Nzambe ya solo asepeli na misala na yo.”​—Mosakoli 9:7.

15. Maloba ‘bato oyo balingá bisengo’ na 2 Timote 3:4 elimboli nini?

15 Vɛrsɛ ya 2 Timote 3:4 elobeli bato oyo balingaka bisengo mpe batyaka Nzambe mopanzi. Elobi te ete bato bakolinga bisengo koleka Nzambe, lokola nde bakolinga Nzambe mwa moke. Elobi nde ete bakolinga bisengo “na esika ya” Nzambe. Moto moko ya mayele na makambo ya Biblia akomaki ete vɛrsɛ yango “elimboli te ete balingaka mpe Nzambe mwa moke. Elimboli nde ete balingaka Nzambe ata moke te.” Yango ezali mpenza likebisi mpo na bato oyo balingá bisengo. Biblia emonisi ete ‘bisengo ya bomoi ezali kotambwisa bango motó.’​—Luka 8:14.

16, 17. Ndakisa nini Yesu atiká na oyo etali kotalela bisengo na bokatikati?

16 Yesu amonisaki ndenge ya kozala na bokatikati na oyo etali bisengo. Akendaki na “fɛti moko ya libala” mpe na “fɛti moko monene.” (Yoane 2:1-10; Luka 5:29) Na fɛti ya libala, lokola vinyo esilaki, asalaki likamwisi ya kobongola mai vinyo. Na libaku moko, ntango bato batyolaki ye mpo azalaki kolya mpe komɛla, Yesu apamelaki bato yango mpo bazalaki komimona sembo mpe bazalaki na bokatikati te.​—Luka 7:33-36.

17 Atako bongo, Yesu amipesaki na bisengo te. Atyaki Yehova na esika ya liboso mpe asalaki nyonso oyo akokaki mpo na kosalisa bato. Andimaki ata kokufa liwa ya mpasi mpo na kobikisa bato. Yesu ayebisaki bato oyo balingaki kolanda ye ete: “Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino mpe kokosela bino makambo ya ndenge nyonso mpo na ngai. Bósepela mpe bópumbwa na esengo, mpo mbano na bino ezali monene na likoló; mpo ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.”​—Matai 5:11, 12.

Tokoki kosala nini mpo tókóma te bato balingá bisengo? (Talá paragrafe 18)

18. Mituna nini ekosalisa biso tóyeba soki tomipesá na bisengo to te?

18 Nini ekoki kosalisa yo oyeba soki omipesá na bisengo to te? Okoki komituna boye: ‘Namonaka ete kominanola ezali na ntina mingi koleka makita mpe mosala ya kosakola? Nandimaka kotika biloko mosusu oyo nalingaka mpo nasalela Nzambe? Ntango naponaka kominanola, namitunaka soki Yehova akotalela yango ndenge nini?’ Soki tolingaka mpenza Nzambe mpe tolingaka kosepelisa ye, tokoboya makambo oyo toyebi ete ezali mabe, kasi mpe makambo oyo tokanisi ete ekosepelisa ye te.​—Tángá Matai 22:37, 38.

NDENGE YA KOZALA NA ESENGO

19. Banani bakoki kozala na esengo ya solosolo te?

19 Mokili ya Satana ezali konyokola bato esili koleka bambula 6 000. Sikoyo, na mikolo oyo ya nsuka, mokili etondi na bato oyo bamilingaka koleka ndelo, oyo balingá mbongo, mpe bisengo. Balukaka kaka kozwa mpe kokokisa libosoliboso bamposa na bango moko. Kasi, bato ya ndenge wana bakoki kozala na esengo ya solosolo te. Nzokande Biblia elobi: “Esengo na ye oyo Nzambe ya Yakobo nde mosungi na ye, oyo elikya na ye ezali epai ya Yehova Nzambe na ye.”​—Nzembo 146:5.

20. Ndenge nini kolinga Nzambe epesaka yo esengo?

20 Basaleli ya Yehova bazali kolinga ye lisusu mingi, mpe mbula na mbula, bato mosusu mingi bazali koyekola koyeba ye mpe kolinga ye. Yango emonisi ete Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela, mpe ete mosika te ekomema mapamboli oyo tokoki kokanisa te! Mpo tózala na esengo ya solosolo, tosengeli kosala oyo Yehova alingi mpe kosepelisa ye. Bato oyo balingaka Yehova bakozala na esengo libela na libela! Na lisolo oyo elandi, tokoyekola bizaleli mosusu ya mabe oyo bolingo ya moimi ebimisaka. Tokomona mpe ndenge bizaleli yango ekeseni na bizaleli ya basaleli ya Yehova.