Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Na Yisraele ya kala, bazalaki mpenza kolanda mitinda ya Mibeko ya Moize mpo na kokata makambo oyo ebimisi matata?

NA BANTANGO mosusu bazalaki kolanda. Tótalela ndakisa moko. Kolimbola Mibeko 24:14, 15 elobi boye: “Osengeli kobuba te mosali oyo azwaka lifuti, oyo azali na mpasi mpe azali mobola, ezala na kati ya bandeko na yo to na kati ya bapaya oyo bafandi na yo, oyo bazali na mokili na yo . . . noki alela epai ya Yehova mpo na yo, mpe yango ekokómela yo mpenza lisumu.”

Eteni ya mbɛki esika mosali-bilanga akomaki kolela na ye

Pene na Ashedode, bamonaki mokanda moko oyo elobeli likambo ya ndenge wana; ekomamaki na siɛklɛ ya nsambo L.T.B. Mbala mosusu mosali-bilanga moko oyo akokisaki te motángo ya mbuma oyo basɛngaki nde akomaki yango na eteni ya mbɛki. Akomelaki guvɛrnɛrɛ ete: “Ntango mosali na yo [mosali-bilanga] asilisaki kobuka mbuma eleki mwa mikolo, Hoshayahu mwana ya Shobay ayaki mpe azwaki elamba ya mosali na yo. . . . Baninga na ngai nyonso ya mosala oyo tozalaki kobuka mbuma elongo na bango na nse ya moi makasi bakoki koyebisa yo . . . ete oyo nalobi ezali solo. Nasali eloko moko te ya mabe. . . . Soki omoni ete esengeli te azongisa elamba ya mosali na yo, salá yango ata mpo na motema mawa! Salá mwa eloko mpo mosali na yo azangi elamba.”

Simon Schama, moto moko ya istware alobi boye: “Likambo yango ezali komonisa kaka te kolela ya mosali oyo azali kosɛnga [elamba na ye]. Ezali mpe komonisa ete moto oyo afundi ayebaki mitinda oyo ezalaki na mibeko ya Biblia oyo ezali na Balevi mpe Kolimbola Mibeko, mingimingi oyo epekisi konyokola mobola.”