Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini kopesa moto oyo azali na nyonso?

Mpo na nini kopesa moto oyo azali na nyonso?

“Ee Nzambe na biso, tozali kopesa yo matɔndi mpe kosanzola nkombo na yo monene.”​—1 NTANGO 29:13.

NZEMBO: 80, 50

1, 2. Ndenge nini Yehova asalelaka biloko na ye?

YEHOVA azali Nzambe oyo akabaka. Nyonso oyo tozali na yango euti epai na ye. Wolo ná palata mpe biloko nyonso ya motuya oyo ezali na mabele ezali ya ye, mpe asalelaka yango mpo na kobatela bomoi. (Nzembo 104:13-15; Hagai 2:8) Biblia ezali na masolo oyo emonisi ndenge Yehova asalelaki biloko yango ya motuya na ndenge ya likamwisi mpo na kosalisa basaleli na ye.

2 Na ndakisa, Yehova apesaki Bayisraele mana mpe mai ntango bafandaki na esobe mbula 40. (Kobima 16:35) Na yango, “bazangaki eloko te.” (Nehemia 9:20, 21) Yehova apesaki Elisha nguya ya kosala ete mwa mafuta ya mwasi moko ya sembo oyo mobali akufá ekóma ebele. Likabo wana ya Nzambe esalisaki ye afuta banyongo na ye mpe atikalaki na mbongo oyo ekoki mpo ye ná bana na ye bábikela. (2 Bakonzi 4:1-7) Lisusu, na lisalisi ya Yehova, Yesu aleisaki bato na ndenge ya likamwisi, mpe abimisaki ata mbongo ntango esengelaki.​—Matai 15:35-38; 17:27.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Yehova akoki kosalela eloko nyonso oyo alingi mpo na kosalisa bikelamu na ye awa na mabele. Atako bongo, asɛngi basaleli na ye bápesa oyo bakoki mpo na kosimba mosala ya ebongiseli na ye. (Kobima 36:3-7; tángá Masese 3:9.) Mpo na nini Yehova asɛngi tópesa ye biloko na biso ya motuya, elingi koloba tózongisela ye oyo apesaki biso? Ndenge nini basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala bapesaki mbongo mpo na kosunga mosala na ye? Ndenge nini ebongiseli ya Nzambe esalelaka mbongo oyo topesaka makabo lelo? Lisolo oyo ekopesa biyano na mituna wana.

MPO NA NINI TOPESAKA YEHOVA?

4. Mpo na nini topesaka Yehova?

4 Topesaka Yehova mpo tolingaka ye mpe tozali na botɔndi epai na ye. Kokanisa nyonso oyo Yehova asaleli biso esimbaka mpenza motema na biso. Tondimaka likambo oyo Mokonzi Davidi alobelaki biloko oyo esengelaki mpo na kotonga tempelo. Alobaki ete eloko nyonso tozwaka eutaka epai ya Yehova mpe eloko nyonso oyo topesaka Ye eutaka na biloko oyo apesá biso.​—Tángá 1 Ntango 29:11-14.

5. Ndenge nini Biblia emonisi ete kopesa na motema moko ezali na esika na kati ya losambo ya solo?

5 Topesaka Yehova mpo ezali mpe lolenge ya kosambela ye. Na emonaneli moko, ntoma Yoane ayokaki basaleli ya Yehova na likoló bazali koloba ete: “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpo yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.” (Emoniseli 4:11) Ya solo, Yehova abongi kozwa nkembo mpe lokumu nyonso, yango wana tolingaka kopesa ye biloko na biso oyo eleki malamu. Yehova alobaki na Moize ayebisa Bayisraele básalaka bafɛti misato na mbula. Na bafɛti yango ya losambo, basengelaki mpe kopesa Yehova. Bayebisaki bango ete “moto moko te akomonana liboso ya Yehova mabɔkɔ mpamba.” (Kolimbola Mibeko 16:16) Lelo oyo mpe, kopesa na motema moko ezali na esika na kati ya losambo na biso. Na ndenge yango, tomonisaka ete tosepelaka na mosala ya ebongiseli ya Yehova mpe topesaka yango mabɔkɔ.

6. Mpo na nini kopesa ezali malamu mpo na biso? (Talá elilingi ya ebandeli.)

6 Kopesa ezali malamu mpo na biso. Ezali malamu kopesa na motema moko na esika ya koluka kaka kozwa. (Tángá Masese 29:21.) Tózwa ndakisa ya mwana oyo baboti na ye bapesi ye mwa mbongo mpe asaleli mbongo ndambo mpo na kosombela baboti likabo. Na ntembe te, baboti na ye bakosepela mingi! To kanisá ete mobongisi-nzela moko ya elenge oyo afandaka na baboti na ye apesi bango mwa mbongo mpo bábakisa na mbongo ya kofuta ndako to kosomba bilei. Mbala mosusu baboti na ye basɛngaki te ete asala bongo, kasi bakondima likabo yango. Mpo na nini? Mpo mwana amonisi botɔndi mpo na nyonso oyo baboti basalelaka ye. Ndenge moko mpe, Yehova ayebi ete kopesa ye biloko na biso ya motuya ezali malamu mpo na biso.

NDENGE BASALELI YA NZAMBE BAPESAKI NA NTANGO YA KALA

7, 8. Ndakisa nini basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala batiká na oyo etali kopesa (a) mpo na misala ya sikisiki? (b) mpo na kosunga bato oyo bazalaki kotambwisa mosala?

7 Biblia emonisi ete basaleli ya Yehova bapesaki makabo mpo na mosala na ye. Na bantango mosusu, bapesaki mpo na misala ya sikisiki. Na ndakisa, Moize alendisaki Bayisraele bápesa makabo mpo na kotonga tabernakle. Na nsima, Mokonzi Davidi asalaki mpe bongo mpo na botongi ya tempelo. (Kobima 35:5; 1 Ntango 29:5-9) Na boyangeli ya Mokonzi Yehoashe, banganga-nzambe babongisaki tempelo na mbongo oyo bato bapesaki. (2 Bakonzi 12:4, 5) Na lisangá ya bokristo na siɛklɛ ya liboso, ntango bakristo bayokaki ete bandeko ya Yudea bazalaki na bosɛnga mpo nzala ekɔtaki kuna, “bazwaki mokano, moto na moto na kolanda oyo azalaki na yango, ya kotindela bandeko oyo bazalaki kofanda na Yudea biloko ya lisungi.”​—Misala 11:27-30.

8 Basaleli ya Yehova bapesaki mpe makabo mpo na kosunga bato oyo bazalaki kotambwisa mosala. Na ndakisa, Mibeko ya Moize epekisaki Balevi bázwa libula, ndenge mabota mosusu ezwaki. Na yango, Bayisraele bazalaki kopesa Balevi bandambo zomi ya biloko na bango mpo bákoba komipesa mingi na mosala na bango na tabernakle. (Mitángo 18:21) Ndenge moko mpe, basi oyo bazalaki lobɔkɔ pɛtɛɛ basalelaki biloko na bango mpo na kosalisa Yesu ná bantoma na ye.​—Luka 8:1-3.

9. Na ntango ya kala, makabo eutaki wapi?

9 Makabo yango ezalaki ndenge moko te. Ekoki kozala ete Bayisraele oyo bapesaki makabo mpo na kotonga tabernakle bapesaki biloko ya motuya oyo bazwaki na Ezipito. (Kobima 3:21, 22; 35:22-24) Na siɛklɛ ya liboso, bakristo mosusu batɛkaki biloko na bango, lokola bilanga to bandako, mpe bamemaki mbongo epai ya bantoma. Mpe bantoma basalelaki mbongo yango mpo na kosalisa bandeko oyo bazalaki na bosɛnga. (Misala 4:34, 35) Pɔsɔ na pɔsɔ, bakristo mosusu bazalaki kotya mwa mbongo pembeni mpo bápesa yango likabo na mosala ya Nzambe. (1 Bakorinti 16:2) Na yango, ezala bazwi to babola, bango nyonso bakokaki kopesa makabo.​—Luka 21:1-4.

NDENGE TOPESAKA LELO OYO

10, 11. (a) Ndenge nini tokoki komekola bokabi ya basaleli ya Yehova ya ntango ya kala? (b) Oyokaka ndenge nini mpo na libaku ya kopesa makabo mpo na mosala ya Bokonzi?

10 Lelo oyo, bakoki mpe kosɛnga biso tópesa makabo mpo na mosala moko ya sikisiki. Mbala mosusu lisangá elingi kobongisa Ndako ya Bokonzi to kotonga ya sika. Ekoki mpe kosɛnga tótya makabo mpo na kobongisa lisusu Betele, mpo na kobongisa liyangani ya etúká to kosalisa bandeko na bisika oyo makama lokola mopɛpɛ makasi to koningana ya mabele esalemi. Makabo na biso esalisaka mpe bamisionɛrɛ, babongisi-nzela monene, bakɛngɛli ya zongazonga, mpe bandeko oyo basalaka na biro monene mpe na Babetele na mokili mobimba. Ekoki mpe kozala ete lisangá etindaka mwa mbongo sanza nyonso mpo na kosalisa na kotonga Bandako ya mayangani mpe Bandako ya Bokonzi na mikili mosusu.

11 Biso nyonso tokoki kopesa mwa eloko mpo na mosala oyo ebongiseli ya Yehova ezali kosala na mikolo oyo ya nsuka. Nkombo ya bato mingi oyo bapesaka makabo eyebanaka te. Ntango totye mbongo na kɛsi na Ndako ya Bokonzi to topesi likabo na Internet na nzela ya jw.org, toyebisaka basusu te mbongo boni totyaki. Kasi okosala nini soki okanisi ete likabo na yo ezali mpenza moke? Mpo na koloba solo, mbongo mingi oyo ebongiseli ya Nzambe ezwaka eutaka na makabo ebele ya mikemike, kasi te na makabo mibale to misato ya mineneminene. Ata bandeko oyo bazali na biloko moke bamekolaka bakristo ya Masedonia na siɛklɛ ya liboso. Bazalaki na ‘bobola ya makasi,’ kasi basɛngaki ete bápesa bango nzela ya kokaba mpe basalaki yango na motema mobimba.​—2 Bakorinti 8:1-4.

12. Ndenge nini ebongiseli esalaka nyonso mpo esalela mbongo ya makabo malamu?

12 Bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi basalaka makasi bázala sembo mpe mayele na ndenge ya kosalela mbongo ya makabo. (Matai 24:45) Babondelaka mpo bázwa bikateli ya malamu, mpe babongisaka malamu ndenge ya kosalela mbongo. (Luka 14:28) Na ntango ya kala, mibali ya sembo oyo bazalaki kobatela makabo bazalaki kolanda malako ya sikisiki mpo na kosalela yango kaka mpo na losambo ya Yehova. Na ndakisa, Ezera azongaki na Yerusaleme na biloko ya motuya oyo mokonzi ya Perse apesaki likabo: wolo, palata, mpe biloko mosusu ya ntalo oyo lelo ekoki kozala na valɛrɛ ya dolare koleka milio 100. Ezera amonaki makabo yango ete ezalaki ya Yehova. Na yango, apesaki malako ya polele mpo na kobatela yango ntango bazalaki koleka na nzela oyo ezalaki na bato mabe. (Ezera 8:24-34) Bambula mingi na nsima, ntoma Paulo asangisaki mbongo mpo na kosunga bandeko ya Yudea. Amindimisaki ete bato oyo bakomema mbongo yango ‘babongisaki makambo na bosembo, kaka na miso ya Yehova te, kasi mpe na miso ya bato.’ (Tángá 2 Bakorinti 8:18-21.) Na ndakisa ya Ezera mpe ya Paulo, ebongiseli na biso elandaka malako ya sikisiki mpo na kosalela mbongo ya makabo.

13. Mpo na nini ebongiseli ya Nzambe esali mwa bambongwana mikolo eleki?

13 Bato ya libota moko bakoki kobongola ndenge na bango ya kosalela mbongo mpo mbongo oyo bazali kobimisa eleka te oyo bazwaka. To bakoki koluka ndenge ya kokómisa bomoi na bango pɛpɛlɛ mpo básala lisusu mingi na mosala ya Yehova. Ebongiseli ya Yehova mpe esalaka bongo. Mikolo eleki, ezalaki na misala mingi ya kosala, mpe na bantango mosusu mbongo oyo ebimaki elekaki oyo ekɔtaki. Yango wana, ebongiseli ya Yehova elukaka ndenge ya kobatela mbongo mpe kokómisa mosala pɛpɛlɛ mpo esalela malamu makabo oyo epesamaka na bolingo.

MOSALA OYO MAKABO NA YO ESALAKA

Makabo na yo esalaka mosala na mokili mobimba (Talá paragrafe 14-16)

14-16. (a) Mosala nini makabo oyo opesaka esalaka? (b) Ndenge nini makambo nyonso wana esalisi yo?

14 Bandeko mingi oyo baumeli na lisangá bazali koloba ete mikolo oyo ebongiseli ya Nzambe ezali kobimisela biso biloko mingi koleka ndenge ezalaki liboso. Tokómi sikoyo na site jw.org mpe TV JW. Biblia​Libongoli ya Mokili ya Sika ebimi na minɔkɔ mosusu ebele. Na 2014 mpe 2015, na ba stade minene ya bingumba soki 14, tosalaki liyangani ya mikolo misato oyo esangisaki mikili mingi, oyo ezalaki na motó ya likambo ‘Kobá koluka liboso Bokonzi ya Nzambe!’ Moto nyonso oyo azalaki kuna asepelaki!

15 Bandeko mingi balobi ete bazali na botɔndi mingi mpo na biloko nyonso oyo ebongiseli ya Yehova ezali kopesa biso. Na ndakisa, ndeko moko ná mobali na ye oyo bapesaka mabɔkɔ na ekólo moko na Azia bakomaki boye: “Teritware na biso ezali engumba moko ya moke. Na yango, na bantango mosusu toyokaka lokola tozali kaka biso moko, mpe ezalaka mpasi te tóbosana bonene ya ebongiseli ya Yehova. Kasi soki kaka totali baemisyo ya TV JW, tomonaka ete tozali na kati ya libota ya bandeko ya mokili mobimba. Bandeko ya teritware na biso basepelaka mingi na TV JW. Mbala mingi nsima ya kotala emisyo ya sanza, balobaka ete bazali komiyoka penepene na bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Sikoyo, basepelaka mingi koleka ndenge bazali na kati ya ebongiseli ya Nzambe.”

16 Na mokili mobimba, tozali kotonga to kobongisa Bandako ya Bokonzi soki 2 500. Ntango babandaki kosalela Ndako ya Bokonzi na bango ya sika, bandeko ya lisangá moko na Honduras bakomaki boye: “Tozali mpenza na esengo ya kozala na kati ya libota monene ya Yehova mpe tosepelaka mpenza na lisangá ya bandeko na biso ya mokili mobimba. Yango nde ekokisi ndɔtɔ na biso ya kozala na Ndako ya Bokonzi ya biso moko.” Bandeko mingi balobaka kaka bongo ntango bazwi Biblia mpe mikanda mosusu na minɔkɔ na bango, ntango bazwi lisungi nsima ya likama, to ntango bamoni mbuma malamu ya kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso na teritware na bango.

17. Ndenge nini toyebi ete Yehova azali kopambola ebongiseli na ye lelo?

17 Bato mingi oyo bazali Batatoli te bayebaka te ndenge tosalaka makambo nyonso wana kaka na makabo ya bolingo malamu. Mokonzi ya kompanyi moko ya monene akendaki kotala bamasini na biso ya kobimisa mikanda na ekólo moko. Akamwaki komona ete bato nyonso oyo basalaka kuna bafutamaka te, mbongo ya mosala eutaka na makabo, mpe tobengisaka bato te na milulu moko boye mpo na kosɛnga mbongo. Alobaki ete makambo oyo tosalaka ekoki kosalema te. Alobaki solo! Toyebi ete ezali kosalema kaka mpo Yehova nde azali kopambola mosala yango.​—Yobo 42:2.

KOPESA YEHOVA EMEMAKA MAPAMBOLI

18. (a) Mapamboli nini tozwaka ntango topesaka mpo na mosala ya Bokonzi? (b) Ndenge nini tokoki koteya bana na biso mpe bato ya sika básala mpe bongo?

18 Yehova apesi biso lokumu mpe libaku ya kopesa mabɔkɔ na mosala monene ya Bokonzi oyo ezali kosalema lelo. Alobi ete ntango tozali kosala bongo, akopambola biso. (Malaki 3:10) Yehova alaki ete moto oyo akabaka akokelela te. (Tángá Masese 11:24, 25.) Alobi mpe ete tokozala na esengo soki tozali kopesa, mpo “esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Na maloba mpe na misala na biso, tóteya bana na biso mpe bato ya sika ndenge bango mpe bakoki kopesa mabɔkɔ na mosala ya Nzambe, mpe kozwa mapamboli ebele.

19. Lisolo oyo elendisi yo na nini?

19 Biloko nyonso oyo tozali na yango euti epai ya Yehova. Ntango topesi ye lisusu biloko oyo apesaka biso, tomonisaka ete tolingaka ye mpe ete tosepelaka na nyonso asalelaka biso. (1 Ntango 29:17) Ntango Bayisraele bapesaki makabo mpo na kotonga tempelo, “basepelaki na ndenge bazalaki kopesa makabo ya bolingo, mpo ezalaki na motema mobimba nde bazalaki kopesa Yehova makabo ya bolingo.” (1 Ntango 29:9) Tiká ete biso mpe tókoba kosepela wana tozali kopesa Yehova biloko oyo ye moko apesaki biso.