Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 1

“Komitungisa te, mpo nazali Nzambe na yo”

“Komitungisa te, mpo nazali Nzambe na yo”

“Kobanga te, mpo nazali na yo. Komitungisa te, mpo nazali Nzambe na yo. Nakopesa yo makasi. Nakosalisa yo mpenza.”​—YIS. 41:10. *

LOYEMBO 7 Yehova azali makasi na biso

NA MOKUSE *

1-2. (a) Ndenge nini maloba ya Yisaya 41:10 esalisaki ndeko moko na nkombo Yoshiko? (b) Yehova asalaki ete maloba yango ekomama mpo na kosalisa banani?

NDEKO mwasi moko ya sembo na nkombo Yoshiko azwaki nsango moko ya mabe. Monganga ayebisaki ye ete akokufa nsima ya mwa basanza. Yoshiko asalaki nini? Akanisaki vɛrsɛ moko oyo alingaki mingi, Yisaya 41:10. (Tángá.) Na nsima, ayebisaki monganga na ye na kimya nyonso ete azali kobanga te, mpo Yehova asimbi ye na lobɔkɔ. * Maloba ya kobɔndisa oyo ezali na vɛrsɛ wana esalisaki ndeko na biso atyela Yehova motema mobimba. Vɛrsɛ yango ekoki mpe kosalisa biso tózala motema kimya ntango tokutani na komekama makasi. Mpo tómona ndenge ekoki kosalisa biso, tótalela naino ntina oyo Nzambe ayebisaki Yisaya maloba ya vɛrsɛ yango.

2 Yehova ayebisaki Yisaya akoma maloba yango libosoliboso mpo na kobɔndisa Bayuda oyo na nsima bamemamaki na boombo na Babilone. Kasi, Yehova asalaki ete maloba yango ekomama mpo na kosalisa kaka Bayuda oyo bamemamaki na boombo te, kasi mpe basaleli na ye mosusu nyonso tii lelo. (Yis. 40:8; Rom. 15:4) Lelo oyo, tozali na “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano,” mpe tozali mpenza na mposa ya maloba ya kolendisa oyo ezali na mokanda ya Yisaya.​—2 Tim. 3:1.

3. (a) Bilaka nini ezali na Yisaya 41:10, oyo ezali mokapo ya mobu 2019? (b) Mpo na nini tozali mpenza na mposa ya bilaka yango?

3 Na lisolo oyo, tokolobela bilaka * misato ya Yehova oyo ezali na Yisaya 41:10, oyo ekómisaka kondima na biso makasi: (1) Yehova akozala na biso, (2) azali Nzambe na biso, mpe (3) akosalisa biso. Tozali mpenza na mposa ya bilaka wana mpo, ndenge moko na Yoshiko, biso nyonso tokutanaka na komekama. Longola yango, tokutanaka na mikakatano mpo na makambo ya mabe oyo ezali kosalema na mokili. Kutu, bandeko na biso mosusu bazali koyika mpiko na minyoko oyo euti na baguvɛrnema ya nguya. Tótalela bilaka yango mokomoko.

“NAZALI NA YO”

4. (a) Wapi elaka ya liboso oyo tokotalela? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.) (b) Na maloba nini Yehova amonisi ndenge atalelaka biso? (c) Maloba ya Nzambe etindi yo omiyoka ndenge nini?

4 Ya liboso, Yehova apesi biso elaka oyo: “Kobanga te, mpo nazali na yo.” * Yehova amonisaka ete azali na biso na ndenge atyelaka biso likebi mingi mpe alingaka biso. Talá ndenge amonisi boboto mpe bolingo na ye epai na biso. Alobi boye: “Lokola ozali na motuya na miso na ngai, . . . ozali na lokumu, mpe ngai nalingi yo.” (Yis. 43:4) Eloko moko te na molɔ́ngɔ́ mobimba ekoki kosala ete Yehova atika kolinga basaleli na ye; akozala ntango nyonso sembo epai na biso. (Yis. 54:10) Bolingo mpe boninga na ye epesaka biso mpiko mingi. Yehova akobatela biso lelo oyo, ndenge kaka abatelaki moninga na ye Abrama (Abrahama). Ayebisaki ye: “Kobanga te, Abrama. Ngai nazali nguba na yo.”​—Eba. 15:1.

Yehova akoki kosalisa biso tólonga mikakatano oyo ezali lokola bibale mpe mɔtɔ (Talá paragrafe 5-6) *

5-6. (a) Ndenge nini toyebi ete Yehova asepelaka kosalisa biso ntango tokutani na komekama? (b) Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yoshiko?

5 Toyebi ete Yehova asepelaka kosalisa biso ntango tokutani na komekama mpo apesi basaleli na ye elaka oyo: “Soki oleki na mai, nakozala elongo na yo; mpe soki oleki na bibale, ekozindisa yo te. Soki otamboli na mɔtɔ, okozika te, lolemo ya mɔtɔ mpe ekotumba yo te.” (Yis. 43:2) Maloba yango elimboli nini?

6 Yehova alobi te ete akolongola mikakatano na bomoi na biso, kasi alobi ete akotika te “bibale,” elingi koloba ebele ya mikakatano ezindisa biso to “lolemo ya mɔtɔ,” elingi koloba komekama ya makasi esala biso mabe mpo na libela. Apesi biso elaka ete akozala na biso, akosalisa biso ‘tóleka’ mikakatano yango. Yehova akosala nini? Akosalisa biso tólongola kobanga mpo tóbatela bosembo na biso, ata ntango esɛngi tókufa. (Yis. 41:13) Yoshiko, oyo tolobelaki na ebandeli, amonaki bosolo ya likambo yango. Mwana na ye ya mwasi alobi boye: “Tokamwaki ndenge Mama amitungisaki te. Tomonaki mpenza ete Yehova apesaki ye kimya ya motema. Tii mokolo oyo akufaki, Mama azalaki koyebisa mafulume mpe bato mosusu ya maladi makambo ya Yehova mpe bilaka na ye.” Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yoshiko? Soki totye motema na elaka oyo ya Nzambe ete “Nakozala elongo na yo,” biso mpe tokozala na mpiko mpe na makasi ntango tokutani na komekama.

“NAZALI NZAMBE NA YO”

7-8. (a) Wapi elaka ya mibale oyo tokotalela, mpe yango elimboli nini? (b) Mpo na nini Yehova alobaki na Bayuda oyo bazalaki bakangami ete: “Komitungisa te”? (c) Kozanga ntembe, maloba nini oyo ezali na Yisaya 46:3, 4 ekitisaki mitema ya basaleli ya Nzambe?

7 Ya mibale, Yehova apesi biso elaka oyo na nzela ya Yisaya: “Komitungisa te, mpo nazali Nzambe na yo.” Maloba yango elimboli nini? Na vɛrsɛ yango, maloba ya Ebre oyo ebongolami na “komitungisa te” epesaka likanisi ya “kotala epai na epai,” “kotalatala nsima mpo ozali kobanga ete likama ekoki kokómela yo,” to mpe “kozala ekɛngɛ.”

8 Mpo na nini Yehova ayebisaki Bayuda oyo bakomemama bakangami na Babilone ete ‘bámitungisa te’? Mpo ayebaki ete bafandi ya mokili yango bakokóma kobanga. Likambo nini ekobangisa bango? Pene na nsuka ya mbula 70 ya boombo ya Bayuda na Babilone, mampinga ya nguya ya Bamede ná Baperse ekobundisa Babilone. Yehova akosalela mampinga yango mpo na kolongola bato na ye na boombo na Babilone. (Yis. 41:2-4) Ntango bato ya Babilone mpe bato ya bikólo mosusu ya ntango wana bayebaki ete banguna na bango bazalaki kopusana, basalaki makasi bábatela mpiko na bango mpe bazalaki kolobana ete: “Zalá makasi.” Babakisaki mpe banzambe ya bikeko ebele, na elikya ete ekobatela bango. (Yis. 41:5-7) Kasi, Yehova akitisaki mitema ya Bayuda oyo bazalaki bakangami na Babilone na maloba oyo: “Ee Yisraele, [na kokesana na bato mosusu] ozali mosaleli na ngai . . . Komitungisa te, mpo nazali Nzambe na yo.” (Yis. 41:8-10) Yehova alobaki ete: “Nazali Nzambe na yo.” Na maloba wana, azalaki koyebisa basaleli na ye ya sembo ete abosanaki bango te: azalaki kaka Nzambe na bango mpe bango bazalaki kaka bato na ye. Ayebisaki bango: “Ngai moko nakosala . . . mpo . . . nakumba bino . . . mpe nabikisa bino.” Na ntembe te, maloba yango ya kobɔndisa epesaki Bayuda makasi.​—Tángá Yisaya 46:3, 4.

9-10. Mpo na nini tozali na ntina ya kobanga te? Pesá ndakisa.

9 Lelo oyo, koleka bileko mosusu nyonso, bato bazali komitungisa mpo makambo ya mokili oyo ezali se kobeba. Makambo yango ezali mpe kopesa biso mpasi. Nzokande, tozali na ntina ya kobanga te. Yehova ayebisi biso ete: “Nazali Nzambe na yo.” Mpo na nini maloba wana ebongi mpenza kokitisa biso motema?

10 Tózwa ndakisa oyo: Ben ná Jim bazali kosala mobembo na mpɛpɔ moko, mpe bakómi na esika moko ya mopɛpɛ makasi. Ntango mopɛpɛ ebandi koningisa mpɛpɔ, bayoki mongongo moko elobi: “Bótya mokaba ya komibatela. Tozali koleka na esika ya mobulu.” Jim abandi komitungisa makasi. Kasi, na ntango yango mokumbi-mpɛpɔ abakisi: “Ngai mokumbi-mpɛpɔ na bino nalobi: Bómitungisa te.” Mbala moko, Jim aningisi motó mpe alobi: “Azali koloba kaka tiká aloba!” Kasi, amoni ete Ben azali komitungisa ata moke te. Jim atuni ye: “Mpo na nini ozali komitungisa te?” Ben asɛki mpe alobi: “Mpo nayebi mokumbi-mpɛpɔ oyo malamu. Ezali tata na ngai!” Na nsima alobi: “Zelá nayebisa yo soki tata na ngai azali nani. Ntango okoyeba ye malamu mpe mayele na ye ya kokumba mpɛpɔ, yo mpe okotika komitungisa.”

11. Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa ya bato mibale oyo bazali kosala mobembo na mpɛpɔ?

11 Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa yango? Ndenge moko na Ben, biso mpe tomitungisaka te mpo toyebi malamu mpenza Yehova, Tata na biso ya likoló. Toyebi ete akosalisa biso tóyika mpiko na mikakatano ata ya makasi oyo tokoki kokutana na yango na mikolo ya nsuka ya mokili oyo. (Yis. 35:4) Lokola totyelaka Yehova motema, tokoki kozala kimya ata ntango bato mosusu nyonso bazali mpenza kobanga. (Yis. 30:15) Lisusu, tosalaka lokola Ben ntango toyebisaka bato ntina oyo totyelaka Nzambe motema. Na ndenge yango, bango mpe bakoki kotya motema ete ata soki bakutani na makambo nini, Yehova akosalisa bango.

“NAKOPESA YO MAKASI [MPE] NAKOSALISA YO MPENZA”

12. (a) Wapi elaka ya misato oyo tokotalela? (b) Ndenge Yisaya alobeli “lobɔkɔ” ya Yehova ezali kokundwela biso nini?

12 Ya misato, na nzela ya Yisaya Yehova apesaki elaka oyo: “Nakopesa yo makasi. Nakosalisa yo mpenza.” Yisaya asilaki komonisa ndenge oyo Yehova akopesa basaleli na ye makasi; alobaki: “Yehova ye moko akoya mpenza lokola moto ya makasi, mpe lobɔkɔ na ye ekoyangela mpo na ye.” (Yis. 40:10) Mbala mingi, Biblia esalelaka liloba “lobɔkɔ” na ndenge ya elilingi mpo na kolobela nguya. Na yango, maloba “lobɔkɔ na ye ekoyangela” ezali kokundwela biso ete Yehova azali Mokonzi ya nguya. Asalelaki makasi na ye mpo na kosalisa mpe kokɔtela basaleli na ye na ntango ya kala, mpe azali kokoba kosalela yango mpo na kolendisa mpe kobatela baoyo batyelaka ye motema lelo oyo.​—Mib. 1:30, 31; Yis. 43:10.

Ebundeli moko te ekolonga kokweisa lobɔkɔ ya Yehova oyo ebatelaka biso (Talá paragrafe 12-16) *

13. (a) Yehova akokisaka elaka na ye ya kopesa biso makasi mingimingi ntango nini? (b) Ndanga nini ebakiselaka biso makasi mpe kondima?

13 Mingimingi ntango banguna banyokolaka biso, Yehova akokisaka elaka na ye oyo: “Nakopesa yo makasi.” Na bisika mosusu lelo oyo, banguna na biso bazali kosala nyonso mpo na kopekisa biso mosala ya kosakola to kokanga mpenza misala na biso. Atako bongo, tomitungisaka koleka ndelo te mpo na makambo ya ndenge wana. Yehova apesi biso ndanga oyo ebakiselaka biso makasi mpe kondima. Alaki biso ete: “Ebundeli nyonso oyo ekosalema mpo na kobunda na yo ekolonga te.” (Yis. 54:17) Maloba wana ezali kokundwela biso makambo misato ya ntina.

14. Mpo na nini tokamwaka te ndenge banguna ya Nzambe babundisaka biso?

14 Ya liboso, lokola tozali bayekoli ya Kristo, toyebaka ete bato bakoyina biso. (Mat. 10:22) Yesu asakolaki ete bakonyokola mpenza bayekoli na ye na mikolo ya nsuka. (Mat. 24:9; Yoa. 15:20) Ya mibale, esakweli ya Yisaya elobaki ete banguna na biso bakosuka kaka te na koyina biso; bakosalela mpe bibundeli ndenge na ndenge mpo na kobundisa biso. Bibundeli yango ekoki kozala mayele mabe, lokuta ya polele, to mpe minyoko ya makasi. (Mat. 5:11) Yehova akopekisa te banguna na biso básalela bibundeli wana mpo na kobundisa biso. (Ef. 6:12; Em. 12:17) Kasi, tosengeli kobanga te. Mpo na nini?

15-16. (a) Likambo nini ya misato tosengeli kobosana te, mpe ndenge nini Yisaya 25:4, 5 endimisi yango? (b) Yisaya 41:11, 12 emonisi ete baoyo bazali kobundisa biso bakosuka ndenge nini?

15 Talá likambo ya misato oyo tosengeli kobosana te. Yehova alobaki ete “ebundeli nyonso” oyo bakosalela mpo na kobundisa biso “ekolonga te.” Ndenge kaka efelo ekoki kobatela moto na mbula ya mopɛpɛ makasi, Yehova mpe abatelaka biso na “mopɛpɛ ya banyokoli.” (Tángá Yisaya 25:4, 5.) Banguna na biso bakolonga te kosala biso mabe mpo na libela.​—Yis. 65:17.

16 Yehova asalisaka mpe biso tótyela ye motema mingi koleka ndenge ayebisi biso polele makambo oyo ekokómela baoyo “bazali kosilikela” biso. (Tángá Yisaya 41:11, 12.) Ata soki banguna na biso babundisi biso makasi, to etumba yango eyei ndongo, makambo ekosuka kaka ndenge moko: Banguna nyonso ya basaleli ya Nzambe “bakokóma eloko mpamba mpe bakokufa.”

OYO TOKOKI KOSALA MPO TÓTYELA YEHOVA MOTEMA MINGI KOLEKA

Tokotyela Yehova motema mingi koleka soki totángaka mbala na mbala makambo na ye na Biblia (Talá paragrafe 17-18) *

17-18. (a) Ndenge nini kotánga Biblia ekoki kosalisa biso tótyela Yehova motema mingi koleka? Pesá ndakisa. (b) Ndenge nini komanyola mokapo ya mobu 2019 ekoki kosalisa biso?

17 Tokotyela Yehova motema mingi koleka soki toyekoli koyeba ye malamu. Lolenge kaka moko oyo tokoki koyeba Nzambe malamu ezali ya kotánga Biblia na likebi mpe komanyola makambo oyo tozali kotánga. Biblia elobeli masolo oyo emonisi ndenge Yehova abatelaki basaleli na ye na ntango ya kala. Yango endimisaka biso ete Yehova akosala mpe bongo mpo na biso lelo oyo.

18 Na ndakisa, Yisaya asaleli maloba kitoko ya elilingi mpo na komonisa ndenge oyo Yehova abatelaka biso. Akokanisi Yehova na mobateli ya mpate, mpe basaleli na ye na bana-mpate. Yisaya alobi boye mpo na Yehova: “Na lobɔkɔ na ye akoyanganisa bana-mpate; mpe akomema yango na ntolo na ye.” (Yis. 40:11) Ntango toyokaka ete mabɔkɔ ya nguya ya Yehova ezingi biso, tomonaka ete tobatelami mpe tomitungisaka te. Mpo na kosalisa biso tózala kimya ata ntango tokutani na mikakatano, moombo ya sembo mpe ya mayele aponi Yisaya 41:10 ezala mokapo ya mobu 2019; elobi: “Komitungisa te, mpo nazali Nzambe na yo.” Ebongi mpenza ete omanyola maloba yango ya kokitisa motema. Ekopesa yo makasi ntango okokutana na mikakatano oyo ezali koya.

LOYEMBO 38 Akokómisa yo makasi

^ par. 3 Maloba ya mokapo ya mobu 2019 ebongolami na kolanda Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ya Anglais oyo ebimaki na 2013.

^ par. 5 Mokapo ya mobu 2019 epesi biso ntina misato ya kozala motema kimya ata ntango makambo ya mabe esalemi na mokili to ekómeli biso. Lisolo oyo ekolobela bantina yango mpe ekosalisa biso tómitungisa mingi te, mpe tótyela Yehova motema mingi. Manyolá maloba ya mokapo ya mobu. Soki likoki ezali, kangá yango na motó. Ekopesa yo makasi ya koyika mpiko na mikakatano oyo okokutana na yango na mikolo oyo ezali koya.

^ par. 3 NDIMBOLA YA MALOBA: Elaka ya Yehova ezali likambo nyonso oyo alobi ete akosala, mpe yango ekokisamaka kaka. Bilaka ya Yehova ekoki kosalisa biso tómitungisa mingi te mpo na mikakatano oyo tokoki kokutana na yango na bomoi.

^ par. 4 Maloba “Kobanga te” ezongi mbala misato, na Yisaya 41:10, 13, mpe 14. Bavɛrsɛ yango elobi mpe “mpo nazali na yo,” “mpo nazali Nzambe na yo,” mpe “nakosalisa yo.” Mpo na nini Yehova atindaki Yisaya asalela maloba yango? Mpo na komonisa likambo moko ya ntina mingi: tokoki kolongola kobanga kaka soki totyeli Yehova motema.

^ par. 53 BILILINGI: Bato ya libota moko bakutanaka na komekama ndenge na ndenge: na mosala, maladi, komekama na mosala ya kosakola mpe na kelasi.

^ par. 55 BILILINGI: Makita ezali kosalema na ndako ya ndeko moko mpe bapolisi bakɔti na mbalakaka, kasi bandeko bamitungisi te.

^ par. 57 BILILINGI: Kosala Losambo na kati ya libota mbala na mbala epesaka makasi ya koyika mpiko.