Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 5

Bizaleli oyo etindaka biso tóyanganaka na makita

Bizaleli oyo etindaka biso tóyanganaka na makita

‘Bókoba kosakola liwa ya Nkolo, tii ntango akoya.’​—1 KO. 11:26.

LOYEMBO 18 Tózala na botɔndi mpo na lisiko

NA MOKUSE *

1-2. (a) Yehova amonaka nini ntango bamilio ya bato bayangani mpo na molulu ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo? (Talá elilingi ya ezipeli.) (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

YEHOVA amonaka nini ntango bamilio ya bato bayangani na mokili mobimba mpo na molulu ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo? Asukaka kaka te na komona ebele ya bato; amonaka mpe moto mokomoko oyo ayei. Na ndakisa, amonaka baoyo bayaka na Ekaniseli mbula na mbula. Na kati na bango, basusu bayanganaka atako bazali kokutana na minyoko ya makasi mpenza. Bato mosusu bayaka mbala na mbala te na makita, kasi bamonaka ete Ekaniseli ezali molulu ya kozangisa te. Yehova amonaka mpe baoyo bayei na Ekaniseli mpo na mbala ya liboso, mbala mosusu kaka mpo na kotala ndenge esalemaka.

2 Na ntembe te, Yehova asepelaka komona ebele ya bato oyo bayanganaka na Ekaniseli. (Luka 22:19) Kasi, atalaka mingimingi kaka motángo ya bato te. Kasi atyaka likebi mingi nde na ntina oyo bato bayanganaka. Na lisolo oyo, tokolobela motuna moko ya ntina mingi: Mpo na nini tosukaka kaka te na koyangana na Ekaniseli oyo esalemaka mbula na mbula, kasi toyanganaka mpe na makita ya pɔsɔ na pɔsɔ oyo Yehova abongiseli baoyo balingaka ye?

(Talá paragrafe 1-2) *

KOMIKITISA ETINDAKA BISO TÓYANGANAKA NA MAKITA

3-4. (a) Mpo na nini toyanganaka na makita? (b) Ezaleli nini ekotinda biso tóyangana na makita? (c) Na kotalela 1 Bakorinti 11:23-26, mpo na nini tosengeli kozangisa Ekaniseli te?

3 Toyanganaka na makita ya lisangá libosoliboso mpo ezali na kati ya losambo na biso. Lisusu, toyanganaka na makita mpo Yehova ateya biso. Bato ya lolendo baboyaka kondima ete basengeli koteyama. (3 Yoa. 9) Nzokande, biso tozalaka na mposa makasi ya koteyama na Yehova mpe na ebongiseli oyo azali kosalela.​—Yis. 30:20; Yoa. 6:45.

4 Ntango toyanganaka na makita, tomonisaka ete tozali na komikitisa mpe tondimi koteyama. Toyanganaka na Ekaniseli ya liwa ya Yesu kaka te mpo tomonaka ete tosengeli te kozangisa molulu yango ya ntina, kasi mpe mpo totosaka na komikitisa nyonso etinda oyo ya Yesu ete: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” (Tángá 1 Bakorinti 11:23-26.) Likita yango ekómisaka makasi elikya na biso mpo na mikolo oyo ezali koya mpe ekundwelaka biso ete Yehova alingaka biso mingi. Kasi, Yehova ayebi ete tozali na mposa ya malendisi mpe ya libɔndisi kaka mbala moko na mbula te. Na yango, abongiselaka biso makita pɔsɔ nyonso mpe asɛngi biso tóyanganaka na makita yango. Komikitisa ekotinda biso tótosa. Tolekisaka bangonga ebele pɔsɔ nyonso mpo na kobongisa mpe koyangana na makita yango.

5. Mpo na nini bato ya komikitisa bandimaka libyangi ya Yehova?

5 Mbula na mbula, ebele ya bato ya komikitisa bandimaka Yehova ateya bango. (Yis. 50:4) Basepelaka koya na Ekaniseli, mpe na nsima, babandaka koya na makita na biso mosusu. (Zek. 8:20-23) Biso nyonso elongo na bato ya sika tozalaka na esengo ndenge Yehova “mosungi” mpe “Mobikisi” na biso ateyaka biso mpe atambwisaka biso. (Nz. 40:17) Ya solo, likambo mosusu te ekoki kopesa esengo to kozala na ntina koleka kondima libyangi ya koteyama na Yehova mpe Yesu, Mwana oyo alingaka mingi!​—Mat. 17:5; 18:20; 28:20.

6. Ndenge nini komikitisa esalisaki mobali moko ayangana na Ekaniseli?

6 Mbula na mbula, tosalaka milende ya kobengisa mpenza bato ebele báya na Ekaniseli ya liwa ya Yesu. Bato mingi ya komikitisa bazwi matomba ndenge bandimaki libyangi na biso. Tózwa ndakisa moko. Eleki bambula ebele, mobali moko azwaki lokasa ya libyangi mpo na Ekaniseli, kasi ayebisaki ndeko mobali oyo apesaki ye yango ete akokoka koya te. Kasi, na mpokwa ya Ekaniseli, ndeko yango akamwaki komona mobali yango azali kokɔta na Ndako ya Bokonzi. Ndenge bandeko bayambaki ye na esengo esimbaki motema na ye mpe abandaki koyangana na makita ya pɔsɔ na pɔsɔ. Kutu, na boumeli ya mbula oyo elandaki azangaki makita kaka mbala misato. Nini esalisaki ye azwa ekateli ya koyangana na makita nyonso? Azalaki na komikitisa, yango wana abongolaki makanisi na ye. Na nsima, ndeko oyo abengisaki ye alobaki boye: “Azali mpenza moto ya komikitisa.” Kozanga ntembe, Yehova abendaki mobali yango aya kosambela Ye, mpe lelo azali ndeko mobali oyo azwá batisimo.​—2 Sa. 22:28; Yoa. 6:44.

7. Ndenge nini makambo oyo toyekolaka na makita mpe oyo totángaka na Biblia ekoki kosalisa biso tózala na komikitisa?

7 Makambo oyo toyekolaka na makita mpe oyo totángaka na Biblia ekoki kosalisa biso tózala na komikitisa. Mwa bapɔsɔ liboso ya Ekaniseli, makita na biso elobelaka mbala mingi ndakisa ya Yesu mpe komikitisa oyo amonisaki na ndenge apesaki bomoi na ye lisiko. Mpe mwa mikolo liboso ya Ekaniseli, ezali malamu tótánga masolo ya Biblia oyo elobeli makambo oyo esalemaki mwa mikolo liboso ya liwa mpe lisekwa ya Yesu. Makambo oyo toyekolaka na makita na eleko ya Ekaniseli mpe masolo ya Biblia oyo totángaka ebakisaka botɔndi na biso mpo na mbeka ya Yesu. Yango etindaka biso tómekola komikitisa na ye mpe tósala mokano ya Yehova, ata ntango ezali mpasi.​—Luka 22:41, 42.

MPIKO ESALISAKA BISO TÓYANGANA NA MAKITA

8. Ndenge nini Yesu amonisaki mpiko?

8 Lisusu, tosalaka makasi tómekola Yesu na oyo etali komonisa mpiko. Kanisá mpiko oyo amonisaki mwa mikolo moke liboso ete akufa. Ayebaki malamu ete mosika te, banguna na ye bakoyokisa ye nsɔni, bakobɛta ye, mpe bakoboma ye. (Mat. 20:17-19) Atako bongo, andimaki kokufa. Ntango ngonga ekokaki, alobaki na bayekoli na ye ya sembo, oyo bazalaki elongo na ye na Getesemane ete: “Bótɛlɛma, tókende. Talá! Motɛki na ngai akómi pene.” (Mat. 26:36, 46) Mpe ntango bato oyo bazalaki na bibundeli bayaki mpo na kokanga ye, apusanaki epai na bango, amimonisaki, mpe asɛngaki basoda bátika bayekoli na ye bákende. (Yoa. 18:3-8) Yesu amonisaki mpenza mpiko! Lelo oyo, bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bampate mosusu basalaka makasi ya komekola Yesu na oyo etali komonisa mpiko. Na ndenge nini?

Mpiko oyo omonisaka mpo na koyangana na makita epesaka basusu makasi (Talá paragrafe 9) *

9. (a) Mpo na nini koyangana na makita nyonso ekoki kosɛnga mpiko? (b) Ndenge nini ndakisa na biso ekoki kosalisa bandeko oyo bazali na babolɔkɔ mpo na kondima na bango?

9 Ekoki kosɛnga mpiko mpo tóyangana na makita nyonso, mingimingi ntango tozali kokutana na makambo ya mpasi. Bandeko na biso mosusu bayanganaka na makita atako bazali na mawa makasi, balɛmbi nzoto, to bazali na maladi. Basusu mpe bamonisaka mpiko na ndenge bakendaka makita atako bazali kokutana na botɛmɛli makasi oyo euti na libota to epai ya bakonzi ya Leta. Kanisá naino ndenge ndakisa na biso esalisaka bandeko na biso oyo bazali na babolɔkɔ mpo na kondima na bango. (Ebr. 13:3) Ntango bayokaka ete tozali kokoba kosalela Yehova atako tozali na komekama, yango epesaka bango makasi ya kobatela kondima, mpiko mpe bosembo na bango. Likambo yango ekómelaki ntoma Paulo. Ntango azalaki na bolɔkɔ na Roma, azalaki kosepela mbala nyonso oyo azalaki koyoka ete bandeko bazalaki kosalela Nzambe na bosembo. (Flp. 1:3-5, 12-14) Nsima ya kobima na bolɔkɔ to mwa moke liboso, akomaki mokanda na ye epai ya Baebre. Na mokanda yango, asɛngaki bakristo yango ya sembo ‘bákoba kolingana ndenge bandeko balinganaka’ mpe bátika koyangana na makita te.​—Ebr. 10:24, 25; 13:1.

10-11. (a) Banani tosengeli kobengisa na Ekaniseli? (b) Na kotalela Baefese 1:7, mpo na nini tosengeli kosala yango?

10 Tokomonisa mpiko soki tobengisi bandeko na biso ya libota, baninga ya mosala, mpe bato ya kartye na Ekaniseli. Mpo na nini kobengisa bango? Lokola tozalaka mpenza na botɔndi mpo na likambo oyo Yehova mpe Yesu basalaki mpo na biso, yango wana tolingaka mpenza kobengisa bato mosusu báya na Ekaniseli. Tolingaka ete báyeba ndenge oyo bango mpe bakoki kozwa matomba na “boboto monene” ya Yehova na nzela ya lisiko.​—Tángá Baefese 1:7; Em. 22:17.

11 Ntango tozali komonisa mpiko ya koyangana na makita nyonso, tomonisaka mpe ezaleli mosusu ya motuya, oyo Nzambe mpe Yesu bamonisaka na ndenge ya kokamwa.

BOLINGO ETINDAKA BISO TÓYANGANA NA MAKITA

12. (a) Ndenge nini makita na biso ekómisaka makasi bolingo na biso mpo na Yehova mpe Yesu? (b) Mokanda ya 2 Bakorinti 5:14, 15 elendisi biso tósala nini mpo na komekola Yesu?

12 Bolingo oyo tolingaka Yehova mpe Yesu etindaka biso tóyangana na makita. Mpe makambo oyo toyekolaka na makita ekómisaka makasi bolingo na biso mpo na Yehova mpe mpo na Mwana na ye. Na makita, bakundwelaka biso mbala na mbala likambo oyo basalá mpo na biso. (Rom. 5:8) Mingimingi Ekaniseli esalisaka biso tóbosana te bolingo monene oyo bazali na yango, ata mpo na baoyo bayebi naino motuya ya lisiko te. Botɔndi etindaka biso tósala makasi ya komekola Yesu na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. (Tángá 2 Bakorinti 5:14, 15.) Lisusu, motema na biso etindaka biso tósanzola Yehova mpo apesaki biso lisiko. Kopesa biyano oyo euti na motema ntango tozali na makita ezali lolenge moko ya kosanzola ye.

13. Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka mpenza Yehova mpe Mwana na ye? Limbolá.

13 Tokomonisa ete tolingaka mpenza Yehova mpe Mwana na ye soki tozali kondima komipimela makambo mosusu mpo na bango. Mbala mingi, tomipimelaka makambo ndenge na ndenge mpo na koyangana na makita. Masangá mingi esalaka likita ya kati ya pɔsɔ na mpokwa ya mokolo ya mosala, ntango mingi kati na biso tozalaka ya kolɛmba. Mpe likita mosusu esalemaka na nsuka ya pɔsɔ ntango bato mosusu bazali kopema. Yehova amonaka ndenge toyanganaka na makita ata ntango oyo tolɛmbi? Ɛɛ, amonaka yango! Kutu, soki tozali kosala milende mingi, Yehova mpe asepelaka mingi mpo yango emonisaka ete tolingaka ye.​—Mrk. 12:41-44.

14. Ndakisa nini Yesu atikelá biso na oyo etali komonisa bolingo ya komipimela mpo na basusu?

14 Yesu atikelá biso ndakisa na oyo etali komonisa bolingo ya komipimela mpo na basusu. Amonisaki yango na ndenge andimaki kokufa mpo na bayekoli na ye, mpe na ndenge azalaki kotya matomba na bango na esika ya liboso na bomoi na ye ya mokolo na mokolo. Na ndakisa, alekisaki ntango elongo na bayekoli na ye ata ntango azalaki ya kolɛmba to ntango atungisamaki mingi. (Luka 22:39-46) Azalaki kolinga kosalela basusu, kasi te koluka ete basusu básalela ye. (Mat. 20:28) Soki bolingo na biso mpo na Yehova mpe bandeko na biso ekómi makasi ndenge wana, tokosala nyonso oyo tokoki mpo na koyangana na molulu ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo mpe na makita mosusu nyonso ya lisangá.

15. Tolingaka kosalisa libosoliboso banani?

15 Tozali na kati ya libota kaka moko ya bakristo ya solo, mpe tosepelaka kolekisa ntango mingi mpo na kobenga basusu bákɔta mpe na libota na biso. Kasi, tolingaka kosalisa libosoliboso baoyo bazali “bandeko na biso na kati ya kondima,” kasi batiká kosakola to koyangana na makita. (Gal. 6:10) Tokomonisa ete tolingaka bango ntango tolendisi bango báyanganaka na makita, mingimingi na Ekaniseli. Ndenge moko na Yehova mpe Yesu, tosepelaka mingi soki ndeko oyo atiká kosakola to koyangana na makita azongeli Yehova, Tata mpe Mobateli na biso ya bolingo.​—Mat. 18:14.

16. (a) Ndenge nini tokoki kolendisana, mpe makita na biso ekosalisa biso na nini? (b) Mpo na nini sikoyo nde eleko ya malamu ya kokanisa maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 3:16?

16 Na bapɔsɔ oyo ezali koya, salá makasi obengisa bato ebele na Ekaniseli, oyo ekosalema mokolo ya mitano na mpokwa, mwa 19/04/2019. (Talá etanda “ Okobengisa bango?”) Tókoba kosala makasi tóyanganaka na makita nyonso oyo Yehova abongiseli biso mpo tólendisanaka. Lokola nsuka ya mokili oyo ekómi pene, makita na biso ekosalisa biso tókoba komonisa komikitisa, mpiko, mpe bolingo. (1 Tes. 5:8-11) Na motema mobimba, tómonisa ndenge oyo toyokaka mpo na bolingo oyo Yehova ná Mwana na ye bamoniselaka biso!​—Tángá Yoane 3:16.

LOYEMBO 126 Kɛngɛláká, tɛlɛmá ngwi, zalá makasi

^ par. 5 Ekaniseli ya liwa ya Kristo oyo ekosalema mokolo ya mitano na mpokwa, mwa 19/04/2019, ekozala likita oyo eleki ntina na mbula. Nini ekotinda biso tóyangana na likita yango? Na ntembe te, mpo tolingi kosepelisa Yehova. Na lisolo oyo, tokotalela bizaleli oyo etindaka biso tóyanganaka na Ekaniseli mpe na makita na biso ya pɔsɔ na pɔsɔ.

^ par. 50 ELILINGI YA EZIPELI: Bamilio ya bato na mokili mobimba bayangani mpo na molulu ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo

^ par. 52 BILILINGI: Ndeko mobali moko oyo azali na bolɔkɔ mpo na kondima na ye alendisami na mokanda oyo libota na ye etindeli ye. Lokola ayebi ete babosani ye te, azali na esengo ya kozwa nsango oyo emonisi ete bato ya libota na ye mpe bazali kaka sembo epai ya Yehova atako mobulu ezali na mboka.