Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 3

Ndenge nini okoki kobatela motema na yo?

Ndenge nini okoki kobatela motema na yo?

“Koleka biloko mosusu nyonso oyo esengeli kobatelama, batelá motema na yo.”​—MAS. 4:23.

LOYEMBO 36 Batelá motema na yo

NA MOKUSE *

1-3. (a) Mpo na nini Yehova alingaki Salomo, mpe mapamboli nini Salomo azwaki? (b) Na lisolo oyo, tokozwa biyano na mituna nini?

SALOMO akómaki mokonzi ya Yisraele ntango azalaki naino elenge. Na ebandeli ya boyangeli na ye, Yehova abimelaki ye na ndɔtɔ mpe alobaki na ye: “Sɛngá eloko oyo nasengeli kopesa yo.” Salomo ayanolaki ete: “Nazali naino mwana moke. . . . Mpe osengeli kopesa mosaleli na yo motema ya botosi mpo na kosambisa bato na yo.” (1 Bak. 3:5-10) Salomo asɛngaki kaka eloko moko: “Motema ya botosi”! Yango emonisi ntina oyo Yehova azalaki kolinga ye! (2 Sa. 12:24) Nzambe asepelaki mingi na eyano ya Mokonzi Salomo mpe apesaki ye “motema ya bwanya mpe ya mayele.”​—1 Bak. 3:12.

2 Ntango nyonso oyo Salomo azalaki sembo, azwaki mapamboli ebele. Azwaki lokumu monene ya kotonga tempelo mpo na “nkombo ya Yehova Nzambe ya Yisraele.” (1 Bak. 8:20) Ayebanaki mingi mpo na bwanya oyo Nzambe apesaki ye. Lisusu, makambo oyo alobaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe ekomami na mikanda misato ya Biblia. Moko na yango ezali mokanda ya Masese.

3 Mokanda ya Masese elobeli motema mbala mingi. Na ndakisa, Masese 4:23 elobi: “Koleka biloko mosusu nyonso oyo esengeli kobatelama, batelá motema na yo.” Na vɛrsɛ yango, liloba “motema” elimboli nini? Tokozwa eyano na motuna yango na lisolo oyo. Tokozwa mpe biyano na mituna mosusu mibale: Ndenge nini Satana alukaka kobebisa motema na biso? Mpe ndenge nini tokoki kobatela motema na biso? Mpo na kotikala sembo epai ya Nzambe, tosengeli kokanga ntina ya biyano na mituna yango ya ntina mingi.

MALOBA “MOTEMA NA YO” ELIMBOLI NINI?

4-5. (a) Ndenge nini Nzembo 51:6 ezali kosalisa biso tóyeba soki liloba “motema” elimboli nini? (b) Ndenge nini ndakisa ya kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso emonisi ntina ya koyeba ndenge oyo tozali na kati?

4 Na Masese 4:23, liloba “motema” esalelami mpo na kolobela kati mpenza ya moto. (Tángá Nzembo 51:6.) Na maloba mosusu, “motema” elimboli makanisi, mayoki, mpe bamposa oyo ezalaka na kati na biso. Ezali mpenza bomoto na biso ya kati, kasi te oyo emonanaka na libándá.

5 Tózwa ndakisa ya kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso mpo tómona ntina ya koyeba ndenge oyo tozali na kati. Ya liboso, mpo na kozala nzoto kolɔngɔnɔ, tosengeli kolyaka biloko ya malamu, mpe kosala ngalasisi mbala na mbala. Ndenge moko mpe, mpo na kozala malamu na elimo, tosengeli kolyaka bilei ya elimo ya malamu mpe komonisa mbala na mbala kondima na biso epai ya Yehova. Mpo na komonisa yango, tosengeli kosalela makambo oyo toyekolaka mpe kolobela bindimeli na biso. (Rom. 10:8-10; Yak. 2:26) Ya mibale, soki tozali kotalela kaka ndenge oyo tozali komonana na libándá, tokoki kokanisa ete tozali nzoto kolɔngɔnɔ, nzokande tozali na maladi na kati ya nzoto. Ndenge moko mpe, soki tozali kotalela kaka makambo ya elimo oyo tomesaná kosala, tokoki kokanisa ete kondima na biso ezali makasi, nzokande, bamposa ya mabe ezali kokola na kati na biso. (1 Ko. 10:12; Yak. 1:14, 15) Tosengeli kobosana te ete Satana akosepela soki tokómi na makanisi lokola ya ye. Ndenge nini alukaka kobebisa makanisi na biso? Mpe ndenge nini tokoki komibatela?

NDENGE OYO SATANA ALUKAKA KOBEBISA MOTEMA NA BISO

6. Mokano nini Satana azali na yango, mpe ndenge nini alukaka kokokisa yango?

6 Satana alingaka tókóma lokola ye, motomboki oyo akipaka mitinda ya Yehova te mpe alukaka kaka matomba na ye moko. Satana akoki te kotinda biso na makasi tókanisa mpe tósala makambo lokola ye. Na yango, alukaka kokokisa mokano na ye na ndenge mosusu. Na ndakisa, asali ete bato oyo ye asilá kobebisa bázala zingazinga na biso. (1 Yoa. 5:19) Atyaka elikya ete tokopona kolekisa ntango elongo na bango, ata soki toyebi ete baninga ya mabe ‘bakobebisa’ makanisi na biso mpe ndenge na biso ya kosala makambo. (1 Ko. 15:33) Mayele yango esimbaki epai ya Mokonzi Salomo. Abalaki basi ebele oyo bazalaki bapakano, mpe nsukansuka babebisaki bizaleli na ye mpe ‘mokemoke, babendaki motema na ye’ mosika na Yehova.​—1 Bak. 11:3.

Ndenge nini okoki kobatela motema na yo na milende oyo Satana asalaka mpo na kobebisa makanisi na biso? (Talá paragrafe 7) *

7. Satana asalelaka mpe nini mpo na kopanza makanisi na ye, mpe mpo na nini tosengeli kozala ekɛngɛ?

7 Satana asalelaka bafilme mpe baprogramɛ ya televizyo mpo na kopanza makanisi na ye. Ayebi ete masolo to masapo esalemaka kaka te mpo ezala kominanola; eteyaka ndenge ya kokanisa, ya kotalela makambo, mpe ya kosala makambo. Yesu asalelaki mayele wana ya koteya, kasi na ndenge ya malamu. Kanisá ndakisa oyo apesaki ya Mosamaria ya motema malamu mpe ya mwana oyo atikaki ndako ya baboti mpe asakanaki na biloko na ye ya kobikela. (Mat. 13:34; Luka 10:29-37; 15:11-32) Nzokande, bato oyo Satana abebisá makanisi na bango bakoki kosalela masolo to masapo mpo na kobebisa biso. Tosengeli kozala na bokatikati. Bafilme mpe baprogramɛ ya televizyo ekoki kosepelisa biso mpe kolakisa biso makambo kozanga ete ebebisa makanisi na biso. Na yango, tosengeli kozala ekɛngɛ. Ntango tozali kopona kominanola, tosengeli komituna boye: ‘Filme oyo to programɛ oyo ya televizyo ezali koteya ngai ete ezali mabe te nalanda bamposa na ngai ya nzoto?’ (Gal. 5:19-21; Ef. 2:1-3) Osengeli kosala nini soki omoni ete programɛ moko ezali kolobela makanisi ya Satana? Kimá yango ndenge kaka okimaka maladi moko ya mabe!

8. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bábatela mitema na bango?

8 Baboti, bozali na mokumba monene ya kobatela bana na bino na milende oyo Satana azali kosala mpo na kobebisa mitema na bango. Na ntembe te, bosalaka nyonso oyo bokoki mpo na kobatela bana bázwa bamaladi te. Bobatelaka ndako na bino pɛto, mpe bobwakaka eloko nyonso oyo ekoki kopesa bino to bana na bino maladi. Ndenge moko mpe, bosengeli kobatela bana na bino na bafilme, baprogramɛ ya televizyo, masano ya video, mpe basite ya Internet oyo ekoki kosala ete makanisi ya Satana ebebisa bango. Yehova apesi bino mokumba ya kobatela bana na bino na elimo. (Mas. 1:8; Ef. 6:1, 4) Yango wana, kobangaka te kotyela bato ya ndako na yo mibeko oyo eyokani na mitinda ya Biblia. Yebisá bana na yo ya mike makambo oyo bakoki kotala mpe oyo bakoki kotala te, mpe salisá bango bákanga ntina ya bikateli na yo. (Mat. 5:37) Ntango bana na yo bazali kokola, salisá bango báyeba kokesenisa nini ezali malamu mpe nini ezali mabe, na kolanda mitinda ya Yehova. (Ebr. 5:14) Mpe kobosana te ete bana na yo bakoyekola makambo mingi na makambo oyo olobaka, kasi mingi koleka na makambo oyo osalaka.​—Mib. 6:6, 7; Rom. 2:21.

9. Wapi likanisi moko oyo Satana apanzaka, mpe mpo na nini ezali likama?

9 Satana alukaka mpe kobebisa motema na biso na ndenge asalaka ete tótyela bwanya ya bato motema na esika ya makanisi ya Yehova. (Kol. 2:8) Na ndakisa, Satana apanzaka likanisi oyo: kokóma mozwi nde likambo oyo eleki ntina na bomoi. Baoyo balandaka likanisi yango bakoki kokóma na bozwi, to te. Bázwa bozwi to te, bazali na likama. Mpo na nini? Mpo bakoki komipesa mingi na koluka mbongo tii bakotya lisusu likebi te na kolɔngɔnɔ ya nzoto na bango, na boyokani na bato ya libota na bango, ata mpe na boninga na bango na Nzambe, nyonso wana kaka mpo bákokisa mokano na bango. (1 Tim. 6:10) Tosengeli kozala na botɔndi ndenge Tata na biso ya likoló asalisaka biso tótalelaka mbongo na ndenge oyo ebongi.​—Mos. 7:12; Luka 12:15.

NDENGE NINI TOKOKI KOBATELA MOTEMA NA BISO?

Ndenge moko na basinzili mpe bakɛngɛli ya baporte na ntango ya kala, zalá ntango nyonso ekɛngɛ mpo makanisi ya mabe ekɔta na motema na yo te (Talá paragrafe 10-11) *

10-11. (a) Tosengeli kosala nini mpo na komibatela? (b) Mosala nini basinzili bazalaki kosala na ntango ya kala, mpe na ndenge nini lisosoli na biso ekoki kosala lokola sinzili?

10 Mpo tólonga kobatela motema na biso, tosengeli kozala na likoki ya koyeba makama mpe kosala na lombangu mpo na komibatela. Liloba oyo ebongolami na “kobatela” na Masese 4:23 ezali kokundwela biso mosala oyo sinzili azalaki kosala. Na mikolo ya Mokonzi Salomo, basinzili bazalaki kotɛlɛma na bifelo ya engumba mpe bazalaki kobelela soki bamoni ete likama ezali koya. Ndakisa yango ezali kosalisa biso tóyeba makambo oyo tosengeli kosala mpo Satana abebisa makanisi na biso te.

11 Na ntango ya kala, basinzili bazalaki kosala na bomoko na bakɛngɛli ya baporte. (2 Sa. 18:24-26) Bango nyonso bazalaki kosalisa na kobatela engumba na ndenge bazalaki komindimisa ete baporte ekangami soki monguna azali kopusana. (Neh. 7:1-3) Lisosoli oyo eteyami na Biblia * ekoki kosala lokola sinzili mpo na kokebisa biso ntango Satana alingi kobebisa motema na biso, elingi koloba makanisi na biso, mayoki na biso, ndenge na biso ya kotalela makambo, to bamposa na biso. Soki lisosoli na biso ekebisi biso, tosengeli koyoka yango mpe kosala nyonso mpo na kokima likama.

12-13. Motema ekoki kotinda biso tósala nini, kasi tosengeli kosala nini?

12 Tózwa ndakisa moko oyo emonisi ndenge tokoki komibatela mpo tólanda makanisi ya Satana te. Yehova ateyi biso ete ‘pite mpe mbindo ya ndenge nyonso esengeli kotángama ata kotángama te na kati na biso.’ (Ef. 5:3) Kasi, okosala nini soki baninga ya kelasi to ya mosala babandi kolobela makambo ya pite? Toyebi ete tosengeli ‘koboya ezaleli ya kotyola Nzambe mpe bamposa ya mokili.’ (Tito 2:12) Sinzili, elingi koloba lisosoli na yo, ekoki kokebisa yo. (Rom. 2:15) Kasi okoyokela yango? Na esika ya koyokela yango, motema ekoki kotinda yo oyoka masolo yango to otala bililingi oyo ntango mosusu bazali kolakisa. Nzokande, wana ezali ntango ya kokima likama, ya kokɔtisa lisolo mosusu to kolongwa wana.

13 Esɛngaka mpiko mpo na kotɛmɛla mbamba oyo baninga bakoki kotya biso mpo tókanisa to tósala makambo ya mabe. Yebá ete Yehova amonaka milende oyo osalaka, mpe akopesa yo makasi mpe bwanya oyo osengeli na yango mpo na kotɛmɛla makanisi ya Satana. (2 Nt. 16:9; Yis. 40:29; Yak. 1:5) Kasi, likambo nini mosusu tosengeli kosala mpo na kokoba kobatela motema na biso?

KOBÁ KOMIBATELA

14-15. (a) Tosengeli kofungola motema na biso mpo na kokɔtisa nini, mpe ndenge nini tokoki kosala yango? (b) Ndenge nini Masese 4:20-22 ekoki kosalisa biso tózwa matomba mingi na botángi na biso ya Biblia? (Talá mpe etanda “ Ndenge ya komanyola.”)

14 Mpo na kobatela motema na biso, tosengeli kosuka kaka te na koboya makanisi ya mabe, tosengeli mpe kondima makanisi ya malamu. Kanisá lisusu ndakisa ya engumba oyo ezingami na efelo. Mokɛngɛli ya porte azalaki kokanga baporte ya engumba mpo banguna bákɔta te, kasi na bantango mosusu azalaki kofungola yango mpo na kokɔtisa bilei mpe biloko mosusu. Soki baporte ezalaki ntango nyonso ya kokangama, bato ya engumba balingaki kokufa nzala. Ndenge moko mpe, tosengeli kofungola motema na biso mbala na mbala mpo na kokɔtisa makanisi ya Nzambe.

15 Biblia ezali na makanisi ya Yehova; na yango ntango nyonso oyo totángaka yango, totikaka makanisi ya Yehova ebongisa ndenge na biso ya kokanisa, ya kotalela makambo, mpe ya kosala makambo. Tokoki kosala nini mpo tózwa matomba mingi na botángi na biso ya Biblia? Libondeli ezali na ntina mingi. Ndeko mwasi moko alobi boye: “Liboso ya kotánga Biblia, nabondelaka Yehova, nasɛngaka ye asalisa ngai namona “makambo ya kokamwa” oyo ezali na Liloba na ye. (Nz. 119:18) Tosengeli mpe komanyola makambo oyo tozali kotánga. Soki tobondeli, totángi, mpe tomanyoli, Liloba ya Nzambe ekokɔta mpenza “na kati ya motema” na biso mpe tokokóma kolinga makanisi ya Yehova.​—Tángá Masese 4:20-22; Nz. 119:97.

16. Ndenge nini kotala TV JW esalisaka biso? Pesá ndakisa.

16 Ndenge mosusu ya kotika makanisi ya Nzambe ebongisa biso ezali ya kotala makambo oyo ebimaka na TV JW®. Ndeko mobali moko ná mwasi na ye balobi boye: “Baemisyo ya sanza na sanza ezalaka mpenza biyano na mabondeli na biso! Epesaka biso makasi mpe elendisaka biso ntango tozali na mawa to ntango tozali koyoka lokola tozali kaka biso moko. Lisusu, mbala mingi na ndako na biso toyokaka nzembo oyo ebimaka na TV JW. Totyaka yango ntango tozali kolamba, kotya bopɛto na ndako, to kaka ntango tozali komɛla ti.” Makambo yango esalisaka biso tóbatela motema na biso. Eteyaka biso ndenge ya kokanisa lokola Yehova mpe ya kotɛmɛla mbamba ya kondima makanisi ya Satana.

17-18. (a) Ndenge emonisami na 1 Bakonzi 8:61, nini esalemaka ntango tozali kosalela makambo oyo Yehova ateyaka biso? (b) Liteya nini tokoki kozwa epai ya Mokonzi Hizikiya? (c) Na boyokani na libondeli ya Davidi oyo ezali na Nzembo 139:23, 24, tokoki kosɛnga nini na libondeli?

17 Ntango nyonso oyo tomoni matomba ya kosala oyo ezali malamu, kondima na biso ekómaka lisusu makasi. (Yak. 1:2, 3) Tomiyokaka malamu mpo tosali ete Yehova asepela kobenga biso bana na ye, mpe mposa na biso ya kosepelisa ye ekómaka lisusu makasi. (Mas. 27:11) Tokómaka komona ete komekama nyonso ezali libaku ya komonisa ete tolingaka mpenza kosalela Tata na biso oyo atyelaka biso likebi. (Nz. 119:113) Tomonisaka ete tolingaka Yehova na motema na biso mobimba mpe tozalaka na ekateli makasi ya kotosa mibeko na ye mpe kosala mokano na ye.​—Tángá 1 Bakonzi 8:61.

18 Tokosala mabunga? Ɛɛ, mpo tozali bato ya kozanga kokoka. Soki obɛti libaku, kanisá ndakisa ya Mokonzi Hizikiya. Asalaki mabunga. Kasi abongolaki motema mpe akobaki kosalela Yehova na “motema mobimba.” (Yis. 38:3-6; 2 Nt. 29:1, 2; 32:25, 26) Na yango, tótɛmɛla milende oyo Satana azali kosala mpo na kobebisa makanisi na biso. Tóbondela mpo Nzambe asalisa biso tókóma na “motema ya botosi.” (1 Bak. 3:9; tángá Nzembo 139:23, 24.) Tokoki kotikala sembo epai ya Yehova, kaka soki tobateli motema na biso koleka eloko mosusu nyonso.

LOYEMBO 54 “Nzela yango oyo”

^ par. 5 Okotikala sembo epai ya Yehova, to okopesa Satana nzela akosa yo mpo otika kosalela Nzambe? Eyano oyo okopesa, etaleli te soki komekama oyo okutani na yango ezali makasi to te, kasi nde lolenge oyo obatelaka motema na yo. Liloba “motema” elimboli nini? Ndenge nini Satana alukaka kobebisa motema na biso? Mpe ndenge nini tokoki kobatela motema na biso? Lisolo oyo ekopesa biyano na mituna yango ya ntina mingi.

^ par. 11 NDIMBOLA YA MALOBA: Yehova apesá biso likoki ya kotalela makanisi, mayoki, mpe misala na biso, mpo esalisa biso tómisambisa. Biblia ebengi likoki yango lisosoli. (Rom. 2:15; 9:1) Lisosoli oyo eteyami na Biblia elandaka mitinda ya Yehova, oyo ezali na Biblia, mpo na kosalisa biso tóyeba soki makambo oyo tokanisaka, tosalaka, to tolobaka ezali malamu to mabe.

^ par. 56 BILILINGI: Ndeko mobali moko azali kotala televizyo mpe batye bililingi ya pite na mbalakaka. Asengeli kopona oyo akosala.

^ par. 58 BILILINGI: Sinzili moko na ntango ya kala amoni likama na libándá ya engumba. Abeleli bakɛngɛli ya baporte, mpe basali nokinoki mpo na kokanga baporte ya engumba mpe bazali kokanga yango malamu na ndenge ya kati.