Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 4

Ntina oyo mokonzi moko ya likoló asalaki molulu oyo ezangi mindɔndɔ

Ntina oyo mokonzi moko ya likoló asalaki molulu oyo ezangi mindɔndɔ

“Oyo elakisi nzoto na ngai. . . . Oyo elakisi ‘makila ya kondimana’ na ngai.”​—MAT. 26:26-28.

LOYEMBO 16 Bókumisa Yah mpo na Mwana na ye oyo atyami mafuta

NA MOKUSE *

1-2. (a) Mpo na nini tokoki kokamwa te ete Yesu alakisa biso lolenge ya mindɔndɔ te ya kosala ekaniseli ya liwa na ye? (b) Bizaleli nini ya Yesu tokotalela?

OKOKI koyebisa makambo oyo esalemaka na Ekaniseli ya liwa ya Yesu Kristo oyo tosalaka mbula na mbula? Na ntembe te, mingi kati na biso tokoki koyeba makambo oyo esalemaka na molulu yango. Mpo na nini? Mpo ezalaka mindɔndɔ te. Nzokande, ezali molulu ya ntina mingi. Na yango, tokoki komituna boye: ‘Mpo na nini molulu yango ezalaka mindɔndɔ te?’

2 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, eyebanaki ete ateyaka makambo ya ntina na ndenge ya mindɔndɔ te, kasi na ndenge ya polele mpe ya pɛtɛɛ mpo na kokanga ntina. (Mat. 7:28, 29) Ndenge moko mpe, alakisaki biso lolenge moko ya pɛtɛɛ ya kosala ekaniseli * ya liwa na ye. Atako molulu yango ezalaka mindɔndɔ te, ezali na ntina mingi. Tótalela sikoyo molulu yango mpe makambo mosusu oyo Yesu alobaki mpe asalaki. Tokomona mpenza komikitisa, mpiko, mpe bolingo ya Yesu, mpe ndenge oyo tokoki komekola ye malamu koleka.

YESU AZALI NA KOMIKITISA

Limpa mpe vinyo ya Ekaniseli ekundwelaka biso ete Yesu apesaki bomoi na ye mpo na biso mpe ete azali sikoyo koyangela lokola Mokonzi na likoló (Talá paragrafe 3-5)

3. Na kotalela Matai 26:26-28, nini emonisi ete Ekaniseli oyo Yesu abandisaki ezalaki mindɔndɔ te, mpe biloko mibale oyo asalelaki ezalaki komonisa nini?

3 Yesu abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye ntango azalaki elongo na bantoma na ye 11 oyo batikalaki sembo. Azwaki kaka biloko ya fɛti ya Elekeli oyo ezalaki wana mpe asalaki molulu yango oyo ezangi mindɔndɔ. (Tángá Matai 26:26-28.) Asalelaki kaka limpa ezangi levire mpe vinyo oyo bazalaki na yango. Yesu ayebisaki bantoma na ye ete limpa wana ezali komonisa nzoto na ye ya kokoka mpe vinyo ezali komonisa makila na ye oyo akopesa mbeka mpo na bango. Mbala mosusu bantoma bakamwaki te ndenge Yesu abandisaki molulu yango ya ntina mingi na ndenge ya mindɔndɔ te. Mpo na nini bakamwaki te?

4. Ndenge nini toli oyo Yesu apesaki Marta ezali kosalisa biso tómona ntina oyo Yesu abandisaki Ekaniseli na ndenge oyo ezangi mindɔndɔ?

4 Tótalela makambo oyo esalemaki mwa basanza liboso, na mbula ya misato ya mosala ya Yesu, ntango akendaki kotala baninga na ye: Lazare, Marta, mpe Maria. Ntango bafandaki na ndako, Yesu abandaki koteya. Marta azalaki, kasi atyaki makanisi na kobongisa bilei ebele mpo na kosepelisa mopaya na bango. Ntango Yesu amonaki yango, asembolaki Marta na boboto, asalisaki ye amona ete kosala biloko ya mindɔndɔ mbala mosusu ezalaka na ntina te. (Luka 10:40-42) Na nsima, ntango etikalaki kaka mwa bangonga mpo apesa bomoi na ye mbeka, ye moko asalelaki toli oyo apesaki Marta. Abandisaki Ekaniseli na ndenge oyo ezangi mindɔndɔ. Yango ezali koteya biso nini mpo na Yesu?

5. Ndenge Yesu asalaki molulu oyo ezangi mindɔndɔ emonisi nini mpo na ye, mpe ndenge nini yango eyokani na Bafilipi 2:5-8?

5 Yesu amonisaki komikitisa na makambo nyonso oyo azalaki kosala mpe koloba. Na yango, ezali kokamwisa biso te ndenge amonisaki komikitisa mingi na butu na ye ya nsuka awa na mabele. (Mat. 11:29) Ayebaki ete akopesa mbeka oyo eleki motuya, ete Yehova akosekwisa ye, mpe na nsima akokómisa ye mokonzi na likoló. Atako bongo, abendaki likebi te epai na ye na ndenge abandisaki te molulu moko ya mindɔndɔ mpo bato bákanisaka liwa na ye. Kasi, ayebisaki bayekoli na ye ete basengeli kosalaka molulu yango oyo ezangi mindɔndɔ mbala moko na mbula mpo na kokanisa ye. (Yoa. 13:15; 1 Ko. 11:23-25) Molulu yango oyo ebongi mpenza, kasi ezangi mindɔndɔ, emonisi ete Yesu azalaki moto ya lolendo te. Tokoki kosepela ndenge komikitisa ezali moko ya bizaleli kitoko oyo Mokonzi na biso ya likoló azali na yango.​—Tángá Bafilipi 2:5-8.

6. Ndenge nini tokoki komekola komikitisa ya Yesu ntango tokutani na komekama?

6 Tokomekola komikitisa ya Yesu soki tozali kotya matomba ya basusu na esika ya liboso. (Flp. 2:3, 4) Kanisá lisusu butu ya nsuka oyo Yesu alekisaki na mabele. Ayebaki ete etikali moke akufa liwa moko ya mpasi; kasi, amitungisaki mingi mpo na bantoma na ye ya sembo, oyo bakotikala na mawa mpo na ye. Yango wana, alekisaki butu yango mpo na koteya, kolendisa, mpe kokitisa bango motema. (Yoa. 14:25-31) Na komikitisa nyonso, Yesu amitungisaki mingi nde mpo na bolamu ya basusu. Azali mpenza ndakisa oyo eleki malamu mpo na biso!

YESU AZALAKI NA MPIKO

7. Ndenge nini Yesu amonisaki mpiko mpenza mwa moke nsima ya kobandisa Bilei ya mpokwa ya Nkolo?

7 Mwa moke nsima ya kobandisa Bilei ya mpokwa ya Nkolo, Yesu amonisaki mpiko ya kokamwa mpenza. Na ndenge nini? Andimaki kosala mokano ya Tata na ye, atako ayebaki ete yango ekosɛnga ete akufa liwa ya nsɔni mpo bakoloba ete afingi Nzambe. (Mat. 26:65, 66; Luka 22:41, 42) Yesu abatelaki bosembo na ye tii na nsuka mpo akumisa nkombo ya Yehova, alongisa boyangeli ya Nzambe, mpe afungwela bato oyo bakobongola motema nzela ya kozwa bomoi ya seko. Yesu abongisaki mpe bayekoli na ye mpo na makambo oyo basengelaki kokutana na yango mosika te.

8. (a) Makambo nini Yesu ayebisaki bantoma na ye ya sembo? (b) Mwa bambula nsima ya liwa ya Yesu, ndenge nini bayekoli na ye bamekolaki mpiko na ye?

8 Lisusu, Yesu amonisaki mpiko na ndenge atyaki te makanisi na ye na mitungisi oyo akokaki kozala na yango, kasi atyaki likebi na ye na bamposa ya bantoma na ye ya sembo. Molulu wana oyo ezangi mindɔndɔ, oyo abandisaki ntango Yudasi abimaki, ezalaki mpo na kosalisa baoyo bakokóma bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo bábosanaka te mapamboli oyo bakozwa na nzela ya makila oyo Yesu asopaki mpe ya kokɔta na kondimana ya sika. (1 Ko. 10:16, 17) Mpo na kosalisa bayekoli na ye bátikala sembo mpo bázala elongo na ye na likoló, Yesu ayebisaki bango makambo oyo ye ná Tata na ye bazalaki kosɛnga bango. (Yoa. 15:12-15) Ayebisaki mpe bantoma na ye makambo ya mpasi oyo ekokómela bango. Na nsima, alendisaki bango bálanda ndakisa na ye mpe alobaki na bango ete: “Bózala na mpiko!” (Yoa. 16:1-4a, 33) Bambula mingi na nsima, bayekoli ya Yesu bazalaki kaka komekola ezaleli na ye ya koluka liboso matomba ya basusu mpe mpiko na ye. Ata ntango esɛngaki bányokwama, basalisanaki na mikakatano ya ndenge na ndenge.​—Ebr. 10:33, 34.

9. Ndenge nini tokoki komekola mpiko ya Yesu?

9 Lelo oyo mpe, tomekolaka mpiko ya Yesu. Na ndakisa, esɛngaka mpiko mpo na kosalisa bandeko na biso oyo bazali konyokwama mpo na kondima na bango. Na bantango mosusu, bakoki kotya bandeko na biso na bolɔkɔ atako basali mabe te. Soki makambo ya bongo esalemi, tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na bandeko biso, tokoki ata kokɔtela bango. (Flp. 1:14; Ebr. 13:19) Lisusu, tokomekola Yesu soki tozali kokoba kosakola “na mpiko.” (Mis. 14:3) Lokola Yesu, tozali na ekateli ya kosakola nsango ya Bokonzi, ata soki bato bakoki kotɛmɛla biso mpe konyokola biso. Kasi, ntango mosusu tokoki komona ete tozali na mpiko te. Tokoki kosala nini?

10. Tosengeli kosala nini mwa bapɔsɔ liboso ya Ekaniseli, mpe mpo na nini?

10 Tokokóma na mpiko mingi soki tozali kokanisa elikya oyo tozwi na nzela ya mbeka ya lisiko ya Kristo. (Yoa. 3:16; Ef. 1:7) Mwa bapɔsɔ liboso ya Ekaniseli, tozalaka na libaku ya komonisa lisusu botɔndi mingi mpo na lisiko. Na ntango yango, saláká botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli mpe manyolá mpenza makambo oyo esalemaki mwa mikolo liboso Yesu akufa. Na nsima, ntango tokoyangana mpo na molulu ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo, okoyeba mpenza ndimbola ya limpa ná vinyo oyo tosalelaka na Ekaniseli mpe mbeka eleki motuya oyo yango emonisaka. Ntango tokangi ntina ya makambo oyo Yesu ná Yehova basalá mpo na biso mpe toyebi matomba na yango mpo na biso mpe bato oyo tolingaka, elikya na biso ekokóma lisusu makasi, mpe tokozwa ekateli ya koyika mpiko tii na nsuka.​—Ebr. 12:3.

11-12. Tosili koyekola nini na baparagrafe oyo eleki?

11 Na baparagrafe oyo eleki tosili koyekola ete Bilei ya mpokwa ya Nkolo esalisaka biso tómona kaka te motuya ya lisiko, kasi mpe komikitisa ná mpiko ya Yesu. Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yesu azali kokoba komonisa bizaleli yango tii lelo na likoló, mpo azali Nganga-nzambe Monene oyo alobaka mpo na biso! (Ebr. 7:24, 25) Mpo na komonisa botɔndi na biso, tosengeli kokoba kokanisa liwa ya Yesu, kaka ndenge asɛngaki yango. (Luka 22:19, 20) Tosalaka yango na dati oyo eyokani na 14 Nisana, mokolo oyo eleki ntina na kati ya mbula.

12 Ndenge Yesu asalaki molulu ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo na ndenge oyo ezangi mindɔndɔ ezali mpe komonisa ezaleli na ye mosusu oyo etindaki ye akufa mpo na biso. Ntango azalaki awa na mabele, bato bayebaki ye mpo na ezaleli yango. Ezaleli nini?

YESU AZALI NA BOLINGO

13. Yoane 15:9 mpe 1 Yoane 4:8-10 elobi nini mpo na bolingo oyo Yehova ná Yesu bamonisaki, mpe banani bazwelaka yango matomba?

13 Yesu amonisaki bolingo monene ya Yehova na ndenge ya kokoka na makambo nyonso oyo azalaki kosala. (Tángá Yoane 15:9; 1 Yoane 4:8-10.) Oyo eleki ntina, bolingo etindaki ye andima kopesa bomoi na ye mpo na biso. Ezala tozali na kati ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo to na kati ya “bampate mosusu,” tozwaka matomba mpo na bolingo oyo Yehova ná Mwana na ye bamonisaki na nzela ya mbeka yango. (Yoa. 10:16; 1 Yoa. 2:2) Kanisá lisusu biloko oyo tosalelaka na Ekaniseli; emonisaka ete Yesu azali na bolingo mpe amityaka na esika ya bayekoli na ye. Na ndenge nini?

Na bolingo na ye, Yesu abandisaki Ekaniseli na ndenge oyo ezangi mindɔndɔ mpo ezala mpasi te kosala yango ata nsima ya bambula mingi mpe ata soki makambo ezali ndenge nini (Talá paragrafe 14-16) *

14. Na ndenge nini Yesu amonisaki bolingo mpo na bayekoli na ye?

14 Yesu amonisaki bolingo mpo na bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo na ndenge abandisaki molulu moko oyo ezangi mindɔndɔ mpo bango bákoba kosala yango. Na nsima, bayekoli yango ya Yesu oyo batyami mafuta na elimo basengelaki kosala Ekaniseli mbula nyonso, esika nyonso oyo bazali, ata mpe na bolɔkɔ. (Em. 2:10) Bazalaki kokoka kotosa etinda ya Yesu? Ɛɛ.

15-16. Ndenge nini bandeko mosusu balongaki kosala molulu ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo ata na ntango ya mpasi?

15 Kobanda na siɛklɛ ya liboso tii lelo, bakristo ya solo basalaka makasi mpo na kosala Ekaniseli ya liwa ya Yesu. Basalaka nyonso mpo bálanda ndenge Bilei ya mpokwa ya Nkolo esalemaki, atako mbala mosusu ezalaka pɛtɛɛ te. Tózwa mwa bandakisa. Ntango Ndeko Harold King azalaki kaka ye moko na ndako ya bolɔkɔ moko na Chine, asengelaki koluka ndenge ya kosala Ekaniseli. Kozanga ete bato bámona ye, abongisaki biloko oyo akosalela mpo na Ekaniseli, na kotalela biloko oyo azalaki na yango. Asalaki mpe makasi mpo ayeba mokolo mpenza oyo Ekaniseli ekosalema. Ntango mokolo yango ekokaki, ye moko na ndako na ye bolɔkɔ, ayembaki, abondelaki, mpe asalaki diskur ya Ekaniseli.

16 Tózwa ndakisa mosusu. Etuluku moko ya bandeko basi oyo bazalaki na kaa ya bakangami na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba batyaki bomoi na bango na likama mpo na kosala molulu ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo. Kasi, lokola molulu yango ezalaka mindɔndɔ te, balongaki kosala yango na nkuku. Balobaki boye: “Totɛlɛmaki esika moko, mpe na katikati na biso totyaki mwa ebonga oyo tozipaki elamba ya mpɛmbɛ mpe totyaki limpa ná vinyo likoló na yango. Topelisaki mwa buji mpo mwinda ya kura elingaki kofunda biso. . . . Tozongelaki lisusu bilako oyo tosalaki epai ya Tata na biso ete tokosalela makasi na biso nyonso mpo na kolongisa nkombo na ye mosantu.” Bandeko yango bamonisaki mpenza kondima makasi! Mpe Yesu amonisaki mpenza bolingo ndenge asalaki ete tókoka kosala molulu ya Ekaniseli ata na ntango oyo makambo ezali pɛtɛɛ te!

17. Mituna nini tokoki komituna?

17 Lokola Ekaniseli ezali kopusana, tokoki komituna boye: ‘Ndenge nini nakoki komekola Yesu mingi koleka na likambo etali komonisa bolingo? Nakanisaka bamposa ya bandeko na ngai bakristo mingi koleka bamposa na ngai moko? Nalukaka ete bandeko na ngai bakristo básalela ngai makambo oyo eleki makoki na bango, to nayebaka ete bakoki te kosala makambo mosusu?’ Tókoba ntango nyonso komekola Yesu mpe ‘tómityaka na esika ya basusu.’​—1 Pe. 3:8.

KOBOSANA MATEYA YANGO TE

18-19. (a) Tokoki kondima likambo nini? (b) Ozwi ekateli ya kosala nini?

18 Mosika te, Ekaniseli ya liwa ya Kristo ekosalema lisusu te. Ntango Yesu “akoya” na ntango ya bolɔzi monene, akoyanganisa “bato oyo ye aponá” mpo bákende likoló, mpe tokotika kosala Ekaniseli.​—1 Ko. 11:26; Mat. 24:31.

19 Ata ntango Ekaniseli ekosalema lisusu te, kozanga ntembe basaleli ya Yehova bakobosana te molulu yango oyo ezangi mindɔndɔ, oyo emonisaka komikitisa, mpiko, mpe bolingo monene ya Yesu. Na ntango wana, na ntembe te, baoyo bazalaki kosala molulu yango ya ntina mingi bakobanda kolobela yango mpo na bolamu ya bato oyo bakozala na bomoi na ntango wana. Kasi, mpo na kozwela molulu yango matomba banda sikoyo, tosengeli kozala na ekateli ya komekola komikitisa ya Yesu, mpiko, mpe bolingo na ye. Soki tosali bongo, tóyeba ete Yehova akopesa biso mbano.​—2 Pe. 1:10, 11.

LOYEMBO 13 Kristo, ndakisa na biso

^ par. 5 Mosika te, tokosala molulu ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo mpo na kokanisa liwa ya Yesu Kristo. Molulu wana oyo ezangi mindɔndɔ eteyaka biso ete Yesu azalaki na komikitisa, mpiko, mpe bolingo. Na lisolo oyo, tokolobela ndenge oyo tokoki komekola bizaleli yango ya ntina mingi.

^ par. 2 NDIMBOLA YA MALOBA: Kosala ekaniseli elimboli kosala molulu moko ya ntina mpo na kokumisa likambo to moto moko boye.

^ par. 56 BILILINGI: Bililingi oyo ezali komonisa basaleli ya Nzambe ya sembo bazali kosala Ekaniseli na siɛklɛ ya liboso; na nsuka ya bambula ya 1800; na kaa ya bakangami ya Banazi; mpe na mikolo na biso, na Ndako ya Bokonzi moko ya polele na ekólo moko ya Amerika ya Sudi, na eleko ya molunge.