LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Février 2017

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 03-30/04/2017.

Mokano ya Yehova ekokokisama!

Na ebandeli, mokano ya Nzambe mpo na mabele mpe mpo na bato ezalaki nini? Nini ebebisaki makambo? Mpe mpo na nini mbeka ya lisiko ya Yesu ezali fungola oyo esali ete mokano ya Nzambe ekokisama?

Lisiko—‘Libonza oyo ekoki mpenza’ oyo euti na Tata

Ebongiseli wana ya Nzambe efungoli nzela na ebele ya mapamboli, kasi etaleli mpe makambo ya ntina mingi oyo etali molɔ́ngɔ́ mobimba.

LISOLO YA BOMOI

Tomonaki boboto monene ya Nzambe na ndenge mingi

Douglas ná Mary Guest bamonaki boboto monene ya Nzambe ntango bazalaki babongisi-nzela na Canada mpe ntango bazalaki bamisionɛrɛ na Brésil mpe na Portugal.

Yehova akambaka basaleli na ye

Na ntango ya kala, Yehova asalelaki bato mpo na kotambwisa basaleli na ye. Nini emonisi ete ye moko nde azalaki kotambwisa bakambi yango?

Nani azali kokamba basaleli ya Nzambe lelo oyo?

Yesu alakaki bayekoli na ye ete akozala elongo na bango tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo. Ndenge nini azali kokamba basaleli ya Nzambe awa na mabele lelo oyo?

Mituna ya batángi

Ntoma Paulo akomaki ete Nzambe ‘akotika te ete tómekama koleka oyo tokoki kokangela motema.’ Yango elingi nde koloba ete Nzambe abongisaka liboso makambo oyo tokoki koyikela mpiko mpe na nsima aponaka komekama oyo tokokutana na yango?

BILOKO OYO TOSALELÁ KALA

“Nzela moko te eleki mabulumabulu to eleki molai”

Pene na nsuka ya bambula 1920 mpe na ebandeli ya bambula 1930, babongisi-nzela ya molende bamonisaki ekateli na bango ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe tii na bamboka ya kati ya Australie.