Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Babongisi-nzela mibale: George Rollston mpe Arthur Willis batɛlɛmi mpo na kotya mai na motɛrɛ ya motuka.—Teritware ya nɔrdi, 1933

BILOKO OYO TOSALELÁ KALA

“Nzela moko te eleki mabulumabulu to eleki molai”

“Nzela moko te eleki mabulumabulu to eleki molai”

TOZALI mokolo ya 26/03/1937. Mibali mibale oyo balɛmbi mpo na mobembo bakómi na engumba Sydney, na ekólo Australie, na motuka na bango oyo etondi na putulu. Mbula mobimba eleki banda batikaki engumba yango; basalaki mobembo molai ya kilomɛtrɛ koleka 19 300 tii na bamboka ya mosika mpe ya bangombangomba na kati mpenza ya Australie. Kasi mibali yango bazali te bato oyo basalaka mibembo mpo na koluka koyeba makambo ya sika to kozanga koyeba esika nini bazali kokende. Bazali nde babongisi-nzela mibale ya molende, oyo bazalaki na ekateli ya kokende kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe tii na bamboka ya kati mpenza ya Australie. Moko nkombo na ye Arthur Willis mpe mosusu nkombo na ye Bill Newlands.

Tii na nsuka ya bambula ya 1920, Bayekoli ya Biblia * na Australie, oyo bazalaki mingi te, bazalaki kosakola mingimingi na bingumba ya minene mpe ya mike oyo ezalaki pembenipembeni ya mai monene. Nzokande, ebele ya bato bazalaki kofanda nde na bamboka ya kati, na mokili ekauká, teritware oyo bonene na yango ezalaki lokola ekólo mobimba ya États-Unis kabolá na mibale. Nzokande bandeko wana bayebaki malamu ete bayekoli ya Yesu basengeli kopesa litatoli mpo na ye “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele,” ezala mpe na bamboka ya kati mpenza ya Australie. (Misala 1:8) Kasi ndenge nini bakokaki kosala mosala monene ya ndenge wana? Lokola bazalaki mpenza na kondima ete Yehova akopambola milende na bango, bazalaki na ekateli ya kosala nyonso oyo bakoki.

BABONGISI-NZELA BAFUNGOLI NZELA

Na 1929, masangá mingi na Queensland mpe na wɛsti ya Australie ezalaki na mituka oyo na kati ezalaka lokola ndako mpo esalisa bandeko bákende kosakola na bamboka ya mosika. Bandeko oyo bazalaki kotambwisa mituka yango bazalaki babongisi-nzela oyo bazalaki nzoto makasi, oyo bakokaki komesana na bomoi ya mpasi mpe koyeba kobongisa mituka yango soki ekufi. Babongisi-nzela yango bakendaki kosakola na bisika mingi oyo bato bayokaki naino nsango malamu liboso ata moke te.

Babongisi-nzela oyo bazalaki na makoki ya kosomba mituka te bazalaki kokende na velo na bamboka wana ya mosika. Na ndakisa, na 1932, ndeko Bennett Brickell, oyo azalaki na mbula 23, autaki na engumba Rockhampton, na etúká ya Queensland, mpe asalaki mobembo ya sanza mitano mpo na kosakola na bamboka ya kati na nɔrdi ya etúká wana. Na velo na ye oyo ekokaki komema mikumba mingi, azalaki komema bolangiti, bilamba, bilei, mpe ebele ya babuku. Ata soki pinɛ ya velo na ye esili mopɛpɛ, azalaki kaka kokoba na mobembo na ye, na elikya ete Yehova akosunga ye. Na mobembo moko, atindikaki velo na ye na ntaka ya kilomɛtrɛ 320, tii na bisika oyo liboso bato bazalaki kokufa mpo na kozanga mai. Na boumeli ya mbula 30 oyo elandaki, ndeko Brickell asalaki mibembo ya bankama ya bankóto ya bakilomɛtrɛ na Australie mobimba, na velo, na tukutuku, to na motuka. Azalaki moto ya liboso ya kosakola epai ya bafandi ya liboso ya Australie mpe apesaki mabɔkɔ na kofungola masangá ya sika, yango wana ayebanaki mingi mpe bandeko bazalaki komemya ye mingi kuna.

NDENGE OYO BALONGAKI MIKAKATANO

Na mokili mobimba, Australie ezali moko ya bikólo oyo ezali na bato mingi te, mingimingi na bamboka ya kati, bato bazalaka mingi mpenza te. Yango wana, basaleli ya Yehova bazalaki na ekateli ya kokende kokutana na bato tii na bamboka ya kati mpenza.

Babongisi-nzela mibale, ndeko Stuart Keltie mpe ndeko William Torrington, bazalaki na ekateli ya ndenge wana. Na 1933, bakatisaki Simpson, esobe moko monene oyo etondi na zɛlo, mpo na kokende kosakola na engumba Alice Springs, na kati mpenza ya Australie. Ntango motuka na bango ekufaki mpe esɛngaki ete bátika yango, ndeko Keltie, oyo azalaki kolata lokolo moko ya libaya, akobaki mobembo na ye mpo na kosakola, kasi na mbala oyo asalelaki kamela! Milende ya babongisi-nzela yango ebotaki mbuma ntango bakutanaki na mobali moko oyo azalaki na otɛlɛ na ye na William Creek, mboka moko ya kati mpenza, esika engbunduka etɛlɛmaka. Mobali yango nkombo na ye Charles Bernhardt. Na nsima, ayambaki solo, atɛkaki otɛlɛ na ye, mpe asalaki mosala ya mobongisi-nzela ye moko na boumeli ya mbula 15, na bamboka mosusu ya Australie oyo ezalaki mpenza mosika mpe oyo ezalaki mpasi mpo na kozwa mai.

Arthur Willis azali komibongisa mpo na kokende kosakola na bamboka ya kati ya teritware monene ya Australie.—Perth, wɛsti ya Australie, 1936

Ya solo, babongisi-nzela wana ya libosoliboso basengelaki na mpiko mpe na molende mpo na kolonga mikakatano oyo bakutanaki na yango. Na mobembo moko oyo basalaki mpo na kokende kosakola na bamboka ya kati ya Australie, ndeko Arthur Willis ná ndeko Bill Newlands, oyo tolobeli na ebandeli, basalaki kilomɛtrɛ 32 mpamba na boumeli ya pɔsɔ mibale mpo mbula makasi oyo ezalaki kobɛta mikolo wana ekómisaki esobe ebale oyo etondi na pɔtɔpɔtɔ. Ntango mosusu, bazalaki kotoka mingi mpe komɛla mpema na molunge ntango bazalaki kotindika motuka na bango na zɛlo ya esobe mpe na lobwaku oyo etondi na mabanga mpe koleka na zɛlo na kati ya mai. Soki motuka na bango ekufi, mpo mbala mingi ezalaki kosalema bongo, bazalaki kotambola na makolo to kokende na velo mikolo ebele tii na engumba oyo ezali pene, na nsima, kozela bapɔsɔ mingi liboso ya kozwa eloko oyo ebebi. Atako bakutanaki na mikakatano wana nyonso, bazalaki ntango nyonso na makanisi malamu. Ndeko Arthur Willis azongelaki na mokuse maloba oyo ebimaki liboso na zulunalo L’Âge d’Or, ete: “Mpo na Batatoli na ye, nzela moko te eleki mabulumabulu to eleki molai.”

Ndeko Charles Harris, oyo azalaki mobongisi-nzela bambula mingi alobaki ete kozala mosika na bandeko ndenge wana mpe bampasi oyo akutanaki na yango na bamboka wana ya mosika ya Australie esalaki ete akóma lisusu pene na Yehova. Abakisaki ete: “Bomoi ezalaka malamu koleka soki tozali na biloko mingi te. Soki Yesu azalaki kondima ata kolala libándá mikolo mosusu soki esengeli, biso mpe tosengeli kosepela kosala bongo soki mokumba na biso esɛngi yango.” Yango nde babongisi-nzela mingi basalaki. Mpo na milende na bango, nsango malamu ekɔtaki tii na bamboka ya kati mpenza ya Australie, mpe esalisi ebele ya bato bákóma na ngámbo ya Bokonzi ya Nzambe.

^ par. 4 Bayekoli ya Biblia bazwaki nkombo Batatoli ya Yehova na mobu 1931.Yisaya 43:10.