Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kobá kozala moto ya elimo!

Kobá kozala moto ya elimo!

“Bókoba kotambola na elimo.”​—BAGALATIA 5:16.

NZEMBO: 22, 75

1, 2. Likambo nini ekómelaki ndeko mobali moko, mpe asalaki nini?

ROBERT azwaki batisimo ntango azalaki elenge, kasi azalaki kozwa solo na motuya mpenza te. Alobi boye: “Nazalaki kosala makambo ya mabe te, kasi nafandisaki solo na motema te. Nazalaki kokanisa ete nazali makasi na elimo; nazalaki koyangana na makita mpe kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi basanza mosusu. Kasi eloko moko ezalaki kozanga.”

2 Robert azalaki koyeba te eloko nini ezalaki kozanga tii ntango abalaki. Na bantango mosusu, ye ná mwasi na ye bazalaki kosala lisano ya kotunana mituna ya Biblia. Mwasi na ye, oyo azalaki moto ya elimo, azalaki kopesa biyano mbala moko, kasi mbala mingi Robert azalaki koyeba biyano te mpe azalaki koyoka nsɔni. Alobi boye: “Ezalaki lokola nayebi eloko te. Nazalaki koloba na nse ya motema ete, ‘Mpo nakamba mwasi na ngai na makambo ya elimo, ezali na makambo oyo nasengeli kobongisa.’” Asalaki mpe bongo. Alobi boye: “Namipesaki na koyekola Biblia, nayekolaki mingi mpenza, mpe ekómaki kosimba. Nakómaki koyeba makambo, mpe oyo eleki ntina, nakómaki na boyokani malamu na Yehova.”

3. (a) Ndakisa ya Robert ekoki koteya biso nini? (b) Mituna nini ya ntina mingi tokotalela?

3 Ndakisa ya Robert ekoki kopesa biso mateya ya ntina mingi. Mbala mosusu toyebi makambo ya Biblia mpe toyanganaka na makita mbala na mbala, kasi kaka yango te nde ekokómisa biso bato ya elimo. To mbala mosusu tosali milende mingi mpo tókende liboso na elimo, kasi soki tomitaleli lisusu, tokoki kaka komona makambo ya kobongisa. (Bafilipi 3:16) Mpo na kosalisa biso tókoba kokende liboso, tokopesa biyano na mituna misato ya ntina mingi: (1) Nini ekosalisa biso tóyeba soki tozali bato ya elimo? (2) Ndenge nini tokoki kokoba kokóma makasi na elimo? (3) Ndenge nini kozala makasi na elimo ekoki kosalisa biso na bomoi ya mokolo na mokolo?

NDENGE YA KOYEBA SOKI OZALI MOTO YA ELIMO

4. Toli ya Baefese 4:23, 24 etali banani?

4 Ntango tobandaki kosalela Nzambe, tosalaki mbongwana na likambo mokomoko ya bomoi na biso. Mbongwana yango ekobaka ata nsima ya batisimo. Biblia elobi: “Bosengeli kokómisama sika na kati ya bokasi oyo ezali kotambwisa makanisi na bino.” (Baefese 4:23, 24) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tosengeli kokoba kosala bambongwana. Ata soki tosaleli Yehova bambula ebele, tosengeli kokoba kobatela elimo na biso.​—Bafilipi 3:12, 13.

5. Mituna nini ekoki kosalisa biso tómitalela?

5 Mpo na kobongisa mpe kobatela elimo na biso, tosengeli komitalela na bosembo. Tózala bilenge to mikóló, tokoki komituna boye: ‘Namonaka ete nazali kokóma makasi na elimo? Nazali kokoba komekola Kristo? Ndenge oyo natalelaka makita mpe makambo oyo nasalaka kuna emonisaka ete nazali makasi na elimo? Masolo oyo nabɛtaka emonisaka ete nalingaka mpenza nini? Boyekoli na ngai moko, molato mpe ndenge na ngai ya kosala monzɛlɛ, to ndenge nasalaka soki bapesi ngai toli emonisaka nini? Nasalaka nini ntango nakutani na komekama? Nazali kokóma mokristo oyo akɔmɛli mpenza na elimo? (Baefese 4:13) Mituna yango ekoki kosalisa biso tóyeba soki tozali kokola na elimo to te.

6. Mpo tóyeba soki tozali bato ya elimo, ekoki kosɛnga mpe nini?

6 Na bantango mosusu, esɛngaka bato mosusu básalisa biso mpo tóyeba soki tozali bato ya elimo. Ntoma Paulo alobaki ete moto ya mosuni ayebaka te ete bomoi na ye esepelisaka Nzambe te. Kasi, moto ya elimo ayebaka ndenge Nzambe atalelaka makambo. Ayebi ete Yehova asepelaka te na bomoi ya moto ya mosuni. (1 Bakorinti 2:14-16; 3:1-3) Bankulutu oyo bazali na makanisi ya Kristo bamonaka mbala moko soki bandeko babandi kokóma na makanisi ya mosuni, mpe balukaka kosalisa bango. Soki bankulutu babendi likebi na yo na likambo moko, ondimaka lisalisi na bango mpe obongisaka makambo oyo esengeli? Soki ozali kosala bongo, okomonisa ete olingi mpenza kokóma makasi na elimo.​—Mosakoli 7:5, 9.

KOBÁ KOKÓMA MAKASI NA ELIMO

7. Mpo na nini kozala makasi na elimo esuki kaka te na koyeba Biblia?

7 Mpo tókóma makasi na elimo, tosengeli kosuka kaka te na kozala na boyebi ya Biblia. Mokonzi Salomo ayebaki makambo mingi mpo na Yehova. Kutu, maloba na ye ya bwanya ekɔtaki na kati ya Biblia. Kasi na nsima, Salomo azalaki lisusu moto ya elimo te mpo atikalaki sembo te. (1 Bakonzi 4:29, 30; 11:4-6) Na yango, longola koyeba Biblia, tosengeli kosala nini? Tosengeli kokoba kokómisa kondima na biso makasi. (Bakolose 2:6, 7) Kasi, ndenge nini tokoki kosala yango?

8, 9. (a) Nini ekoki kosalisa yo okómisa kondima na yo makasi? (b) Mokano nini tosengeli kozala na yango ntango tozali koyekola mpe komanyola? (Talá elilingi ya ebandeli.)

8 Na siɛklɛ ya liboso, Paulo alendisaki bakristo ‘básala makasi bákóma bato oyo bakɔmɛli.’ (Baebre 6:1) Ndenge nini tokoki kosalela toli yango lelo? Likambo moko ya ntina ezali koyekola buku Tikalá na kati ya bolingo ya Nzambe. Koyekola buku yango ekosalisa yo oyeba kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na yo. Soki osilisá koyekola buku yango, yekolá mikanda mosusu oyo ekoki kokómisa kondima na yo makasi. (Bakolose 1:23) Osengeli mpe komanyola makambo oyo ozali koyekola, mpe kosɛnga Yehova asalisa yo omona ndenge ya kosalela yango.

9 Ntango tozali koyekola mpe komanyola, tosengeli kozala na mokano ya kokolisa mposa makasi ya kosepelisa Yehova mpe kotosa ye. (Nzembo 40:8; 119:97) Tosengeli mpe koyekola koboya eloko nyonso oyo ekopekisa biso tókola na elimo.​—Tito 2:11, 12.

10. Nini ekoki kosalisa bilenge bákóma makasi na elimo?

10 Elenge, oyebi mikano na yo ya elimo? Na mayangani ya zongazonga, ndeko mobali moko oyo asalaka na Betele asololaka na bilenge oyo bakozwa batisimo mpe atunaka bango mikano ya elimo oyo bamityeli. Bilenge mingi bapesaka biyano oyo emonisi ete bayebi malamu oyo balingi kosala na mosala ya Yehova, na ndakisa kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso to kokende na esika oyo mposa ya basakoli ezali mingi. Kasi, bilenge mosusu bayebaka te eyano nini bápesa. Yango elingi nde koloba ete bamonaka te ntina oyo basengeli komityela mikano ya elimo? Soki ozali elenge, omituna boye: ‘Nakendaka makita mpe nabimaka mosala ya kosakola kaka mpo baboti na ngai balingi nasala yango? To ngai moko nazali moninga ya Nzambe?’ Toli ya komityela mikano ya elimo etali kaka bilenge te, etali biso nyonso. Mikano yango ekosalisa biso tókoba kokóma makasi na elimo.​—Mosakoli 12:1, 13.

11. (a) Tosengeli kosala nini mpo tókóma makasi na elimo? (b) Ndakisa nini ya Biblia tokoki komekola?

11 Soki tomoni bisika ya kobongisa, tosengeli kobanda kosala mbongwana. Kokóma moto ya elimo ezali na ntina mingi; likambo yango ekoki komema na bomoi to na liwa. (Baroma 8:6-8) Kasi, kozala makasi na elimo elimboli te kokóma moto ya kokoka. Elimo santu ya Yehova esalisaka biso tókende liboso. Atako bongo, biso moko tosengeli kosala milende. Eleki mwa bambula, ndeko John Barr, oyo azaláká na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alimbolaki Luka 13:24 mpe alobaki: “Bato mingi bakweaka mpo basalaki milende ndenge esengeli te mpo na kokóma makasi [na elimo].” Tosengeli komekola Yakobo, oyo abundaki na anzelu mpe atikaki te kino azwaki lipamboli. (Ebandeli 32:26-28) Koyekola Biblia ekoki kosepelisa mingi, kasi tosengeli te kozwa Biblia lokola mwa buku moko ya masolo ya kosepelisa. Tosengeli kosala makasi tómona biloko ya motuya ya elimo oyo ekosalisa biso.

12, 13. (a) Nini ekosalisa biso tósalela Baroma 15:5? (b) Ndenge nini ndakisa mpe toli ya Petro ekoki kosalisa biso? (c) Okoki kosala nini mpo okoba kokóma makasi na elimo? (Talá etanda “ Mpo okoba kokóma makasi na elimo.”)

12 Ntango tozali kosala milende mpo tókola na elimo, elimo santu ekosalisa biso tóbongola makanisi na biso. Mokemoke, tokoki kobanda kokanisa lokola Kristo. (Baroma 15:5) Lisusu, elimo santu ekoki kosalisa biso tólongola bamposa ya mosuni mpe tókolisa bizaleli oyo esepelisaka Nzambe. (Bagalatia 5:16, 22, 23) Soki omoni ete okómi kotya makanisi mingi na makambo ya mosuni to na bisengo, kolɛmba nzoto te. Kobá kosɛnga Yehova elimo santu esalisa yo ozongisa makanisi na makambo oyo ebongi. (Luka 11:13) Kanisá ndakisa ya ntoma Petro. Na bantango mosusu, azalaki na makanisi ya Kristo te. (Matai 16:22, 23; Luka 22:34, 54-62; Bagalatia 2:11-14) Kasi, alɛmbaki nzoto te, mpe Yehova asalisaki ye. Mokemoke, Petro ayekolaki kokanisa lokola Kristo. Biso mpe tokoki kosala bongo.

13 Na nsima, Petro atángaki bizaleli oyo ekosalisa biso. (Tángá 2 Petro 1:5-8.) Soki ‘tosali makasi mpenza’ tókolisa bizaleli lokola komipekisa, ezaleli ya koyika mpiko, bolingo ya bondeko mpe bizaleli mosusu, yango ekosalisa biso tókoba kokóma makasi na elimo. Mokolo na mokolo tómitunaka boye: ‘Ezaleli nini nakoki kosala makasi namonisa lelo mpo esalisa ngai nakoba kokóma makasi na elimo?’

SALELÁKÁ MITINDA YA BIBLIA MOKOLO NA MOKOLO

14. Ndenge nini kozala moto ya elimo ekomonana na bomoi na biso?

14 Soki tokanisaka lokola Kristo, ezaleli na biso na mosala to na kelasi, ndenge na biso ya koloba, mpe bikateli oyo tokozwa mokolo na mokolo ekomonisa yango. Bikateli yango ekomonisa ete tosalaka makasi tómekola Kristo. Lokola tozali bato ya elimo, tolingaka kotika eloko te ebebisa boyokani na biso na Yehova. Soki tokutani na komekama, kozala moto ya elimo ekosalisa biso tótɛmɛla komekama yango. Liboso tózwa ekateli, tokokanisa mpe tokomituna boye: ‘Etinda nini ya Biblia ekoki kosalisa ngai? Kristo alingaki kosala nini? Nini ekosepelisa Yehova?’ Tosengeli kokóma na momeseno ya komituna ndenge wana. Na yango, tótalela makambo oyo tokoki kokutana na yango. Na likambo mokomoko, tokomona etinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso tózwa ekateli ya malamu.

15, 16. Ndenge nini kokanisa lokola Kristo ekoki kosalisa yo ozwa bikateli na oyo etali (a) kopona moto oyo okobala? (b) kopona baninga?

15 Kopona moto oyo okobala. Etinda moko ya Biblia ezali na 2 Bakorinti 6:14, 15. (Tángá.) Paulo amonisaki polele ete bato ya elimo ná bato ya mosuni batalelaka makambo ndenge moko te. Omoni ndenge etinda yango ekoki kosalisa yo opona moto oyo okobala?

16 Kopona baninga. Etinda moko ya Biblia ezali na 1 Bakorinti 15:33. (Tángá.) Moto ya elimo akondima te kosala boninga na bato oyo bakoki kobebisa elimo na ye. Ndenge nini okoki kosalela etinda yango na makambo mosusu? Na ndakisa, ndenge nini ekoki kosalisa yo ozwa bikateli ya malamu mpo na basite ya kosolola na baninga na Internet? To okosala nini soki bato oyo oyebi te basɛngi yo bóbɛta masano na nzela ya Internet?

Bikateli na ngai ekosalisa ngai nakóma makasi na elimo? (Talá paragrafe 17)

17-19. Ndenge nini kozala moto ya elimo ekosalisa yo (a) oboya makambo ezangá ntina? (b) omityela mikano ya malamu? (c) oyeba kosilisa matata?

17 Makambo oyo epekisaka moto akóma makasi na elimo. Ntoma Paulo apesi likebisi moko na Baebre 6:1. (Tángá.) Misala nini oyo ‘ebotaka mbuma te’ tosengeli koboya? Ezali makambo nyonso oyo ezangá ntina, oyo ekokómisa biso makasi na elimo te. Likebisi yango oyo etali misala oyo ebotaka mbuma te ekosalisa biso tózwa biyano na mituna lokola oyo: ‘Likambo oyo nalingi kosala ezali na litomba, to ezangá ntina? Nasengeli kokɔta na mombongo oyo? Mpo na nini nasengeli te kokɔta na etuluku ya bato oyo balingi kobongola makambo na mokili?’

Bikateli na ngai ekosalisa ngai namityela mikano ya elimo? (Talá paragrafe 18)

18 Mikano ya elimo. Na Lisolo likoló ya Ngomba, Yesu apesaki toli ya malamu mpo na komityela mikano. (Matai 6:33) Moto ya elimo atyaka Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na ye. Etinda yango ekosalisa biso tózwa biyano na mituna lokola: ‘Nasengeli kokende kotánga na iniversite? Nasengeli kondima mosala oyo?’

Bikateli na ngai ekosalisa ngai nazala na kimya na basusu? (Talá paragrafe 19)

19 Matata. Toli oyo Paulo apesaki bakristo ya Roma ekoki kosalisa biso ntango tozwani matata na basusu. (Baroma 12:18) Lokola tomekolaka Kristo, tosalaka makasi ‘tózala na kimya na bato nyonso.’ Osalaka nini soki ozwani matata na basusu? Ezalaka mpasi ondima makanisi ya moto mosusu? To basusu bayebi ete osalaka makasi ‘otya kimya’?​—Yakobo 3:18.

20. Mpo na nini olingi kokoba kokóma makasi na elimo?

20 Bandakisa wana emonisi ndenge mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso tózwa bikateli oyo ekomonisa ete tozali bato ya elimo. Kozala bato ya elimo ekosalisa biso tózala na esengo mokolo na mokolo. Robert, oyo tolobelaki na ebandeli, alobi boye: “Ntango nakómaki na boyokani malamu mpenza na Yehova, nakómaki mobali mpe tata ya malamu koleka. Nazalaki na esengo mpenza.” Soki tosali nyonso oyo tokoki mpo tókoba kokóma makasi na elimo, biso mpe tokozwa matomba ebele. Tokozala na esengo banda sikoyo, mpe na mikolo ezali koya tokozwa “bomoi ya solosolo.”​—1 Timote 6:19.