Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Esengo​—Ezaleli oyo eutaka epai ya Nzambe

Esengo​—Ezaleli oyo eutaka epai ya Nzambe

BATO nyonso balingaka kozala na esengo. Kasi tozali na mikolo ya nsuka, mpe moto nyonso azali komona ete ezali “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Timote 3:1) Bato mosusu babungisaka esengo na bango mpo basaleli bango makambo oyo ebongi te, mpo bazali kobɛla, babungisi mosala na bango, to moto oyo balingaki akufi. Basusu babungisaka esengo na bango mpo likambo moko ezali kotungisa bango to kopesa bango mawa. Ata basaleli ya Yehova bakoki kolɛmba nzoto mpe kobungisa esengo na bango mokemoke. Soki likambo ya bongo ekómeli yo, ndenge nini okoki kozongela esengo na yo?

Mpo na kopesa eyano na motuna wana, tosengeli liboso koyeba soki esengo ya solosolo ezali nini mpe ndenge oyo bato mosusu babatelaki esengo na bango ata ntango bakutanaki na mikakatano. Na nsima, tokomona ndenge ya kobatela mpe kobakisa esengo na biso.

ESENGO EZALI NINI?

Kozala na esengo ekeseni na kosepela. Tózwa ndakisa: Moto oyo alangwe masanga akoki kobanda kosɛkasɛka. Kasi ntango molangwa esili, akotika kosɛkasɛka mpe akomona ete bomoi ezali kaka na mikakatano mingi. Kosepela na ye ya ntango mokuse ezalaki esengo ya solosolo te.​—Masese 14:13.

Nzokande, toyokaka esengo na motema ntango tozwi to tozali kozela eloko moko ya malamu. Kozala na esengo elimboli kozala na nsai, ata ntango makambo ezali malamu to ezali mabe. (1 Batesaloniki 1:6) Kutu, ata soki likambo moko ezali kotungisa biso, tokoki kaka kozala na esengo na motema. Na ndakisa, babɛtaki bantoma fimbo mpo bazalaki kosakola nsango etali Yesu. Kasi, “balongwaki liboso ya Sanedrina, bazali kosepela mpo batángamaki bato oyo babongi kosambwisama mpo na nkombo na ye.” (Misala 5:41) Basepelaki te mpo babɛtaki bango; bazalaki na esengo mpo batikalaki sembo epai ya Nzambe.

Tobotamaka na esengo ya ndenge wana te; eyaka mpe yango moko te. Mpo na nini? Mpo esengo ya solosolo ezali na kati ya mbuma ya elimo santu ya Nzambe. Elimo ya Nzambe esalisaka biso tólata “bomoto ya sika,” mpe esengo ezali kati na yango. (Baefese 4:24; Bagalatia 5:22) Soki tokómi na esengo, ekozala mpasi te tólonga mikakatano na biso.

BANDAKISA OYO EBONGI TÓMEKOLA

Yehova alingaki ete makambo ya malamu etonda awa na mabele, kasi te makambo ya mabe oyo tozali komona lelo. Atako bato bazali kosala makambo ya mabe, Yehova abungisi esengo na ye te. Biblia elobi boye: “Bokasi mpe esengo ezali na esika na ye.” (1 Ntango 16:27) Lisusu, makambo ya malamu oyo basaleli na ye basalaka esepelisaka ye.​—Masese 27:11.

Tokomekola Yehova soki tobungisi esengo na biso te ntango makambo esalemi te ndenge tokanisaki. Na esika tómitungisa, tokoki kotya makanisi na makambo ya malamu oyo tozali na yango sikoyo, mpe komonisa motema molai wana tozali kozela makambo ya malamu oyo ekosalema na mikolo ezali koya. *

Biblia ezali na bandakisa ebele ya bato oyo babatelaki esengo na bango atako bazalaki na mikakatano mingi. Abrahama abatelaki esengo na ye ata ntango bomoi na ye ezalaki na likama mpe ntango bato babimiselaki ye mikakatano. (Ebandeli 12:10-20; 14:8-16; 16:4, 5; 20:1-18; 21:8, 9) Nini esalisaki ye? Azalaki kokanisa elikya ya kofanda na mokili ya sika na boyangeli ya Masiya. (Ebandeli 22:15-18; Baebre 11:10) Yesu alobaki: “Abrahama tata na bino asepelaki mingi na elikya ya komona mokolo na ngai.” (Yoane 8:56) Tokomekola Abrahama soki tozali kaka kokanisa makambo ya esengo oyo ekozala na mikolo ezali koya.​—Baroma 8:21.

Paulo ná Silasi mpe babatelaki esengo na bango atako bakutanaki na mikakatano ebele. Na ndakisa, nsima ya kobɛta bango makasi mpe kobwaka bango na bolɔkɔ, “bazalaki kobondela mpe kosanzola Nzambe na nzembo.” (Misala 16:23-25) Bayikelaki mikakatano na bango mpiko mpo bakobaki kokanisa bilaka ya Nzambe mpo na mikolo ezali koya. Lisusu, koyeba ete bazalaki konyokwama mpo bazalaki bayekoli ya Kristo epesaki bango esengo. Tokomekola Paulo ná Silasi soki tozali kokanisa mbuma malamu oyo tokozwa soki tosaleli Nzambe na bosembo.​—Bafilipi 1:12-14.

Lelo oyo mpe, tozali na bandakisa ebele ya bandeko oyo babatelaki esengo na bango ntango bakutanaki na mikakatano. Na ndakisa, na sanza ya 11/2013, mopɛpɛ moko makasi na nkombo Haiyan ebebisaki bandako ya bandeko koleka 1 000 na Philippines. George, oyo mopɛpɛ ekweisaki ndako na ye na engumba Tacloban, alobi boye: “Atako likambo ya bongo ekómaki, bandeko bazali na esengo. Nazangi maloba mpo na komonisa esengo oyo tozali na yango.” Soki tozali kokanisa makambo oyo Yehova asalá mpo na biso mpe tokobi komonisa botɔndi, tokobatela esengo na biso ata soki tokutani na mikakatano ya makasi. Makambo nini mosusu epesaka biso esengo?

MAKAMBO OYO EPESAKA BISO ESENGO

Likambo oyo epesaka biso esengo koleka ezali boyokani oyo tozalaka na yango na Yehova. Toyebi Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Azali Tata na biso, Nzambe na biso mpe Moninga na biso!​—Nzembo 71:17, 18.

Tozalaka mpe na botɔndi ndenge Yehova apesá biso bomoi mpe likoki ya kosepela na yango. (Mosakoli 3:12, 13) Lokola abendá biso epai na ye, toyebi mokano na ye mpo na biso mpe ndenge ya kotambwisa bomoi na biso. (Bakolose 1:9, 10) Kasi, bato mingi bayebi ntina ya bomoi te. Mpo na komonisa bokeseni yango, ntoma Paulo akomaki boye: “‘Liso emoná te mpe litoi eyoká te, mpe eyá te na motema ya moto, makambo oyo Nzambe abongisá mpo na baoyo balingaka ye.’ Mpo biso nde Nzambe amonisi yango na nzela ya elimo na ye.” (1 Bakorinti 2:9, 10) Koyeba mokano mpe mposa ya Yehova epesaka biso esengo.

Yehova asalá makambo mosusu mingi mpo na biso. Azwi bibongiseli mpo na kolimbisa masumu na biso. (1 Yoane 2:12) Apesi biso elikya ya kozwa bomoi ya seko na mokili ya sika, oyo ezali lisusu mosika te. (Baroma 12:12) Ata sikoyo, Yehova azali kopesa biso likoki ya kozwa baninga ebele oyo basambelaka ye. (Nzembo 133:1) Abatelaka biso na mitambo ya Satana mpe bademo na ye. (Nzembo 91:11) Soki totye makanisi na mapamboli oyo Nzambe apesaka biso, esengo na biso ekobakisama.​—Bafilipi 4:4.

NDENGE YA KOKÓMA NA ESENGO MINGI

Mokristo oyo azalaka na esengo akoki kokóma lisusu na esengo koleka? Yesu alobaki: “Nalobi na bino makambo wana, mpo esengo na ngai ezala na kati na bino mpe esengo na bino etonda mɛkɛ.” (Yoane 15:11) Yango emonisi ete esengo na biso ekoki ntango nyonso kobakisama. Esengo ezali lokola mɔtɔ. Mpo mɔtɔ epela makasi, esɛngaka kobakisa nkoni. Kobosana te ete elimo santu esalisaka biso tózala na esengo. Na yango, mpo tózala na esengo mingi, tosengeli kokoba kosɛnga Nzambe elimo santu na ye na libondeli. Tosengeli mpe kokoba komanyola makambo oyo ezali na Biblia, mpo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu.​—Nzembo 1:1, 2; Luka 11:13.

Tokoki mpe kokóma na esengo mingi soki tozali komipesa na makambo oyo esepelisaka Yehova. (Nzembo 35:27; 112:1) Mpo na nini? Biblia elobi ete tokelamá mpo na ‘kobanga Nzambe ya solo mpe kobatela mitindo na ye, mpo yango nde mokumba nyonso ya moto.’ (Mosakoli 12:13) Na maloba mosusu, tokelamá mpo na kosala mokano ya Nzambe. Na yango, ntango tozali kosalela Yehova, bomoi na biso ekotonda mpenza na esengo. *

MATOMBA

Ntango tozali kobakisa esengo na biso, tokozwa matomba mosusu ebele. Na ndakisa, Yehova akosepela na biso mingi koleka wana tozali kosalela ye na esengo ata ntango tokutani na mikakatano. (Kolimbola Mibeko 16:15; 1 Batesaloniki 5:16-18) Lisusu, soki tozali na esengo ya solosolo, tokomona te ete kozala na biloko mingi ya mokili nde eleki ntina na bomoi. Kasi, tokoluka nde komipimela makambo mingi mpo na Bokonzi ya Nzambe. (Matai 13:44) Mpe ntango tozali komona mbuma malamu ya komipesa na mosala ya Yehova, tokozala na esengo mingi, tokomiyoka malamu, mpe tokosala ete basusu bábakisa esengo na bango.​—Misala 20:35; Bafilipi 1:3-5.

Longola yango, soki tozali na esengo mingi, nzoto na biso mpe ekozala malamu. Biblia elobi ete: “Motema oyo ezali na esengo esalaka malamu lokola eloko oyo ebikisaka.” (Masese 17:22) Moto moko ya mayele oyo ayekolaki makambo etali kolɔngɔnɔ ya nzoto na iniversite ya Nebraska na États-Unis andimaki likambo oyo Biblia elobi. Alobaki boye: “Soki sikoyo ozali na esengo mpe ozali kosepela na bomoi na yo, okozala nzoto malamu na mikolo ezali koya.”

Yango wana, atako tofandi na mokili oyo etondi na mitungisi, tokoki kozala na esengo ya solosolo soki tozali na elimo santu, oyo tozwaka na nzela ya kobondela, koyekola Liloba ya Nzambe mpe komanyola yango. Tokobakisa mpe esengo soki tozali kokanisa makambo mingi ya malamu oyo Yehova azali kopesa biso banda sikoyo, soki tozali komekola kondima ya basusu, mpe tozali kosala mokano ya Nzambe. Soki tosali bongo, tokomona bosolo ya maloba ya Nzembo 64:10, oyo elobi ete: “Moyengebene akosepela na Yehova mpe akokima mpenza epai na ye.”

^ par. 10 Tokolobela ezaleli ya motema molai na moko ya masolo oyo ekolobela bizaleli mosusu ya “mbuma ya elimo.”