Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 9

Bolingo mpe bosembo na Yisraele ya kala

Bolingo mpe bosembo na Yisraele ya kala

“Ye alingaka boyengebene mpe bosembo. Mabele etondi na motema boboto ya Yehova.”​—NZ. 33:5.

LOYEMBO 3 Nguya na ngai, elikya na ngai, makasi na ngai

NA MOKUSE *

1-2. (a) Biso nyonso tozalaka na mposa ya nini? (b) Tosengeli koyeba likambo nini?

BISO nyonso tozalaka na mposa ete basusu bálinga biso mpe básalela biso makambo na bosembo. Soki basaleli biso makambo kozanga bolingo mpe bosembo mbala na mbala, tokoki komiyoka ete tozali na ntina te mpe tozangi elikya.

2 Yehova ayebi ete tozalaka na mposa makasi ya bolingo mpe bosembo. (Nz. 33:5) Tosengeli koyeba ete Nzambe na biso alingaka biso mingi mpe alingi ete básalela biso makambo na bosembo. Tokoki komona yango polele soki totaleli malamu Mibeko oyo Yehova apesaki ekólo Yisraele na nzela ya Moize. Soki ozalaka na mposa makasi ete basusu bálinga yo, to soki olɛmbi nzoto mpo makambo ya kozanga bosembo eleki, talá ndenge Mibeko ya Moize * emonisi ete Yehova atyelaka basaleli na ye likebi.

3. (a) Ndenge Baroma 13:8-10 elimboli yango, tomonaka nini ntango toyekoli Mibeko ya Moize? (b) Na lisolo oyo, tokozwa biyano na mituna nini?

3 Ntango toyekoli Mibeko ya Moize, tomonaka bolingo ya Nzambe na biso Yehova. (Tángá Baroma 13:8-10.) Na lisolo oyo, tokotalela kaka mwa mibeko mosusu oyo apesaki ekólo Yisraele mpe tokoyanola na mituna oyo: Mpo na nini tokoki koloba ete bolingo nde esimbaki Mibeko? Mpo na nini tokoki koloba ete Mibeko ezalaki kolendisa bato bázalaka sembo? Ndenge nini baoyo bazalaki na bokonzi basengelaki kosalela Mibeko? Mpe Mibeko ezalaki kobatela mingimingi banani? Biyano na mituna yango ekoki kobɔndisa biso, kopesa biso elikya, mpe kokómisa makasi boyokani na biso na Tata na biso ya bolingo.​—Mis. 17:27; Rom. 15:4.

BOLINGO ESIMBAKI MIBEKO YA MOIZE

4. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete bolingo nde esimbaki Mibeko ya Moize? (b) Ndenge emonisami na Matai 22:36-40, Yesu alobelaki mibeko nini?

4 Tokoki koloba ete bolingo nde esimbaki Mibeko ya Moize mpo Yehova asalaka makambo nyonso na bolingo. (1 Yoa. 4:8) Mibeko nyonso oyo Yehova apesaki Bayisraele eutaki na mibeko mibale oyo eleki minene​—kolinga Nzambe mpe kolinga mozalani. (Lev. 19:18; Mib. 6:5; tángá Matai 22:36-40.) Na yango, tosengeli koyeba ete mobeko mokomoko na mibeko koleka 600 oyo esalaki Mibeko ya Moize eteyaka biso mwa likambo mpo na bolingo ya Yehova. Tótalela mwa bandakisa.

5-6. Yehova alingi ete bato oyo babalani básala nini, mpe likambo nini Yehova ayebi? Pesá ndakisa.

5 Zalá sembo epai ya molongani na yo, mpe tyeláká bana na yo likebi. Yehova alingi ete bato oyo babalani bálinganaka mingi mpo bolingo na bango eumela bomoi mobimba. (Eba. 2:24; Mat. 19:3-6) Ekobo ezali moko ya makambo oyo eleki mabe, oyo emonisaka mpenza kozanga bolingo. Yango wana, mobeko ya nsambo kati na Mibeko Zomi epekisaki ekobo. (Mib. 5:18) Kosala ekobo ezali ‘kosalela Nzambe lisumu’ mpe kosala molongani mabe mpenza. (Eba. 39:7-9) Moto oyo molongani na ye asali ekobo akoki koyoka mpasi na yango bambula ebele mpenza.

6 Yehova ayebi malamu ndenge oyo babalani bazali kosalelana makambo. Na ekólo Yisraele, alingaki ete básalelaka basi makambo ya malamu. Mobali oyo azalaki kotosa Mibeko azalaki kolinga mwasi na ye mpe azalaki koboma libala te mpo na makambo ya mikemike. (Mib. 24:1-4; Mat. 19:3, 8) Kasi, soki likambo moko ya monene ebimi mpe mobali abomi libala, asengelaki kopesa mwasi mokanda ya koboma libala. Mokanda yango ezalaki kobatela mwasi mpo bákosela ye makambo te ete asalaki pite. Lisusu, liboso mobali apesa mwasi mokanda ya koboma libala, emonani ete asengelaki kosolola na mikóló ya engumba. Na ndenge yango, mikóló bakozwa libaku ya komeka kosalisa babalani yango mpo báboma libala te. Soki mobali abomi libala mpo aluki matomba na ye moko, ntango mosusu Yehova azalaki kosala eloko moko te. Kasi, azalaki komona mpasi mpe kolela ya mwasi mpe azalaki komitya na esika na ye.​—Mal. 2:13-16.

(Talá paragrafe 7-8) *

7-8. (a) Yehova asɛngaki baboti básala nini? (Talá elilingi ya ezipeli.) (b) Mateya nini tozwi?

7 Lisusu, Mibeko emonisaka ete Yehova alingaka ete bana bázala na esengo mpe bábatelama malamu. Yehova asɛngaki baboti bákokisa kaka bamposa ya mosuni te, kasi mpe bamposa ya elimo ya bana na bango. Baboti basengelaki kosalela mabaku nyonso mpo na kosalisa bana bákanga ntina ya Mibeko ya Yehova mpe báyekola kolinga yango. (Mib. 6:6-9; 7:13) Moko ya makambo oyo ezalaki kotinda Yehova apesa Bayisraele etumbu ezalaki soki banyokoli bana na bango mosusu na ndenge ya nsɔmɔ. (Yir. 7:31, 33) Baboti basengelaki te komona bana lokola biloko mpamba oyo bakokaki kosakanela, kasi nde lokola libula, to likabo oyo euti na Yehova, oyo basengeli kozwa na motuya.​—Nz. 127:3.

8 Mateya: Yehova amonaka ndenge oyo mwasi ná mobali bazali kosalelana makambo. Alingi ete baboti bálingaka bana na bango, mpe akosambisa baboti soki banyokolaka bana.

9-11. Mpo na nini Yehova apesaki mobeko oyo epekisaki kolula?

9 Osengeli kolula te. Mobeko ya nsuka na kati ya Mibeko Zomi epekisaki kolula, to kokolisa mposa makasi ya kozwa eloko ya moto mosusu. (Mib. 5:21; Rom. 7:7) Yehova apesaki mobeko yango mpo na koteya basaleli na ye likambo moko ya ntina mingi: basengeli kobatela motema na bango, elingi koloba makanisi, mayoki, mpe bamposa na bango. Ayebi ete makanisi mpe mayoki ya mabe nde etindaka moto asala makambo ya mabe. (Mas. 4:23) Moyisraele oyo atiki ete bamposa ya mabe ekola na motema na ye akokaki kosalela basusu makambo kozanga bolingo. Na ndakisa, Mokonzi Davidi akweaki na motambo yango. Mpo na koloba solo, azalaki moto malamu. Kasi na libaku moko, alulaki mwasi ya moto mosusu. Mposa wana ememaki ye na lisumu. (Yak. 1:14, 15) Davidi asalaki ekobo, alukaki kobuba mobali ya mwasi yango, mpe na nsima abomisaki ye.​—2 Sa. 11:2-4; 12:7-11.

10 Ntango Moyisraele abuki mobeko oyo etalaki kolula, Yehova azalaki koyeba yango mpo akoki kotánga mitema. (1 Nt. 28:9) Mobeko oyo epekisaki kolula ezalaki kosalisa bato na ye báyeba ete basengelaki koboya makanisi oyo ekoki komema na kosala mabe. Yehova azali mpenza Tata ya bwanya mpe ya bolingo!

11 Mateya: Yehova atalaka kaka te ndenge oyo moto azali komonana libándá. Amonaka ndenge tozali mpenza na kati, na motema na biso. (1 Sa. 16:7) Likanisi moko te, mposa moko te to likambo moko te ekoki kobombama na miso ya Yehova. Alukaka makambo ya malamu epai na biso mpe alendisaka biso tókoba kosala bongo. Kasi, alingi ete tóyeba mpe tópekisa makanisi ya mabe liboso ete emonana na misala na biso.​—2 Nt. 16:9; Mat. 5:27-30.

MIBEKO EZALAKI KOLENDISA BATO BÁZALAKA SEMBO

12. Mibeko ya Moize eteyaka biso nini?

12 Mibeko ya Moize eteyaka biso mpe ete Yehova alingaka bosembo. (Nz. 37:28; Yis. 61:8) Azali ndakisa ya kokoka na likambo etali kosalela basusu makambo na bosembo. Ntango Bayisraele bazalaki kotosa mibeko oyo Yehova apesaki bango, azalaki kopambola bango. Ntango batosi te mibeko na ye ya bosembo, bazalaki konyokwama. Tótalela mibeko mosusu mibale oyo ezalaki na kati ya Mibeko Zomi.

13-14. Mibeko mibale ya liboso na kati ya Mibeko Zomi esɛngaki nini, mpe ndenge nini kotosa mibeko yango ezalaki komemela Bayisraele matomba?

13 Sambelá kaka Yehova. Mibeko mibale ya liboso na kati ya Mibeko Zomi esɛngaki ete Bayisraele básambela kaka Yehova mpe epekisaki bango losambo ya bikeko. (Kob. 20:3-6) Mibeko yango ezalaki mpo na litomba ya Yehova te. Kasi, ezalaki mpo na litomba ya basaleli na ye. Ntango basaleli na ye bazalaki sembo epai na ye, bazalaki kozwa mapamboli ebele. Kasi, ntango bazalaki kosambela banzambe ya lokuta ya bikólo mosusu, bazalaki konyokwama.

14 Tózwa ndakisa ya Bakanana. Bazalaki kosambela banzambe ya bikeko oyo ezangá bomoi, na esika ya kosambela Nzambe ya solo mpe ya bomoi. Na yango, bango moko bamisambwisaki. (Nz. 115:4-8) Na kati ya losambo na bango ya lokuta, bazalaki kosala makambo ya pite, mpe kopesa bana na bango mbeka na mɔtɔ. Ndenge moko mpe, ntango Bayisraele batikaki Yehova mpe basambelaki banzambe ya bikeko, bamisambwisaki mpe bapesaki mabota na bango mpasi. (2 Nt. 28:1-4) Baoyo bazalaki na bokonzi basundolaki mibeko ya Yehova na oyo etali bosembo. Basalelaki bokonzi na bango na ndenge ya mabe mpe banyokolaki baoyo bazalaki na bolɛmbu mpe baoyo bazangaki libateli. (Ezk. 34:1-4) Yehova akebisaki Bayisraele ete akosambisa baoyo bazalaki konyokola basi mpe bana oyo bazalaki na moto ya kobatela bango te. (Mib. 10:17, 18; 27:19) Kasi, Yehova apambolaki basaleli na ye ntango batikalaki sembo epai na ye mpe bazalaki kosalelana makambo na bosembo.​—1 Bak. 10:4-9.

Yehova alingaka biso mpe amonaka ntango tozali konyokwama mpo na kozanga bosembo (Talá paragrafe 15)

15. Mateya nini tozwi mpo na Yehova?

15 Mateya: Tokoki te kopesa Yehova foti soki baoyo balobi ete basalelaka ye bazali kotosa mibeko na ye te mpe bazali konyokola basaleli na ye. Yehova alingaka biso mpe amonaka ntango tozali konyokwama mpo na kozanga bosembo. Ayebaka mpasi na biso malamu koleka ndenge oyo mama akoki koyeba mpasi ya mwana na ye. (Yis. 49:15) Atako mbala mosusu akosala eloko te mpo na biso sikoyo, na ntango oyo ebongi akosambisa basali mabe oyo baboyi kobongola motema mpo na ndenge banyokolaki basusu.

NDENGE NINI BASENGELAKI KOSALELA MIBEKO?

16-18. Mibeko ya Moize ezalaki kotalela makambo nini ya bomoi, mpe mateya nini tozwi?

16 Lokola Mibeko ya Moize etalelaki makambo mingi ya bomoi ya Moyisraele, ezalaki na ntina mingi ete mikóló oyo batyamaki básambisa bato ya Yehova na bosembo. Bazalaki na mokumba ya kotalela kaka makambo ya losambo te, kasi mpe matata oyo ebimi kati na bato mpe makambo oyo ebuki mibeko. Talá bandakisa oyo elandi.

17 Soki Moyisraele abomi moto, bazalaki koboma ye mbala moko te. Mikóló ya engumba basengelaki kotalela likambo yango malamumalamu liboso báloba soki ebongi kokatela ye etumbu ya liwa. (Mib. 19:2-7, 11-13) Mikóló ya engumba bazalaki mpe kosambisa mwa makambo etali bomoi ya mokolo na mokolo, ezala kowelana oyo ebimi mpo na bozwi ya moto to matata ya mwasi ná mobali. (Kob. 21:35; Mib. 22:13-19) Ntango mikóló ya engumba bazalaki kokata makambo na bosembo mpe Bayisraele bazalaki kotosa Mibeko, moto nyonso azalaki kozwa matomba, mpe ekólo ezalaki kokumisa Yehova.​—Lev. 20:7, 8; Yis. 48:17, 18.

18 Mateya: Likambo nyonso ya bomoi na biso ezali na ntina epai ya Yehova. Alingi ete tósalelaka basusu makambo na bosembo mpe na bolingo. Atyaka likebi na makambo oyo tolobaka mpe oyo tosalaka, ata na bandako na biso.​—Ebr. 4:13.

19-21. (a) Ndenge nini mikóló mpe basambisi basengelaki kosalela basaleli ya Nzambe makambo? (b) Ndenge nini mibeko mosusu ezalaki kopekisa makambo ya kozanga bosembo, mpe mateya nini tozwi?

19 Yehova alingaki kobatela basaleli na ye mpo bálanda te makambo mabe ya bikólo ya zingazinga. Yango wana, asɛngaki ete mikóló mpe basambisi básalela Mibeko kozanga kopona bilongi. Kasi, baoyo bazalaki kosambisa basengelaki te kozala makambo makasimakasi epai ya bato. Basengelaki nde kolinga bosembo.​—Mib. 1:13-17; 16:18-20.

20 Yehova ayokelaka basaleli na ye mawa, yango wana atyaka mibeko mpo na kopekisa bato básalela basusu makambo ya kozanga bosembo. Na ndakisa, Mibeko elobaki makambo oyo esalaki ete ezala mpasi kokosela moto makambo ete asali mabe. Moto oyo afundami azalaki na lotomo ya koyeba moto oyo afundi ye. (Mib. 19:16-19; 25:1) Lisusu, liboso bákata ete asali mpenza likambo, bato mibale to koleka basengelaki kopesa bilembeteli. (Mib. 17:6; 19:15) Bongo soki Moyisraele asali mabe, kasi kaka moto moko nde amonaki ye? Akokaki te kokanisa ete bakopesa ye etumbu te mpo na mabe yango. Yehova amonaki likambo oyo asalaki. Na libota, batata bazalaki na bokonzi, kasi ezalaki na ndelo. Na matata mosusu ya libota, mikóló ya engumba bazalaki na mokumba ya kokɔta likambo yango mpe kozwa ekateli ya nsuka.​—Mib. 21:18-21.

21 Mateya: Yehova apesi biso ndakisa ya kokoka; asalaka ata likambo moko te ya kozanga bosembo. (Nz. 9:7) Apesaka mbano na baoyo batosaka mibeko na ye na bosembo nyonso, kasi apesaka etumbu na baoyo basalelaka bokonzi na bango na ndenge ya mabe. (2 Sa. 22:21-23; Ezk. 9:9, 10) Bato mosusu bakoki kosala mabe mpe ekoki komonana ete bazwi etumbu te, kasi na ntango oyo ebongi, Yehova akobimisa bango mpo básambisama. (Mas. 28:13) Mpe soki babongoli motema te, eumelaka te mpo bámona ete “kokwea na mabɔkɔ ya Nzambe ya bomoi ezali likambo ya nsɔmɔ.”​—Ebr. 10:30, 31.

MIBEKO EZALAKI KOBATELA MINGIMINGI BANANI?

Mpo na kosilisa matata, mikóló basengelaki komonisa ete Yehova alingaka bato mpe bosembo (Talá paragrafe 22) *

22-24. (a) Mibeko ezalaki kobatela mingimingi banani, mpe liteya nini tozwi mpo na Yehova? (b) Likebisi nini ezali na Kobima 22:22-24?

22 Mibeko ezalaki kobatela mingimingi bato oyo bazangaki libateli, na ndakisa bitike, basi oyo mibali bakufá mpe bapaya. Nzambe ayebisaki basambisi ya ekólo Yisraele boye: “Osengeli te kopɛngwisa lisambisi ya moto oyo afandi mopaya to ya mwana mobali oyo tata akufá, mpe osengeli te kokanga ndanga elamba ya mwasi oyo mobali akufá.” (Mib. 24:17) Yehova azalaki mpenza kotyela baoyo bazangaki libateli likebi mingi. Mpe azalaki kopesa etumbu na baoyo bazalaki konyokola bango.​—Tángá Kobima 22:22-24.

23 Lisusu, Mibeko ezalaki kobatela bato ya libota mpo bákwea te na lisumu ya kosangisa nzoto kati na bato ya libota moko. (Lev. 18:6-30) Na bokeseni na bato ya bikólo ya zingazinga, oyo bazalaki kopesa nzela, to kutu kondima likambo yango, bato ya ekólo ya Yehova basengelaki kotalela likambo yango ndenge Yehova azalaki kotalela yango: basengelaki koyina yango.

24 Mateya: Yehova alingi ete bato oyo apesi bokonzi bálinga baoyo bazali na nse ya bokonzi na bango mpe bátyela bango likebi. Ayinaka masumu ya kosangisa nzoto mpe alingi ete bato nyonso, mingimingi baoyo bazangi libateli, bábatelama mpe bámona bosembo.

MIBEKO, “ELILI YA MAKAMBO MALAMU OYO EKOYA”

25-26. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete bolingo mpe bosembo ezali lokola mpema ná bomoi? (b) Tokolobela nini na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya sanza ya 05/2019?

25 Bolingo mpe bosembo ezali lokola mpema ná bomoi; awa na mabele, soki moko ezali te mosusu mpe ekozala te. Ntango tondimi mpenza ete Yehova asalelaka biso makambo na bosembo, tokolinga ye lisusu makasi. Mpe soki tozali kolinga Nzambe mpe mibeko na ye ya sembo, ekotinda biso tólinga basusu mpe tósalelaka bango makambo na bosembo.

26 Kondimana ya Mibeko ya Moize esalisaki Bayisraele bázala na boyokani ya malamu mpenza na Yehova. Kasi, basaleli ya Nzambe batikaki kotosa Mibeko ya Moize ntango Yesu akokisaki Mibeko, mpe eloko moko ya malamu koleka ezwaki esika na yango. (Rom. 10:4) Ntoma Paulo alobaki ete Mibeko ezalaki “elili ya makambo malamu oyo ekoya.” (Ebr. 10:1) Tokolobela mwa makambo malamu yango mpe ndenge bolingo mpe bosembo esalaka mosala na lisangá ya bokristo, na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya sanza ya 05/2019.

LOYEMBO 109 Tólinganaka makasi, na motema moko

^ par. 5 Oyo ezali lisolo ya liboso kati na masolo minei oyo ekolobela ntina oyo tokoki kondima ete Yehova atyelaka biso likebi. Masolo mosusu misato ekobima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya sanza ya 05/2019. Mitó ya makambo na yango ezali “Bolingo mpe bosembo na lisangá ya bokristo,” “Bolingo mpe bosembo etinda biso tóbatela bana,” mpe “Kobɔndisa baoyo basalá bango makambo ya nsɔni na bomwana.”

^ par. 2 NDIMBOLA YA MALOBA: Mibeko koleka 600 oyo Yehova apesaki Bayisraele na nzela ya Moize ebengamaka “Mibeko,” “Mibeko ya Moize,” mpe “mitindo.” Lisusu, mikanda mitano ya liboso ya Biblia (kobanda Ebandeli tii Kolimbola Mibeko) ebengamaka mpe mbala mingi Mibeko. Ntango mosusu mpe basalelaka liloba Mibeko mpo na kolobela Makomami ya Ebre.

^ par. 60 ELILINGI YA EZIPELI: Yehova alingaki ete bana bábatelama malamu mpe bázala na baboti oyo bazali kobɔkɔla bango na bolingo mpe bazali koteya bango

ELILINGI: Mama moko Moyisraele azali kobongisa bilei mpe kobɛta masolo elongo na bana na ye ya basi. Na mopanzi kuna, tata azali kolakisa mwana ya mobali ndenge ya kobatela mpate.

^ par. 64 ELILINGI: Na boboto nyonso, mikóló na porte ya engumba bazali kosalisa mwasi moko oyo mobali akufá ná mwana na ye oyo moto moko ya mombongo abubi.