LISOLO YA BOMOI
Libula ya bokristo esalisi ngai nakola malamu na elimo
TOKÓMAKI na Ebale Niger na katikati ya butu. Ebale yango ezalaki monene pene na kilomɛtrɛ moko na ndambo mpe mai na yango ezalaki kotiyola mbangu mpenza. Etumba ezalaki kondongwana kati na bana-mboka Nigeria, na yango kokatisa ebale yango ezalaki likama mpenza. Kasi, esɛngaki kaka tókatisa yango, mbala ebele. Nini esalaki ete nakóma tii esika wana? Nabɛtɛla bino ndenge makambo ezalaki liboso nabotama.
Na 1913, papa na ngai John Mills azwaki batisimo na engumba New York ntango azalaki na mbula 25. Ndeko Russell nde asalaki diskur ya batisimo. Mwa moke na nsima, Papa akendaki na ekólo Trinité, epai abalaki Constance Farmer, oyo azalaki Moyekoli ya Biblia ya molende. Papa azalaki kosalisa moninga na ye William Brown alakisa “Fɔtɔ-Drame ya bozalisi.” Basalaki yango tii ntango batindaki Ndeko Brown ná mwasi na ye na Afrika ya Wɛsti na 1923. Papa ná Mama, oyo bazalaki na elikya ya kokende likoló, bakobaki kosala na ekólo Trinité.
BABOTI NA BISO BAZALAKI KOLINGA BISO
Papa ná Mama babotaki bana libwa; bapesaki mwana na bango ya liboso nkombo ya Ndeko Rutherford, oyo azalaki prezida ya la Société na ntango wana. Ntango ngai mwana ya mibale nabotamaki na mokolo ya 30/12/1922, bapesaki ngai nkombo ya Ndeko Clayton Woodworth, oyo azalaki kokoma masolo ya zulunalo L’Âge d’Or (lelo Lamuká!). Baboti na biso batángisaki biso nyonso kelasi, kasi ya milaimilai te. Bazalaki nde kolendisa biso tómityela mikano ya elimo. Mama azalaki mpenza na mayele ya kondimisa moto makambo oyo Makomami elobi. Papa azalaki kosepela mpenza kobɛtɛla biso masolo ya Biblia, azalaki kosala bajɛstɛ nzoto mobimba mpo na kosalisa biso tómona makambo yango na makanisi.
Milende na bango ebotaki mbuma ya malamu. Na bana mitano ya mibali, misato tokɔtaki Eteyelo ya Gileade. Bandeko na biso misato ya basi basalaki mosala ya mobongisi-nzela bambula ebele na Trinité mpe Tobago. Na nzela ya mateya mpe ndakisa na bango ya malamu, baboti na biso balonaki biso “na ndako ya Yehova.” Malendisi na bango esalisaki biso tótikala kuna mpe tókola “na mapango ya Nzambe na biso.”—Nz. 92:13.
Ndako na biso ekómaki esika ya kokutana mpo na mosala ya kosakola. Babongisi-nzela bazalaki koya wana, mpe mbala mingi bazalaki kobɛta masolo ya Ndeko George Young, misionɛrɛ mpe
mwana-mboka Canada oyo ayaki na Trinité. Baboti na ngai bazalaki kobɛta na esengo masolo ya Ndeko Brown ná mwasi na ye, oyo bazalaki baninga na bango ya mosala, mpe na ntango wana bazalaki na Afrika ya Wɛsti. Nyonso wana etindaki ngai nabanda kosakola ntango nazalaki na mbula zomi.NDENGE NABANDAKI MOSALA
Na ntango wana, mikanda na biso ezalaki polelepolele; ezalaki kosambwisa mangomba ya lokuta, mombongo ya lokoso mpe politiki mabe ya mokili oyo. Na yango, na 1936, bakonzi ya mangomba batyaki guvɛrnɛrɛ ya Trinité sɔngisɔngi apekisa mikanda nyonso ya Watch Tower. Tobombaki mikanda, kasi tokobaki kosalela yango tii nyonso esilaki. Tozalaki kosakola, tolati bapapye ya minene mpe tozali kokabola nkasa ya libyangi wana tozalaki kotambola na makolo mpe na velo. Elongo na bandeko oyo bazalaki kosalela motuka oyo ezalaki na bikóliseli-loláká, oyo bautaki na engumba Tunapuna, tosakolaki ata na bamboka ya kati mpenza ya Trinité. Ezalaki esengo mpenza! Kozala na bandeko ndenge wana esalaki ete nazwa batisimo ntango nazalaki na mbula 16.
Ndakisa ya baboti na biso mpe makambo oyo nakutanaki na yango na bomwana epesaki ngai mposa makasi ya kozala misionɛrɛ. Mposa yango ezalaki kaka makasi ntango nakendaki na Esanga Aruba na 1944, kosala elongo na Ndeko Edmund Cummings. Tosepelaki ndenge tosangisaki bato zomi mpo na Ekaniseli ya 1945. Mbula oyo elandaki, lisangá ya liboso esalemaki na esanga yango.
Mwa moke na nsima, nateyaki Oris Williams, mwana mwasi moko oyo tozalaki kosala na ye esika moko. Oris azalaki kobimisa bantembe mpo na kolongisa mateya oyo bateyaká ye. Kasi, ntango nabandaki koyekola na ye Biblia, akangaki ntina ya mateya ya Liloba ya Nzambe mpe azwaki batisimo na mokolo ya 05/01/1947. Kendekende, tolinganaki mpe tobalanaki. Abandaki mosala ya mobongisi-nzela na sanza ya 11/1950. Nsima ya kobala Oris, bomoi na ngai ebongaki lisusu.
ESENGO YA KOSALA NA NIGERIA
Na 1955, babengisaki biso na Eteyelo ya Gileade. Ntango tozalaki komibongisa mpo na kokende, ngai ná Oris totikaki misala na biso, totɛkaki ndako na biso ná biloko mosusu, mpe tolongwaki Aruba. Na mokolo ya 29/07/1956, tozwaki diplome na kelasi ya mbala ya 27 mpe batindaki biso na Nigeria.
Mpo na ntango yango, Oris alobaki boye: “Elimo ya Yehova ekoki kosalisa moto amesana na mikakatano ya bomoi ya misionɛrɛ. Na bokeseni na mobali na ngai, nalingaki ata moke te kozala misionɛrɛ. Nazalaki nde kolinga kozala na ndako na ngai mpe kobɔkɔla bana. Nabongolaki makanisi ntango namonaki ete mosala ya kosakola nsango malamu esengeli kosalema na lombangu. Ntango tozwaki diplome ya Gileade, nazwaki ekateli ya komipesa mpenza na mosala ya kosakola lokola misionɛrɛ. Ntango tomataki na masuwa Queen Mary, Ndeko Worth Thornton, oyo azalaki kosala na biro ya Ndeko Knorr, ayaki kotombela biso ‘Mobembo malamu!’ Alobaki na biso ete tokei kosala na Betele. Ngai nalobaki, ‘Te!’ Kasi, eumelaki te namesanaki mpe nakómaki kosepela na Betele, epai nasalaki misala ndenge na ndenge. Nazalaki kosepela mingi kosala esika oyo bayambaka bato. Nalingaka bato, mpe mosala yango esalisaki ngai nakutanaka na bandeko ya Nigeria. Mingi bazalaki koya bilamba ebebi na putulu, nzoto elɛmbi, na mposa ya mai mpe na nzala. Ezalaki esengo kopesa bango bilei mpe kobɔndisa bango. Nyonso wana ezalaki mosala mosantu epai ya Yehova, mpe ezalaki kosepelisa ngai mpe kopesa ngai esengo.” Ya solo, mokumba nyonso esalaki ete tókola na elimo.
Mokolo moko na 1961, ntango tokutanaki elongo na libota na Trinité, Ndeko Brown abɛtɛlaki biso mwa masolo ya makambo ya malamu oyo akutanaki na yango na Afrika. Ngai mpe nalobelaki bokoli oyo ezalaki na Nigeria. Ndeko Brown ayambaki ngai na boboto mpe alobaki na Papa ete: “Johnny, okómá na Afrika te, kasi mwana na yo Woodworth, akómá kuna!” Papa alobaki na ngai: “Woodworth, kobá na mosala na yo! Kotika te!” Malendisi wana oyo eutaki epai ya bato oyo bakɔmɛli na elimo ebakisaki mposa na ngai ya komipesa lisusu koleka na mosala ya kosakola.
Na 1962, nazwaki libaku ya kokɔta lisusu kelasi ya mbala ya 37 ya Gileade, oyo eumelaki sanza zomi. Ndeko Wilfred Gooch, oyo na ntango wana azalaki * (mituka ya polele na mipanzi oyo bana-mboka bazalaki kosala). Na mituka yango, mbala mingi bazalaki kokoma maloba ya kobenda likebi. Moko na yango ezalaki: “Mwa matangá ya mai ekoki kokóma ebale monene.”
mokɛngɛli ya Betele ya Nigeria, akɔtaki kelasi ya mbala ya 38 mpe batindaki ye na Angleterre. Na yango, mokumba ya mokɛngɛli ya Betele ekómaki epai na ngai. Lokola Ndeko Brown, nasalaki mibembo ebele; nayekolaki koyeba bandeko ya Nigeria mpe kolinga bango mingi. Atako bazalaki na biloko mingi te ya mokili, ndenge ezalaka na mikili ya bozwi, esengo na bango mpe ndenge bazalaki kosepela na oyo bazalaki na yango emonisaki ete esengo ya solosolo eutaka na mbongo te mpe na biloko ya mokili te. Na kotalela bomoi na bango, ezalaki esengo mpenza komona ndenge bazalaki kolata bilamba ya pɛto, ya malamu mpe oyo ebongi na makita. Ntango bazalaki kokende na mayangani ya minene, mingi bazalaki koya na mituka ya minene mpe na bolekajaMaloba yango ezali solo! Molende ya moto nyonso ezali na ntina; biso mpe tobakisaki ya biso. Na 1974, longola États-Unis, Nigeria ekómaki ekólo ya liboso oyo ekokisaki basakoli 100 000. Mosala ekolaki mpenza!
Na ntango ya bokoli yango, bitumba ya bana-mboka eyaki ndongo kobanda 1967 tii 1970. Na boumeli ya basanza, bandeko na biso oyo bazalaki na Biafra, na ngámbo mosusu ya Ebale Niger, bazalaki lisusu te kosolola na Betele. Tosengelaki komemela bango bilei ya elimo. Ndenge nalobaki yango na ebandeli, na lisalisi ya libondeli mpe kotyela Yehova motema, tokatisaki ebale yango mbala ebele.
Nabosanaka ata moke te ndenge mibembo yango ezalaki mpasi; tozalaki kokutana na basoda ya nkanza, maladi, mpe makama mosusu. Koleka na bisika oyo basoda ya ekólo bakangaki nzela ezalaki likama, kasi ezalaki likama mingi koleka kokatisa na ngámbo ya Biafra. Mokolo moko, nakatisaki Ebale Niger na butu na bwato moko oyo ezalaki komema bato longwa na engumba Asaba tii na engumba Onitsha, mpe nakendaki kolendisa bakɛngɛli na engumba Enugu. Nasalaki mobembo mosusu mpo na kolendisa bankulutu na engumba Aba, esika bapekisaki bato bápelisa miinda ya lotiliki na butu. Na engumba Port Harcourt, tosalaki libondeli nokinoki mpo na kosilisa makita ntango basoda ya guvɛrnema bazalaki kobundisa basoda ya Biafra.
Makita yango ezalaki libaku oyo ebongaki mpenza mpo na kosalisa bandeko bámona ete Yehova atyelaka bango likebi mpe mpo na kopesa bango toli oyo ebongi mpo bákɔta te na makambo ya politiki mpe bázala na bomoko. Bandeko ya Nigeria babatelaki bosembo na bango na ntango yango ya matata makasi na mboka. Bamonisaki bolingo oyo ezalaki makasi koleka koyinana kati na bikólo, mpe babatelaki bomoko ya bokristo. Ezalaki mpenza libaku kitoko kozala elongo na bango na ntango wana ya komekama!
Na 1969, Ndeko Milton Henschel azalaki prezida na liyangani “Kimya na mabele,” oyo esangisaki mikili mingi na Yankee Stadium, na New York, mpe lokola nazalaki mosungi na ye, nayekolaki makambo mingi. Formasyo yango eyaki mpenza na ntango oyo ebongi, mpo na 1970, tosalaki liyangani “Bato oyo bamipesi,” oyo esangisaki mikili mingi na Lagos, na Nigeria. Lokola bitumba ya bana-mboka eutaki kosila, tolongaki kosala liyangani yango kaka na lisalisi ya Yehova. Esalemaki na minɔkɔ 17, mpe bayangani bazalaki 121 128. Ndeko Knorr ná Ndeko Henschel mpe bapaya oyo bautaki États-Unis ná Angleterre bamonaki ndenge bayekoli ya sika 3 775 bazwaki batisimo; ezalaki moko ya mabaku oyo batisimo ezalaki na bato ebele bongo kobanda pantekote! Nabanzi ete ezali ata na eleko moko te na bomoi na ngai oyo nazalaki na makambo ebele ya kosala lokola na ntango ya kobongisa liyangani yango. Motángo ya basakoli ezalaki komata na ndenge ya kokamwa!
Na boumeli ya mbula koleka 30 oyo nasalaki na Nigeria, nazwaki mpe libaku ya kosala lokola mokɛngɛli-motamboli mpe lokola mokɛngɛli ya zone na Afrika ya Wɛsti. Bamisionɛrɛ bazalaki na esengo ndenge nazalaki kotyela mokomoko na bango likebi mpe kolendisa bango! Ezalaki esengo komonisa bango ete ebongiseli ya Yehova ebosani bango te! Mosala yango eteyaki ngai ete kotyela moto mokomoko likebi ezali lolenge oyo eleki malamu ya
kosalisa bango bákoba kosalela Yehova mpe bábatela bomoko ya ebongiseli ya Yehova.Ezalaki kaka na lisalisi ya Yehova nde tolongaki maladi mpe mikakatano oyo bitumba ebimisaki. Tozalaki ntango nyonso komona mapamboli na ye. Oris alobaki boye:
“Tobɛlaki malaria mbala ebele. Mokolo moko ntango Woodworth abɛlaki, bamemaki ye na lopitalo na Lagos, wana azali komiyeba te. Bayebisaki ngai ete mbala mosusu akobika te, kasi likambo ya esengo, abikaki! Ntango makanisi ezongaki, ateyaki lifulume oyo azalaki kolandela ye makambo etali Bokonzi ya Nzambe. Na nsima, tokendaki kotala Nwambiwe, lifulume yango, mpo na kolandela mposa oyo amonisaki. Andimaki solo mpe na nsima akómaki nkulutu na lisangá ya Aba. Ngai mpe nasalisaki bato ebele, ata mpe bandimi ya solosolo ya lingomba ya Mizilma, bákóma basaleli ya Yehova ya molende. Tozalaki na esengo mingi ndenge toyekolaki koyeba mpe kolinga bato ya Nigeria, mimeseno na bango, bonkɔkɔ na bango mpe monɔkɔ na bango.”
Liteya mosusu oyo tozwaki yango oyo: Mpo tókokisa malamu mokumba na biso na mboka mopaya, tosengelaki kolinga bandeko, ata soki mimeseno na bango ekeseni mpenza na oyo ya biso.
MIKUMBA YA SIKA
Nsima ya kosala na Betele ya Nigeria, na 1987 tozwaki mokumba ya sika; batindaki biso bamisionɛrɛ na esanga kitoko ya Saint Lucia, na Caraïbes. Tosepelaki na mokumba yango, kasi ezalaki mpe na mikakatano na yango. Na bokeseni na Afrika, epai mobali azalaki kobala basi ebele, na Saint Lucia, mokakatano ezalaki ete mwasi ná mobali bazalaki kofanda esika moko kozanga ete bábalana ndenge esengeli. Nguya ya Liloba ya Nzambe etindaki bayekoli na biso mingi ya Biblia básala mbongwana oyo esengeli.
Wana tozalaki kokóma mikóló mpe makasi na biso ezalaki kosila, na bolingo nyonso, Lisangani ya Mikóló-Bakambi etindaki biso na biro monene na Brooklyn, na États-Unis, na 2005. Tii lelo, napesaka Yehova matɔndi mokolo na mokolo mpo na Oris. Akufaki na 2015, mpe nakoki kolimbola te ndenge oyo namiyokaka mpo azali te. Azalaki moninga mpe mwasi malamu, azalaki na bizaleli ya malamu mpenza. Nalingaki ye mingi mbula 68 oyo tofandaki na ye. Tomonaki ete sɛkɛlɛ mpo na kozala na esengo, ezala na libala to na lisangá, ezali kotosa bokonzi, kolimbisa na motema moko, kozala na komikitisa, mpe komonisa bizaleli ya mbuma ya elimo.
Ntango tokutani na makambo ya kolɛmbisa nzoto, tozalaki kobondela Yehova mpo asalisa biso tókoba kosalela ye. Soki tomesani na makambo ya sika, tozalaki ntango nyonso komona ete makambo ezalaki kobonga, mpe makambo ya malamu koleka ezalaki koya na nsima!—Yis. 60:17; 2 Ko. 13:11.
Na Trinité mpe Tobago, Yehova apambolaki mosala ya baboti na biso mpe ya bandeko mosusu, mpo lapolo ya nsuka emonisi ete basambeli ya Yehova bakómi 9 892. Na Aruba, bandeko basalaki makasi mpo na kokómisa makasi lisangá ya libosoliboso, esika nazalaki. Esanga yango ezali sikoyo na masangá 14 oyo ezali kokola malamu. Na Nigeria, basakoli bakómi ebele mpenza, 381 398. Mpe na esanga ya Saint Lucia, basakoli ya Bokonzi ya Yehova bazali 783.
Naleki sikoyo mbula 90. Nzembo 92:14 elobi mpo na baoyo balonami na ndako ya Yehova ete: “Bakokoba kokola na ntango ya nsuki mpɛmbɛ, bakozala kaka mafutamafuta mpe bakokauka te.” Nazali mpenza na botɔndi mpo na bomoi oyo nalekisi na mosala ya Yehova. Libula ya bokristo oyo nazwaki esalisi ngai namipesa mingi mpenza na mosala ya Yehova. Na bolingo na ye ya sembo, Yehova asalisi ngai ‘nakola na mapango ya Nzambe na ngai.’—Nz. 92:13.
^ par. 18 Talá Lamuká! ya 08/07/1972, nk. 24-26, na Français.