LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Mars 2018

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 30/04-3/06/2018.

Mokristo nyonso asengeli kozwa batisimo

Biblia elobi nini mpo na batisimo? Makambo nini moto asengeli kosala liboso azwa batisimo? Mpe mpo na nini moto oyo azali koteya basusu basengeli kobosana te ete batisimo ezali na ntina mingi ntango azali koteya bana to bayekoli mosusu ya Biblia?

Baboti, bozali kosalisa bana na bino bákende liboso tii bázwa batisimo?

Baboti bakristo balukaka komindimisa likambo nini liboso bana na bango bázwa batisimo?

MITUNA YA BATÁNGI

Mituna ya batángi

Mpo na nini Batatoli ya Yehova bamonisaki ntoma Paulo azali na libandi to na nsuki mingi te?

Ezaleli ya koyamba bapaya epesaka esengo mpe ezali na ntina mingi!

Mpo na nini Biblia esɛngi bakristo báyambanaka? Mabaku nini tozali na yango ya komonisa ezaleli ya koyamba bapaya? Ndenge nini tokoki kolongola makambo oyo ekoki kopekisa biso tóyamba bapaya?

LISOLO YA BOMOI

Yehova asundoli ngai ata moke te!

Erika Nöhrer Bright azalaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mobongisi-nzela monene, mpe misionɛrɛ. Alobeli ndenge Nzambe asungaki ye, apesaki ye makasi, mpe akobaki kozala na ye elongo bambula nyonso oyo asaleli Nzambe na bosembo.

Disiplini emonisaka bolingo ya Nzambe

Ndakisa ya bato oyo Nzambe apesaki disiplini na ntango ya kala ekoki koteya biso nini? Mpe ntango esɛngi tópesa disiplini, ndenge nini tokoki komekola ndakisa ya Yehova?

‘Yoká disiplini mpe kómá na bwanya’

Na ndenge nini Yehova ateyaka biso komipesa disiplini? Mpe tokoki kosala nini mpo disiplini nyonso oyo tozwi na lisangá esalisa biso?