Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ezaleli ya koyamba bapaya epesaka esengo mpe ezali na ntina mingi!

Ezaleli ya koyamba bapaya epesaka esengo mpe ezali na ntina mingi!

“Bóyambanaka na koimaima te.”​—1 PETRO 4:9.

NZEMBO: 100, 87

1. Mikakatano nini bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki na yango?

KATI na mobu soki 62 mpe 64 T.B., ntoma Petro akomelaki “bato oyo bafandi mpo na ntango mokuse, oyo bapalangani na Ponti, Galatia, Kapadosi, Azia, mpe Bitinia.” (1 Petro 1:1) Bandeko yango oyo bautaki na bisika ndenge na ndenge bazalaki na “mɔtɔ,” elingi koloba bazalaki kokutana na minyoko, yango wana bazalaki na mposa ya malendisi mpe litambwisi. Bazalaki mpe na eleko moko ya mabe mpenza. Petro akomaki: “Nsuka ya makambo nyonso ekómi pene.” Mbula 10 ekokaki te, Yerusaleme ebebisamaki. Nini elingaki kosalisa bakristo na ntango wana ya mpasi?​—1 Petro 4:4, 7, 12.

2, 3. Mpo na nini Petro asɛngaki bandeko na ye bakristo báyambanaka? (Talá elilingi ya ebandeli.)

2 Na makambo oyo ntoma Petro asɛngaki bandeko básala, alobaki mpe: “Bóyambanaka.” (1 Petro 4:9) Liloba ya Grɛki oyo esalelami mpo na “koyamba” elimboli mpenzampenza “kosepela na bapaya, to komonisela bango boboto.” Kasi, atako bandeko yango bayebanaki mpe bazalaki kosala makambo elongo, Petro asɛngaki bango báyambanaka. Ndenge nini koyambana esalisaki bango?

3 Esalisaki bango bázala na bomoko makasi. Bongo yo okoloba nini? Ozali koyeba lisusu ndenge osepelaki ntango moto abengisaki yo na ndako na ye? Ntango obengisi moto na ndako, yango esalaka ete bómesana. Soki tozali koyamba bandeko epai na biso, tokozwa libaku ya koyeba bango malamu mpenza. Bakristo ya eleko ya Petro basengelaki kozala na bomoko makasi wana makambo ezalaki se kobeba. Na ‘mikolo oyo ya nsuka,’ tosengeli mpe kozala na bomoko makasi.​—2 Timote 3:1.

4. Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?

4 Mabaku nini tozali na yango ya ‘koyambana’? Ndenge nini tokoki kolonga makambo oyo ekoki kopekisa biso tóyamba basusu? Nini ekoki kosalisa biso tózala bapaya malamu?

MABAKU YA KOMONISA EZALELI YA KOYAMBA BAPAYA

5. Ndenge nini tokoki komonisa ezaleli ya koyamba bapaya na makita na biso?

5 Makita: Toyambaka bandeko ntango toyei na makita. Biso nyonso tozali bapaya ya Yehova mpe ya ebongiseli na ye. (Baroma 15:7) Ntango bato ya sika bayei, bango mpe bakómi bapaya ya Yehova. Tosengeli kosala nyonso mpo bámiyoka mabe te, ata soki bazali komonana ndenge nini to balati ndenge nini. (Yakobo 2:1-4) Tokoki kosɛnga moto oyo ayei makita mpo na mbala ya liboso aya kofanda elongo na biso. Akosepela mingi soki osalisi ye alanda makita malamu mpe mbala mosusu aluka bavɛrsɛ oyo ezali kotángama. Kosala bongo ezali lolenge malamu ya komomisa “ezaleli ya koyamba bapaya.”​—Baroma 12:13.

6. Tosengeli koyamba libosoliboso banani?

6 Mpo na kolya mwa eloko elongo: Na ntango ya kala, mpo na komonisa ezaleli ya koyamba bapaya, bato bazalaki mpe kobengisa basusu na ndako mpo bálya mwa eloko elongo. (Ebandeli 18:1-8; Basambisi 13:15; Luka 24:28-30) Kosala bongo ezalaki komonisa boninga mpe kimya. Tosengeli koyamba libosoliboso banani? Bandeko na biso ya lisangá. Lokola bomoi na mokili oyo ezali se kokóma mpasi, tosengeli koyekola kondima lisalisi ya bandeko na biso mpe kozala baninga na bango ya sembo. Na 2011, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongolaki ngonga ya kosala Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Betele ya États-Unis; elongwaki ngonga 18:45 mpe ekómaki na ngonga 18:15. Mpo na nini? Liyebisi elobaki ete yango ekopesa bandeko ya Betele nzela ya koyambana bango na bango, mpo likita ekosila na ngonga ya malamu. Babetele mosusu mpe esalaki bongo. Yango esalisi mpenza bandeko ya Betele báyebana malamu.

7, 8. Ndenge nini tokoki komonisa ezaleli ya koyamba bapaya epai ya bandeko oyo bayei kosala diskur na lisangá na biso?

7 Na bantango mosusu, balobi-bapaya, bakɛngɛli ya zongazonga, ata mpe bamonisi ya Betele bakoki koya kosala diskur na lisangá na biso. Yango ezalaka libaku ya komonisa ezaleli ya koyamba bapaya. (Tángá 3 Yoane 5-8.) Lolenge moko oyo tokoki kosala yango ezali ya kobengisa bango na ndako na biso mpo tólya mwa eloko elongo.

8 Ndeko mwasi moko na États-Unis alobi boye: “Na boumeli ya bambula, ngai ná mobali na ngai tozwi libaku ya koyamba balobi-bapaya ebele ná basi na bango. Tosepelaka mbala nyonso oyo tosali yango mpo ezalaka ntango ya kosɛka, mpe mingimingi, ntango ya kolendisana na elimo. Toyokaka mawa ata moke te.”

9, 10. (a) Banani tokoki kopesa bisika ya kofanda? (b) Baoyo bazali na ndako ya monene te bakoki mpe kosalisa? Pesá ndakisa.

9 Baoyo bazali na mposa ya bisika ya kofanda: Na ntango ya kala, mbala mingi bazalaki mpe kopesa bapaya oyo babongi kotyelama motema esika ya kofanda. (Yobo 31:32; Filemo 22) Na mikolo na biso mpe, ekoki kosɛnga tósala bongo. Mbala mingi, bakɛngɛli ya zongazonga bazalaka na mposa ya esika ya kolala ntango bayei kotala lisangá na biso. Ekoki mpe kozala bongo mpo na bana-kelasi ya biteyelo ya Teokrasi mpe bandeko oyo basalaka mosala ya botongi. Makama lokola mipɛpɛ makasi, koningana ya mabele, mpe kotomboka ya mai, ebebisaka bandako ya bandeko. Bandeko yango bakoki kozala na mposa ya bisika ya kofanda tii bakobongisa bandako na bango. Tókanisa te ete kaka bandeko oyo bazali na bandako ya minene nde bakoki kosalisa; ntango mosusu basilá kosala yango mbala ebele. Okoki kopesa ndeko moko esika ya kofanda, ata soki ndako na yo ezali monene te!

10 Ndeko mobali moko na Corée du Sud ná mwasi na ye babosanaka te ntango oyo bana-kelasi ya biteyelo ya Teokrasi bafandaki epai na bango. Akomi boye: “Na ebandeli, nandimaki mbala moko te mpo toutaki kobalana sika mpe ndako na biso ezalaki monene te. Kasi kofanda elongo na bandeko wana ezalaki likambo ya esengo mpenza. Lokola toutaki kobalana sika, tozwaki libaku ya komona ete mwasi ná mobali bakoki kozala na esengo soki bazali kosalela Yehova mpe kokokisa mikano ya elimo elongo.”

11. Mpo na nini ekoki kosɛnga tómonisela bandeko ya sika na lisangá ezaleli ya koyamba bapaya?

11 Bandeko ya sika na lisangá: Ndeko moko to bato ya libota mobimba bakoki koya kofanda na teritware na bino. Bamosusu bakoki koya mpo mposa ya basakoli ezali monene. To mbala mosusu lokola bazali babongisi-nzela, batindi bango na lisangá na bino. Na yango, basengeli komesana na teritware ya sika, lisangá ya sika, mpe mbala mosusu monɔkɔ mpe mimeseno ya sika. Okoki kobengisa bango mpo na kolya mwa eloko, to kokende kozwa mwa mopɛpɛ. Yango ekosalisa bango bázwa baninga ya sika mpe bámesana na makambo ya sika.

12. Ndakisa nini emonisi ete koyamba bapaya esɛngi biloko ebele te?

12 Koyamba bapaya ezali kosɛnga biloko ebele te. (Tángá Luka 10:41, 42.) Ndeko mobali moko abosanaka te likambo oyo ekómelaki ye ná mwasi na ye ntango babandaki mosala ya misionɛrɛ. Alobi boye: “Tozalaki bilenge, toyebaki makambo mingi te mpe tozalaki ntango nyonso kokanisa mboka na biso. Mokolo moko na mpokwa, mwasi na ngai akanisaki mingi mpenza, mpe namekaki kosalisa ye kasi esimbaki te. Na ngonga ya 19:30, moto moko abɛtaki na porte. Ezalaki moyekoli moko ya Biblia oyo amemelaki biso malala misato. Ayaki kotombela biso boyei malamu. Tosɛngaki ye akɔta mpe topesaki ye mai ya komɛla. Na nsima, tosalaki ti ná shokola ya mɔtɔ. Toyebaki naino koloba Swahili te, ye mpe ayebaki Anglais te. Kasi likambo yango esalisaki biso tóbanda kosala boninga na bandeko mpe epesaki biso esengo mpenza.”

ELOKO MOKO TE EPEKISA YO KOMONISA EZALELI YA KOYAMBA BAPAYA

13. Komonisa ezaleli ya koyamba bapaya ezali na matomba nini?

13 Ekómelá yo okakatana mpo na komonisa ezaleli ya koyamba bapaya? Soki ezali bongo, mbala mosusu olekisaki libaku ya kosepela elongo na basusu to ya kosala boninga oyo ekoumela. Koyamba bapaya ezali na kati ya makambo eleki malamu oyo moto akoki kosala mpo atika komiyoka ye moko. Kasi, makambo nini ekoki kopekisa moto amonisa ezaleli ya koyamba bapaya? Tótalela makambo misato.

14. Tokoki kosala nini soki tozali na ntango mpe makasi mingi te mpo na koyamba basusu to kondima báyamba biso?

14 Ntango mpe makasi: Basaleli ya Yehova bazalaka na makambo mingi ya kosala mpe mikumba ebele. Basusu bakoki komona ete bazali na ntango mpe makasi mingi te mpo na komonisa ezaleli ya koyamba bapaya. Soki ezali bongo mpo na yo, ekoki kosɛnga obongola makambo mosusu mpo oyambaka bato to ondimaka báyamba yo. Yango ezali na ntina mpo Biblia esɛngi biso tóbosana te ezaleli ya koyamba bapaya. (Baebre 13:2) Na yango, kozwa ntango mpo na komonisa ezaleli ya koyamba bapaya ezali likambo oyo ebongi. Kasi mpo na kosala yango, ekoki kosɛnga otika kolekisa ntango mingi na makambo oyo ezali na ntina mpenza te.

15. Mpo na nini bato mosusu bakanisaka ete bakoki te koyamba bapaya?

15 Ndenge oyo omitalelaka: Ekoki kokóma ete ozali na mposa ya koyamba bapaya kasi ozali komona ete okoki kosala yango te. Mbala mosusu ozalaka nsɔninsɔni, omonaka ete oyebi kobɛta masolo te, to bapaya bakosepela te. To mpe ekoki kozala ete ozali na mbongo mingi te mpe omonaka ete okokoka te kopesa bapaya biloko oyo bandeko mosusu ya lisangá bakoki kopesa. Kasi kobosana te ete esɛngi te ndako na yo ezala kitoko soki ndenge nini; mpo bapaya básepela, ndako esengeli kozala pɛto, na molɔngɔ, mpe osengeli kozala na boyambi.

16, 17. Okoki kosala nini soki koyamba bapaya ebangisaka yo?

16 Soki koyamba bapaya ebangisaka yo, yebá ete ozali yo moko te. Nkulutu moko na Grande-Bretagne alobi boye: “Kobongama mpo na koyamba bapaya ekoki kotya motema likolólikoló. Kasi, kaka ndenge ezalaka mpo na likambo nyonso oyo tosalaka na mosala ya Yehova, matomba mpe esengo oyo tozwaka eleki mosika kobanga oyo tokoki koyoka. Nasepelaka mingi kofanda na bapaya ntango tozali komɛla mwa kafe mpe kobɛta masolo.” Kobosana te ete ezalaka malamu kotyela bapaya likebi. (Bafilipi 2:4) Bato mingi basepelaka kobɛta masolo ya bomoi na bango. Kobengisa basusu ekoki kozala libaku kaka moko ya koyoka masolo na bango. Nkulutu mosusu akomi boye: “Kobengisa baninga ya lisangá na ndako na ngai esalisaka ngai nayeba bango malamu, mingimingi ndenge oyo bayebaki solo.” Soki ozali kotyela bapaya na yo likebi, bango nyonso bakosepela.

17 Ndeko mwasi moko mobongisi-nzela oyo mbala mingi azalaki koyamba bana-kelasi ya biteyelo ya Teokrasi alobaki boye: “Na ebandeli nazalaki komitungisa mpo ndako na ngai ezalaki na biloko mingi te, mpe ezalaki biloko oyo basalelá. Kasi mwasi ya moko ya balakisi akitisaki ngai mpenza motema. Ayebisaki ngai ete ntango ye ná mobali na ye bazali na mosala ya zongazonga, basepelaka mingi na bapɔsɔ oyo bafandi epai ya moto ya elimo oyo azali na biloko mingi te ya mosuni, kasi azali na bango mikano ndenge moko: kosalela Yehova mpe kozala na bomoi ya mindɔndɔ te. Yango ekundwelaki ngai likambo oyo mama na biso azalaki koyebisa biso ntango tozalaki bana mike: ‘Elubu ya ndunda, epai bolingo ezali, ezali malamu koleka.’” (Masese 15:17) Ntina ya komitungisa ezali te, mpo likambo eleki ntina ezali komonisa bapaya na biso ete tolingi bango.

18, 19. Na ndenge nini komonisa ezaleli ya koyamba bapaya esalisaka biso tólongola makanisi ya mabe mpo na basusu?

18 Ndenge oyo otalelaka basusu: Ezali na ndeko moko na lisangá na bino oyo apesaka yo nkanda? Soki osali makasi te mpo na kolongola makanisi wana ya mabe, ekozala kaka. Ekoki kozala mpasi obengisa moto na ndako soki osepelaka na bomoto na ye te. Ekoki mpe kozala ete moto moko asalaki yo mabe kala, kasi okokaka kolimbisa ye te.

19 Mpo na kobongisa boyokani na biso na basusu, ata na banguna na biso, Biblia esɛngi biso tómonisa ezaleli ya koyamba bapaya. (Tángá Masese 25:21, 22.) Kobengisa moto na ndako ekoki kosalisa yo olongola makanisi ya mabe oyo ozali na yango mpo na ye mpe ekoki kobongisa boyokani na bino. Okoki kobanda komona bizaleli na ye ya malamu, oyo Yehova amonaki ntango abendaki ye na lisangá. (Yoane 6:44) Soki bolingo etindi yo obengisa moto oyo akanisaki te ete okoki kobengisa ye, yango ekoki kozala ebandeli ya boninga moko ya malamu mpenza. Nini ekoki kosalisa yo oyeba soki bolingo nde ezali kotinda yo? Na ndakisa, salelá toli oyo ezali na Bafilipi 2:3, oyo elobi: “Na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino.” Tosengeli koluka koyeba soki na makambo nini bandeko na biso baleki biso. Bakoki kozala na kondima makasi, ezaleli ya koyika mpiko, to mpe ezaleli mosusu ya bokristo. Soki tozali kokanisa bizaleli malamu ya bandeko na biso, tokokóma kolinga bango mingi mpe ekozala mpasi te tóyamba bango epai na biso.

ZALÁ MOPAYA YA MALAMU

Mbala mingi tomibongisaka malamu mpo na koyamba bapaya na biso (Talá paragrafe 20)

20. Mpo na nini tosengeli kokokisa maloba na biso, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?

20 Mokomi ya nzembo Davidi akomaki boye: “Ee Yehova, nani akoyambama na hema na yo?” (Nzembo 15:1) Na nsima, Davidi alobelaki bizaleli oyo Yehova asɛngaka bapaya na ye bámonisa. Moko na bizaleli yango ezali ete tosengeli kokokisa maloba na biso; alobaki: “Ata soki alapi ndai mpo na likambo oyo ekoki kobimisela ye mikakatano, akobongola maloba na ye te.” (Nzembo 15:4) Soki tondimi libyangi moko, tosengeli kobongola makanisi te lobá kaka soki esɛngi mpenza bongo. Mbala mosusu moto oyo abengisi biso asili komibongisa mpo na koyamba biso, mpe soki tobongoli makanisi, milende na ye ekokende na mai. (Matai 5:37) Bato mosusu babongolaka makanisi mpo bándima kokende epai oyo bamoni ete eleki malamu. Kosala bongo ekomonisa mpenza bolingo mpe limemya? Tosengeli kozala na botɔndi mpo na eloko nyonso oyo moto oyo abengisi biso apesi biso. (Luka 10:7) Soki esɛngi mpenza tóbongola makanisi, tokomonisa bolingo mpe limemya soki toyebisi yango mbala moko bato oyo babengisaki biso.

21. Ndenge nini kotosa mimeseno ya esika tofandi ekosalisa biso tózala bapaya ya malamu?

21 Ezali mpe na ntina ete tótosaka mimeseno ya esika tofandi. Na mimeseno mosusu, ata soki babengisi yo te bakoyamba yo malamu; kasi na mosusu, ebongaka kozela bábengisa yo. Na bisika mosusu, bapaya nde balyaka biloko oyo eleki malamu. Na bisika mosusu, ezala bapaya to bato ya libota oyo bayambi bapaya, balyaka biloko ndenge moko. Na bikólo mosusu, soki babengisi yo, okomema mpe mwa biloko mpo na kobakisa. Na bisika mosusu, bankolo-ndako basepelaka te ete bapaya básala bongo. Na mimeseno mosusu, soki babengisi yo mbala ya liboso to mbala ya mibale, okoki koboya na boboto; na mimeseno mosusu, ezalaka malamu te koboya. Tosengeli kosala nyonso mpo moto oyo abengisi biso asepela ndenge asali yango.

22. Mpo na nini ezali na ntina mingi ‘tóyambanaka’?

22 Ntoma Petro alobaki ete: “Nsuka ya makambo nyonso ekómi pene.” (1 Petro 4:7) Lelo, bolɔzi oyo eleki monene ezali koya. Wana makambo ya mokili oyo ezali se kobeba, ekosɛnga tólingana lisusu makasi na bandeko. Na eleko oyo tozali, ebongi mpenza tólanda toli ya ntoma Petro oyo elobi: “Bóyambanaka.” (1 Petro 4:9) Ya solo, ezaleli ya koyamba bapaya epesaka esengo mpe ezali na ntina mpenza lelo, mpe mpo na libela.