Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokristo nyonso asengeli kozwa batisimo

Mokristo nyonso asengeli kozwa batisimo

‘Batisimo ezali mpe sikoyo kobikisa bino.’​—1 PETRO 3:21.

NZEMBO: 52, 41

1, 2. (a) Baboti mosusu bamiyokaka ndenge nini ntango mwana na bango azali na mposa ya kozwa batisimo? (b) Mpo na nini batunaka baoyo bakozwa batisimo soki basili komipesa na Yehova? (Talá elilingi ya ebandeli.)

MARIA, oyo azalaki naino mwana moke, atɛlɛmaki elongo na bato oyo bakozwa batisimo. Baboti na ye bazalaki kotala ye. Molobi atunaki bango mituna mibale. Maria mpe ayanolaki na mongongo makasi. Mwa moke na nsima, azwaki batisimo.

2 Baboti yango basepelaki mingi ndenge mwana na bango amipesaki na Yehova mpe azwaki batisimo. Kasi liboso, mama ya Maria amitungisaki mwa moke. Azalaki komituna: ‘Mbula ya Maria ekoki mpenza mpo azwa batisimo? Akangi mpenza ntina ete komipesa na Yehova ezali likambo ya kozwa na lisɛki te? Asengeli naino kozela mwa moke?’ Baboti mingi oyo balingaka Nzambe bamitunaka mituna ya ndenge wana ntango mwana na bango amonisi mposa ya kozwa batisimo. (Mosakoli 5:5) Ya solo, komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo ezali makambo eleki ntina na bomoi ya mokristo nyonso.​—Talá etanda “ Osili komipesa na Yehova?

3, 4. (a) Ndenge nini ntoma Petro amonisaki ntina ya batisimo? (b) Mpo na nini Petro akokanisaki batisimo na kotongama ya masuwa na mikolo ya Noa?

3 Petro akokanisaki batisimo na kotongama ya masuwa na mikolo ya Noa. Alobaki ete: “Eloko oyo ekokani na yango ezali mpe sikoyo kobikisa bino, elingi koloba, batisimo.” (Tángá 1 Petro 3:20, 21.) Masuwa yango ezalaki komonisa polele ete Noa amipesaki na kosala mokano ya Nzambe. Noa asalaki mosala nyonso Yehova apesaki ye. Makambo wana oyo emonisaki kondima ya Noa esalaki ete Yehova abikisa ye ná libota na ye na Mpela. Petro alingaki koloba nini?

4 Masuwa ezalaki komonisa polele ete Noa azalaki na kondima epai ya Nzambe. Batisimo mpe emonisaka polele ete moto amipesi na Nzambe mpo andimeli Kristo oyo asekwaki. Lokola Noa, baoyo bazwi batisimo batosaka Nzambe mpe basalaka mosala oyo apesi bango. Kaka ndenge Yehova abikisaki Noa na Mpela, akobikisa mpe basaleli na ye ya sembo oyo bazwá batisimo ntango akobebisa mokili oyo mabe. (Marko 13:10; Emoniseli 7:9, 10) Emonani polele ete komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo ezali mpenza na ntina mingi. Kutu, soki moto azali ntango nyonso kozongisa batisimo nsima, akoki kozanga libaku ya kozwa bomoi ya seko.

5. Tokozwa biyano na mituna nini na lisolo oyo?

5 Lokola tomoni ete batisimo ezali likambo ya kozwa na lisɛki te, tosengeli kozwa biyano na mituna misato oyo: Biblia elobi nini mpo na batisimo? Makambo nini moto asengeli kosala liboso azwa batisimo? Mpo na nini tosengeli kobosanaka te komonisa ntina ya batisimo ntango tozali koteya bana na biso to bayekoli ya Biblia?

OYO BIBLIA ELOBI MPO NA BATISIMO

6, 7. (a) Batisimo ya Yoane ezalaki na ndimbola nini? (b) Batisimo ya nani ezalaki na ndimbola mosusu, mpe mpo na nini?

6 Batisimo ya liboso oyo Biblia elobeli ezali oyo Yoane Mobatisi azalaki kobatisa bato. (Matai 3:1-6) Mpo na nini bato bazalaki koya kozwa batisimo epai na ye? Bazalaki kosala bongo mpo na komonisa ete babongoli motema, bayoki mawa ndenge batosaki Mibeko ya Moize te. Kasi, batisimo oyo Yoane apesaki Yesu elekaki ntina mpe ezalaki na ndimbola mosusu. Yoane azwaki lokumu monene ya kobatisa Yesu, Mwana ya Nzambe oyo azalaki moto ya kokoka. (Matai 3:13-17) Lokola Yesu asalaki lisumu te, azalaki na mposa ya kobongola motema te. (1 Petro 2:22) Kasi, azwaki batisimo mpo na komonisa ete andimaki kosala mokano ya Nzambe bomoi na ye mobimba.​—Baebre 10:7.

7 Ntango Yesu azalaki kosala mosala na ye ya kosakola, bayekoli na ye mpe bazalaki kobatisa bato. (Yoane 3:22; 4:1, 2) Bato yango mpe bazalaki kozwa batisimo mpo na komonisa ete babongoli motema, bayoki mawa mpo batosaki Mibeko ya Moize te. Kasi nsima ya liwa mpe lisekwa ya Yesu, bato oyo balingaki kokóma bayekoli na ye basengelaki kozwa batisimo mpo na ntina mosusu.

8. (a) Nsima ya kosekwa, Yesu apesaki bayekoli na ye etinda nini? (b) Mpo na nini bakristo basengeli kozwa batisimo?

8 Na mobu 33 T.B., mwa moke nsima ya lisekwa ya Yesu, abimelaki bato koleka 500, mibali, basi, mbala mosusu mpe na bana. Ekoki kozala ete na libaku yango nde alobaki: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.” (Matai 28:19, 20; 1 Bakorinti 15:6) Yesu atindaki bayekoli na ye bákómisa mpe bato mosusu bayekoli. Mpe amonisaki ete moto nyonso oyo alingi kokóma moyekoli na ye, to kokamata “ekanganeli” na ye, asengelaki kozwa batisimo. (Matai 11:29, 30) Moto nyonso oyo alingi Nzambe andima losambo na ye, asengeli koyeba mpe kondima mokumba ya Yesu na kokokisama ya mokano ya Nzambe. Na nsima, moto yango akoki kozwa batisimo, oyo endimami na Nzambe. Masolo mingi ya Biblia emonisi polele ete bayekoli ya Yesu ya siɛklɛ ya liboso bayebaki ntina ya kozwa batisimo. Bazalaki te kozongisa yango nsima kaka mpamba.​—Misala 2:41; 9:18; 16:14, 15, 32, 33.

KOZONGISA BATISIMO NSIMA TE

9, 10. Ndakisa ya moto ya Etiopi mpe ya Saulo ekoki koteya biso nini mpo na batisimo?

9 Tángá Misala 8:35, 36. Tótalela ndakisa ya mobali moko ya Etiopi oyo andimaki mateya ya Bayuda. Autaki na Yerusaleme mpo na losambo mpe azalaki kozonga epai na ye. Anzelu ya Yehova atindaki Filipe akende epai ya moto yango, mpe Filipe ateyaki ye “nsango malamu oyo etali Yesu.” Mobali yango asalaki nini? Amonaki ntina ya kondimela Nkolo Yesu, mpe alingaki kosala likambo oyo Yehova asɛngaki bakristo nyonso básala. Na yango, azwaki batisimo kozanga koumela.

10 Ndakisa mosusu ezali ya Moyuda moko na nkombo Saulo. Abotamaki na ekólo ya Bayuda oyo emipesaki na Yehova, kasi Yehova abwakaki ekólo yango mpo bazalaki kotosa ye te. Saulo azalaki na molende na Lingomba ya Bayuda, yango wana azalaki konyokola bakristo. Kasi, mokolo moko, Yesu oyo autaki kosekwa mpe azongaki na likoló ateyaki ye. Saulo asalaki nini? Andimaki na esengo moyekoli Ananiasi asalisa ye. Biblia elobi: “Atɛlɛmaki mpe abatisamaki.” (Misala 9:17, 18; Bagalatia 1:14) Mobali yango nde akómaki ntoma Paulo. Tomoni ete ntango kaka ayebaki malamu mokumba ya Yesu na kokokisama ya mokano ya Nzambe, Saulo azwaki batisimo kozanga koumela.​—Tángá Misala 22:12-16.

11. (a) Lelo oyo, nini etindaka bayekoli ya Biblia bázwa batisimo? (b) Toyokaka ndenge nini ntango bato bazwi batisimo?

11 Lelo mpe esalemaka bongo epai ya bayekoli ya Biblia mingi, ezala mikóló to bana mike. Baoyo bazalaka na kondima mpe basepelaka mingi na makambo oyo bayekoli na Biblia baumelaka te komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo. Diskur ya batisimo ezalaka ntango moko ya ntina mingi na mayangani na biso ya mike mpe ya minene. Tozalaka na esengo ntango bayekoli ya Biblia bandimi mateya ya solo mpe bazwi batisimo. Baboti mpe bazalaka na esengo ntango bana na bango bazwi batisimo. Na mobu ya mosala 2017, bato koleka 284 000 oyo “bazalaki na ezaleli oyo ebongi” bazwaki batisimo mpo na komonisa ete bamipesi na Yehova mpo na kosalela ye. (Misala 13:48) Ya solo, bayekoli yango bakangaki ntina ete mokristo nyonso asengeli kozwa batisimo. Kasi, makambo nini basalaki liboso bázwa batisimo?

12. Makambo nini moyekoli asengeli kosala liboso azwa batisimo?

12 Liboso moyekoli ya Biblia azwa batisimo, asengeli kozwa boyebi ya sikisiki ya Nzambe, ya mokano na ye, mpe ya ebongiseli oyo azwá mpo na kobikisa bato. (1 Timote 2:3-6) Na nsima, asengeli kokóma na kondima, oyo ekotinda ye atosa mibeko ya Nzambe, mpe atika makambo oyo Yehova ayinaka. (Misala 3:19) Yango ezali na ntina mingi mpo Yehova akondima te komipesa ya moto oyo azali kokoba kosala makambo oyo ekopekisa ye azwa libula ya Bokonzi ya Nzambe. (1 Bakorinti 6:9, 10) Kasi esuki wana te. Moto oyo alingi komipesa na Yehova asengeli mpe koyanganaka na makita, kosakola nsango malamu mbala na mbala mpe koteya basusu. Yango nde mosala Yesu apesaki bayekoli na ye ya solo. (Misala 1:8) Moyekoli asengeli liboso kosala makambo wana nyonso. Na nsima akoki kosala libondeli na esika na ye moko mpo na komipesa na Yehova, mpe kozwa batisimo.

SALISÁ BAYEKOLI YA BIBLIA BÁMITYELA MOKANO YA KOZWA BATISIMO

Osalisaka bayekoli na yo ya Biblia báyeba ntina ya kozwa batisimo? (Talá paragrafe 13)

13. Mpo na nini tosengeli kobosana te ete mokristo nyonso asengeli kozwa batisimo?

13 Ntango tozali kosalisa bana na biso mpe bayekoli ya Biblia básala makambo wana ya ntina, tosengeli kobosana te ete baoyo balingi kozala bayekoli ya solosolo ya Yesu basengeli kozwa batisimo. Soki tobosani yango te, na ntango oyo ebongi tokobanga te koyebisa bango ntina ya komipesa mpe kozwa batisimo. Tolingi ete bana na biso mpe bayekoli ya Biblia bákende liboso mpe bázwa batisimo!

14. Mpo na nini tosengeli te kotindika moto na makasi azwa batisimo?

14 Atako bongo, moto moko te asengeli kotya mwana to moyekoli ya Biblia mbamba, to kotindika ye na makasi azwa batisimo. Yehova atindikaka moto te na makasi mpo asalela ye. (1 Yoane 4:8) Ntango tozali koteya basusu, tosengeli kosalisa bango bámona ete ezali na ntina mingi bákóma baninga ya Yehova. Soki moyekoli ya Biblia azali mpenza na botɔndi ndenge ayebi solo ya Nzambe mpe alingi mpenza kosala likambo nyonso oyo bakristo ya solo basengeli kosala, ekotinda ye azwa batisimo.​—2 Bakorinti 5:14, 15.

15, 16. (a) Ezali na mbula oyo moto asengeli kokokisa mpo azwa batisimo? Limbolá. (b) Mpo na nini moto asengeli kozwa batisimo mpo na kokóma Motatoli ya Yehova ata soki azwaki batisimo na lingomba mosusu?

15 Ezali te na mbula oyo moto asengeli kokokisa mpo azwa batisimo. Bato bazalaka ndenge moko te, mpe bayekoli mosusu bakolaka na elimo noki koleka basusu. Bato mingi bazwaka batisimo na bolenge mpe batikalaka sembo epai ya Yehova tii ntango bakómi mikóló. Bato mosusu bayekolaka Biblia mpe bazwaka batisimo wana bazali mikóló, ntango mosusu na mbula koleka 100!

16 Mwasi moko ya mobange oyo azalaki koyekola Biblia atunaki ndeko oyo azalaki koyekola na ye soki asengeli lisusu kozwa batisimo, mpo asilaki kozwa batisimo na mangomba mosusu. Ndeko yango alakisaki ye mwa bavɛrsɛ oyo epesaki eyano na motuna na ye. Atako akómaki na mbula pene na 80, mobange yango akangaki ntina ya likambo oyo Biblia esɛngi, mpe andimaki kozwa batisimo. Ndakisa yango emonisi nini? Emonisi ete Yehova akondima batisimo na biso kaka soki tozwi boyebi ya sikisiki ya mokano na ye. Yango wana, ata soki moto azwá batisimo na lingomba oyo azalaki liboso, asengeli kozwa lisusu batisimo mpo na kokóma Motatoli ya Yehova.​—Tángá Misala 19:3-5.

17. Makambo nini moto asengeli kokanisa mokolo ya batisimo na ye?

17 Mokolo oyo moto azwi batisimo ezali mokolo ya esengo mpenza. Ezali mpe ntango ya kokanisa na mozindo elaka na ye ya komipesa na Nzambe. Kosala makambo oyo esɛngami na mokristo oyo amipesá na Nzambe ezali pɛtɛɛ te. Bayekoli ya Yesu basengeli ‘kozala na bomoi mpo na bango moko lisusu te, kasi mpo na moto oyo akufelaki bango mpe alamwisamaki.’​—2 Bakorinti 5:15; Matai 16:24.

18. Mituna nini tokotalela na lisolo oyo elandi?

18 Ndenge tomoni yango, kokóma mokristo ya solo ezali likambo ya kozwa na lisɛki te. Yango wana mama ya Maria amitunaki mituna oyo ezali na ebandeli ya lisolo. Soki ozali moboti, mbala mosusu omitunaka boye: ‘Mwana na ngai akoki mpenza mpo na kozwa batisimo? Boyebi oyo azali na yango ekoki mpo amipesa na Nzambe? Mwana na ngai asengeli naino kotánga kelasi mingi mpe kozwa mosala liboso azwa batisimo? Bongo soki azwi batisimo, mpe na nsima asali lisumu ya monene?’ Tokozwa biyano na mituna yango na lisolo oyo elandi, mpe tokomona ndenge oyo baboti bakoki kozala na makanisi oyo ebongi mpo na batisimo.