Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mpo na nini mikanda ya Batatoli ya Yehova emonisaka ntoma Paulo azali na libandi to na nsuki mingi te?

Mpo na koloba solo, moto moko te lelo ayebi mpenza ndenge nzoto ya Paulo ezalaki. Bililingi mpe bafɔtɔ oyo ezalaka na mikanda na biso ezali kaka mayemi, eutaka te na biloko ya kala oyo bato ya arkeoloji bamoná.

Kasi, ezali na mwa makambo oyo emonisi ndenge nzoto ya Paulo ezalaki. Na ndakisa, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona ya 01/03/1902 etángaki likambo moko; elobaki: “Ndenge nzoto ya Paulo ezalaki: . . . Buku ‘Actes de Paul et Thècle,’ . . . oyo ekomamaki na mobu soki 150 T.B., elobeli likambo moko ya Paulo, oyo mbala mosusu yango nde eleki malamu mpe ezali ya solo mpenza. Buku yango elobi ete azalaki ‘mokuse, na libandi, makolo egumbamá (jambes arquées), nzoto etondá, mankiki esanganá; azalaki zolo molai.’”

Mpo na maloba yango ya kala, diksionɛrɛ moko (The Oxford Dictionary of the Christian Church [ebimeli ya 1997]) elobi ete: “Ekoki mpenza kozala ete makambo mosusu oyo buku ‘Actes de Paul et Thècle’ elobeli ezali solo.” Na basiɛklɛ oyo elandaki kokomama na yango, bato bazalaki kozwa buku yango na motuya mingi. Toyebi yango mpo tii lelo ezali na bamaniskri na yango 80 na monɔkɔ ya Grɛki, mpe mabongoli na yango na minɔkɔ mosusu. Na yango, bililingi ya ntoma Paulo oyo ezalaka na mikanda na biso eyokani na mwa makomi ya kala oyo elobeli ndenge azalaki.

Kasi, yebá ete ezali na makambo ya ntina koleka nzoto ya Paulo. Ata ntango Paulo azalaki kosakola, bato mosusu bazalaki kotyola ye mpe koloba ete “kozala na ye moko moto ezali na bolɛmbu mpe elobeli na ye ezali mpamba.” (2 Bakorinti 10:10) Kasi, tosengeli kobosana te ete Paulo akómaki mokristo ntango Yesu asololaki na ye na ndenge ya likamwisi. Tóbosana mpe te ete Paulo azalaki ‘mbɛki oyo Kristo aponaki mpo na komema nkombo ya Yesu epai ya bikólo.’ (Misala 9:3-5, 15; 22:6-8) Tókanisa mpe ebele ya makambo oyo tokoki koyekola na mikanda ya Biblia oyo elimo santu ya Yehova esalisaki Paulo akoma.

Paulo amikumisaki te mpo na makambo minene oyo asalaki liboso akóma mokristo; alobelaki mpe te ndenge oyo nzoto na ye ezalaki. (Misala 26:4, 5; Bafilipi 3:4-6) Alobaki nde ete: “Nazali moto oyo aleki moke mpenza na kati ya bantoma, mpe nabongi kutu te kobengama ntoma.” (1 Bakorinti 15:9) Na nsima, akomaki ete: “Epai na ngai, moto moke koleka moto oyo aleki moke na kati ya basantu nyonso, boboto monene wana emonisamaki, mpo nasakola na bikólo nsango malamu oyo etali bomɛngo ya Kristo oyo ekoki komekama te.” (Baefese 3:8) Nsango yango ezali na ntina mingi koleka koluka koyeba soki nzoto ya Paulo ezalaki ndenge nini.