Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Yehova asundoli ngai ata moke te!

Yehova asundoli ngai ata moke te!

Nazalaki moko ya bana basi minei ya mike oyo baponamaki mpo na kopesa Adolf Hitler bafololo ntango akosilisa kosala diskur. Mpo na nini baponaki mpe ngai? Tata na biso amipesaki mingi na makambo ya Banazi mpe azalaki sofɛlɛ ya mokonzi ya parti ya Banazi na mboka na biso. Mama na biso amipesaki na Lingomba ya Katolike mpe mposa na ye ezalaki nakóma mamelo. Atako bongo, nakómaki moto ya Banazi te, mamelo mpe te. Mpo na nini? Tiká nayebisa bino.

NAKOLÁ na engumba Graz, na Autriche. Ntango nazalaki na mbula nsambo, batindaki ngai na eteyelo moko nayekola makambo ya Lingomba ya Katolike. Kasi, nayokaki mabe komona ndenge basango bazalaki kosala pite ná bamamelo. Na yango, nsima ya mbula moko, mama andimaki nalongwa eteyelo yango.

Libota mobimba, mpe tata alati sokoto

Na nsima, batindaki ngai nakende kotánga na mbola (internat). Mokolo moko na butu, tata ayaki kozwa ngai mpo bazalaki kobwaka babɔmbi ebele na Graz. Tokimaki na mboka Schladming. Ntango kaka tokómaki kuna mpe nsima ya kokatisa gbagba (pont), bɔmbi epanzaki yango. Mokolo mosusu, bampɛpɔ oyo etambolaka likoló mingi te ebɛtaki ngai ná nkɔkɔ na biso ya mwasi masasi na kati ya lopango na biso. Ntango etumba esilaki, emonanaki ete lingomba ná guvɛrnema esundolaki biso.

NDENGE NAYEBAKI MOTO OYO ASUNDOLAKA ATA MOKE TE

Na 1950, Motatoli ya Yehova moko abandaki koteya mama na biso makambo ya Biblia. Nazalaki koyoka masolo na bango; mpe nakendaki kutu elongo na mama na makita mosusu ya lisangá. Ntango amonaki ete Batatoli ya Yehova bazalaki na solo, azwaki batisimo na 1952.

Na ntango wana, lisangá oyo ezalaki na mboka na biso ezalaki lokola moziki moko ya bamama-mikóló. Kasi na nsima, tokendaki na lisangá moko epai bilenge bazalaki ebele, ezalaki moziki ya bamama-mikóló te! Ntango tozongaki na Graz, nabandaki koyangana na makita nyonso, mpe eumelaki te ngai mpe nandimaki ete makambo oyo nazalaki koyekola ezali solo. Namonaki mpe ete Yehova azali Nzambe oyo asundolaka basaleli na ye te. Asundolaka biso te ata ntango tokutani na makambo oyo biso moko tomoni ete tokokoka kosilisa te.​—Nzembo 3:5, 6.

Nazalaki na mposa ya koyebisa basusu mateya ya solo. Nabandaki na bandeko na ngai. Bayaya na ngai minei ya basi basilaki kolongwa ndako mpe bakómaki kotángisa. Kasi, nakendaki kotala bango na bamboka oyo bazalaki kofanda mpe nalendisaki bango báyekola Biblia. Nsukansuka, bandeko na ngai nyonso, moko ya mobali mpe mitano ya basi, bayekolaki Biblia mpe bakómaki Batatoli ya Yehova.

Ntango nabandaki kosakola ndako na ndako, na pɔsɔ ya mibale, nakutanaki na mwasi moko oyo azalaki na mbula mwa moke koleka 30 mpe nabandaki koyekola na ye Biblia. Akendaki liboso tii azwaki batisimo. Na nsima, mobali na ye ná bana na ye mibale ya mibali mpe bazwaki batisimo. Boyekoli wana esalisaki ngai mingi mpenza. Na ndenge nini? Moto te ayekolá na ngai Biblia ndenge esengeli. Nasengelaki kobongisa malamu liteya mokomoko. Nakoki koloba ete, nazalaki kosala yango liboso mpo namiteya mpe na nsima nakoka koteya moyekoli na ngai! Yango esalisaki ngai nasepela mpenza na solo. Na sanza ya 04/1954, namipesaki na Yehova mpe nazwaki batisimo.

‘TONYOKWAMI, KASI TOSUNDOLAMI TE’

Na 1955, nakendaki na mayangani oyo esangisaki mikili mingi na Allemagne, na Angleterre, mpe na France. Ntango nazalaki na Londres, nakutanaki na ndeko Albert Schroeder. Azalaki molakisi na Eteyelo ya Gileade, mpe na nsima akɔtaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Ntango tozalaki kotala British Museum, ndeko Schroeder alakisaki biso mwa bamaniskri ya Biblia, oyo ezalaki na nkombo ya Nzambe na Ebre, mpe alimbwelaki biso ntina na yango. Esimbaki motema na ngai mpe elendisaki kondima na ngai; ebakisaki lisusu mposa na ngai ya kopalanganisa solo ya Liloba ya Nzambe.

Ná moninga na ngai ya mosala (na lobɔkɔ ya mobali), ntango tozalaki babongisi-nzela monene na Mistelbach, na Autriche

Nabandaki mosala ya mobongisi-nzela mokolo ya 01/01/1956. Sanza minei na nsima, babengaki ngai mpo nakóma mobongisi-nzela monene na Autriche. Na ntango wana, Batatoli bazalaki te na Mistelbach, mboka oyo batindaki ngai. Kasi, ezalaki na mokakatano mosusu. Ngai ná moninga na ngai ya mosala tokesanaki. Ngai nazalaki na mbula soki 19 mpe nautaki na engumba ya monene; ye azalaki na mbula 25, akolá na mboka. Nazalaki kosepela kolamuka ntɔngɔ makasi te; ye azalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ. Na butu, nazalaki kolala noki te; ye azalaki kolinga kolala noki. Atako bongo, kosalela toli ya Biblia esalisaki biso tólonga kosala elongo na mosala ya mobongisi-nzela, atako tokesanaki.

Kutu, tokutanaki na mikakatano mosusu ya minene koleka. Tokutanaki ata na minyoko, kasi ‘tosundolamaki te.’ (2 Bakorinti 4:7-9) Mokolo moko ntango tozalaki kosakola na mboka moko, bato bafungolaki bambwa na bango. Eumelaki te, bambwa ezingaki ngai ná moninga na ngai ya mosala, ebimisaki mino mpe ezalaki koganga makasi. Tosimbanaki na mabɔkɔ, mpe nabondelaki kutu ete: “Yehova, tobondeli yo, soki ebandi koswa biso, tóumela te nakokufa!” Ntango kaka bambwa yango ekómaki pene na biso, etɛlɛmaki, eningisaki mikila na yango, mpe ekendaki. Tomonaki ete Yehova nde abatelaki biso. Na nsima, tosakolaki na mboka yango mobimba, mpe tosepelaki mpo bato bayokaki biso malamu mpenza. Mbala mosusu bakamwaki ndenge bambwa esalaki biso eloko te, to ndenge tolɛmbaki te atako tokutanaki na likambo wana oyo ebangisaki biso. Nsukansuka, basusu kati na bango bakómaki Batatoli ya Yehova.

Tokutanaki mpe na likambo mosusu oyo ebangisaki biso. Mokolo moko nkolo-lopango na biso alangwaki masanga, alingaki koboma biso mpe azalaki koloba ete tozali kotya mobulu na kartye. Mwasi na ye amekaki kopekisa ye kasi ayokaki te. Tofandaki na ndako na biso na likoló mpe tozalaki koyoka makambo nyonso. Totyaki bakiti mbangumbangu na porte mpe tobandaki kokangisa biloko na biso. Ntango tofungolaki porte, nkolo-lopango atɛlɛmaki na eskalye, asimbi mbeli moko ya monene. Na yango, tobimaki na porte ya nsima, tokimaki na biloko na biso nyonso, mpe tozongaki lisusu kuna te.

Tokendaki na otɛlɛ moko mpe tozwaki shambrɛ. Kutu, tofandaki kuna soki mbula mobimba, mpe esalisaki biso mpo na mosala ya kosakola. Na ndenge nini? Otɛlɛ yango ezalaki na centre-ville, mpe bayekoli ya Biblia mosusu bazalaki kosepela koya koyekola kuna. Eumelaki te tobandaki kosala boyekoli ya mokanda mpe Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli pɔsɔ na pɔsɔ na shambrɛ na biso, mpe bato soki 15 bazalaki koya.

Tofandaki na Mistelbach koleka mbula mobimba. Na nsima, batindaki biso na mboka Feldbach, na sudi-ɛsti ya Graz. Nazwaki moninga mosusu ya mosala, kasi kuna mpe lisangá ezalaki te. Tozalaki kofanda na mwa ndako moko ya banzete na etaje. Mopɛpɛ ezalaki kokɔta na madusu, yango wana tozalaki kokanga madusu yango na bapapye ya bazulunalo ya mokili. Tozalaki mpe kotɔka mai na libulu. Kasi ezalaki mosala ya mpunda te. Nsima ya mwa basanza, etuluku moko efungwamaki. Nsukansuka, bato soki 30 ya libota moko oyo toyekolaki na bango Biblia bakómaki Batatoli!

Makambo ya ndenge wana esalisaki ngai namona lisusu ete Yehova asundolaka te baoyo batyaka Bokonzi na esika ya liboso. Ata ntango bato bakoki kosunga biso te, Yehova azalaka wana mpo na kosalisa biso.​—Nzembo 121:1-3.

NZAMBE ASIMBI NGAI NA ‘LOBƆKƆ NA YE YA MOBALI YA BOYENGEBENE’

Na 1958, liyangani oyo esangisaki mikili mingi esengelaki kosalema na engumba New York, na Yankee Stadium mpe na Polo Grounds. Nasɛngaki nakende na liyangani yango, mpe Betele ya Autriche etunaki ngai soki nakosepela kokɔta kelasi ya mbala ya 32 ya Gileade. Nakokaki koboya libaku ya ndenge wana te! Kozanga koumela nayanolaki, “Ɛɛ!”

Na kelasi ya Gileade, nafandaki pembeni ya ndeko Martin Poetzinger. Anyokwamaki mingi na kaa ya Banazi. Na nsima asalaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Na kelasi, mbala mosusu Martin azalaki kotuna ngai na mongongo ya nse, “Erika, likambo oyo elimboli nini na monɔkɔ ya Allemand?”

Ntango kelasi ekómaki na katikati, ndeko Nathan Knorr ayebisaki biso bisika bakotinda biso. Ngai nasengelaki kokende na Paraguay. Lokola nazalaki na naino elenge mpenza, nasengelaki kozwa ndingisa epai ya tata na biso mpo na kokɔta na ekólo yango. Nsima ya kozwa ndingisa yango, nakómaki na Paraguay na sanza ya 03/1959. Batindaki ngai na ndako ya bamisionɛrɛ na Asunción, elongo na moninga ya mosala mosusu.

Eumelaki te, nakutanaki na Walter Bright, misionɛrɛ oyo akɔtaki kelasi ya mbala ya 30 ya Gileade. Na nsima, tobalanaki mpe tokómaki kobunda na mikakatano ya bomoi elongo. Mbala nyonso oyo tokutani na mokakatano ya monene, tozalaki kotánga elaka ya Yehova oyo ezali na Yisaya 41:10: “Kobanga te, mpo nazali na yo. Kotala epai na epai te, mpo nazali Nzambe na yo. Nakopesa yo makasi.” Maloba yango ezalaki kondimisa biso ete soki tosali makasi ya kotikala sembo epai ya Nzambe mpe soki totye Bokonzi na ye na esika ya liboso, akosundola biso ata moke te.

Nsima ya bambula, batindaki biso na teritware moko oyo ezali na ndelo ya Brésil. Kuna, bakonzi ya lingomba batindaki bilenge bábamba mabanga na ndako na biso ya bamisionɛrɛ, kutu ndako ezalaki malamu mpenza te. Na nsima, Walter abandaki koyekola Biblia na mokonzi ya polisi. Moto yango abongisaki ete bakonzi ya polisi bátɛlɛma pene na ndako na biso pɔsɔ mobimba, mpe banguna batungisaki biso lisusu te. Mwa moke na nsima, tokendaki na esika ya malamu koleka, na ngámbo ya Brésil. Yango esalisaki mingi mpenza mpo tokokaki kosala makita na Paraguay mpe na Brésil. Liboso tólongwa na teritware yango, mwa masangá mibale ya mike efungwamaki.

Ná mobali na ngai, Walter, ntango tozalaki bamisionɛrɛ na Asunción, na Paraguay

YEHOVA AKOBI KOSUNGA NGAI

Minganga bayebisaká ngai ete nakoki kobota te; na yango tokamwaki mpenza ntango nazwaki zemi na 1962! Nsukansuka, tofandaki na engumba Hollywood, na etúká ya Floride, pembeni na libota ya Walter. Ngai ná Walter tolekisaki bambula mwa mingi kozanga kosala mosala ya mobongisi-nzela, mpo tozalaki na likoki ya kosala yango te. Tosengelaki kobatela bana na biso. Atako bongo, tokobaki kotya Bokonzi na esika ya liboso.​—Matai 6:33.

Ntango tokómaki na Floride na sanza ya 11/1962, tokamwaki komona ete bandeko ya moindo bazalaki kosala makita esika moko te mpe bazalaki kosakola na teritware moko te na bandeko ya mindɛlɛ, mpo na mboka yango, bazalaki kosangisa bato na kolanda loposo na bango. Kasi Yehova atalaka loposo te. Na yango, eumelaki te bandeko ya moindo mpe mindɛlɛ bakómaki kosangana esika moko. Tomonaki lobɔkɔ ya Yehova na likambo yango, mpo lelo masangá ezali ebele na esika yango.

Likambo ya mawa, na 2015, Walter akufaki na kanser ya bɔɔngɔ. Tofandaki elongo na esengo mbula 55, alingaki Yehova mpe asalisaki bandeko ebele. Nazelaka komona ye lisusu ntango akosekwa na nzoto kolɔngɔnɔ.​—Misala 24:15.

Nazali na esengo ndenge nasali mosala ya ntango nyonso mbula koleka 40; nakutani na makambo mingi ya esengo mpe nazwi matomba ebele. Na ndakisa, ngai ná Walter tomonaki ndenge bayekoli na biso ya Biblia 136 bazwaki batisimo. Ya solo, tokutanaki mpe na mwa mikakatano. Atako bongo, totikaki te kosalela Nzambe na biso ya sembo. Tokobaki kozala penepene na ye, totyelaki ye motema ete akobongisa makambo na ntango oyo alingi mpe na ndenge oyo alingi. Asalaka kaka bongo!​— 2 Timote 4:16, 17.

Nakanisaka Walter mingi mpenza; kasi mosala ya mobongisi-nzela ekitisaka ngai motema. Namonaka ete koteya basusu, ata mpe koyebisa bango elikya ya lisekwa esalisaka mingi mpenza. Ya solo, Yehova asundoli ngai te na makambo mosusu ebele. Akokisi elaka na ye: asungi ngai, apesi ngai makasi, mpe asimbi ngai makasi na ‘lobɔkɔ na ye ya mobali ya boyengebene.’​—Yisaya 41:10.