Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bolamu​—Ndenge nini okoki kokolisa ezaleli yango?

Bolamu​—Ndenge nini okoki kokolisa ezaleli yango?

MOTO nyonso alingaka ete bámona ye moto malamu. Nzokande, na mokili ya lelo, kozala moto malamu ezali pɛtɛɛ te, mpo bato mingi “balingaka makambo ya malamu te.” (2 Tim. 3:3) Balandaka makanisi na bango moko na oyo etali malamu ná mabe, na ndakisa, oyo Yehova alobi ete ezali mabe, bango balobaka ete ezali malamu, mpe oyo alobi ete ezali malamu, balobaka ete ezali mabe. (Yis. 5:20) Longola yango, ezaleli na biso ya kozanga kokoka mpe esika oyo tokolá esalaka ete tókoka te komonisa ezaleli yango. Yango wana, tokoki komiyoka lokola Anne * oyo, atako asalelaka Yehova banda bambula ebele, alobi boye: “Namonaka ete ezali mpasi nandima ete moto lokola ngai akoki kozala moto malamu.”

Likambo ya esengo, biso nyonso tokoki kokolisa ezaleli ya bolamu! Elimo ya Nzambe nde esalisaka biso tómonisa ezaleli yango; elimo santu ezali na nguya mingi koleka mokakatano mosusu nyonso oyo tokoki kokutana na yango, ezala euti epai ya bato mosusu to epai na biso moko. Tiká tótalela ezaleli yango malamumalamu mpo tóyeba ndenge ya komonisa yango lisusu mingi.

BOLAMU EZALI NINI?

Na mokuse, bolamu elimboli kozala moto malamu. Ezaleli yango esalaka ete moto azala na makanisi ya malamu mpenza mpe na bizaleli oyo ebongi, kasi oyo ya mabe te. Bolamu emonanaka polele na matomba oyo ememelaka bato mosusu. Moto malamu alukaka ntango nyonso mabaku ya kosalisa basusu mpe asalaka makambo ya malamu mpo na bato.

Mbala mosusu, osilá komona ete bato mosusu basalelaka bato ya libota na bango to baninga na bango makambo ya malamu. Kasi, bolamu esuki kaka wana? Ya solo, tokoki te komonisa ezaleli yango na ndenge ya kokoka, mpo Biblia elobi ete “ezali na moto moko te oyo azali moyengebene na mabele oyo asalaka kaka malamu mpe asalaka lisumu te.” (Mos. 7:20) Ntoma Paulo andimaki likambo oyo: “Nayebi ete na kati na ngai, elingi koloba, na nzoto na ngai, eloko moko ya malamu efandi kuna te.” (Rom. 7:18) Na yango, soki tolingi kokóma bato malamu, tosengeli koyekola ezaleli yango epai ya Yehova, mpo bolamu eutá epai na ye!

“YEHOVA AZALI MALAMU”

Yehova Nzambe nde atyaka mibeko mpo na koyeba oyo ezali malamu. Mpo na ye, Biblia elobi boye: “Ozali malamu mpe ozali kosala makambo ya malamu. Teyá ngai malako na yo.” (Nz. 119:68) Tótalela makambo mibale oyo vɛrsɛ yango elobi mpo na bolamu ya Yehova.

Yehova azali malamu. Bolamu ezali na kati ya bomoto ya Yehova. Tótalela likambo oyo esalemaki ntango Yehova alobaki na Moize: “Ngai moko nakolekisa bolamu na ngai nyonso liboso ya elongi na yo.” Ntango nkembo ya Yehova, oyo bolamu ezali kati na yango, ezalaki koleka liboso ya elongi ya Moize, ayokaki maloba oyo: “Yehova, Yehova, Nzambe ya motema mawa mpe ya ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema boboto mpe na solo, abatelaka motema boboto mpo na bankóto, alimbisaka libunga ná kobuka mibeko mpe lisumu, kasi akozanga ata moke te kopesa etumbu.” (Kob. 33:19; 34:6, 7) Yango esalisi biso tóyeba mpo na nini bolamu ya Yehova emonanaka na makambo nyonso oyo asalaka. Atako Yesu azalaki moto malamu koleka bato mosusu nyonso, alobaki ete: “Moto malamu azali te, longola kaka moko, Nzambe.”​—Luka 18:19.

Tomonaka bolamu ya Yehova na nzela ya biloko oyo akelá

Misala ya Yehova ezali malamu. Bolamu emonanaka na makambo nyonso oyo Nzambe asalaka. “Yehova azali malamu epai ya bikelamu nyonso, mpe motema mawa na ye ezali likoló ya misala na ye nyonso.” (Nz. 145:9) Bolamu ya Yehova eponaka bilongi te; apesaka bato bomoi mpe nyonso oyo basengeli na yango mpo na kobatela bomoi yango. (Mis. 14:17) Bolamu na ye emonanaka mpe ntango alimbisaka biso. Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Mpo yo, Ee Yehova, ozali malamu mpe osepelaka kolimbisa.” (Nz. 86:5) Tokoki mpenza kozala na kondima ete “Yehova ye moko akoboya te kopesa eloko moko ya malamu na baoyo bazali kotambola na bosembo.”​—Nz. 84:11.

“BÓYEKOLA KOSALA MALAMU”

Tokelamá na elilingi ya Nzambe, yango wana, tozali na likoki ya kozala bato malamu mpe kosala makambo ya malamu. (Eba. 1:27) Atako bongo, Liloba ya Nzambe elendisi basaleli na ye ‘báyekola kosala malamu.’ (Yis. 1:17) Kasi, ndenge nini tokoki kokolisa ezaleli wana ya malamu? Tótalela ndenge misato oyo tokoki kosala yango.

Ya liboso, tokoki kobondela mpo na kosɛnga elimo santu, oyo esalisaka bakristo bámonisa bolamu ya solosolo. (Gal. 5:22) Ya solo, elimo ya Nzambe ekoki kosalisa biso tólinga makambo ya malamu mpe tóboya oyo ya mabe. (Rom. 12:9) Kutu, Biblia elobi ete Yehova akoki kokómisa biso “makasi na mosala nyonso ya malamu mpe liloba nyonso ya malamu.”​—2 Tes. 2:16, 17.

Ya mibale, tosengeli kotángaka Liloba ya Nzambe oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu. Soki tozali kosala bongo, Yehova akoteya biso “nzela mobimba ya oyo ezali malamu” mpe akobongisa biso “mpo na mosala nyonso ya malamu.” (Mas. 2:9; 2 Tim. 3:17) Soki tozali kotánga Biblia mpe komanyola, tokotondisa motema na biso na makambo ya malamu oyo etali Nzambe mpe mokano na ye. Kosala bongo ezali lokola kobomba biloko ya motuya, oyo tokoki kobimisa mpo na kosalela na nsima.​—Luka 6:45; Ef. 5:9.

Ya misato, tosalaka nyonso oyo tokoki mpo na ‘komekola oyo ezali malamu.’ (3 Yoa. 11) Biblia ezali na bandakisa mingi ya malamu oyo tokoki komekola. Ndakisa eleki malamu ezali oyo ya Yehova mpe ya Yesu. Kasi, tokoki mpe kolanda bandakisa ya bato mosusu oyo bayebanaki ete bazalaki bato malamu. Na bato yango, tokoki kotánga Tabita mpe Barnabasi. (Mis. 9:36; 11:22-24) Kotánga masolo na bango, mpe kotalela makambo oyo basalaki mpo na kosalisa basusu, ekoki kosalisa yo mingi. Meká kokanisa makambo nini okoki kosala mpo na kosalisa bato mosusu ya libota na bino to na lisangá na bino. Longola yango, luká koyeba matomba oyo mokomoko na bango azwaki na ndenge azalaki kosalela basusu makambo ya malamu. Yo mpe okoki kozwa matomba ya ndenge wana.

Tozali mpe na ndakisa ya bandeko mosusu oyo basalaka makambo ya malamu lelo oyo. Na ndakisa, kanisá bankulutu oyo basalaka mosala makasi na lisangá mpe ‘balingaka makambo ya malamu.’ Tókanisa mpe bandeko basi ya sembo, oyo na maloba mpe na misala, bazali “bateyi ya makambo malamu.” (Tito 1:8; 2:3) Ndeko mwasi moko na nkombo Roslyn alobi boye: “Moninga na ngai asalaka mpenza makasi mpo na kosalisa mpe kolendisa basusu na kati ya lisangá. Akanisaka makambo oyo bazali kokutana na yango na bomoi mpe mbala mingi akabelaka bango mwa biloko to asalisaka bango na ndenge mosusu. Namonaka ete azali mpenza moto malamu.”

Yehova alendisaka basaleli na ye ‘báluka oyo ezali malamu.’ (Amo. 5:14) Soki tozali kosala bongo, tokosepela lisusu mingi na mibeko na ye mpe tokobakisa mposa na biso ya kosala makambo ya malamu.

Tosalaka makasi tózala bato malamu mpe tósala makambo ya malamu

Tosengeli te kokanisa ete kosala malamu esɛngaka makambo ya minene to komipimela makambo mingi. Tózwa ndakisa: Mpo liyemi moko emonana kitoko, okanisi ete moto oyo asalaka mayemi asengeli kosalela brɔsi ya mikemike kaka moko to mibale? Te. Akoki kosalela yango ebele mpo na kotya langi ndenge na ndenge na liyemi moko. Ndenge moko mpe, tokomonisa bolamu na makambo ndenge na ndenge oyo tozali kosala mpo na kosalisa basusu.

Biblia elendisi biso ‘tómibongisa’ mpe tózala bato oyo ‘babongisami mpo na mosala nyonso ya malamu.’ (2 Tim. 2:21; Tito 3:1) Soki tozali kotyela basusu likebi, tokoki komona makambo mingi ya kosala mpo na kosepelisa bazalani na biso ‘na oyo ezali malamu mpo tólendisa bango.’ (Rom. 15:2) Ntango mosusu, yango ekoki kosɛnga ete tókabela bango oyo tozali na yango. (Mas. 3:27) Tokoki kobengisa moto moko mpo na kolya mwa eloko to mpo na kolekisa ntango elongo mpo tólendisana. Soki toyoki ete moto moko azali kobɛla, tokoki kotindela ye mwa karte oyo tokomeli ye, kokende kotala ye, to kobenga ye na telefone. Ya solo, tokoki koluka mabaku mosusu ya koloba “oyo ezali malamu mpo na kotonga na ntango mposa ezali, mpo epesa bayoki eloko ya malonga.”​—Ef. 4:29.

Lokola Yehova, tolukaka kosalela bato nyonso makambo ya malamu. Yango wana, toponaka bilongi te. Lolenge mosusu eleki malamu oyo tosalaka yango ezali ntango tosakwelaka bato nyonso nsango malamu ya Bokonzi. Ndenge Yesu apesaki etinda, tolukaka kosala malamu ata epai ya bato oyo bayinaka biso. (Luka 6:27) Kozala moto malamu mpe kosalela basusu malamu ezalaka mabe soki moke te, mpo “ezali na mobeko ata moko te oyo ezali kotɛmɛla makambo wana.” (Gal. 5:22, 23) Soki tozali na etamboli ya malamu ata ntango batɛmɛli biso to ntango tokutani na mikakatano, tokoki kobenda bato mosusu na losambo ya solo mpe kopesa Nzambe nkembo.​—1 Pe. 3:16, 17.

MATOMBA OYO TOKOZWA SOKI TOZALI KOSALA MALAMU

“Moto malamu akotonda na mbuma ya misala na ye.” (Mas. 14:14) Matomba nini tokozwa? Soki tozali kosalela bato bolamu, na ntembe te, bango mpe bakosalela biso bolamu. (Mas. 14:22) Ata soki basusu bazali kosalela biso bolamu te, soki biso tokobi kaka kosalela bango bolamu, yango ekoki kolɛmbisa mitema na bango mpe kotinda bango básalela biso bolamu.​—Rom. 12:20.

Bandeko mingi bakoki koyebisa matomba oyo bazwaki ntango batikaki kosala mabe mpe bakómaki kosala malamu. Tózwa ndakisa ya Nancy. Alobi boye: “Ntango nazalaki kokola, nazalaki mafumafu, nazalaki komipesa na makambo ya kosangisa nzoto, mpe nazalaki kotosa moto te. Kasi, ntango nabandaki koyekola mibeko ya Nzambe mpe kotosa yango, nakómaki na esengo mingi. Lelo oyo, namonaka ete bato bamemyaka ngai mpe napesaka nzoto na ngai kilo.”

Ntina ya libosoliboso oyo tosalelaka basusu bolamu ezali mpo kosala bongo esepelisaka Yehova. Ata soki bato mingi bazali komona te oyo tozali kosala, Yehova amonaka yango. Ayebi likambo nyonso ya malamu oyo tosalaka, ata mpe makanisi na biso. (Ef. 6:7, 8) Mbano nini apesaka biso? “Moto ya malamu andimamaka na Yehova.” (Mas. 12:2) Na yango, tókoba kosalela basusu makambo ya malamu. Yehova alaki “nkembo, lokumu ná kimya epai ya moto nyonso oyo asalaka oyo ezali malamu.”​—Rom. 2:10.

^ par. 2 Topesi bango bankombo mosusu.