LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Avril 2018

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 4/06 tii 8/07/2018.

Ndenge ya kozwa bonsomi ya solosolo

Bato mosusu bazalaka na mposa bálongwa na minyoko, bátikala kokanisela bango mabe, bálongwa na bobola, mpe basusu balukaka kozala na bonsomi ya koloba to ya kopona. Moto akoki kozwa bonsomi ya solosolo?

Salelá Yehova, Nzambe oyo apesaka bonsomi

Ndenge nini elimo ya Yehova epesi biso bonsomi? Mpe ndenge nini tokoki koboya kosalela na ndenge ya mabe bonsomi oyo Nzambe apesi biso?

Bankulutu mpe basaleli na misala​—Bómekola Timote

Emonani ete Timote azalaki na mpiko te ntango abandaki kosala elongo na ntoma Paulo. Ndenge nini bankulutu mpe basaleli na misala bakoki komekola Timote?

Mekolá Yehova, Nzambe oyo alendisaka

Banda kala basaleli ya Yehova bazalaka na mposa ya kolendisama.

Tólendisanaka “mingi koleka”

Lokola mokolo ya Yehova ekómi pene mpenza, tosengeli kotyela bandeko likebi mpo tólendisa bango na ntango oyo esengeli.

Elenge, otye makanisi na yo na mikano ya elimo?

Bilenge bakoki kozala na mokakatano mpo na kozwa bikateli. Ndenge nini bakoki kozwa bikateli ya malamu mpo na bomoi na bango na mikolo ezali koya?

Mituna ya batángi

Mpo na nini epekisami kotya biloko ya Batatoli ya Yehova na site Internet na yo to na basite ya bato nyonso?

Mituna ya batángi

Mpo na nini Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebongisami lisusu ebongisi maloba ya Nzembo 144?