Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Elenge, otye makanisi na yo na mikano ya elimo?

Elenge, otye makanisi na yo na mikano ya elimo?

“Tikelá Yehova misala na yo mpe myango na yo ekopikama makasi.”​—MASESE 16:3.

NZEMBO: 135, 144

1-3. (a) Mokakatano nini elenge nyonso akutanaka na yango, mpe ndakisa nini okoki kopesa mpo na komonisa yango? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Nini ekosalisa bilenge bakristo na likambo yango?

KANISÁ ete olingi osala mobembo moko molai mpo okende na molulu moko ya ntina mingi. Mpo na yango, osengeli kozwa bisi. Ntango okómi esika babisi etɛlɛmaka, obulungani mwa moke mpo bato bazali ebele mpe omoni babisi ndenge na ndenge. Kasi, likambo ya esengo, oyebi malamu esika oyo ozali kokende mpe bisi oyo osengeli kozwa. Oyebi ete soki omati na bisi mosusu, ekomema yo na esika oyo okanaki te.

2 Bomoi ezali lokola mobembo, mpe bino bilenge bozali lokola bato oyo bazali esika babisi etɛlɛmaka. Na bantango mosusu, makambo ya kopona ezalaka ebele mpe yango ekoki kobulunganisa elenge. Kasi, soki oyebi malamu esika oyo olingi kokende, ekozala mpasi te ozwa bikateli ya malamu. Osengeli kokende wapi?

3 Lisolo oyo ekopesa eyano na motuna yango mpe ekolendisa yo otya makanisi na makambo oyo esepelisaka Yehova. Yango elimboli ete osengeli kolanda toli ya Yehova na bikateli nyonso oyo okozwa, na ndakisa na likambo ya kotánga kelasi to mosala oyo okopona, to soki okobala mpe okobota bana. Ekosɛnga mpe oluka kokokisa mikano ya elimo, oyo ekosalisa yo okóma moninga ya Yehova. Soki otye makanisi na mosala ya Yehova, yebá ete akopambola yo, akosalisa yo opikama makasi, mpe olonga na bomoi.​—Tángá Masese 16:3.

MPO NA NINI OSENGELI KOMITYELA MIKANO YA ELIMO?

4. Tokolobela nini na lisolo oyo?

4 Ezali malamu komityela mikano ya elimo. Mpo na nini? Tokotalela bantina misato. Ntina ya liboso mpe ya mibale ekosalisa yo omona ete kosala makasi mpo na kokokisa mikano ya elimo ebongisaka boyokani ya moto na Yehova. Mpe ntina ya misato ekomonisa matomba ya komityela mikano ya elimo ntango ozali elenge.

5. Wapi ntina ya libosoliboso ya komityela mikano ya elimo?

5 Ntina ya libosoliboso ya komityela mikano ya elimo ezali mpo na komonisa Yehova ete tozali na botɔndi mpo na bolingo na ye mpe makambo nyonso oyo asalelaka biso. Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Ezali malamu kopesa Yehova matɔndi . . . mpo osepelisi ngai, Ee Yehova, mpo na mosala na yo; mpo na misala ya mabɔkɔ na yo, nazali koganga na esengo.” (Nzembo 92:1, 4) Kanisá naino nyonso oyo Yehova asaleli yo: asalisi yo oyeba ye, apesi yo bomoi, Biblia, lisangá, mpe elikya ya kofanda libela na libela na Paradiso. Soki omityeli mikano ya elimo, okomonisa Yehova ete ozali na botɔndi mpo na makambo nyonso wana, mpe yango ekokómisa yo moninga na ye.

6. (a) Mikano ya elimo ekoki kosala nini na boyokani na yo na Yehova? (b) Mikano nini okoki komityela ntango ozali elenge?

6 Ntina ya mibale ezali ete ntango ozali kosala makasi okokisa mikano na yo ya elimo, ozali kosala mosala malamu mpo na Yehova. Yango ekosala ete okóma moninga na ye. Ntoma Paulo alobaki: “Nzambe azangi boyengebene te mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomoniselaki nkombo na ye.” (Baebre 6:10) Ata soki ozali mwana moke okoki komityela mikano ya elimo. Na ndakisa, Christine azalaki na mbula 10 ntango amityelaki mokano ya kotánga mbala na mbala masolo ya bomoi ya basaleli ya Nzambe ya sembo. Toby azalaki na mbula 12 ntango amityelaki mokano ya kotánga Biblia mobimba liboso azwa batisimo. Maxim azalaki na mbula 11 mpe leki na ye Noemi mbula 10 ntango bazwaki batisimo. Na nsima, bamityelaki mokano ya kosala na Betele. Mpo bátya makanisi na mokano yango, babambaki na efelo ya ndako na bango formilɛrɛ mpo na kokɔta na Betele. Bongo yo? Mikano nini okoki komityela mpe kobanda kokokisa yango?​—Tángá Bafilipi 1:10, 11.

7, 8. (a) Mpo na nini ekozala mpasi mingi te tózwa bikateli soki tomityelá mikano? (b) Mpo na nini elenge moko aboyaki kokende kotánga na iniversite?

7 Ntina ya misato ya komityela mikano ya elimo ntango ozali elenge ezali ete bilenge basengeli kozwa bikateli mpo na bomoi na bango. Na ndakisa, osengeli kopona kelasi oyo okotánga mpe mosala oyo okosala, mpe bongo na bongo. Kozwa bikateli ezali lokola kopona nzela ntango okómi na esika oyo banzela ekutani. Soki oyebi esika oyo ozali kokende, ezali mpasi te opona nzela ya malamu oyo okolanda. Ndenge moko mpe, soki oyebi mikano na yo, ekozala mpasi te ozwa bikateli ya bwanya. Masese 21:5 elobi: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba.” Soki omityeli mikano ya malamu ntango ozali elenge, okozwa mpe matomba noki. Yango Damaris amonaki ntango esɛngaki azwa ekateli moko ya ntina liboso akokisa mbula 20.

8 Damaris azwaki diplome na bapwɛ ebele, mpe akokaki kokɔta iniversite ofele mpo na kotánga makambo ya mibeko. Kasi, aboyaki mpe aponaki kosala na banki moko. Mpo na nini? Mpo ntango azalaki elenge mpenza, amityelaki mokano ya kokóma mobongisi-nzela. Alobi boye: “Yango esɛngaki naluka mosala oyo ekozwa ngai ntango nyonso te. Soki natángaki makambo ya mibeko na iniversite, nakokaki kozwa mbongo mingi, kasi elingaki kozala mpasi nazwa mosala oyo ekolya ngai ntango nyonso te.” Damaris asali sikoyo mbula 20 na mosala ya mobongisi-nzela. Andimaka ete amityelaki mokano ya malamu mpe azwaki ekateli ya malamu liboso akokisa mbula 20. Alobi ete na banki esika asalaka, akutanaka na bato oyo basilisá kotánga makambo ya mibeko na iniversite mpe bazwá misala oyo ye mpe akokaki kosala. Kasi, mingi na bango basepelaka na mosala yango te. Damaris amonaka ete mosala ya mobongisi-nzela epesaka ye esengo mingi mpe esalisi ye aboya mindɔndɔ.

9. Mpo na nini bilenge na lisangá babongi kozwa longonya?

9 Na masangá na biso na mokili mobimba, bilenge ebele babongi kozwa longonya. Batye boninga na bango ná Yehova mpe mikano ya elimo na esika ya liboso na bomoi na bango. Bilenge yango basepelaka mpenza na bomoi, kasi bayekolaka mpe kolanda litambwisi ya Yehova na makambo nyonso oyo basalaka, na ndakisa, makambo etali kelasi, mosala, mpe bomoi ya libota. Salomo alobaki: “Tyelá Yehova motema na yo mobimba . . . Na banzela na yo nyonso, kanisá ye, mpe ye akosembola banzela na yo.” (Masese 3:5, 6) Bilenge, Yehova alingaka bino mingi mpenza! Bozali na motuya na miso na ye, mpe akobatela, akotambwisa, mpe akopambola bino.

OMIBONGISAKA MPO NA KOPESA LITATOLI

10. (a) Mpo na nini mosala ya kosakola esengeli kozala na kati ya makambo oyo totyaka na esika ya liboso? (b) Nini ekosalisa yo oyeba kolimbwela basusu mateya oyo ondimaka?

10 Soki otye makanisi na makambo oyo esepelisaka Yehova, okolinga mosala ya kosakola. Yesu Kristo alobaki ete “nsango malamu esengeli liboso kosakolama.” (Marko 13:10) Lokola mosala ya kosakola esengeli kozongisama nsima te, esengeli kozala na kati ya makambo oyo totyaka na esika ya liboso. Okoki komityela mokano ya kosakola mingi koleka? Okoki kokóma mobongisi-nzela? Kasi, okosala nini soki osepelaka mingi mpenza te na mosala ya kosakola? Mpe okoki kosala nini mpo oyeba kolimbwela basusu mateya oyo ondimaka? Makambo mibale ekosalisa yo: Komibongisa liboso, mpe kotika te koyebisa basusu makambo oyo oyebi mpo na Yehova. Okokamwa ndenge okobanda kolinga mosala ya kosakola.

Ndenge nini omibongisaka mpo na koyebisa basusu makambo ya Yehova? (Talá paragrafe 11, 12)

11, 12. (a) Ndenge nini okoki komibongisa mpo na koyebisa basusu makambo ya Yehova? (b) Ndenge nini elenge moko alongaki kolobela makambo ya Yehova na kelasi?

11 Okoki liboso kosala makasi obongisa eyano na motuna oyo bana-kelasi batunaka mingi, na ndakisa, “Mpo na nini ondimaka ete Nzambe azali?” Site na biso jw.org ezali na masolo oyo ekoki kosalisa yo opesa eyano na motuna yango. Soki okei esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > BILENGE, okomona lokasa mpo na bilenge oyo elobi: “Mpo na nini nandimaka ete Nzambe azali?” Lokasa yango ekosalisa yo obongisa eyano na yo. Ezali na bavɛrsɛ misato oyo okoki kosalela: Baebre 3:4, Baroma 1:20, mpe Nzembo 139:14. Ezali mpe na nkasa mosusu mpo na bilenge oyo ekosalisa yo obongisa biyano na mituna mosusu ebele.​—Tángá 1 Petro 3:15.

12 Soki libaku emonani, okoki koyebisa bana-kelasi na bino ete bango moko mpe bakoki kotánga makambo na site jw.org. Yango nde Luca asalaki. Mokolo moko, bazalaki kolobela makambo ya mangomba ndenge na ndenge na kelasi mpe Luca amonaki ete makambo oyo buku moko elobaki mpo na Batatoli ya Yehova ezalaki solo te. Atako Luca azalaki kobanga, atunaki molakisi soki akoki koyebisa bana-kelasi ntina oyo makambo yango ezali lokuta, mpe molakisi andimaki. Luca alimbwelaki kelasi mobimba mateya oyo andimaka mpe alakisaki bango site Internet na biso. Molakisi apesaki bana nyonso devuare, ayebisaki mwana-kelasi mokomoko atala video Longá matumoli kozanga ete obunda. Kanisá esengo oyo Luca ayokaki ndenge alobelaki makambo ya Yehova na kelasi!

13. Mpo na nini tosengeli kotika te ata ntango tokutani na mikakatano?

13 Ata soki okutani na mikakatano, kolɛmba nzoto te; kobá kokokisa mikano na yo. (2 Timote 4:2) Yango nde Katharina asalaki. Ntango azalaki na mbula 17, amityelaki mokano ya koteya moto nyonso oyo asalaka na ye. Moko na bango azalaki kofinga ye mbala na mbala. Kasi, Katharina abosanaki mokano na ye te. Ezaleli na ye ya malamu ekamwisaki Hans, moninga mosusu ya mosala. Hans abandaki kotánga mikanda na biso, ayekolaki Biblia, mpe azwaki batisimo. Katharina ayebaki nyonso wana te mpo asilaki kolongwa kuna. Na yango, mbula 13 na nsima, ntango Katharina azalaki na makita elongo na libota na ye, akamwaki makasi ntango amonaki ete molobi-mopaya oyo ayaki ezalaki Hans! Asepelaki mingi ndenge akangamaki na mokano na ye ya koteya baninga na ye ya mosala.

KOBOSANA MIKANO NA YO TE

14, 15. (a) Soki baninga bazali kotya yo mbamba, likambo nini osengeli kobosana te? (b) Nini ekoki kosalisa yo otɛmɛla mbamba ya baninga?

14 Na lisolo oyo, tomoni makambo oyo elendisi yo ozwa ekateli ya kotya makanisi na makambo oyo esepelisaka Yehova mpe omityela mikano ya elimo. Kasi, mbala mosusu bilenge mingi oyo bazali na mbula na yo balingaka kaka komisepelisa mpe bakoki kosɛnga yo osala mpe bongo. Kasi nsukansuka, ekosɛnga omonisa basusu ete ozwi mpenza ekateli ya kokokisa mikano na yo ya elimo. Kotika te baninga bábosanisa yo yango. Soki ozali na esika oyo babisi etɛlɛmaka, ndenge tolobelaki yango na ndakisa ya ebandeli, okomata na bisi moko boye kaka mpo omoni ete bato oyo bazali na kati bazali kosepela? Okosala bongo te!

15 Okoki kosala nini mpo otɛmɛla mbamba ya baninga? Kimá makambo oyo ekoki kotya yo na komekama makasi. (Masese 22:3) Kanisá mbuma mabe ya kolanda makambo mabe ya basusu. (Bagalatia 6:7) Zalá na komikitisa mpe ndimá ete ozali na mposa ya toli. Yoká makambo oyo baboti na yo mpe bandeko oyo bakɔmɛli na elimo bazali koyebisa yo.​—Tángá 1 Petro 5:5, 6.

16. Ndenge nini ndakisa ya Christoph emonisi ntina ya kozala na komikitisa?

16 Komikitisa esalisaki Christoph andima toli. Mwa moke nsima ya batisimo na ye, akómaki kokende kosala ngalasisi mbala na mbala na esika moko. Kuna, bilenge mosusu bayebisaki ye akɔta na ekipi na bango. Christoph asololaki likambo yango na nkulutu moko. Nkulutu yango ayebisaki ye akanisa makama oyo yango ekoki komema, na ndakisa, elimo ya kowelana ekoki kokɔtela ye. Atako bongo, Christoph akɔtaki kaka na ekipi yango. Na nsima, amonaki ete lisano yango ezalaki ya mobulu mpe ezalaki kotya bomoi na likama. Asololaki lisusu na bankulutu, mpe bapesaki ye toli ya Biblia. Christoph alobi boye: “Yehova atindelaki ngai bapesi-toli ya malamu, mpe nayokelaki ye, atako ezwaki mwa ntango.” Yo mpe ozalaka na komikitisa mpe oyokaka toli?

17, 18. (a) Yehova alingi nini mpo na bilenge lelo? (b) Mpo na nini mikóló mosusu bayokaka mawa, mpe ndenge nini okoki kokima likambo yango? Pesá ndakisa.

17 Biblia elobi: “Elenge, sepelá na bolenge na yo, mpe motema na yo esala yo malamu na mikolo ya bolenge na yo.” (Mosakoli 11:9) Yehova alingi bilenge bázala na esengo. Na lisolo oyo, tomoni ete okozala na esengo soki otye makanisi na mikano ya elimo mpe olandi toli ya Yehova ntango ozali kozwa bikateli. Soki osali yango ntango ozali elenge, okomona ndenge Yehova akotambwisa yo, akobatela yo, mpe akopambola yo. Kanisá toli nyonso ya malamu oyo apesi yo na Liloba na ye, mpe salelá maloba oyo: “Kanisá Mozalisi na yo Monene na mikolo ya bolenge na yo.”​—Mosakoli 12:1.

18 Eleko ya bolenge elekaka mbangu. Bilenge baumelaka te kokóma mikóló. Likambo ya mawa, mingi kati na bango bayokaka mawa mpo bamityelaki mikano ya mabe, to mpe ata mokano moko te ntango bazalaki bilenge. Kasi, soki otye makanisi na mikano na yo ya elimo, ntango okokóma mokóló okozala na esengo mpo na bikateli oyo ozwaki. Mirjana ayokaka ndenge wana. Liboso akokisa mbula 20, azalaki makasi na kosala masano. Babengaki ye kutu na Jeux olympiques. Kasi aponaki kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso. Mbula koleka 30 na nsima, azali kaka na mosala ya ntango nyonso, elongo na mobali na ye. Alobi ete bato oyo balingaka koyebana mingi, kozwa lokumu, bokonzi, mpe bomɛngo bazalaka na esengo ya solosolo te. Alobi mpe ete mikano oyo eleki malamu ezali ya kosalela Nzambe mpe kosalisa bato báyeba ye.

19. Mpo na nini ezali malamu kotya makanisi na mikano ya elimo ntango ozali elenge?

19 Bilenge, bobongi mpenza kozwa longonya mpo, atako bozali kokutana na mikakatano, bozali na ekateli ya kotya makanisi na mosala ya Yehova. Bozali komityela mikano ya elimo mpe komona ete mosala ya kosakola nde eleki ntina na bomoi na bino. Lisusu, bozali kotika te ete mokili ebosanisa bino mikano na bino. Na yango, bóyeba ete mosala oyo bozali kosala ezali ya mpamba te. Bandeko balingaka bino mpe bazali kopesa bino mabɔkɔ. Yango wana, ‘bótikela Yehova misala na bino mpe myango na bino ekopikama makasi.’