Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge ya kozwa bonsomi ya solosolo

Ndenge ya kozwa bonsomi ya solosolo

“Soki Mwana apesi bino bonsomi, bokokóma mpenza na bonsomi.”​—YOANE 8:36.

NZEMBO: 54, 36

1, 2. (a) Bato basalaka nini mpo na kozwa bonsomi? (b) Yango ebimisaka nini?

LELO, na bisika mingi na mokili bato balobelaka bonsomi mpe likambo ya kopesa bato nyonso ntomo ndenge moko. Basusu balingaka básalela bango makambo na bosembo, bákanisela bango mabe te mpe bobola esila. Bato mosusu basalaka nyonso mpo bázwa bonsomi ya koloba nyonso oyo balingi, ya kopona oyo balingi, mpe ya kotambwisa bomoi na bango ndenge balingi. Na mokili mobimba bato balingaka kozala na bonsomi.

2 Mpo na kozwa bonsomi, bato batombokaka to balukaka kobongola makambo. Kasi mposa na bango ekokisamaka mpenza? Te. Mbala mingi, ebakisaka kaka mpasi mpe basusu kutu bakufaka. Nyonso wana emonisi bosolo ya maloba ya Mokonzi Salomo ete: “Moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.”​—Mosakoli 8:9.

3. Tokoki kosala nini mpo tózala na esengo ya solosolo?

3 Biblia eyebisi biso oyo tosengeli kosala mpo tózala na esengo ya solosolo. Moyekoli Yakobo alobaki boye: “Moto oyo azali kotalatala na mobeko ya kokoka mpe ya bonsomi mpe oyo azali kotingama na yango . . . akozala na esengo ndenge azali kosalela yango.” (Yakobo 1:25) Mobeko ya kokoka eutaka epai ya Yehova, mpe ayebi malamu oyo tosengeli na yango mpo tózala na esengo ya solosolo mpe tósepela na bomoi. Yehova apesaki Adama ná Eva bonsomi ya solosolo mpe eloko mosusu nyonso oyo basengelaki na yango mpo bázala na esengo.

NTANGO OYO BATO BAZALAKI NA BONSOMI YA SOLOSOLO

4. Bonsomi ya ndenge nini Adama ná Eva bazalaki na yango? (Talá elilingi ya ebandeli.)

4 Mokanda ya Ebandeli mokapo 1 mpe 2 emonisi ete Adama ná Eva bazalaki na bonsomi oyo bato balukaka lelo oyo. Bazalaki na nyonso oyo esengelaki, bazalaki kobanga eloko te, mpe moto moko te azalaki kosalela bango makambo na kozanga bosembo. Bazalaki komitungisa te mpo na bilei, mosala, maladi to liwa. (Ebandeli 1:27-29; 2:8, 9, 15) Kasi, bonsomi na bango ezalaki na ndelo te? Tótalela yango.

5. Esengeli nini ezala mpo bato bázala na bonsomi?

5 Bato mingi bakanisaka ete kozala na bonsomi ya solosolo elimboli kosala nyonso oyo olingi kozanga kokanisa makambo oyo ekoki kobima nsima. Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete bonsomi ezali “likoki ya kozwa bikateli mpe kokokisa yango.” Kasi ebakisi ete “soki tolandi mpenza mibeko, tokoloba ete bato bazali na bonsomi soki Leta azali te kopekisa bango makambo na nko, kotyela bango mibeko oyo ezangi ntina, to oyo eleki kilo.” Yango emonisi ete mpo moto nyonso azala na bonsomi, esengeli mwa bandelo, to mibeko, ezala. Kasi nani azali na lotomo ya kokata soki ndelo to mobeko boye to boye etyami na nko te, ezali na ntina, mpe eleki kilo te?

6. (a) Mpo na nini kaka bonsomi ya Yehova nde ezali na ndelo te? (b) Bonsomi ya ndenge nini bato bakoki kozala na yango, mpe mpo na nini?

6 Ebongi tóyeba ete kaka Yehova Nzambe nde azali na bonsomi ya kosala nyonso oyo alingi; bonsomi na ye ezali na ndelo te. Mpo na nini? Mpo azali Mozalisi ya biloko nyonso, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, mpe Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. (1 Timote 1:17; Emoniseli 4:11) Mokonzi Davidi asalelaki maloba kitoko mpo na kolobela ndenge Yehova azali likoló ya nyonso. (Tángá 1 Ntango 29:11, 12.) Na yango, bonsomi ya bikelamu nyonso na likoló mpe na mabele ezali na ndelo. Bakoki te kosala nyonso oyo balingi. Tosengeli koyeba ete kaka Yehova Nzambe nde azali na lotomo ya kokata soki ndelo to mobeko nini ezali ya nko te, ezali na ntina mpe eleki kilo te. Kutu, banda na ebandeli, Yehova atyelaki bikelamu na ye nyonso bandelo.

7. Wapi mwa bandelo oyo tokelamá na yango mpe esepelisaka biso?

7 Atako Adama ná Eva bazalaki na bonsomi ya kosala makambo mingi, bonsomi yango ezalaki na bandelo. Bakelamaki na bandelo yango mosusu. Na ndakisa, mpo bákoba kozala na bomoi, basengelaki kopema, kolya, kolala mpe bongo na bongo. Yango ezalaki kolongola bango nde bonsomi? Te, mpo Yehova abongisaki ete básepela mpe báyoka malamu ntango bazali kosala makambo yango. (Nzembo 104:14, 15; Mosakoli 3:12, 13) Biso nyonso tosepelaka kopema mopɛpɛ kitoko, kolya biloko oyo tolingaka mpe kolala mpɔngi ya malamu. Toyokaka nkaka te ntango tosalaka makambo yango. Na ntembe te, Adama ná Eva mpe bazalaki komiyoka bongo.

8. Mitindo nini ya sikisiki Nzambe apesaki Adama ná Eva, mpe mpo na nini?

8 Yehova apesaki Adama ná Eva mitindo ya sikisiki. Ayebisaki bango bábota bana, bátondisa mabele mpe bábatela yango. (Ebandeli 1:28) Mitindo yango elongolaki bonsomi na bango? Soki moke te! Epesaki bango nde libaku ya kosala na boyokani na mokano ya Nzambe. Mokano yango ezalaki ete bákómisa mabele mobimba paradiso, esika oyo bakokaki kofanda elongo na bana na bango ya kokoka libela na libela. (Yisaya 45:18) Lelo oyo, soki moto atikali monzemba to abali kasi aboyi kobota elingi koloba te ete atosi mitindo ya Nzambe te. Kasi, bato batiká kobala mpe kobota te, ata soki ebimisaka mwa mikakatano. (1 Bakorinti 7:36-38) Mpo na nini? Mpo batyaka motema ete makambo yango ekomemela bango esengo mpe bolamu. (Nzembo 127:3) Soki Adama ná Eva bátosaka Nzambe, balingaki kozala na libala mpe libota ya malamu libela na libela.

NDENGE OYO BONSOMI YA SOLOSOLO EBUNGAKI

9. Mpo na nini mitindo ya Nzambe oyo ezali na Ebandeli 2:17 ezalaki ya nko te, ezalaki na ntina mpe elekaki kilo te?

9 Yehova apesaki Adama ná Eva mitindo mosusu mpe ayebisaki bango polele makambo ekokómela bango soki batosi te. Alobaki: “Nzete ya koyeba malamu ná mabe osengeli kolya yango te, mpo mokolo okolya yango okokufa solo.” (Ebandeli 2:17) Mitindo yango ezalaki ya nko, ezangaki ntina mpe elekaki kilo? Elongolaki Adama ná Eva bonsomi? Ata moke te. Kutu, bato mingi ya mayele na makambo ya Biblia bamonaka ete mitindo oyo Nzambe apesaki ezalaki ya bwanya mpe ebongaki. Moko na bango alobi ete mitindo yango eteyaka biso “ete kaka Nzambe nde ayebi nini ezali malamu . . . mpo na bato mpe . . . nini ezali mabe . . . Mpo bázala ‘malamu,’ bato basengeli kotyela Nzambe motema mpe kotosa ye. Soki batosi ye te, akotika bango moko bákata nini ezali malamu . . . mpe nini ezali mabe.” Nzokande, yango ezali kilo mingi mpo na bato.

Ekateli ya Adama ná Eva ebimisaki mikakatano! (Talá paragrafe 9-12)

10. Na ndenge nini bonsomi ya kopona ekeseni na lotomo ya kokata nini ezali malamu mpe nini ezali mabe?

10 Ntango batángaka mitindo oyo Yehova apesaki Adama, bato mosusu bakoki komona ete Adama azalaki na bonsomi te ya kosala oyo alingaki. Kasi, bayebaka te ete kozala na bonsomi ya kopona to ya kozwa bikateli ekeseni na kozala na lotomo ya kokata nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. Adama ná Eva bazalaki na bonsomi ya kopona soki bakotosa Nzambe to te. Kasi kaka Yehova nde azali na lotomo ya kokata nini ezali malamu mpe nini ezali mabe, mpe “nzete ya koyeba malamu ná mabe” ezalaki komonisa Adama ná Eva likambo yango. (Ebandeli 2:9) Toyebaka ntango nyonso te mbuma oyo bikateli na biso ekobimisa, mpe tokoki koyeba te soki mbuma yango ekozala kaka ya malamu. Yango wana, mbala mingi tomonaka bato bazwi bikateli na makanisi ya malamu, kasi na nsima ebimisi mpasi, makama to makambo ya mawa. (Masese 14:12) Ya solo, moto azali na bandelo, akoki kosala makambo nyonso te. Ntango Yehova apesaki Adama ná Eva mitindo ete bálya mbuma ya nzete wana te, ateyaki bango ete mpo bázala na bonsomi ya solosolo basengelaki kotosa ye. Ekateli nini Adama ná Eva bazwaki?

11, 12. Mpo na nini ekateli ya Adama ná Eva ebimisaki mikakatano? Pesá ndakisa.

11 Likambo ya mawa, Adama ná Eva baponaki kotosa Yehova te. Eva aponaki koyoka Satana, oyo ayebisaki ye ete: “Miso na bino ekofungwama mpenza mpe bokokóma mpenza lokola Nzambe, bokoyeba malamu ná mabe.” (Ebandeli 3:5) Ekateli oyo Adama ná Eva bazwaki ebakiselaki bango bonsomi, ndenge Satana alobaki? Soki moke te. Kutu, eumelaki te bamonaki ete koboya litambwisi ya Yehova ebimisaki mikakatano. (Ebandeli 3:16-19) Mpo na nini? Mpo Yehova apesaki bato te bonsomi ya kokata bango moko nini ezali malamu mpe nini ezali mabe.​—Tángá Masese 20:24; Yirimia 10:23.

12 Ezali kaka lokola pilote oyo azali komema mpɛpɔ. Mpo akóma malamu na esika oyo azali kokende, asengeli kolanda nzela oyo ebongisamá, kosalela baaparɛyi oyo ezalaka na kati ya mpɛpɔ mpo etambwisa yango mpe kosolola na bato oyo bazali na nse, oyo balandelaka bampɛpɔ oyo ezali likoló. Kasi soki pilote azali kolanda litambwisi te mpe azali kokende esika nyonso oyo alingi, likama ekoki kobima. Ndenge moko na pilote wana, Adama ná Eva balingaki kosala makambo na ndenge na bango moko. Baboyaki litambwisi ya Nzambe. Yango ebimisaki mpenza mikakatano! Ekateli na bango ememaki bango na lisumu mpe na liwa mpe elandaki bana na bango nyonso. (Baroma 5:12) Lokola Adama ná Eva balukaki kokata bango moko soki nini ezali malamu mpe nini ezali mabe, babungisaki bonsomi ya solosolo oyo Yehova apesaki bango.

NDENGE YA KOZWA BONSOMI YA SOLOSOLO

13, 14. Ndenge nini tokoki kozwa bonsomi ya solosolo?

13 Bato mosusu bakanisaka ete elingaki koleka malamu soki bazalaki na bonsomi oyo ezangi ndelo. Kasi, likanisi wana ezali libunga. Ata soki kozala na bonsomi ezali na matomba ebele, osilá kokanisa ndenge mokili elingaki kozala soki bandelo ezalaki te? Buku moko (The World Book Encyclopedia) emonisi ete na esika oyo bato ebele bafandi, esengeli kozala na mibeko mpo na kobatela bonsomi na bango mpe kotyela bango bandelo. Kosala yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Yango wana bato babimisaka ebele ya mibeko mpe baavoka ná bazuzi ndenge na ndenge balukaka kolimbola mpe komonisa ndenge ya kosalela mibeko yango.

14 Yesu Kristo amonisaki ndenge oyo tokoki kozwa bonsomi ya solosolo. Alobaki boye: “Soki botikali na kati ya liloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.” (Yoane 8:31, 32) Na yango, mpo tózala na bonsomi ya solosolo, tosengeli kosala makambo mibale oyo: kondima mateya ya Yesu mpe kokóma bayekoli na ye. Kosala makambo wana mibale nde ekopesa biso bonsomi ya solosolo. Bonsomi na likambo nini? Yesu abakisaki: “Moto nyonso oyo asalaka lisumu azali moombo ya lisumu. . . . Soki Mwana apesi bino bonsomi, bokokóma mpenza na bonsomi.”​—Yoane 8:34, 36.

15. Mpo na nini bonsomi oyo Yesu alakaki nde ekosala ete tókóma “mpenza na bonsomi”?

15 Bonsomi oyo Yesu alakaki bayekoli na ye ezali malamu mingi koleka bonsomi oyo bato mingi balukaka lelo oyo. Ntango Yesu alobaki ete: “Soki Mwana apesi bino bonsomi, bokokóma mpenza na bonsomi,” azalaki nde kolobela kolongwa na boombo ya lisumu, boombo oyo eleki mabe mpenza. Na ndenge nini tozali baombo ya lisumu? Lisumu etindaka biso tósala makambo ya mabe. Ekoki mpe kopekisa biso tósala makambo oyo toyebi ete ezali malamu to makambo oyo eyokani na makoki na biso. Yango ebimisaka mitungisi, mpasi, monyoko mpe nsukansuka ememaka na liwa. (Baroma 6:23) Ntoma Paulo amonaki ete kozala moombo ya lisumu ezali mpasi mpenza. (Tángá Baroma 7:21-25.) Tokozala na bonsomi ya solosolo oyo Adama ná Eva babungisaki kaka ntango lisumu ekolongwa.

16. Makambo nini tosengeli kosala mpo mokolo mosusu tózala mpenza na bonsomi?

16 Maloba ya Yesu oyo ete “soki botikali na kati ya liloba na ngai” emonisi ete mpo Yesu apesa biso bonsomi tosengeli kosala mwa makambo. Makambo nini? Lokola tomipesá na Nzambe, tosengeli komiboya mpe kosala makambo nyonso oyo Yesu asɛngi bayekoli na ye. (Matai 16:24) Kaka ndenge Yesu alakaki yango, tokokóma mpenza na bonsomi na mikolo ezali koya ntango tokozwa mapamboli nyonso ya mbeka ya lisiko.

17. (a) Ndenge nini tokoki kozwa bolamu mpe esengo ya solosolo? (b) Tokotalela nini na lisolo elandi?

17 Mpo tózwa bolamu mpe esengo ya solosolo, tosengeli kosalela mateya ya Yesu. Soki tozali kosala bongo, nsukansuka tokolongwa mpenza na boombo ya lisumu mpe ya liwa. (Tángá Baroma 8:1, 2, 20, 21.) Na lisolo elandi, tokotalela ndenge oyo tokoki kosalela bonsomi na biso na bwanya. Na ndenge yango, tokokumisa mpo na libela Yehova, Nzambe oyo apesaka bonsomi ya solosolo.