Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebongisami lisusu na 2013 na Anglais emonisi ete maloba ya Nzembo 144:12-15 etali basaleli ya Nzambe. Ndenge maloba yango ebongolamaki liboso ezalaki nde kolobela bapaya, bato mabe oyo vɛrsɛ 11 elobeli. Mpo na nini babongisi maloba ya bavɛrsɛ yango?

Na monɔkɔ ya Ebre maloba yango ezali kopesa makanisi nyonso mibale, ndenge ebongolamaki liboso mpe ndenge ebongolami na Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebongisami lisusu na 2013 na Anglais. Na yango, makambo oyo elandi ezali komonisa ntina oyo babongisi maloba yango:

  1. Makambo mosusu oyo ezali na nzembo yango. Na Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebongisami lisusu na 2013 na Anglais, maloba “baoyo balobaka” oyo ezali na ebandeli ya vɛrsɛ 12 ekómi “na yango,” mpo na komonisa mapamboli oyo basaleli ya Nzambe bakozwa na nsima. Mapamboli oyo vɛrsɛ 12 tii 14 elobeli etali bayengebene​—oyo bazali koluka ‘bonsomi mpe kobikisama’ na mabɔkɔ ya bato mabe oyo balobelami na vɛrsɛ 11. Likanisi yango ebimi mpe na vɛrsɛ 15, oyo etángi liloba “esengo” mbala mibale mpo na bato moko, oyo “Yehova azali Nzambe na bango!”

  2. Ndimbola yango eyokani na bavɛrsɛ mosusu ya Biblia oyo emonisi ete Nzambe alaki kopambola basaleli na ye ya sembo. Nzembo 144 emonisi elikya oyo Davidi akómaki na yango ete lokola Nzambe abikisaki Bayisraele na mabɔkɔ ya banguna, akopesa bango esengo mpe bomɛngo. (Balevi 26:9, 10; Kolimbola Mibeko 7:13; Nzembo 128:1-6) Na ndakisa, Kolimbola Mibeko 28:4 elobi ete: “Mbuma ya libumu na yo ekopambolama mpe mbuma ya mabele na yo mpe bana ya nyama na yo ya mboka, bana ya ngɔmbɛ na yo mpe bana ya mpate na yo.” Kutu, na boyangeli ya Salomo mwana ya Davidi, bato ya ekólo bazalaki na kimya mpe bomɛngo mingi koleka na bileko nyonso. Longola yango, makambo oyo esalemaki na boyangeli ya Salomo emonisaki mwa moke makambo oyo ekosalema na boyangeli ya Masiya.​—1 Bakonzi 4:20, 21; Nzembo 72:1-20.

Na mokuse, kobongisama ya maloba ya Nzembo 144 ebongoli te boyebi na biso ya mateya ya Biblia. Kasi, esali ete nzembo yango mobimba emonisa polele elikya oyo basaleli ya Yehova bazalaka na yango banda kala: Nzambe akobebisa bato mabe mpe akopesa bayengebene kimya mpe bomɛngo libela na libela.​—Nzembo 37:10, 11.