Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mekolá Yehova, Nzambe oyo alendisaka

Mekolá Yehova, Nzambe oyo alendisaka

“Nzambe . . . apambwama . . . oyo abɔndisaka [to alendisaka] biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.”​—2 BAKORINTI 1:3, 4.

NZEMBO: 7, 3

1. Ntango Adama ná Eva batombokaki, ndenge nini Yehova alendisaki mpe apesaki bato elikya?

YEHOVA azali Nzambe oyo alendisaka. Asalaka bongo banda moto asalá lisumu mpe kozanga kokoka ekɔtá. Kutu, kaka ntango Adama ná Eva batombokaki na elanga ya Edene, Yehova asakolaki likambo oyo esengelaki kolendisa mpe kopesa elikya na bana oyo basengelaki kobota na nsima. Esakweli yango oyo ezali na Ebandeli 3:15 elobaki ete “nyoka ya kalakala,” elingi koloba Satana Zabolo, akobebisama ná misala na ye nyonso ya mabe.​—Emoniseli 12:9; 1 Yoane 3:8.

YEHOVA ALENDISAKI BASALELI NA YE NA KALA

2. Ndenge nini Yehova alendisaki Noa?

2 Kanisá ndenge Yehova alendisaki mosaleli na ye Noa. Na ntango na ye, bato bazalaki mobulu mpe kosala makambo ya mbindo; kaka Noa ná libota na ye nde bazalaki kosambela Yehova. Na yango, Noa akokaki komona ete elikya ezali lisusu te, mpe akokaki kolɛmba nzoto. (Ebandeli 6:4, 5, 11; Yuda 6) Kasi, Yehova ayebisaki ye makambo oyo epesaki ye mpiko mpo akoba kosambela ye mpe kosala oyo ezali sembo. (Ebandeli 6:9) Yehova ayebisaki Noa ete akobebisa mokili yango ya mabe, mpe alimbwelaki ye oyo asengelaki kosala mpo na kobikisa libota na ye. (Ebandeli 6:13-18) Ya solo, Noa amonaki ete Yehova azali Nzambe oyo alendisaka.

3. Ndenge nini Yehova alendisaki Yosua? (Talá elilingi ya ebandeli.)

3 Na nsima, Yehova alendisaki mosaleli na ye Yosua, oyo azwaki mokumba moko ya monene. Asengelaki kokamba ekólo ya Nzambe mpo ekɔta na Mokili ya Ndaka mpe kolonga mampinga ya basoda ya nguya oyo bazalaki na mokili yango. Yehova ayebaki ete yango ekobangisa Yosua. Na yango, atindaki Moize akitisa Yosua motema; alobaki: “Pesá Yosua mokumba mpe yikisá ye mpiko mpe lendisá ye, mpamba te ye nde akokatisa liboso ya bato oyo mpe ye nde akosala ete bázwa lokola libula mokili oyo okomona.” (Kolimbola Mibeko 3:28) Na nsima, Yehova ye moko mpe alendisaki Yosua; alobaki na ye ete: “Napesi yo mitindo te? Zalá na mpiko mpe zalá na makasi. Kolɛnga te mpe kozala na nsɔmɔ te, mpo Yehova Nzambe na yo azali na yo epai nyonso okokende.” (Yosua 1:1, 9) Na ntembe te, maloba wana elendisaki mpenza Yosua!

4, 5. (a) Ndenge nini Yehova alendisaki bato na ye na kala? (b) Ndenge nini Yehova alendisaki Mwana na ye?

4 Yehova asukaki kaka te na kolendisa moto mokomoko, alendisaki mpe basaleli na ye nyonso na mbala moko. Na ndakisa, Yehova ayebaki ete Bayuda bakozala na mposa ya libɔndisi na boombo na bango na Babilone, mpe ayebisaki esakweli moko mpo na kolendisa bango; alobaki: “Kobanga te, mpo nazali na yo. Kotala epai na epai te, mpo nazali Nzambe na yo. Nakopesa yo makasi. Nakosalisa yo mpenza. Nakosimba yo mpenza na lobɔkɔ na ngai ya mobali ya boyengebene.” (Yisaya 41:10) Na nsima, Yehova alendisaki bakristo ya liboso, alendisaka mpe biso lelo.​—Tángá 2 Bakorinti 1:3, 4.

5 Yehova alendisaki mpe Mwana na ye. Nsima ya kozwa batisimo, Yesu ayokaki mongongo moko euti na likoló, elobi: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi.” (Matai 3:17) Na ntembe te, maloba yango epesaki Yesu makasi ya kosala mosala oyo Tata na ye apesaki ye awa na mabele.

YESU ALENDISAKI BATO

6. Ndenge nini ndakisa ya talanta elendisaka biso?

6 Yesu amekolaki Tata na ye na oyo etali kolendisa bato bátikala sembo. Asalaki yango ntango apesaki ndakisa ya talanta, epai nkolo ayebisaki moombo mokomoko oyo azalaki sembo ete: “Longonya, moombo malamu mpe ya sembo! Ozali sembo na mwa makambo moke. Nakotya yo obatela biloko mingi. Kɔtá na esengo ya nkolo na yo.” (Matai 25:21, 23) Tii lelo, maloba yango elendisaka bayekoli ya Yesu bákoba kosalela Yehova na bosembo!

7. Ndenge nini Yesu alendisaki bantoma na ye, mingimingi Petro?

7 Atako bantoma ya Yesu bazalaki kowelana mbala na mbala mpo na koyeba soki nani aleki baninga, Yesu amoniselaki bango motema molai. Alendisaki bango bázala na komikitisa mpe básalelaka basusu, na esika báluka basusu básalela bango. (Luka 22:24-26) Mbala mingi Petro asalaki mabunga oyo esepelisaki Yesu te. (Matai 16:21-23; 26:31-35, 75) Na esika Yesu aboya Petro, alendisaki ye mpe apesaki ye kutu mokumba ya kopesa basusu makasi.​—Yoane 21:16.

KOLENDISA BASUSU NA NTANGO YA KALA

8. Ndenge nini Hizikiya alendisaki bakonzi ya basoda mpe bato ya Yuda?

8 Ata liboso Yehova atinda Yesu na mabele mpo atika ndakisa ya kokoka na oyo etali kolendisa, basaleli ya Yehova bayebaki ete basengeli kolendisa basusu. Tózwa ndakisa ya Hizikiya. Ntango bato ya Asiri bazalaki koya kobundisa Yerusaleme, Hizikiya ayanganisaki bakonzi ya basoda ná bato mpo na kolendisa bango, mpe “bato balendisamaki na maloba” na ye.​—Tángá 2 Ntango 32:6-8.

9. Liteya nini tokoki kozwa epai ya Yobo na oyo etali kolendisa?

9 Yobo mpe azali ndakisa na oyo etali kolendisa. Atako ye moko azalaki na mposa ya libɔndisi, ateyaki basusu ndenge ya kolendisa baninga. Yobo ayebisaki “babɔndisi mabe” misato oyo bayaki epai na ye ete soki ye nde akendaki mpo na kobɔndisa bango, ‘alingaki kolendisa bango na maloba ya monɔkɔ na ye, mpe libɔndisi ya mbɛbu na ye elingaki kokitisa mpasi na bango.’ (Yobo 16:1-5) Nsukansuka, Elihu ná Yehova balendisaki Yobo.​—Yobo 33:24, 25; 36:1, 11; 42:7, 10.

10, 11. (a) Mpo na nini mwana mwasi ya Yefeta azalaki na mposa ya kolendisama? (b) Banani tokoki kolendisa lelo?

10 Ndakisa mosusu ezali ya mwana mwasi ya Yefeta. Tata na ye Mosambisi Yefeta asengelaki kokende kobundisa bana ya Amone. Liboso akende, alakaki ete soki Yehova asalisi ye alonga etumba yango, moto ya liboso oyo akobima na ndako mpo na kokutana na ye ntango akozonga, moto yango akokende kosalela Yehova na tabernakle. Yisraele elongaki etumba yango, mpe moto ya liboso oyo ayaki kokutana na Yefeta ezalaki mwana na ye ya mwasi, mwana na ye kaka moko. Yefeta ayokaki mpasi mingi. Kasi, akokisaki elako na ye mpe atindaki mwana na ye na tabernakle asalela Yehova bomoi na ye mobimba.​—Basambisi 11:30-35.

11 Atako ezalaki mpasi mpo na Yefeta, na ntembe te ezalaki mpasi koleka mpo na mwana na ye. Kasi, andimaki kokokisa maloba ya tata na ye. (Basambisi 11:36, 37) Na ndenge yango, andimaki ete akobala te mpe akobota te. Molɔngɔ ya libota na bango ekosuka. Na yango, azalaki mpenza na mposa ya libɔndisi mpe ya kolendisama. Biblia elobi: “Likambo yango ekómaki lilako na Yisraele: Mbula na mbula, bana basi ya Yisraele bazalaki kokende kopesa mwana mwasi ya Yefeta Mogileade longonya, mikolo minei na mbula.” (Basambisi 11:39, 40) Ebongi mpenza tólendisaka mpe tópesaka longonya na bandeko oyo batikali minzemba mpo bákoka kotya likebi mingi na “makambo ya nkolo”!​—1 Bakorinti 7:32-35.

BANTOMA BALENDISAKI BANDEKO

12, 13. Ndenge nini Petro ‘alendisaki bandeko’?

12 Liboso Yesu akufa, ayebisaki ntoma Petro ete: “Simo, Simo, talá! Satana asɛngi azwa bino mpo apupola bino lokola blé. Kasi nasaleli yo lilɔmbɔ ete kondima na yo elɛmba te; mpe yo, ntango okozonga, lendisá bandeko na yo.”​—Luka 22:31, 32.

Mikanda oyo bantoma bakomaki elendisaki bato na siɛklɛ ya liboso, elendisaka biso mpe lelo (Talá paragrafe 12-17)

13 Petro azalaki moko ya bandeko oyo bazalaki kokamba lisangá ya bokristo na siɛklɛ ya liboso. (Bagalatia 2:9) Alendisaki bandeko na ndenge amonisaki mpiko mokolo ya Pantekote mpe nsima na yango. Nsima ya kosalela Nzambe bambula mingi, akomelaki bandeko na ye bakristo ete: “Nakomeli bino na mwa maloba moke, . . . mpo nalendisa mpe natatola na molende ete boboto monene oyo Nzambe amoniseli bino ezali likambo ya solo; bótɛlɛma ngwi na kati na yango.” (1 Petro 5:12) Mikanda ya Petro elendisaki bakristo banda na mikolo na ye. Elendisaka mpe biso lelo wana tozali kozela bilaka nyonso ya Yehova ekokokisama!​—2 Petro 3:13.

14, 15. Ndenge nini mikanda oyo ntoma Yoane akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe elendisaka bakristo banda kala tii lelo?

14 Ntoma Yoane mpe azalaki moko ya bandeko oyo bazalaki kokamba lisangá ya bokristo na siɛklɛ ya liboso. Evanzile na ye oyo elobeli mosala ya Yesu awa na mabele elendisaka bakristo banda kala tii lelo. Na ndakisa, kaka evanzile ya Yoane nde emonisi ete Yesu alobaki ete bolingo nde ezaleli oyo esalaka ete bato báyeba bayekoli na ye ya solo.​—Tángá Yoane 13:34, 35.

15 Mikanda misato oyo Yoane atindelaki bato ezali mpe na mateya ebele ya motuya. Ntango tolɛmbi nzoto mpo na mabunga na biso, tozwaka makasi soki totángi ete “makila ya Yesu . . . ezali kopɛtola biso na lisumu nyonso.” (1 Yoane 1:7) Mpe ntango tozali kaka koyoka lokola tomemi ngambo, motema na biso ekitaka ntango totángi ete “Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi makambo nyonso.” (1 Yoane 3:20) Kaka Yoane nde akomaki ete “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8, 16) Na mokanda na ye ya mibale mpe ya misato, akumisaki bakristo oyo bazali kokoba “kotambola na kati ya solo.”​—2 Yoane 4; 3 Yoane 3, 4.

16, 17. Ndenge nini ntoma Paulo alendisaki bakristo ya liboso?

16 Ntoma Paulo azalaki ndakisa ya malamu mpenza na oyo etali kolendisa bandeko. Emonani ete mwa moke nsima ya liwa ya Yesu, bantoma mingi batikalaki na Yerusaleme, epai lisangani ya mikóló-bakambi ezalaki. (Misala 8:14; 15:2) Bakristo ya Yudea basakolaki makambo ya Kristo epai ya bato oyo bakómaki kondimela Nzambe moko. Kasi, elimo santu etindaki Paulo asakwela Bagrɛki, Baroma, mpe bato mosusu oyo bazalaki kosambela banzambe ebele.​—Bagalatia 2:7-9; 1 Timote 2:7.

17 Paulo asalaki mobembo na bisika oyo ezali lelo ekólo Turquie, Grèce mpe Italie, mpo na koteya bato oyo bazalaki Bayuda te mpe afungolaki masangá ya bokristo kuna. Bomoi ezalaki pɛtɛɛ te mpo na bato yango oyo bakómaki bakristo. Lokola bato ya bamboka na bango bazalaki konyokola bango, bazalaki na mposa ya kolendisama. (1 Batesaloniki 2:14) Na mobu soki 50 T.B., Paulo atindelaki lisangá oyo eutaki kofungwama na Tesaloniki mokanda mpo na kolendisa bandeko; alobaki: “Topesaka ntango nyonso Nzambe matɔndi ntango totángaka bino nyonso na mabondeli na biso, mpo totikaka te kokanisa mosala na bino ya sembo mpe mosala makasi na bino ya bolingo mpe koyika mpiko na bino.” (1 Batesaloniki 1:2, 3) Asɛngaki bango mpe bálendisanaka; akomaki boye: “Bókoba kobɔndisana mpe kolendisana, ndenge kutu bozali kosala yango.”​—1 Batesaloniki 5:11.

LISANGANI YA MIKÓLÓ-BAKAMBI ELENDISAKA

18. Ndenge nini lisangani ya mikóló-bakambi elendisaki Filipe na siɛklɛ ya liboso?

18 Na siɛklɛ ya liboso, Yehova asalelaki lisangani ya mikóló-bakambi mpo na kolendisa bakristo nyonso, ata mpe baoyo bazalaki kokamba masangá. Na ndakisa, ntango Filipe azalaki koteya Basamaria makambo ya Kristo, bandeko ya lisangani ya mikóló-bakambi bapesaki ye mabɔkɔ. Batindaki bandeko mibale kati na bango, Petro ná Yoane, na Samaria mpo bábondela mpo na bandimi yango ya sika, mpo bázwa elimo santu. (Misala 8:5, 14-17) Filipe ná bandeko wana balendisamaki mpenza ndenge lisangani ya mikóló-bakambi esungaki bango!

19. Bakristo ya liboso bayokaki ndenge nini ntango bazwaki mokanda ya lisangani ya mikóló-bakambi?

19 Na nsima, lisangani ya mikóló-bakambi esengelaki kozwa ekateli moko ya ntina mingi. Motuna ezalaki: Bakristo oyo bazalaki Bayuda te basengeli kokatama ngenga, ndenge Bayuda bazalaki kosala na kolanda Mibeko ya Moize? (Misala 15:1, 2) Ntango bandeko ya lisangani ya mikóló-bakambi babondelaki mpo na kosɛnga elimo santu mpe batalelaki Makomami, bamonaki ete kokatama ngenga ezalaki lisusu na ntina te. Na nsima, bakomaki mokanda mpo na kolimbola ekateli oyo bazwaki mpe batindaki bandeko bámema yango na masangá. Ntango bakristo batángaki mokanda yango, “basepelaki na elendiseli yango.”​—Misala 15:27-32.

20. (a) Ndenge nini Lisangani ya Mikóló-Bakambi elendisaka biso nyonso lelo? (b) Motuna nini tokotalela na lisolo oyo elandi?

20 Lelo, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova elendisaka bandeko ya Betele mpe bandeko oyo bamipesi kaka na mosala ya ntango nyonso, ata mpe biso nyonso. Ndenge moko na bandeko ya siɛklɛ ya liboso, tosepelaka na elendiseli yango! Lisusu, na 2015, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebimisaki mwa buku Zongelá Yehova mpo na kolendisa baoyo balɛmbá na elimo. Kasi kaka bandeko oyo bazali kokamba nde basengeli kolendisa basusu? Tokotalela motuna yango na lisolo oyo elandi.