Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 17

Ndimá lisalisi ya Yehova mpo otɛmɛla bilimo mabe

Ndimá lisalisi ya Yehova mpo otɛmɛla bilimo mabe

“Tozali kobunda etumba . . . na mampinga ya bilimo mabe na bisika ya likoló.”​—EF. 6:12.

LOYEMBO 55 Bóbanga bango te!

NA MOKUSE *

1. Ndenge Baefese 6:10-13 emonisi yango, wapi moko ya makambo oyo emonisaka ete Yehova atyelaka biso likebi? Limbolá.

MOKO ya makambo oyo esepelisaka biso, oyo emonisaka ete Yehova atyelaka biso basaleli na ye likebi, ezali ndenge asalisaka biso tótɛmɛla banguna na biso. Banguna na biso ya libosoliboso ezali Satana ná bademo. Yehova akebisi biso na banguna yango, mpe apesi biso oyo tosengeli na yango mpo na kotɛmɛla bango. (Tángá Baefese 6:10-13.) Soki tondimi lisalisi ya Yehova mpe totyeli ye motema mobimba, tokoki kolonga kotɛmɛla Zabolo. Tokoki kozala na kondima lokola oyo ntoma Paulo azalaki na yango. Akomaki boye: “Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akosala biso mabe?”​—Rom. 8:31.

2. Tokotalela nini na lisolo oyo?

2 Biso bakristo ya solo totyaka likebi mpenza te na Satana ná bademo. Totyaka likebi mingi nde na koyekola koyeba makambo ya Yehova mpe kosalela ye. (Nz. 25:5) Kasi, tosengeli koyeba mayele ya libosoliboso oyo Satana asalelaka. Mpo na nini? Mpo abuba biso te. (2 Ko. 2:11) Na lisolo oyo, tokotalela moko ya mayele oyo Satana ná bademo basalelaka mpo na kobungisa bato nzela. Tokotalela mpe ndenge oyo tokoki kotɛmɛla bango.

NDENGE OYO BILIMO MABE BABUNGISAKA BATO NZELA

3-4. (a) Misala ya bilimo mabe ezali nini? (b) Nini emonisi ete bato mingi mpenza bandimelaka misala yango?

3 Misala ya bilimo mabe ezali mayele ya libosoliboso oyo Satana ná bademo basalelaka mpo na koluka kobungisa bato nzela. Bato oyo basalaka misala ya bilimo mabe balobaka ete bakoki koyeba to kosala makambo oyo bato bakoki koyeba te to kosala te na ndenge ya bomoto. Na ndakisa, basusu balobaka ete bakoki koyeba makambo oyo ekoya soki basaleli nguya ya kosakola makambo oyo ebombaná to basaleli astroloji. Bamosusu bakoki kosala makambo lokola nde bazali kosolola na bato oyo bakufá. Basusu mpe basalelaka bondɔki to maji, mpe bakoki koluka kolɔka moto mosusu. *

4 Nini emonisi ete bato mingi mpenza bandimelaka misala ya bilimo mabe? Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na bikólo 18 na Amérique latine mpe na Caraïbe emonisaki ete na bato nyonso oyo batunaki, moto moko kati na bato misato andimelaka maji, to bondɔki; ezali mpe kaka bongo mpo na bato oyo bandimaka ete bato bakoki kosolola na bilimo. Ankɛtɛ mosusu esalemaki na bikólo 18 ya Afrika. Kuna, na bato oyo batunaki, koleka katikati ya motángo ya bato yango balobaki ete bandimelaka bondɔki. Ya solo, ata soki tofandi wapi, tosengeli kokeba na misala ya bilimo mabe. Satana alukaka kokosa “mabele mobimba esika bato bafandi.”​—Em. 12:9.

5. Ndenge nini Yehova atalelaka misala ya bilimo mabe?

5 Yehova azali “Nzambe ya solo.” (Nz. 31:5) Na yango, ndenge nini atalelaka misala ya bilimo mabe? Ayinaka yango! Ayebisaki Bayisraele ete: “Epai na yo moto azwama te oyo azali kolekisa mwana na ye ya mobali to mwana na ye ya mwasi mbeka na mɔtɔ, moto oyo azali kosakola makambo oyo ebombaná, moto ya misala ya maji to moto oyo azali koluka bilembo ya makambo oyo ekoya to moto oyo azali nganga-nkisi, to moto oyo azali kolɔka bato mosusu to moto oyo azali kotuna moto oyo asololaka na bilimo to moto oyo asalaka mosala ya kosakola makambo ekoya to moto oyo azali kotuna bakufi. Mpo moto nyonso oyo azali kosala makambo yango azali eloko moko oyo Yehova ayiná.” (Mib. 18:10-12) Biso bakristo tozali te na nse ya Mibeko oyo Yehova apesaki Bayisraele. Kasi, toyebi ete ndenge na ye ya kotalela misala ya bilimo mabe ebongwani te.​—Mal. 3:6.

6. (a) Ndenge nini Satana asalelaka misala ya bilimo mabe mpo na kosala bato mabe? (b) Mosakoli 9:5 elobi nini mpo na bakufi?

6 Yehova akebisaka biso na misala ya bilimo mabe mpo ayebi ete Satana asalelaka yango mpo na kosala bato mabe. Satana asalelaka misala ya bilimo mabe mpo na kopalanganisa lokuta, na ndakisa oyo elobaka ete bakufi bakobaka kozala na bomoi esika mosusu. (Tángá Mosakoli 9:5.) Asalelaka mpe misala ya bilimo mabe mpo bato bákóma bibangabanga mpe bázala mosika na Yehova. Mokano na ye ezali ete bato oyo basalaka misala yango bátyela bilimo mabe motema, kasi Yehova te.

NDENGE YA KOTƐMƐLA BILIMO MABE

7. Yehova ayebisi biso nini?

7 Ndenge tomoni yango, Yehova ayebisi biso makambo oyo esengeli mpo tóboya ete Satana ná bademo bábungisa biso nzela. Tótalela mwa makambo oyo tokoki kosala mpo tótɛmɛla Satana ná bademo.

8. (a) Wapi likambo ya libosoliboso oyo tokoki kosala mpo na kotɛmɛla bilimo mabe? (b) Ndenge nini Nzembo 146:4 emonisi polele lokuta ya Satana na ntina etali bakufi?

8 Tángáká Liloba ya Nzambe mpe manyoláká yango. Yango ezali likambo ya libosoliboso oyo tosengeli kosala mpo na koboya lokuta ya bilimo mabe. Liloba ya Nzambe ezali lokola mopanga oyo ekoki komonisa polele lokuta ya Satana. (Ef. 6:17) Na ndakisa, emonisi polele ete likanisi oyo elobaka ete bakufi bakoki kosolola na bato ya bomoi ezali lokuta. (Tángá Nzembo 146:4.) Ekundwelaka biso mpe ete kaka Yehova nde akoki kosakola na bosikisiki makambo oyo ekosalema na mikolo oyo ezali koya. (Yis. 45:21; 46:10) Soki tozali kotánga Liloba ya Nzambe mpe komanyola yango mbala na mbala, tokolonga koboya mpe koyina lokuta oyo bilimo mabe balingi kondimisa biso.

9. Misala nini ya bilimo mabe tosengeli koboya?

9 Boyá kosala likambo nyonso oyo ezali na boyokani na misala ya bilimo mabe. Lokola tozali bakristo ya solo, tosalaka ata likambo moko te oyo ezali na boyokani na misala ya bilimo mabe. Na ndakisa, tokendaka epai ya banganga-nkisi te mpe tolukaka te kosolola na bakufi na ndenge mosusu. Ndenge tolobaki yango na lisolo oyo eleki, toboyaka mimeseno oyo euti na likanisi oyo elobaka ete bakufi bakobaka kozala na bomoi esika mosusu. Tosalelaka astroloji te mpe tokendaka te kotalisa makambo mpo na koluka koyeba makambo oyo ekoya. (Yis. 8:19) Toyebaka ete mimeseno ya ndenge wana ezali mpenza likama mpe ekoki kotya biso mbala moko na boyokani na Satana mpe bademo.

Mekolá bakristo ya siɛklɛ ya liboso, kabwaná na eloko nyonso oyo okoki kozala na yango, oyo ezali na boyokani na bademo mpe boyá kominanola oyo ezali na misala ya bilimo mabe (Talá paragrafe 10-12)

10-11. (a) Bato mosusu na siɛklɛ ya liboso basalaki nini ntango bayekolaki solo? (b) Na kotalela 1 Bakorinti 10:21, mpo na nini tosengeli kolanda ndakisa ya bakristo wana, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?

10 Kabwaná na eloko nyonso oyo ezali na boyokani na bademo. Bato mosusu ya Efese na siɛklɛ ya liboso bazalaki kosala misala ya bilimo mabe. Ntango bayekolaki solo, bazwaki ekateli moko monene. Biblia elobi: “Ebele ya baoyo bazalaki kosala misala ya maji basangisaki babuku na bango esika moko mpe batumbaki yango na miso ya bato nyonso.” (Mis. 19:19) Bato yango basalaki nyonso oyo bakokaki mpo na kotɛmɛla bilimo mabe. Babuku na bango ya maji ezalaki ntalo mingi. Kasi, na esika bákaba to bátɛkela yango bato mosusu, batumbaki yango. Balukaki kosepelisa Yehova, na esika bákanisa motuya ya babuku yango.

11 Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya bakristo wana ya siɛklɛ ya liboso? Ekozala likambo ya bwanya tókabwana na eloko nyonso oyo tokoki kozala na yango, oyo ezali na boyokani na bademo. Yango ekoki kozala bikelakela, eloko moko oyo tozalaka na yango to tolataka na nzoto mpo ememela biso makila malamu to ebatela biso.​—Tángá 1 Bakorinti 10:21.

12. Mituna nini tosengeli komituna na likambo etali kominanola?

12 Talelá malamu makambo oyo ominanolaka na yango. Omituna boye: ‘Natángaka babuku, bazulunalo, to masolo na Internet oyo elobelaka makambo oyo ezali na boyokani na bademo? Bongo miziki oyo nayokaka, bafilme mpe baprogramɛ ya televizyo oyo natalaka, mpe masano ya video oyo nabɛtaka? Ata moko ya biloko oyo nasalelaka mpo na kominanola ezali na boyokani na misala ya bilimo mabe? Ezalaka na makambo lokola ba-vampire, ba-zombi to makambo oyo eleki mayele ya bato? Emonisaka ete maji, kolɔka, to kolakela bato mabe ezali likama te?’ Elingi koloba te ete kominanola nyonso oyo emonisaka makambo oyo ezalaka mpenza te to masapo nyonso ya bana ezali kaka na boyokani na bilimo mabe. Ntango ozali kotalela kominanola na yo, zalá na ekateli ya kopona oyo ekosalisa yo ozala mosika na likambo nyonso oyo Yehova ayinaka. Ebongi tósala nyonso mpo na kozala na lisosoli ya malamu liboso ya Nzambe na biso.​—Mis. 24:16. *

13. Tosengeli koboya kosala nini?

13 Boyá kobɛta masolo ya bademo. Na likambo yango, tosengeli kolanda ndakisa oyo Yesu atiká. (1 Pe. 2:21) Liboso aya awa na mabele, Yesu azalaki na bomoi na likoló, mpe ayebaki makambo mingi oyo etali Satana mpe bademo. Kasi, azalaki te kobɛta masolo ya makambo oyo bilimo mabe yango basalá. Yesu asepelaki kozala motatoli ya Yehova, kasi te moto oyo alobelaka makambo ya Satana. Tokomekola Yesu soki toboyi kobɛtabɛta masolo ya bademo. Kasi, tosengeli komonisa na maloba na biso ete ‘motema na biso ezali koningana mpo na likambo moko ya malamu,’ elingi koloba solo ya Biblia.​—Nz. 45:1.

Tozali na ntina moko te ya kobanga bilimo mabe. Yehova, Yesu, mpe baanzelu bazali na nguya mingi koleka (Talá paragrafe 14-15) *

14-15. (a) Mpo na nini tosengeli te kobanga bilimo mabe? (b) Elembeteli nini emonisi ete Yehova abatelaka basaleli na ye lelo?

14 Kobangaka bilimo mabe te. Na mokili oyo, makambo ya mabe ekoki kokómela biso. Tokoki kozwa likama, maladi, ata mpe kokufa na mbalakaka. Kasi, tosengeli te kokanisa ete euti epai ya bilimo mabe. Biblia elobi ete “ntango ná makambo oyo ekanami te” ekoki kokómela moto nyonso. (Mos. 9:11) Yehova amonisaka banda kala ete azali na nguya mingi mpenza koleka bademo. Na ndakisa, apesaki Satana nzela te ya koboma Yobo. (Yobo 2:6) Na mikolo ya Moize, Yehova amonisaki ete nguya na ye eleki mosika oyo ya banganga-nzambe ya maji ya Ezipito. (Kob. 8:18; 9:11) Lisusu, kuna na likoló Yehova apesaki Yesu nguya koleka Satana ná bademo, mpe Yesu abwakaki bango awa na mabele. Mpe mosika te, bakobwakama na libulu mozindo, epai bakozala na likoki te ya kosala moto mabe.​—Em. 12:9; 20:2, 3.

15 Tozali na elembeteli monene oyo emonisi polele ete Yehova abatelaka basaleli na ye lelo. Kanisá naino: Tosakolaka mpe toteyaka solo na mabele mobimba. (Mat. 28:19, 20) Na yango, tobimisaka polele misala mabe ya Zabolo. Na ntembe te, soki Satana azalaki na likoki ya kopekisa mosala na biso nyonso, akokaki kosala yango; kasi asalá yango te. Yango wana, tosengeli kobanga bilimo mabe te. Toyebi ete ‘miso ya Yehova ezali kotambolatambola na mabele mobimba mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na ye.’ (2 Nt. 16:9) Soki tozali sembo epai ya Yehova, bademo bakoki te kosala biso mabe mpo na libela.

BAOYO BANDIMAKA LISALISI YA YEHOVA BAZWAKA MAPAMBOLI

16-17. Pesá ndakisa oyo emonisi ete esɛngaka mpiko mpo na kotɛmɛla bilimo mabe.

16 Esɛngaka mpiko mpo na kotɛmɛla bilimo mabe, mingimingi ntango baninga to bandeko ya libota oyo bakanisi ete bazali koluka bolamu na biso bazali kotya biso mbamba. Kasi, Yehova apambolaka baoyo bamonisaka mpiko. Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi moko na nkombo Erica, oyo afandaka na Ghana. Erica azalaki na mbula 21 ntango andimaki koyekola Biblia. Lokola tata na ye azalaki nganga-nkisi, Erica asengelaki kolanda momeseno oyo ezalaki na boyokani na misala ya bilimo mabe, oyo esɛngaki alya mosuni oyo epesamaki mbeka epai ya banzambe ya tata na ye. Ntango Erica aboyaki, bato ya libota na ye bamonaki ete atyoli banzambe na bango. Bazalaki kokanisa ete banzambe bakopesa bango etumbu ya maladi ya motó to maladi mosusu.

17 Bato ya libota ya Erica batyaki ye mbamba alanda momeseno na bango, kasi aboyaki, atako yango esalaki ete bábengana ye na ndako. Bandeko ya lisangá bazwaki ye afanda na bango. Na ndenge yango, Erica azwaki lipamboli mpo Yehova apesaki ye libota ya sika: bandeko ya elimo oyo bakómaki lokola bandeko na ye ya basi mpe ya mibali. (Mrk. 10:29, 30) Atako bandeko na ye ya libota bawanganaki ye mpe batumbaki kutu biloko na ye, Erica atikalaki sembo epai ya Yehova, azwaki batisimo, mpe lelo azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Erica abangaka bademo te. Alobi boye mpo na libota na ye: “Mokolo na mokolo nabondelaka ete bandeko na ngai bázwa esengo ya koyeba Yehova mpe bázwa bonsomi oyo eutaka na kosalela Nzambe na biso ya bolingo.”

18. Mapamboli nini tokozwa soki totyeli Yehova motema?

18 Biso nyonso te nde tokokutana na komekama ya monene ndenge wana. Kasi, biso nyonso tosengeli kotɛmɛla bilimo mabe mpe kotyela Yehova motema. Soki tosali bongo, tokozwa mapamboli ebele, mpe lokuta ya Satana ekobungisa biso nzela te. Lisusu, tokotika te ete kobanga bademo epekisa biso kosalela Yehova. Koleka nyonso, tokokómisa makasi boyokani na biso na Yehova. Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Bómikitisa liboso ya Nzambe; kasi bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino. Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”​—Yak. 4:7, 8.

LOYEMBO 150 Bóluka Nzambe mpo bóbika

^ par. 5 Na bolingo na ye, Yehova akebisaka biso na bilimo mabe mpe na mabe oyo bakoki kosala. Ndenge nini bilimo mabe balukaka kobungisa bato nzela? Tokoki kosala nini mpo na kotɛmɛla bilimo mabe? Na lisolo oyo, tokotalela ndenge oyo Yehova asalisaka biso mpo tókwea te na motambo na bango.

^ par. 3 NDIMBOLA YA MALOBA: Misala ya bilimo mabe ezali bindimeli mpe mimeseno oyo ezali na boyokani na bademo. Ezali mpe kondima ete bilimo ya bakufi ekobaka kozala na bomoi soki nzoto ekufi mpe ete esololaka na bato oyo bazali na bomoi, mingimingi na nzela ya moto (nganga-nkisi). Misala ya bilimo mabe esangisi mpe makambo lokola bondɔki mpe kosakola makambo oyo ebombaná. Na lisolo oyo, maji elimboli kosala makambo oyo ezali na boyokani na bademo to oyo eleki mayele ya bato. Ekoki mpe kozala kolakela moto mabe, to kolɔka moto. Kasi ezali te makambo ya bokosi oyo bato mosusu basalaka nokinoki na mabɔkɔ, kaka mpo na kosepelisa basusu.

^ par. 12 Bankulutu bazali na lotomo te ya kotyela bandeko mibeko na likambo etali kominanola. Mokristo mokomoko asengeli kosalela lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia mpo na kopona nini akotánga, akotala, to lisano ya video oyo akobɛta. Batata ya mabota oyo bazali na bwanya balukaka koyeba soki bato ya libota na bango baminanolaka na makambo oyo eyokani na mitinda ya Biblia.​—Talá lisolo “Bopekisaka bato bafilme, babuku, mpe banzembo mosusu?” na site jw.org®, na esika bakomi OLINGI KOYEBA BISO? > MITUNA OYO BATO BATUNAKA MINGI.

^ par. 54 ELILINGI: Elilingi oyo ezali komonisa Yesu, Mokonzi na biso ya nguya azali kokamba limpinga ya baanzelu na likoló. Kiti ya Bokonzi ya Yehova ezali likoló na bango.