Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 15

Mekolá Yesu mpo obatela kimya

Mekolá Yesu mpo obatela kimya

“Kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino.”​—FLP. 4:7.

LOYEMBO 113 Tozali na kimya

NA MOKUSE *

1-2. Mpo na nini Yesu atungisamaki mingi?

YESU atungisamaki mingi na mokolo ya nsuka oyo alekisaki awa na mabele. Etikalaki moke anyokwama mpe abomama na mabɔkɔ ya bato mabe. Kasi, atungisamaki kaka te mpo alingaki kokufa. Azalaki kolinga Tata na ye mingi mpenza mpe alingaki kosepelisa ye. Yesu ayebaki ete soki atikali sembo na komekama wana ya mpasi, akosalisa na kolongisama ya nkombo ya Yehova. Yesu azalaki mpe kolinga bato, mpe ayebaki ete bato bakozala na elikya ya kozwa bomoi ya seko na mikolo oyo ezali koya kaka soki atikali sembo tii na liwa.

2 Atako Yesu atungisamaki mingi, azalaki na kimya. Ayebisaki bantoma na ye ete: “Napesi bino kimya na ngai.” (Yoa. 14:27) Azalaki na “kimya ya Nzambe,” motema mpiɔ oyo moto ayokaka soki azali na boyokani malamu na Yehova. Kimya yango epemisaki makanisi ya Yesu mpe motema na ye.​—Flp. 4:6, 7.

3. Tokotalela nini na lisolo oyo?

3 Moko te kati na biso akokutana na makambo ya mpasi oyo Yesu akutanaki na yango, kasi baoyo nyonso balandaka Yesu bakokutana na komekama. (Mat. 16:24, 25; Yoa. 15:20) Mpe lokola Yesu, na bantango mosusu tokoki kotungisama. Tokoki kosala nini mpo tótungisama koleka ndelo te mpe tóbungisa te kimya na biso ya makanisi? Tótalela makambo misato oyo Yesu asalaki ntango azalaki kosala mosala na ye awa na mabele mpe tómona ndenge oyo tokoki komekola ye ntango tokutani na komekama.

YESU AZALAKI KOBONDELA MINGI

Kobondela ekoki kosalisa biso tóbatela kimya (Talá paragrafe 4-7)

4. Na kolanda likanisi oyo ezali na 1 Batesaloniki 5:17, pesá mwa bandakisa oyo emonisi ete Yesu abondelaki mingi mokolo oyo akufaki.

4 Tángá 1 Batesaloniki 5:17. Yesu abondelaki mingi mokolo oyo akufaki. Ntango abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye, abondelaki mpo na limpa mpe vinyo. (1 Ko. 11:23-25) Liboso bálongwa esika oyo basalaki fɛti ya Elekeli, abondelaki elongo na bayekoli na ye. (Yoa. 17:1-26) Ntango ye ná bayekoli na ye bakómaki na Ngomba ya Olive na butu yango, abondelaki mbala mingi. (Mat. 26:36-39, 42, 44) Mpe maloba ya nsuka oyo Yesu alobaki liboso akufa, ezalaki libondeli. (Luka 23:46) Yesu abondelaki Yehova mpo na likambo nyonso ya monene oyo esalemaki mokolo oyo akufaki.

5. Mpo na nini bantoma bazangaki mpiko?

5 Yesu ayikaki mpiko mpo atyelaki Tata na ye motema mpe azalaki kobondela ye. Nzokande, bantoma batingamaki te na mabondeli na butu yango. Na yango, bazangaki mpiko na ntango ya komekama. (Mat. 26:40, 41, 43, 45, 56) Ntango tokutani na komekama, tokotikala sembo kaka soki tolandi ndakisa ya Yesu mpe tozali ‘kobondela ntango nyonso.’ Tokoki kobondela mpo na likambo nini?

6. Ndenge nini kondima ekosalisa biso tóbatela kimya?

6 Tokoki kobondela Yehova mpo ‘abakisela biso kondima.’ (Luka 17:5; Yoa. 14:1) Tosengeli kozala na kondima mpo Satana akomeka bato nyonso oyo balandaka Yesu. (Luka 22:31) Ndenge nini kondima ekosalisa biso tózala na kimya ata ntango tozali kokutana na mikakatano ebele? Soki tosali nyonso oyo tokoki mpo na kolonga mokakatano, kondima ekotinda biso tótika likambo yango na mabɔkɔ ya Yehova. Kotya motema ete Yehova akoki kosilisa likambo yango malamu koleka biso, ekosalisa biso tózala na kimya ya motema mpe ya makanisi.​—1 Pe. 5:6, 7.

7. Liteya nini ozwi na maloba ya ndeko Robert?

7 Libondeli esalisaka biso tóbatela kimya ya motema ata na komekama ya ndenge nini. Tótalela ndakisa ya ndeko Robert, nkulutu moko ya sembo, oyo azali sikoyo na mbula koleka 80. Alobi boye: “Toli oyo ezali na Bafilipi 4:6, 7 esalisi ngai nalonga komekama ndenge na ndenge na bomoi na ngai. Nakutaná na mikakatano ya mbongo. Mpe na ntango moko boye, nazalaki lisusu nkulutu te.” Nini esalisi ndeko Robert abatela kimya ya motema? Alobi boye: “Nabondelaka ntango kaka nabandi komitungisa. Namonaka ete soki nazali komipesa na kobondela mingi, nayokaka mpe kimya mingi.”

YESU AZALAKI KOSAKOLA NA MOLENDE

Kosakola ekoki kosalisa biso tóbatela kimya (Talá paragrafe 8-10)

8. Ndenge emonisami na Yoane 8:29, mpo na nini Yesu azalaki na kimya ya motema?

8 Tángá Yoane 8:29. Ata ntango bazalaki konyokola ye, Yesu azalaki na kimya ya motema mpo ayebaki ete azalaki kosepelisa Tata na ye. Akobaki kotosa ntango ezalaki mpasi kosala yango. Alingaki Tata na ye mpe amonisaki ete kosalela Yehova nde likambo eleki ntina na bomoi na ye. Liboso aya awa na mabele, Nzambe asalelaki ye lokola “mosali ya mayele.” (Mas. 8:30) Mpe awa na mabele, ateyaki basusu na molende mpenza makambo etali Tata na ye. (Mat. 6:9; Yoa. 5:17) Mosala yango epesaki Yesu esengo mpenza.​—Yoa. 4:34-36.

9. Na ndenge nini komipesa na mosala ya kosakola ekoki kosalisa biso tóbatela kimya na biso ya motema?

9 Tokolanda ndakisa ya Yesu soki tozali kotosa Yehova mpe tozali “ntango nyonso na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.” (1 Ko. 15:58) Soki tozali “komipesa mingi” na mosala ya kosakola, tokotalela mikakatano na biso na makanisi oyo ebongi. (Mis. 18:5) Na ndakisa, mbala mingi bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola bazalaka na mikakatano ya makasi koleka biso. Kasi, ntango bayekoli kolinga Yehova mpe basaleli toli na ye, bomoi na bango ebongwanaka mpe bakómaka na esengo. Ntango nyonso oyo tomonaka likambo yango, tozalaka na kondima makasi ete Yehova akokokisa bamposa na biso. Mpe kondima yango esalisaka biso tókoba kozala na kimya ya motema. Ndeko mwasi moko oyo banda kala anyokwamaka na makanisi mpe amimonaka ntina te andimaki likambo yango. Alobi boye: “Soki nazali kosakola mingi, nazalaka na kimya ya makanisi mpe na esengo. Nakanisi ete ezali nde mpo ntango nazalaka na mosala ya kosakola, namiyokaka pene mpenza na Yehova.”

10. Liteya nini ozwi na maloba ya ndeko Brenda?

10 Tótalela mpe ndakisa ya ndeko mwasi mosusu na nkombo Brenda. Ye ná mwana na ye ya mwasi babɛlaka maladi moko makasi oyo babengi sclérose en plaques. Brenda afandá na kiti ya bibɔsɔnɔ mpe azalaka na makasi mingi te. Soki likoki ezali, asakolaka ndako na ndako, kasi mbala mingi asakolaka na nzela ya kokoma mikanda. Alobi boye: “Ntango kaka nandimaki mpenza ete maladi na ngai ekosila te na mokili oyo, esalisaki ngai natya makanisi nyonso na mosala ya kosakola. Kutu, soki nazali na mosala ya kosakola, nabosanaka mitungisi na ngai. Etindaka ngai natya makanisi nyonso na kosolola na bato ya teritware na biso. Mpe yango esalisaka ngai nakanisa ntango nyonso elikya oyo nazali na yango mpo na mikolo oyo ezali koya.”

YESU ANDIMAKI LISALISI YA BANINGA NA YE

Kozala na baninga ya malamu ekoki kosalisa biso tóbatela kimya (Talá paragrafe 11-15)

11-13. (a) Ndenge nini bantoma mpe bato mosusu bamonisaki ete bazalaki mpenza baninga ya Yesu? (b) Baninga ya Yesu basalisaki ye na nini?

11 Ntango nyonso oyo Yesu alekisaki na mosala ya kosakola, bantoma na ye ya sembo bamonisaki ete bazali mpenza baninga na ye. Bazalaki lolenge ya baninga oyo Masese elobeli: “Moninga mosusu akangamaka makasi koleka ndeko.” (Mas. 18:24) Yesu azalaki kozwa baninga ya ndenge wana na motuya. Ntango azalaki kosala mosala na ye, ata ndeko na ye moko te ya libota andimelaki ye. (Yoa. 7:3-5) Na ntango moko boye, bandeko na ye ya libota bakanisaki kutu ete abɛli motó. (Mrk. 3:21) Nzokande, na butu ya nsuka liboso akufa, Yesu alobaki na bantoma na ye ya sembo ete: “Bino bozali bato oyo bokangami na ngai makasi na komekama na ngai.”​—Luka 22:28.

12 Bantoma basalaki makambo mosusu oyo esepelisaki Yesu te, kasi atyaki likebi te na mabunga na bango, mpe amonaki ete bazalaki na kondima epai na ye. (Mat. 26:40; Mrk. 10:13, 14; Yoa. 6:66-69) Na butu ya nsuka oyo alekisaki elongo na bango liboso báboma ye, Yesu ayebisaki mibali yango ya sembo ete: “Nabengi bino baninga, mpo makambo nyonso oyo nayoki epai ya Tata na ngai, nayebisi bino yango.” (Yoa. 15:15) Na ntembe te, baninga ya Yesu balendisaki ye mingi mpenza. Ndenge basalisaki ye na mosala na ye, epesaki ye esengo makasi.​—Luka 10:17, 21.

13 Longola bantoma, Yesu azalaki mpe na baninga mosusu, ya basi mpe ya mibali, oyo basalisaki ye na mosala ya kosakola mpe na makambo mosusu ya ntina. Basusu bazalaki kobengisa ye na bandako na bango mpo alya mwa eloko. (Luka 10:38-42; Yoa. 12:1, 2) Basusu bazalaki kosala mibembo elongo na ye mpe kopesa ye biloko oyo bazalaki na yango. (Luka 8:3) Yesu azalaki na baninga ya malamu mpo ye mpe azalaki moninga ya malamu epai na bango. Azalaki kosala makambo ya malamu mpo na bango mpe azalaki kosɛnga bango te makambo oyo bakokoka kosala te. Yesu azalaki moto ya kokoka, kasi azalaki na botɔndi mpo na lisalisi oyo baninga na ye ya kozanga kokoka bapesaki ye. Na ntembe te, basalisaki ye abatela kimya ya motema.

14-15. Ndenge nini tokoki kozwa baninga ya malamu, mpe ndenge nini bakoki kosalisa biso?

14 Baninga ya malamu bakosalisa biso tótikala sembo epai ya Yehova. Mpo tózwa baninga ya malamu biso mpe tosengeli kozala moninga ya malamu epai na bango. (Mat. 7:12) Na ndakisa, Biblia elendisaka biso tósalela ntango mpe makasi na biso mpo na kosalisa basusu, mingimingi baoyo bazali “kokelela.” (Ef. 4:28) Oyebi ndeko moko na lisangá na bino oyo okoki kosalisa? Soki ndeko moko akɔtá ndako, okoki kosalisa ye na kosomba biloko? Soki bato ya libota moko bazali kokelela, okoki kopesa bango bilei? Soki oyebi ndenge ya kosalela site jw.org® mpe programɛ JW Library® okoki kolakisa bandeko mosusu na lisangá ndenge ya kosalela yango? Soki tomipesi na kosalisa basusu, na ntembe te tokozala na esengo.​—Mis. 20:35.

15 Baninga oyo tozali kozwa bakosalisa biso ntango tokutani na komekama, mpe yango ekosalisa biso tóbatela kimya ya motema. Kaka ndenge Elihu ayokaki Yobo ntango azalaki kolobela komekama na ye, baninga na biso basalisaka biso na ndenge bayokaka biso na likebi ntango tozali kolobela mikakatano na biso. (Yobo 32:4) Tosengeli kokanisa te ete baninga na biso bakozwa bikateli na esika na biso, kasi tokomonisa bwanya soki tolandi toli na bango oyo euti na Biblia. (Mas. 15:22) Lisusu, kaka ndenge Mokonzi Davidi andimaki na komikitisa nyonso lisalisi ya baninga na ye, tosengeli te kozala na lolendo mpe koboya lisalisi oyo baninga bapesi biso na ntango oyo tokeleli. (2 Sa. 17:27-29) Ya solo, baninga ya malamu ndenge wana bazali likabo oyo euti epai ya Yehova.​—Yak. 1:17.

NDENGE YA KOBATELA KIMYA

16. Na kotalela Bafilipi 4:6, 7, wapi nzela kaka moko oyo tokoki kozwa kimya? Limbolá.

16 Tángá Bafilipi 4:6, 7. Mpo na nini Yehova alobi ete tokoki kozwa kimya na ye “na nzela ya Kristo Yesu”? Mpo tokoki kozwa mpe kobatela kimya ya makanisi mpe ya motema kaka soki tokangi ntina ya mokumba ya Yesu na kokokisama ya mokano ya Yehova mpe tozali na kondima. Na ndakisa, na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu, masumu na biso nyonso ekoki kolimbisama. (1 Yoa. 2:12) Ezali mpenza likambo ya kobɔndisa! Lokola azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, Yesu akolongola mpasi nyonso oyo Satana ná mokili na ye babimiselaka biso. (Yis. 65:17; 1 Yoa. 3:8; Em. 21:3, 4) Ezali elikya moko kitoko mpenza! Lisusu, atako Yesu apesi biso mokumba moko monene, azali elongo na biso mpo na kosalisa biso tóyika mpiko na mikolo ya nsuka ya mokili oyo. (Mat. 28:19, 20) Yango ezali mpenza kopesa biso mpiko! Libɔndisi, elikya mpe mpiko wana oyo tozali kozwa ezali na kati ya makambo minene oyo epesaka biso kimya ya makanisi.

17. (a) Ndenge nini mokristo akoki kobatela kimya ya makanisi? (b) Ndenge Yoane 16:33 elaki yango, tokozala na likoki ya kosala nini?

17 Na yango, ndenge nini okoki kobatela kimya na yo ya makanisi na ntango ya komekama makasi? Okobatela kimya soki osali makambo oyo Yesu asalaki. Ya liboso, kobá kobondela ntango nyonso. Ya mibale, tosá Yehova mpe sakoláká na molende ata ntango ezali mpasi kosala yango. Mpe ya misato, ndimá lisalisi ya baninga na yo ntango ozali na komekama. Soki ozali kosala bongo, kimya ya Nzambe ekobatela makanisi mpe motema na yo. Mpe ndenge moko na Yesu, okolonga komekama ata ya ndenge nini.​—Tángá Yoane 16:33.

LOYEMBO 41 Yoká libondeli na ngai

^ par. 5 Biso nyonso tozalaka na mikakatano oyo ekoki kolongola biso kimya. Lisolo oyo elobeli makambo misato oyo Yesu asalaki, oyo biso mpe tokoki kosala mpo na kobatela kimya, ata ntango tozali na komekama ya makasi.