Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 16

Tólongisa solo na ntina etali liwa

Tólongisa solo na ntina etali liwa

“Tozali koyeba liloba ya elimo ya solo mpe liloba ya elimo ya libunga.”​—1 YOA. 4:6.

LOYEMBO 73 Pesá biso mpiko

NA MOKUSE *

Na esika olanda mimeseno oyo esepelisaka Nzambe te, bɔndisá bandeko na yo ya libota oyo babungisi moto na liwa (Talá paragrafe 1-2) *

1-2. (a) Ndenge nini Satana akosi ebele ya bato? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

SATANA, oyo azali “tata ya lokuta,” akosi ebele ya bato kobanda na ntango ya Adama ná Eva. (Yoa. 8:44) Na ndakisa, abimisá mateya ya lokuta na ntina etali liwa mpe bomoi nsima ya liwa. Mateya yango ebimisi mimeseno ebele mpe biyambayamba oyo bato mingi balandaka. Na yango, bandeko na biso mosusu basengelaki ‘kobunda etumba makasi mpo na kondima’ na bango, ntango moto moko akufaki na libota na bango to na esika bafandi.​—Yuda 3.

2 Soki okutani na komekama ya ndenge wana, nini ekoki kosalisa yo okangama na makambo oyo Biblia eteyaka na ntina etali liwa? (Ef. 6:11) Ndenge nini okoki kobɔndisa mpe kolendisa ndeko oyo mbala mosusu bazali kotya ye mbamba alanda mimeseno oyo esepelisaka Nzambe te? Lisolo oyo ekolobela ndenge oyo Yehova asalisaka biso. Liboso, tótalela naino oyo Biblia elobi mpo na liwa.

OYO BIBLIA ELOBI MPO NA BAKUFI

3. Lokuta ya liboso ememá makambo nini?

3 Yehova akanaki te ete bato bákufaka. Kasi, mpo bázala na bomoi ya seko, bato basengeli kotosa Yehova. Apesaki Adama ná Eva mobeko moko ya mindɔndɔ te; alobaki: “Nzete nyonso ya elanga, okoki kolya yango ndenge olingi. Kasi nzete ya koyeba malamu ná mabe osengeli kolya yango te, mpo mokolo okolya yango okokufa solo.” (Eba. 2:16, 17) Na nsima, Satana akɔtisaki mobulu. Asalelaki nyoka mpo na koloba na Eva ete: “Bokokufa soki moke te.” Likambo ya mawa, Eva andimaki lokuta yango mpe alyaki mbuma ya nzete ya koyeba malamu ná mabe. Na nsima, mobali na ye mpe alyaki mbuma yango. (Eba. 3:4, 6) Na ndenge yango nde lisumu ná liwa ekɔtaki na mokili.​—Rom. 5:12.

4-5. Ndenge nini Satana azali kokosa bato tii lelo?

4 Nsukansuka, Adama ná Eva bakufaki, kaka ndenge Nzambe alobaki. Kasi, Satana atikaki te koloba lokuta na ntina etali liwa. Na nsima, abandaki kobakisa lokuta mosusu. Moko na yango ezali liteya oyo elobaka ete soki moto akufi, eloko moko kati na ye ekobaka kozala na bomoi, mbala mosusu na mokili ya bilimo. Makanisi ndenge na ndenge oyo lokuta yango ebimisi ekosaka bato tii lelo.​—1 Tim. 4:1.

5 Mpo na nini bato ebele mpenza bakosami? Ezali mpo Satana ayebi ndenge oyo bato bamiyokaka mpo na liwa mpe asalelaka mayoki yango mpo na kokosa bango. Lokola tokelamá mpo na kozala na bomoi libela na libela, tolingaka kokufa te. (Mos. 3:11) Tomonaka ete liwa ezali monguna.​—1 Ko. 15:26.

6-7. (a) Satana alongi kobomba solo na ntina etali bakufi? Limbolá. (b) Ndenge nini Biblia esalisi biso?

6 Satana asalaka milende mpo na kobomba solo na ntina etali liwa, kasi alongi te. Kutu lelo, koleka na bileko mosusu nyonso, bato ebele mpenza bayebi solo ya Biblia na ntina etali bakufi mpe elikya oyo tozali na yango mpo na bakufi, mpe bayebisaka yango basusu. (Mos. 9:5, 10; Mis. 24:15) Solo yango ebɔndisaka biso; esalisi biso tóbangaka te mpe tóyeba oyo ekómelaka moto soki akufi. Na ndakisa, tobangaka bakufi te, mpe tobangaka te ete eloko moko ya mabe ekómela bango. Toyebi ete bazali na bomoi te mpe bakoki kosala biso mabe te. Ezali lokola nde balali mpɔngi makasi. (Yoa. 11:11-14) Toyebi mpe ete bakufi bayebaka te ndenge oyo ntango ezali koleka. Na yango, na lisekwa, ata baoyo bakufá eleki bankama ya bambula, bakomona kaka lokola baumeli te na liwa.

7 Omoni te ete solo na ntina etali bakufi ezali polele, mindɔndɔ te, mpe ebongi mpenza? Ekeseni makasi na lokuta ya Satana oyo ebulunganisaka! Lokuta ya Satana ebebisaka lokumu ya Mozalisi na biso. Mpo tómona mpenza mabe oyo Satana asalá, tokotalela mituna oyo: Ndenge nini lokuta ya Satana ebebisi lokumu ya Yehova? Ndenge nini etindi bato bákanisa ete ezali na ntina te kondimela mbeka ya lisiko ya Kristo? Mpe ndenge nini ebakisi mawa mpe mpasi na bomoi ya bato?

LOKUTA YA SATANA ESALI MABE MINGI MPENZA

8. Ndenge emonisami na Yirimia 19:5, na ndenge nini lokuta ya Satana na ntina etali bakufi ebebisaka lokumu ya Yehova?

8 Lokuta ya Satana na ntina etali bakufi ebebisaka lokumu ya Yehova. Liteya mosusu ya lokuta elobaka ete bato oyo bakufá banyokwamaka na lifelo ya mɔtɔ. Mateya ya ndenge wana ebebisaka lokumu ya Nzambe! Na ndenge nini? Etindaka bato bákanisa ete Nzambe ya bolingo azali motema mabe, kaka lokola Zabolo. (1 Yoa. 4:8) Yango etindi yo omiyoka ndenge nini? Na koleka, Yehova ye moko amiyokaka ndenge nini? Kutu, Yehova ayinaka mabe ya lolenge nyonso.​—Tángá Yirimia 19:5.

9. Lokuta ya Satana etindi bato bákanisa nini mpo na mbeka ya lisiko ya Kristo oyo Yoane 3:16 mpe 15:13 elobeli?

9 Lokuta ya Satana na ntina etali liwa etindi bato bákanisa ete ezali na ntina te kondimela mbeka ya lisiko ya Kristo. (Mat. 20:28) Lokuta mosusu ya Satana elobaka ete bato bazali na molimo oyo ekufaka te. Soki ezalaki bongo, boye moto nyonso akoki kozala na bomoi libela na libela. Na yango, elingaki kosɛnga te ete Kristo apesa bomoi na ye lisiko mpo tózwa bomoi ya seko. Kobosana te ete mbeka ya Kristo nde likambo eleki monene oyo emonisaka ete Nzambe alingaka bato. (Tángá Yoane 3:16; 15:13.) Kanisá sikoyo ndenge oyo Yehova ná Mwana na ye bamiyokaka mpo na mateya oyo etyolaka likabo yango ya motuya!

10. Ndenge nini lokuta ya Satana na ntina etali liwa ebakiselaka bato mawa mpe mpasi?

10 Lokuta ya Satana ebakiselaka bato mawa mpe mpasi. Ntango baboti bazali kolela mwana na bango oyo akufi, bato mosusu bakoki koyebisa bango ete Nzambe azwi ye, ntango mosusu mpo akóma anzelu na likoló. Lokuta yango ya Satana ekitisaka to ebakisaka mpasi? Bato basaleli liteya ya lokuta ya lifelo ya mɔtɔ mpo na kolongisa likambo ya konyokola basusu, na ndakisa kotumba na nzete baoyo batɛmɛlaki mateya ya lingomba. Buku moko oyo elobeli tribinale oyo ezalaki kosambisa bapɛngwi ya lingomba na Espagne (Inquisition espagnole) emonisi ete bato mosusu oyo bazalaki konyokola bato bongo bakokaki kokanisa ete bazali kaka komonisa bapɛngwi yango “mwa moke ndenge lifelo ya mɔtɔ ekozala,” mpo bábongola motema liboso bákufa mpo bákende na lifelo te. Na mikili mingi, bato bamonaka ete basengeli kosambela bankɔkɔ oyo bakufá, kopesa bango lokumu, to koluka lipamboli. Basusu balingaka kokitisa bankɔkɔ mitema mpo na kokima kozwa bitumbu. Likambo ya mawa, bindimeli oyo euti na lokuta ya Satana epesaka libɔndisi ya solo te. Kutu, ememaka mitungisi ezangá ntina to kutu ebangisaka bato.

NDENGE YA KOLONGISA SOLO YA BIBLIA

11. Ndenge nini bandeko ya libota to baninga na biso bakoki kotya biso mbamba tósala makambo oyo oyokani te na Biblia?

11 Kolinga Yehova mpe Liloba na ye ekopesa biso makasi ya kotosa ye ata ntango bandeko ya libota to baninga oyo bakanisi ete bazali koluka bolamu na biso bazali kotya biso mbamba tólanda mimeseno oyo eyokani te na Biblia. Bakoki koluka koyokisa biso nsɔni soki tolandi mimeseno yango te, na ndakisa bakoki koloba ete tolingaki mowei te to tozalaki komemya ye te. To mpe bakoki koloba ete lokola toboyi kosala yango ekotinda mowei anyokola bato oyo bazali na bomoi. Ndenge nini tokoki kolongisa solo ya Biblia? Tótalela ndenge oyo okoki kosalela mitinda ya Biblia.

12. Mimeseno nini oyo etali bakufi eyokani ata moke te na Biblia?

12 Zalá na ekateli ya ‘kokabwana’ na bindimeli mpe mimeseno oyo eyokani te na Biblia. (2 Ko. 6:17) Na esanga moko ya Caraïbe, bato mingi bandimaka ete soki moto akufi, “molimo” na ye ekoki kotikala zingazinga mpe kopesa etumbu epai ya bato oyo banyokolaki ye. Buku moko elobi ete “molimo” yango ekoki kutu “kotya mobulu na mboka.” Na bisika mosusu na Afrika, bazipaka talatala ya ndako ya mowei mpe babalusaka bafɔtɔ mpo etala efelo. Mpo na nini? Basusu balobaka ete mowei asengeli te komitala! Lokola tozali basaleli ya Yehova, tosengeli kozala na biyambayamba te to kolanda mimeseno oyo euti na lokuta ya Satana!​—1 Ko. 10:21, 22.

Kosala bolukiluki mpe kosolola malamu na bandeko ya libota oyo bazali Batatoli te ekoki kosalisa yo okima mindɔndɔ (Talá paragrafe 13-14) *

13. Soki ozali koyeba mpenza te ndimbola ya momeseno moko boye, osengeli kosala nini, na kolanda Yakobo 1:5?

13 Soki ozali koyeba mpenza te ndimbola ya momeseno to ya molulu moko boye, bondelá Yehova mpe sɛngá ye apesa yo bwanya na ye. (Tángá Yakobo 1:5.) Na nsima, salá bolukiluki na mikanda ya moombo ya sembo. Soki esengeli, sololá na bankulutu ya lisangá na bino. Bakoyebisa yo te nini osengeli kosala, kasi bakoki kolakisa yo mitinda ya Biblia oyo ekosalisa yo, na ndakisa oyo tolobeli na lisolo oyo. Soki osali bongo, ozali komesenisa ‘makoki na yo ya kososola,’ mpe makoki yango ekosalisa yo ‘okesenisa mabe ná malamu.’​—Ebr. 5:14.

14. Ndenge nini tokoki koboya kobɛtisa bato libaku?

14 ‘Bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe. Bókeba ete bókóma te bato oyo bazali kobɛtisa libaku.’ (1 Ko. 10:31, 32) Ntango tozali kotalela soki tokolanda momeseno to bonkɔkɔ moko boye, tosengeli mpe kokanisa ndenge oyo ekateli na biso ekosala lisosoli ya basusu, mingimingi ya bandeko na biso bakristo. Tólinga ata moke te kobɛtisa moto libaku! (Mrk. 9:42) Lisusu, tólinga te kosala likambo oyo ekopesa bato oyo bazali Batatoli te nkanda kaka mpamba. Bolingo ekotinda biso tóloba na bango na limemya, mpe yango ekopesa Yehova lokumu. Tosengeli te koswana na bato to kotyola mimeseno na bango. Kobosana te, bolingo ezali na nguya mingi! Ntango topesi basusu lokumu mpe tomonisi limemya, ekoki kolɛmbisa ata mitema ya bato oyo bazali kotɛmɛla biso.

15-16. (a) Mpo na nini ezali likambo ya bwanya koyebisa basusu bindimeli na yo? Pesá ndakisa. (b) Ndenge nini maloba ya Paulo oyo ezali na Baroma 1:16 etali mpe biso?

15 Salá ete na esika ofandaka bato báyeba ete ozali Motatoli ya Yehova. (Yis. 43:10) Soki bandeko ya libota na yo mpe bato mosusu bayebi ete osambelaka Yehova, soki makambo oyo ebimisaka mindɔndɔ ebimi, okomona ete ezali mpasi te kosilisa yango. Francisco, oyo afandaka na Mozambique, akomi boye: “Ntango ngai ná mwasi na ngai, Carolina, toyekolaki solo, toyebisaki bandeko ya libota na biso ete tokosambela lisusu bakufi te. Ekateli na biso etyamaki na komekama ntango ndeko ya Carolina ya mwasi akufaki. Na mboka na biso, basalaka milulu na ntango ya kosukola ebembe. Na nsima, ndeko ya mowei ya pene mpenza asengeli kolala mikolo misato esika oyo bamwangisi mai oyo basukolaki mowei. Balobaka ete basalaka bongo mpo mowei asilika te. Libota ya Carolina eyebaki ete Carolina nde asengeli kolala esika bamwangisi mai oyo basukolaki mowei.”

16 Francisco ná mwasi na ye basalaki nini? Francisco alobi boye: “Lokola tolingaka Yehova mpe tosepelaka kotosa ye, toboyaki kolanda momeseno yango. Libota ya Carolina esilikaki makasi. Balobaki na biso ete tozangi limemya epai ya mowei mpe ete bakoya lisusu kotala biso te mpe bakosalisa biso lisusu te. Lokola tosilá kolimbwela bango bindimeli na biso, tolobelaki likambo yango te ntango bazalaki na nkanda. Kutu, bandeko mosusu ya libota bakɔtelaki biso, balobaki ete tosilá koyebisa bango bindimeli na biso. Na nsima, bandeko ya libota ya Carolina bakitisaki motema, mpe tosalaki kimya. Kutu, bamosusu bayaki na ndako na biso mpo na kosɛnga mikanda oyo elimbolaka Biblia.” Na yango, tóyoka nsɔni ata mokolo moko te mpo na kolongisa solo na ntina etali liwa.​—Tángá Baroma 1:16.

TÓBƆNDISA MPE TÓSALISA BAOYO BAZALI NA MAWA

Baninga ya solosolo babɔndisaka mpe basalisaka baoyo babungisi moto na liwa (Talá paragrafe 17-19) *

17. Nini ekoki kosalisa biso tózala moninga ya solosolo epai ya ndeko oyo azali na mawa?

17 Ntango ndeko na biso mokristo abungisi moto na liwa, tosengeli kosala nyonso mpo tózala “moninga ya solosolo . . . , ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” (Mas. 17:17) Ndenge nini tokoki kozala “moninga ya solosolo,” mingimingi ntango bazali kotya ndeko na biso mbamba alanda mimeseno oyo eyokani te na Biblia? Kosalela mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso. Tótalela mitinda mibale.

18. Mpo na nini Yesu alelaki, mpe liteya nini tokoki kozwa na ndakisa na ye?

18 “Bólela elongo na bato oyo bazali kolela.” (Rom. 12:15) Mbala mosusu toyebaka te tóloba nini epai ya moto oyo azali na mawa makasi. Na bantango mosusu, mai ya miso elobaka mingi. Ntango Lazare, moninga ya Yesu akufaki, Maria, Marta, mpe bato mosusu balelaki ndeko mpe moninga na bango. Nsima ya mikolo minei, ntango Yesu akómaki wana, ye mpe ‘alelaki, abimisaki mpisoli,’ atako ayebaki ete akosekwisa Lazare. (Yoa. 11:17, 33-35) Kolela ya Yesu emonisaki ndenge oyo Yehova amiyokaki mpo na liwa ya Lazare. Emonisaki mpe ete Yesu azalaki kolinga libota yango, mpe na ntembe te yango ebɔndisaki Maria ná Marta. Ndenge moko mpe, ntango bandeko na biso bamoni ete tolingaka bango mpe totyelaka bango likebi, bakoyeba ete bazali bango moko te, kasi bazali elongo na baninga oyo balingi bango mpe bazali kosalisa bango.

19. Ntango tozali kobɔndisa ndeko na biso mokristo, ndenge nini tokoki kosalela Mosakoli 3:7?

19 “Ntango ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba.” (Mos. 3:7) Lolenge mosusu ya kobɔndisa ndeko oyo azali na mawa ezali ya kozala moyoki malamu. Tiká ndeko abimisa ndenge oyo azali komiyoka, mpe koyoka nkanda te mpo na “bilobaloba mpamba.” (Yobo 6:2, 3) Mbala mosusu azali kotungisama mpo na mbamba ya bandeko na ye ya libota oyo bazali Batatoli te. Na yango, bondelá elongo na ye. Sɛngá Yehova, “Moyoki ya libondeli,” apesa ye makasi mpe bososoli. (Nz. 65:2) Soki likoki ezali, tángá Biblia elongo na ye. To mpe tángelá ye lisolo moko oyo eyokani na mokakatano na ye, oyo euti na mikanda ya moombo ya sembo, na ndakisa lisolo ya bomoi oyo ekolendisa ye.

20. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

20 Tozali na libaku monene ndenge toyebi solo na ntina etali bakufi mpe elikya kitoko oyo tozali na yango mpo na baoyo bazali na malita ya kokanisama! (Yoa. 5:28, 29) Na yango, na maloba mpe na misala, tiká ete na mpiko nyonso tólongisa solo ya Biblia mpe tóyebisa yango basusu, ntango nyonso oyo tozwi libaku. Na lisolo oyo elandi, tokolobela likambo mosusu oyo Satana azali kosalela mpo na kokosa bato: misala ya milimo mabe. Tokomona ntina oyo tosengeli koboya mimeseno mpe kominanola oyo ezali na boyokani na motambo wana ya bademo.

LOYEMBO 24 Bóya na ngomba ya Yehova

^ par. 5 Satana ná bademo na ye bakosi bato mingi na ntina etali liwa. Yango etindi bato bábimisa mimeseno ndenge na ndenge oyo eyokani te na Biblia. Lisolo oyo ekosalisa biso tótikala sembo epai ya Yehova ntango bato bazali kotya biso mbamba mpo tólanda mimeseno yango.

^ par. 55 ELILINGI: Mama moko azali kolela moto oyo alingaki, mpe bandeko na ye ya libota oyo bazali Batatoli bazali kobɔndisa ye.

^ par. 57 ELILINGI: Nsima ya kosala bolukiluki na likambo etali mimeseno ya kokunda ebembe, ndeko moko azali kolimbwela bandeko na ye ya libota bindimeli na ye na boboto nyonso.

^ par. 59 ELILINGI: Bankulutu bazali kobɔndisa mpe kosalisa mokristo moko oyo abungisi moto oyo alingaki.