LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Mai 2019

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 01/07 tii 04/08/2019.

Bolingo mpe bosembo na lisangá ya bokristo

Mobeko ya Kristo ezali nini, mpe ndenge nini elendisaka bato bázala sembo?

Bolingo mpe bosembo etinda biso tóbatela bana

Ndenge nini baboti bakoki kobatela bana na bango mpo bábebisa bango te, mpe bankulutu bakoki kosala nini mpo na kobatela lisangá?

Kobɔndisa baoyo basalá bango makambo ya nsɔni na bomwana

Ndenge nini Liloba ya Nzambe, bankulutu, mpe bandeko basi oyo bakɔmɛli na elimo bakoki kobɔndisa bandeko basi oyo babebisamá na bomwana na makambo ya kosangisa nzoto?

“Bwanya ya mokili oyo” ebungisa yo nzela te

Mpo na nini kaka Yehova nde abongi kopesa biso litambwisi? Ndenge nini Biblia esalisaka biso tómitalela na bokatikati?

Bongisá ndenge na yo ya koyekola!

Ndenge nini okoki koyeba makambo oyo osengeli koyekola libosoliboso mpe ndenge nini okoki mpenza kozwa matomba na boyekoli na yo moko ya Biblia?