Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 22

Bongisá ndenge na yo ya koyekola!

Bongisá ndenge na yo ya koyekola!

“Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.”​—FLP. 1:10.

LOYEMBO 35 ‘Tóluka koyeba makambo oyo eleki ntina’

NA MOKUSE *

1. Mpo na nini bandeko mosusu bazalaka na mposa ya koyekola te?

LELO oyo, ekómi mpasi mingi mpo na kozwa mbongo mpo na kobikela. Bandeko na biso mingi basalaka bangonga ebele kaka mpo na kozwela libota eloko ya kolya, ya kozipa nzoto mpe esika ya kolala. Basusu basalaka bangonga ebele na nzela mokolo na mokolo mpo na kokende mosala mpe kozonga. Mpo na kozwa eloko ya kobikela, bandeko mosusu basalaka mosala oyo esɛngaka makasi ya nzoto. Na nsuka ya mokolo, bandeko yango oyo basalaka mosala makasi balɛmbaka mpenza! Na yango, mingi na bango bazalaka na mposa ya koyekola te.

2. Ntango nini oponá mpo na koyekola?

2 Kasi, biso nyonso tosengeli kozwa ntango mpo na koyekola mpenza na mozindo Liloba ya Nzambe mpe mikanda ya moombo ya sembo. Yango ezali mpenza na ntina soki tolingi kozala na boyokani malamu na Yehova mpe kozwa bomoi ya seko! (1 Tim. 4:15) Bandeko mosusu balamukaka ntɔngɔntɔngɔ mokolo nyonso mpo na koyekola, ntango ndako mpe makanisi na bango ezali naino kimya. Basusu bazwaka mwa miniti na nsuka ya mokolo mpo na koyekola mpe komanyola makambo ya elimo, na esika moko ya kimya.

3-4. Bambongwana nini ebongiseli ya Yehova esali mpo na biloko oyo ebimisaka, mpe mpo na nini?

3 Na ntembe te, ondimi ete ezali na ntina kozwa ntango mpo na koyekola. Kasi, makambo nini osengeli koyekola? Mbala mosusu okoki koloba ete: ‘Makambo ya kotánga ezali mingi. Nazali kokoka kotánga yango nyonso te.’ Bandeko mosusu bakokaka kotánga mpe kotala biloko nyonso oyo ebongiseli ya Yehova ezali kobimisa, kasi bandeko mingi babundanaka mpo na kozwa ntango ya kosala bongo. Bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bayebi yango. Yango wana, mikolo oyo euti koleka bazwaki ekateli ya kobimisa lisusu makambo mingi te, ezala na papye to na Internet.

4 Na ndakisa, tobimisaka lisusu Buku ya mobu te, mpo makambo mpe masolo ya kolendisa ezali kobima ebele na site jw.org® mpe na baemisyo ya sanza na TV JW®. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso mpe Lamuká! ekómi kobima kaka mbala misato na mbula. Bambongwana yango esalemi te mpo tózwa ntango mingi ya kosala makambo mosusu oyo eyokani te na makambo ya losambo. Esalemi nde mpo na kosalisa biso tótya likebi mingi koleka na “makambo oyo eleki ntina.” (Flp. 1:10) Tótalela ndenge oyo okoki koyeba makambo oyo eleki ntina mpe ndenge oyo okoki kozwa matomba mingi na boyekoli na yo moko.

YEBÁ MAKAMBO OYO ELEKI NTINA

5-6. Makambo nini tosengeli koyekola na likebi?

5 Makambo nini tosengeli koyekola libosoliboso? Na ntembe te, tosengeli kozwa ntango mokolo na mokolo mpo na koyekola Liloba ya Nzambe. Motángo ya bavɛrsɛ oyo ezali kotyama mpo na botángi ya Biblia ya pɔsɔ na lisangá ekiti, mpo na kosalisa biso tólekisaka ntango mingi na komanyola makambo oyo totángi mpe kosala bolukiluki. Mokano na biso esengeli kozala kaka te ya kosilisa bavɛrsɛ oyo etyami mpo na pɔsɔ, kasi tosengeli kotika Liloba ya Nzambe esimba motema na biso, mpe esalisa biso tózala na boyokani makasi na Yehova.​—Nz. 19:14.

6 Makambo nini mosusu tosengeli koyekola na likebi? Tosengeli kobongisaka Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Boyekoli ya Biblia na lisangá, mpe makambo oyo tokotalela na likita ya kati ya pɔsɔ. Tosengeli mpe kotángaka masolo nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!

7. Tosengeli nde kolɛmba nzoto soki tozali kokoka te kotánga to kotala biloko nyonso oyo ezali kobima na site na biso mpe na TV JW?

7 Mbala mosusu okoki koloba ete: ‘Malamu; bongo biloko nyonso oyo ebimaka na site jw.org, mpe makambo oyo elekaka na TV JW®? Ezalaka ebele!’ Tózwa ndakisa moko: Kanisá ete batandi bilei ndenge na ndenge ya kitoko na restora moko. Bakiliya bakokoka ata moke te kolya bilei nyonso oyo balambi. Na yango, bakopona kaka mwa bilei. Ndenge moko mpe, soki ozali na likoki te ya kotánga biloko nyonso oyo ebongiseli ya Yehova ezali kobimisa na Internet, kolɛmba nzoto te. Tángá to talá oyo okokoka. Sikoyo, tótala soki koyekola elimboli nini mpe oyo tokoki kosala mpo tózwa matomba mingi na boyekoli na biso.

KOYEKOLA ESƐNGAKA MILENDE!

8. Makambo nini tosengeli kosala ntango tozali kobongisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mpe na ndenge nini kosala bongo ekosalisa yo?

8 Koyekola elimboli kotya makanisi na makambo oyo ozali kotánga mpo okanga likambo ya ntina. Koyekola ezali te kaka kotánga likolólikoló mpe kotya bilembo na biyano. Na ndakisa, ntango ozali kobongisa Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, tángá liboso makambo oyo ezali esika bakomi “Na mokuse” oyo ezalaka na ebandeli ya lisolo ya boyekoli. Ya mibale, talelá malamu motó ya likambo ya lisolo, mitó ya makambo mike mpe mituna ya bozongeli. Ya misato, tángá lisolo mobimba malɛmbɛmalɛmbɛ mpe na likebi. Tyá likebi na bafraze oyo emonisaka likanisi ya paragrafe mobimba, oyo mbala mingi ezalaka fraze ya liboso ya paragrafe mokomoko. Mbala mingi, fraze yango elobelaka likambo oyo paragrafe ezali kolimbola. Wana ozali kotánga lisolo yango, kanisá ndenge oyo paragrafe mokomoko eyokani na motó ya likambo moke mpe na motó ya likambo ya lisolo mobimba. Komá maloba nyonso oyo oyebi te mpe makambo oyo olingi kosalela bolukiluki mpo oyeba yango lisusu malamu koleka.

9. (a) Mpo na nini mpe ndenge nini tosengeli kotya likebi mingi na bavɛrsɛ ntango tozali koyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli? (b) Ndenge emonisami na Yosua 1:8, longola kotánga bavɛrsɛ, tosengeli kosala nini?

9 Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali boyekoli ya Biblia. Na yango, tyáká likebi mpenza na bavɛrsɛ, mingimingi oyo ekotángama ntango tokoyekola lisolo yango na lisangá. Talá ndenge maloba to bafraze ya ntina oyo ezali na bavɛrsɛ yango eyokani na makanisi ya paragrafe. Lisusu, zwá ntango ya komanyola makambo ozali kotánga na bavɛrsɛ, mpe kanisá ndenge oyo okoki kosalela yango na bomoi na yo.​—Tángá Yosua 1:8.

Baboti, bólakisa bana na bino ndenge ya koyekola (Talá paragrafe 10) *

10. Na kotalela Baebre 5:14, na Losambo na kati ya libota, mpo na nini baboti basengeli kolakisa bana na bango ndenge ya koyekola mpe kosala bolukiluki?

10 Baboti balingaka ete pɔsɔ na pɔsɔ, Losambo na kati ya libota ezala ntango moko ya kosepelisa mpo na bana. Kasi, atako baboti basengeli ntango nyonso koyeba makambo oyo bakotalela na losambo na kati ya libota, basengeli te kokanisa ete pɔsɔ nyonso, esengeli kosala makambo minene to oyo ekosɛnga bolukiluki ya mozindo. Na Losambo na kati ya libota, bokoki kotala emisyo ya sanza ya TV JW, to mbala mosusu kosala eloko moko elongo, na ndakisa kosala masuwa ya Noa; kasi, ezali mpe na ntina baboti bálakisa bana ndenge ya koyekola. Na ndakisa, esengeli koteya bana ndenge ya kobongisa makita ya lisangá, to ndenge ya kosala bolukiluki mpo na likambo moko oyo ebimi na kelasi. (Tángá Baebre 5:14.) Soki bazali kolekisa mwa ntango mpo na koyekola na ndako, ekosalisa bango bákanga ntina ya makambo oyo bakolobela na makita na lisangá, na mayangani ya mike to ya minene, oyo mbala mosusu ezali na video te. Kasi, moboti akotalela mbula mpe bomoto ya bana mpo na koyeba soki boyekoli ekoumela ntango boni.

11. Mpo na nini ezali na ntina tóteya bato oyo toyekolaka na bango Biblia ndenge ya koyekola bango moko na mozindo?

11 Tosengeli mpe kolakisa bato oyo toyekolaka na bango Biblia ndenge ya koyekola. Na ebandeli, tosepelaka soki batye mikɔlɔtɔ na biyano mpo na komonisa ete babongisi boyekoli to makita ya lisangá. Kasi, tosengeli koteya bango ndenge ya kosala bolukiluki mpe ndenge ya koyekola na mozindo ntango bazali bango moko. Na ndenge yango, ntango bakutani na mikakatano, na esika bátuna mbala moko bandeko ya lisangá soki básala nini, bakoyeba ndenge ya kosala bolukiluki na mikanda na biso mpo na kozwa toli oyo ekosalisa bango.

ZALÁ NA MOKANO NTANGO OZALI KOYEKOLA

12. Mikano nini tokoki kozala na yango ntango tozali koyekola?

12 Soki osepelaka koyekola te, mbala mosusu okanisaka ete ata mokolo moko te okokóma kolinga koyekola. Kasi, yebá ete okoki kokóma kolinga koyekola. Na ebandeli, okoki koyekolaka kaka mwa ntango mokuse, mpe na nsima kobakisa ntango mokemoke. Zalá na mokano. Ya solo, toyekolaka libosoliboso na mokano ya kokóma lisusu na boninga makasi na Yehova. Tokoki mpe koyekola mpo na kozwa mbala moko eyano na motuna oyo batunaki biso to kosala bolukiluki mpo na mokakatano moko oyo tozali kokutana na yango.

13. (a) Lobelá makambo oyo elenge akoki kosala mpo na kolobela bindimeli na ye na kelasi. (b) Ndenge nini okoki kosalela toli oyo ezali na Bakolose 4:6?

13 Ozali elenge oyo akendaka naino kelasi? Mbala mosusu baninga na yo nyonso ya kelasi bandimaka ete liteya ya evolisyo ezali solo. Okoki kozala na mposa ya kolobela mateya ya Biblia, kasi mbala mosusu ozali komona ete okokoka kosala yango te. Na yango, osengeli kosala bolukiluki mpo na yango! Okoki kozala na mikano mibale: (1) Komindimisa malamumalamu ete Nzambe nde akelaki biloko nyonso mpe (2) kokolisa makoki na yo ya kolimbola mateya ya Biblia. (Rom. 1:20; 1 Pe. 3:15) Okoki liboso komituna boye: ‘Makanisi nini baninga na ngai ya kelasi bapesaka mpo na kondimisa liteya ya evolisyo?’ Na nsima, salá bolukiluki oyo esengeli na mikanda na biso. Okokamwa komona ete kolobela mateya ya Biblia ezali mpasi te, ndenge ozalaki kokanisa. Bato mingi bandimelaka evolisyo kaka mpo moto moko oyo bamemyaka ayebisaki bango ete ezali solo. Soki ozwi ata likanisi moko to mibale, mbala mosusu okoki kosalisa moto oyo alingi mpenza koyeba solo.​—Tángá Bakolose 4:6.

KOLISÁ MPOSA NA YO YA KOYEKOLA

14-16. (a) Ndenge nini okoki koyeba malamu mokanda moko ya Biblia oyo oyebaka mpenza te? (b) Na lisalisi ya bavɛrsɛ oyo etyami, limbolá ndenge oyo okoki koyeba makambo mingi oyo etali mokanda ya Amose. (Talá mpe etanda “ Mikɔtisá na masolo ya Biblia!”)

14 Kanisá ete na likita moko ya lisangá, tokotalela moko ya mikanda ya Biblia oyo ebengamaka basakoli ya mike, mbala mosusu mosakoli oyo oyebi mpenza te. Likambo ya liboso oyo okoki kosala ezali ya kokolisa mposa ya koyeba makambo oyo mosakoli yango akomá. Ndenge nini okoki kosala yango?

15 Ya liboso, omituna boye: ‘Makambo nini nayebi mpo na moto oyo akomaki buku yango? Azalaki nani, azalaki kofanda wapi, mpe mosala nini azalaki kosala?’ Soki otaleli makambo mosusu ya bomoi na ye, yango mpe ekoki kosalisa yo ayeba malamu ntina oyo asaleli maloba boye to boye to ndakisa boye to boye. Ntango ozali kotánga Biblia, tyá likebi na bafraze oyo emonisi bomoto ya moto oyo akomaki eteni yango.

16 Ya mibale, koyeba ntango oyo mokanda yango ekomamaki ekoki mpe kosalisa yo. Okoyeba yango soki otali “Etanda ya mikanda ya Biblia,” oyo ezali nsima ya mokanda ya Emoniseli, na Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika. Lisusu, okoki kotala etanda oyo elobeli basakoli mpe bakonzi na Eteni 3 na Mwa buku mpo na koyekola Liloba ya Nzambe. Soki mokanda ya Biblia oyo ozali koyekola ezali ya bisakweli, ekozala malamu oluka koyeba ndenge bomoi ya bato ezalaki ntango mokanda yango ekomamaki. Bizaleli to misala nini ya mabe mosakoli alingaki kosalisa bato bátika? Banani bazalaki na bomoi eleko moko na mokomi yango? Mpo oyeba makambo mingi, ekoki kosɛnga ete otánga mikanda mosusu ya Biblia. Na ndakisa, mpo oyeba malamu makambo oyo ezalaki kosalema ntango mosakoli Amose azalaki na bomoi, kotánga bavɛrsɛ ya 2 Bakonzi mpe 2 Ntango, oyo ezali na mitindami oyo etyami na Amose 1:1, ekosalisa yo mpenza. Longola yango, okoki mpe kotánga mokanda ya Hosea, oyo mbala mosusu azalaki mpe na bomoi eleko moko na Amose. Nyonso wana ekosalisa yo oyeba malamu ndenge bomoi ezalaki na mikolo ya Amose.​—2 Bak. 14:25-28; 2 Nt. 26:1-15; Hos. 1:1-11; Amo. 1:1.

TYÁ LIKEBI NA MAKAMBO YA MIKEMIKE

17-18. Salelá bandakisa oyo ezali na paragrafe to ndakisa mosusu oyo yo moko ozwi mpo na komonisa ndenge oyo kotya likebi na makambo oyo ezali komonana mikemike ekoki kosala ete osepela mingi na boyekoli na yo.

17 Ntango ozali kotánga Biblia, osengeli kozala na mposa ya koyeba makambo mingi. Na ndakisa, kanisá ete ozali kotánga Zekaria mokapo 12, oyo esakolaki liwa ya Masiya. (Zek. 12:10) Ntango okómi na vɛrsɛ 12, otángi ete “libota ya ndako ya Natane” ekolela na mpasi mingi ntango Masiya akokufa. Na esika oleka maloba yango nokinoki, otɛlɛmi mpe omituni: ‘Boyokani nini ezali kati na ndako ya Natane mpe Masiya? Ndenge ya koyeba makambo mosusu ezali?’ Osali mwa bolukiluki. Moko ya mitindami oyo ezali wana ememi yo na 2 Samwele 5:14, oyo emonisi ete Natane azalaki moko ya bana ya Mokonzi Davidi. Mitindami mosusu, oyo ezali Luka 3:31, emonisi ete Yesu azalaki mokitani ya Natane na nzela ya Maria. Yango esepelisi yo! Oyebaka ete bisakweli elobaki ete Yesu akozala mokitani ya Davidi. (Mat. 22:42) Nzokande, Davidi azalaki na bana mibali koleka 20. Ezali mpenza kokamwisa ndenge Zekaria alobaki na bosikisiki ete bato ya ndako ya Natane bakolela na liwa ya Yesu!

18 Tótalela ndakisa mosusu. Na Luka mokapo ya liboso, Biblia elobi ete anzelu Gabriele ayaki epai ya Maria mpe ayebisaki ye likambo moko ya kokamwa mpo na mwana oyo asengelaki kobota; alobaki na ye ete: “Ye akozala moto monene mpe akobengama Mwana ya Oyo-Aleki-Likoló; mpe Yehova Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye, mpe akoyangela ndako ya Yakobo libela na libela.” (Luka 1:32, 33) Tokoki kotya likebi kaka na eteni ya liboso ya maloba ya anzelu Gabriele, ete Yesu akobengama “Mwana ya Oyo-Aleki-Likoló.” Kasi, anzelu Gabriele asakolaki mpe ete Yesu “akoyangela,” elingi koloba akozala Mokonzi. Na yango, tokoki komituna soki Maria akanisaki nini ntango ayokaki maloba wana ya anzelu. Akanisaki nde ete Yesu akozwa esika ya Mokonzi Erode, to ya moko ya bakitani na ye mpe akokóma mokonzi ya Yisraele? Soki esalemaki ete Yesu akóma mokonzi, wana Maria alingaki kozala mama ya mokonzi, mpe libota na ye elingaki kofanda na ndako ya mokonzi. Kasi, Biblia emonisi ata esika moko te ete Maria alobaki na Gabriele likambo ya ndenge wana; totángá ata esika moko te na Biblia ete Maria asɛngaki bátya ye na esika ya lokumu na Bokonzi, ndenge bayekoli mibale ya Yesu basalaki. (Mat. 20:20-23) Makambo wana ya mikemike ezali kosalisa biso tómona mpenza ete Maria azalaki na komikitisa mingi!

19-20. Ndenge emonisami na Yakobo 1:22-25 mpe Yakobo 4:8, mikano nini tosengeli kozala na yango ntango tozali koyekola?

19 Tóbosanaka te ete mokano ya libosoliboso ntango tozali koyekola Liloba ya Nzambe mpe mikanda ya moombo ya sembo ezali ya kokóma lisusu na boninga makasi na Yehova. Ntango tozali koyekola, tolingaka mpe komona polele ‘ndenge tozali,’ mpe mbongwana oyo tosengeli kosala mpo na kosepelisa Nzambe. (Tángá Yakobo 1:22-25; 4:8.) Yango wana, tosengeli ntango nyonso kosɛnga elimo santu ya Yehova liboso tóbanda koyekola. Tosengeli kosɛnga ye asalisa biso tózwa mpenza matomba na makambo oyo tolingi koyekola mpe tómona polele makambo oyo tosengeli kobongisa.

20 Tiká ete biso nyonso tózala lokola moto ya Nzambe oyo mokomi ya nzembo alobeli ete: “Asepelaka na mobeko ya Yehova, mpe atángaka mobeko na ye na mongongo ya nse butu moi. . . . Nyonso oyo azali kosala ekolonga.”​—Nz. 1:2, 3.

LOYEMBO 88 Teyá ngai banzela na yo

^ par. 5 Na kati ya ebele ya bilei ya elimo oyo Yehova azali kopesa biso, ezali na bavideo, biloko ya kotánga, mpe ya koyekola. Lisolo oyo ekosalisa yo oyeba makambo nini osengeli koyekola, mpe epesi makanisi oyo ekosalisa yo ozwa matomba mingi na boyekoli na yo.

^ par. 61 ELILINGI: Baboti bazali kolakisa bana na bango ndenge ya kobongisa Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.

^ par. 63 ELILINGI: Ndeko mobali moko azali kosala bolukiluki oyo etali Amose. Bililingi oyo ezali na nsima ezali komonisa makambo oyo ndeko yango azali kokanisa wana azali kotánga lisolo ya Biblia mpe komanyola yango.