Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 21

“Bwanya ya mokili oyo” ebungisa yo nzela te

“Bwanya ya mokili oyo” ebungisa yo nzela te

“Bwanya ya mokili oyo ezali bozoba na miso ya Nzambe.”​—1 KO. 3:19.

LOYEMBO 98 Makomami ekomami na elimo ya Nzambe

NA MOKUSE *

1. Liloba ya Nzambe eteyaka biso makambo nini?

TOKOKI kolonga mokakatano ata ya ndenge nini, mpo Yehova azali Molakisi na biso Monene. (Yis. 30:20, 21) Liloba na ye eteyaka biso makambo oyo tosengeli na yango mpo ‘tókoka mpenza mpe tózala na nyonso oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.’ (2 Tim. 3:17) Soki tozali kosalela mateya ya Biblia na bomoi na biso, tokokóma na bwanya mingi koleka bato oyo balobaka ete tosengeli kolanda “bwanya ya mokili oyo.”​—1 Ko. 3:19; Nz. 119:97-100.

2. Tokotalela nini na lisolo oyo?

2 Ndenge tokomona yango, mbala mingi bwanya ya mokili ebendaka bamposa na biso ya bomoto. Na yango, ekoki kozala mpasi mpo tókanisa te mpe tósala te makambo lokola bato ya mokili oyo. Yango wana, Biblia elobi na biso: “Bókeba: mbala mosusu moto moko akoki komema bino lokola nyama na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe na bokosi ya mpambampamba na kolanda mimeseno ya bato.” (Kol. 2:8) Na lisolo oyo, tokomona ndenge oyo bato mingi babandaki kondima makanisi mibale ya lokuta, to bokosi ya mpambampamba. Ntango tokotalela makanisi yango, tokomona ntina oyo bwanya ya mokili ezali bozoba, mpe ndenge oyo bwanya ya Liloba ya Nzambe eleki mosika eloko nyonso oyo mokili ekoki kopesa.

LIKAMBO ETALI KOSANGISA NZOTO

3-4. Na États-Unis, na ebandeli ya bambula ya 1900, ndenge nini makanisi ya bato ebongwanaki na likambo etali kosangisa nzoto?

3 Na États-Unis, na ebandeli ya bambula ya 1900, makanisi ya bato na likambo etali kosangisa nzoto ebongwanaki mpenza. Liboso, bato mingi bayebaki ete kosangisa nzoto ezali kaka mpo na bato oyo babalaná mpe ezali likambo ya kolobela te na miso ya bato. Kasi, bonkonde wana esilaki, mpe bato mingi bakómaki na lipanda na makambo ya kosangisa nzoto.

4 Mbula 1920 tii 1929 ekómaki kobengama Bambula ya loyenge, mpo na eleko yango, bizaleli ya bato mpe ndenge na bango ya kotalela likambo ya kosangisa nzoto ebongwanaki mpenza. Moto moko ya mayele alobi boye: “Bafilme, bateyatre, banzembo, babuku, mpe bapiblisite nyonso etondaki kaka na makambo ya kosangisa nzoto.” Na bambula yango, mabina ya bato ekómaki kolamwisa bamposa ya kosangisa nzoto, mpe molato ya bato ezalaki lisusu malamu te. Ndenge Biblia esakolaki yango mpo na mikolo ya nsuka, bato bazalaki mpenza kokóma bato “oyo balingá bisengo.”​—2 Tim. 3:4.

Basaleli ya Yehova balandaka te bizaleli mabe ya mokili oyo (Talá paragrafe 5) *

5. Makanisi oyo bato bakómaki na yango na bambula ya 1960 eboti mbuma nini?

5 Na bambula ya 1960, bato mingi bakómaki kofanda libala ya makango to ya yaká-tófanda, bakómaki kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi, mpe bato mingi bakómaki koboma libala. Kominanola mingi ekómaki komonisa makambo ya kosangisa nzoto na ndenge ya polele. Yango eboti mbuma nini? Moto moko ya mayele akomaki ete ndenge oyo bato bakómá kotalela likambo ya kosangisa nzoto eboti mbuma ya mabe mpenza. Na ndakisa, mabala ezali kokufa, baboti mosusu bazali kosundola bana, bato bazali kotungisama na makanisi mpe kokóma baombo ya pornografi. Lisusu, kopalangana ya bamaladi oyo ezwamaka na kosangisa nzoto, na ndakisa sida, ezali moko ya makambo oyo emonisi ete bwanya ya mokili ezali bozoba.​—2 Pe. 2:19.

6. Mpo na nini tokoki koloba ete ndenge oyo mokili etalelaka likambo ya kosangisa nzoto ekokisaka mokano ya Satana?

6 Ndenge oyo mokili etalelaka likambo ya kosangisa nzoto ekokisaka mokano ya Satana. Na ntembe te, asepelaka ntango bato bazali kosalela na ndenge ya mabe likabo oyo Nzambe apesá bango ya kosangisa nzoto, mpe bazali kotyola likabo ya libala. (Ef. 2:2) Kosala pite ezali kaka te kozanga limemya mpo na likabo ya kobota, oyo Yehova apesá bato, kasi ekoki kosala ete bato oyo basalaka yango bázanga bomoi ya seko.​—1 Ko. 6:9, 10.

LIKANISI YA BIBLIA NA LIKAMBO ETALI KOSANGISA NZOTO

7-8. Mpo na nini likanisi ya Biblia na likambo etali kosangisa nzoto epesaka biso lokumu?

7 Bato oyo bandimaka bwanya ya mokili batyolaka mibeko ya Biblia oyo etali bizaleli malamu, mpe balobaka ete eleki makasi. Ntango mosusu bato yango batunaka boye: ‘Nzambe akelá biso na bamposa ya kosangisa nzoto, kasi mpo na nini azali kosɛnga biso ete tókokisa yango te?’ Batunaka motuna yango mpo bakanisaka ete moto asengeli kokokisa mposa nyonso oyo eyeli ye. Kasi, Biblia elobi bongo te. Likanisi ya Biblia epesaka biso lokumu, ndenge eteyaka ete tozali na likoki ya koboya kokokisa bamposa ya kosala oyo ezali mabe. (Kol. 3:5) Lisusu, Yehova apesá biso likabo ya libala, esika oyo moto akoki kokokisa bamposa na ye ya nzoto na ndenge ya malamu. (1 Ko. 7:8, 9) Na kati ya libala, mwasi ná mobali bakoki kosangisa nzoto kozanga ete báyoka mawa to bámitungisa, ndenge emonanaka mbala mingi epai ya bato oyo basalaka pite.

8 Na bokeseni na bwanya ya mokili, likanisi ya Biblia na likambo etali kosangisa nzoto ezali malamu mpenza. Biblia elobi ete kosangisa nzoto ekoki kozala likambo ya esengo. (Mas. 5:18, 19) Kasi, elobi mpe: “Mokomoko na bino ayeba kopekisa nzoto na ye na kosantisama mpe lokumu, na mposa ya lokoso ya kosangisa nzoto te ndenge mpe bikólo wana oyo bayebi Nzambe te bazalaka na yango.”​—1 Tes. 4:4, 5.

9. (a) Ndenge nini balendisaki basaleli ya Nzambe na ebandeli ya bambula ya 1900 bálanda bwanya ya Liloba ya Nzambe? (b) Toli nini ya bwanya ezali na 1 Yoane 2:15, 16? (c) Makambo nini ya mbindo oyo Baroma 1:24-27 etángi tosengeli koboya?

9 Na ebandeli ya bambula ya 1900, basaleli ya Yehova balandaki te bokosi ya mpambampamba ya bato oyo “babungisá bizaleli nyonso ya malamu.” (Ef. 4:19) Basalaki makasi bákangama mpenza na mibeko ya Yehova. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/05/1926 elobaki ete “mobali to mwasi nyonso asengeli kozala pɛto na makanisi mpe na misala, mingimingi na boyokani na ye na moto oyo azali molongani na ye te.” Atako makambo ya mokili ezalaki se kobongwana zingazinga na bango, basaleli ya Yehova balandaki bwanya ya Liloba ya Nzambe. (Tángá 1 Yoane 2:15, 16.) Tozali mpenza na botɔndi mpo na Liloba ya Nzambe! Tozali mpe na botɔndi ndenge Yehova apesaka biso bilei ya elimo na ntango oyo ebongi, mpo na kosalisa biso tólanda te bwanya ya mokili oyo na likambo etali kosangisa nzoto. *​—Tángá Baroma 1:24-27.

LIKAMBO ETALI KOMILINGA

10-11. Biblia esakolaki nini mpo na mikolo ya nsuka?

10 Biblia esakolaki ete na mikolo ya nsuka, bato bakozala “bato oyo bamilingaka.” (2 Tim. 3:1, 2) Tokamwaka te ndenge mokili elendisaka ezaleli yango ya moimi. Buku moko elobi ete na bambula ya 1970, “babuku oyo ezalaki kolakisa bato ndenge ya komilinga ebimaki ebele.” Babuku mosusu elobaki ete moto asengeli kobongola eloko te na bomoto na ye to kokanisa ete asengeli kobongisa eloko moko boye epai na ye. Na ndakisa, buku moko ya ndenge wana elobaki ete: “Osengeli komilinga mpo moto oyo aleki kitoko, oyo asepelisaka mingi, mpe oyo aleki ntina, ezali nde yo.” Buku yango elobaki ete moto ye moko asengeli kopona ndenge oyo akomitambwisa na kolanda lisosoli na ye mpe kosala makambo oyo amoni ete ezali malamu mpe ebongi.

11 Osilá koyoka makanisi ya ndenge wana? Satana alendisaki Eva asala likambo ya ndenge wana. Alobaki na ye ete akokaki ‘kokóma mpenza lokola Nzambe, mpe koyeba malamu ná mabe.’ (Eba. 3:5) Lelo, bato mingi bamizwaka na motuya mingi mpe bakanisaka ete moto moko te, ata Nzambe, azali na lotomo ya koyebisa bango nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. Likambo yango ezali komonana mingi na ndenge oyo bato bazali kotalela libala.

Mokristo atyaka bamposa ya basusu na esika ya liboso, mingimingi ya molongani na ye (Talá paragrafe 12) *

12. Bwanya ya mokili elendisaka likanisi nini mpo na libala?

12 Biblia esɛngi mwasi ná mobali bápesanaka lokumu mpe bátosa ndai na bango ya libala. Elendisi mokomoko na bango azala na ekateli ya kokangama makasi na molongani na ye; elobi ete: “Mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe asengeli kokangama na mwasi na ye mpe basengeli kokóma mosuni moko.” (Eba. 2:24) Nzokande, bwanya ya mokili elendisaka likanisi ya ndenge mosusu, etindaka molongani mokomoko atya likebi kaka na bamposa na ye moko. Buku moko oyo elobeli koboma libala elobi ete na bamboka mosusu, ntango bato bazali kobalana, “na esika bálapa ndai oyo elobi ete tokofanda elongo ‘tii liwa ekokabola biso,’ bakómi koloba nde tokofanda elongo ‘ntango nyonso oyo bolingo ekozala.’” Kozwa ebongiseli ya libala na lisɛki ndenge wana esali ete mabota ebele epanzana mpe etiki ebele ya bampota na mitema ya bato. Emonani polele ete ndenge oyo mokili etalelaka libala ezali mpenza bozoba.

13. Mpo na ntina nini Yehova ayinaka bato ya lolendo?

13 Biblia elobi boye: “Moto nyonso oyo azali na lolendo na motema azali eloko oyo Yehova ayiná.” (Mas. 16:5) Mpo na nini Yehova ayinaka bato ya lolendo? Ntina moko ezali ete bato oyo bakolisaka ezaleli ya komilinga mpe balendisaka yango bakómaka na lolendo mingi lokola Satana. Kanisá naino: Satana akanisaki ete ata Yesu, moto oyo Nzambe asalelaki mpo na kokela biloko nyonso, asengelaki kofukamela ye mpe kosambela ye! (Mat. 4:8, 9; Kol. 1:15, 16) Komizwa na motuya mingi ndenge wana emonisaka mpenza ete bwanya ya mokili ezali bozoba na miso ya Nzambe.

LIKANISI YA BIBLIA NA LIKAMBO ETALI KOMILINGA

14. Ndenge nini Baroma 12:3 esalisaka biso tómitalelaka na bokatikati?

14 Biblia esalisaka biso tómitalela na bokatikati. Emonisaka ete ezali mabe te komilinga na ndenge oyo ebongi. Yesu alobaki ete: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” Yango emonisi ete tosengeli komityela likebi na ndenge oyo ebongi. (Mat. 19:19) Kasi, Biblia eteyaka ete tosengeli ata moke te kokanisa ete toleki basusu. Elobi nde ete: “Bósala eloko moko te na kowelana to mpo bozali komimona ete boleki bamosusu, kasi na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino.”​—Flp. 2:3; tángá Baroma 12:3.

15. Mpo na nini ondimaka ete toli ya Biblia na oyo etali komilinga nde ebongi mpenza?

15 Lelo, bato mingi oyo mokili etalelaka lokola bato ya bwanya batyolaka toli ya Biblia oyo etali komilinga. Bakoki koloba ete komona ete basusu baleki biso ekosala ete bákonza biso mpe bábuba biso. Kasi tóloba naino, likanisi ya mokili na oyo etali komilinga eboti mbuma nini? Yo moko omonaka nini? Bato ya moimi bazalaka na esengo? Bazalaka na mabota ya esengo? Bazalaka na baninga ya solosolo? Bazalaka mpenza baninga ya Nzambe? Na kotalela makambo oyo omoná, nini ebotaka mbuma ya malamu: kolanda bwanya mokili oyo to bwanya ya Liloba ya Nzambe?

16-17. Tokoki kozala na botɔndi mpo na makambo nini, mpe mpo na nini?

16 Bato oyo balandaka toli ya bato ya bwanya ya mokili oyo, bazali lokola moto oyo akei kotambola na mboka mopaya mpe abungi, kasi azali kotuna nzela epai ya mopaya mosusu oyo abungi mpe lokola ye. Mpo na bato ya “bwanya” ya ntango na ye, Yesu alobaki boye: “Bazali batambwisi oyo bakufá miso. Boye, soki moto oyo akufá miso azali kotambwisa moto oyo akufá miso, bango mibale bakokwea na libulu.” (Mat. 15:14) Ya solo, bwanya ya mokili oyo ezali mpenza bozoba na miso ya Nzambe.

Basaleli ya Yehova basepelaka ntango bakanisaka bomoi ya esengo oyo balekisi na mosala ya Yehova (Talá paragrafe 17) *

17 Na ntembe te, toli ya Biblia ezalaka ntango nyonso na “litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, [mpe] mpo na kopesa disiplini na boyengebene.” (2 Tim. 3:16) Tokoki mpenza kozala na botɔndi ndenge Yehova azali kosalela ebongiseli na ye mpo na kobatela biso na bwanya ya mokili oyo! (Ef. 4:14) Bilei ya elimo oyo abongisaka epesaka biso makasi oyo tosengeli na yango mpo tótosa mibeko oyo ezali na Liloba na ye. Ezali mpenza lokumu monene ndenge tozali kotambwisama na bwanya ya Biblia, oyo ebongi mpenza kotyelama motema!

LOYEMBO 54 “Nzela yango oyo”

^ par. 5 Lisolo oyo ekosalisa biso tómindimisa mpenza ete kaka Yehova nde akoki kopesa biso litambwisi oyo esengeli. Ekomonisa mpe ete kolanda bwanya ya mokili ebimisaka mbuma ya mabe mpenza, kasi kosalela bwanya ya Liloba ya Nzambe ezali na litomba.

^ par. 50 ELILINGI: Tozongeli mwa makambo oyo ndeko mobali moko ná mwasi na ye bakutaná na yango na boumeli ya bambula. Bandeko yango bazali na mosala ya kosakola na nsuka ya bambula ya 1960.

^ par. 52 ELILINGI: Na bambula ya 1980, ndeko mobali azali kobatela mwasi na ye oyo azali kobɛla, mwana na bango ya mwasi azali kotala.

^ par. 54 ELILINGI: Lelo, ndeko yango ná mwasi na ye bazali kotala bafɔtɔ na bango ya kala, oyo ezali komonisa bomoi ya esengo oyo balekisi na mosala ya Yehova. Mwana na bango akolá mpe ayei elongo na libota na ye kotala baboti na ye.