LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Juin 2016

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli kobanda 01/08 tii 28/08/2016.

Sepelá ndenge Yehova azali Moyemi-mbɛki na biso

Ndenge nini Nzambe aponaka bato oyo abongisaka? Mpo na nini abongisaka bango? Ndenge nini asalaka yango?

Otikaka ete Moyemi-mbɛki Monene abongisa yo?

Bizaleli nini ekoki kosala ozala lokola mabele ya lima ya pɛtɛpɛtɛ na mabɔkɔ ya Nzambe?

“Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko”

Na ndimbola nini Nzambe azali “moko,” mpe ndenge nini tokoki kosambela ye lokola azali moko?

Kotika te ete mabunga ya basusu ebɛtisa yo libaku

Na ntango ya kala, ata basaleli ya sembo ya Nzambe balobaki to basalaki makambo oyo ezokisaki basusu. Mateya nini tokoki kozwa na bandakisa wana ya Biblia?

Mituna ya batángi

Na emonaneli ya Ezekiele, moto oyo azali na etyelo ya mai ya mokanda ya sɛkrɛtɛrɛ mpe mibali motoba oyo basimbi bibundeli mpo na kobukabuka bazali elilingi ya banani?