Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ezaleli oyo esepelisaka Nzambe mpe ezali na motuya mingi koleka diama

Ezaleli oyo esepelisaka Nzambe mpe ezali na motuya mingi koleka diama

Bato batalelaka diama lokola libanga moko ya motuya mingi. Diama mosusu etɛkamaka na bamilio ya dolare. Kasi ezali nde na eloko moko oyo Nzambe amonaka ete ezali na motuya mingi koleka diama to mabanga mosusu ya ntalo?

Haykanush, mosakoli oyo azwi naino batisimo te na ekólo Arménie, alɔkɔtaki passeport moko pene ya ndako na ye. Na kati ya passeport yango ezalaki na bakarte ya banki mpe mbongo ebele. Alakisaki mobali na ye, oyo azalaki mpe mosakoli oyo azwi naino batisimo te, biloko yango.

Babalani yango bazalaki na mikakatano makasi ya mbongo mpe bazalaki na banyongo. Kasi bazwaki ekateli ya kokende kotika mbongo yango na adrɛsi oyo ezalaki na passeport. Mobali oyo abungisaki passeport yango ná bato ya libota na ye bakamwaki mingi. Haykanush ná mobali na ye balimbolaki ete soki bazalaki sembo ndenge wana, ezali mpo na mateya oyo bazalaki koyekola na Biblia. Na nsima, basalelaki libaku yango mpo na kolobela Batatoli ya Yehova mpe kopesa bato ya libota yango mwa mikanda.

Libota yango elingaki kopesa Haykanush mwa mbongo mpo na kofuta ye, kasi aboyaki kozwa yango. Mokolo oyo elandaki, mwasi yango akendaki kotala Haykanush ná mobali na ye na ndako, mpe mpo na komonisa botɔndi oyo azalaki na yango, atyaki Haykanush mbamba mpo andima kozwa lopɛtɛ ya diama.

Lokola libota wana, bato mingi bakoki kokamwa mpo na bosembo oyo Haykanush ná mobali na ye bamonisaki. Kasi yango ekamwisaki nde Yehova? Ndenge nini atalelaki bosembo na bango? Bosembo na bango ebimisaki matomba?

BIZALELI OYO EZALI NA MOTUYA MINGI KOLEKA BILOKO YA MOKILI

Biyano na mituna wana ezali mpasi te. Mpo na nini? Mpo basaleli ya Yehova bayebi ete komekola bizaleli na ye ezali na motuya mingi na miso na ye koleka diama, wolo, to biloko mosusu ya mokili. Ya solo, biloko oyo Yehova atalelaka ete ezali na motuya ekeseni na biloko oyo bato mingi batalelaka ete ezali na motuya. (Yisaya 55:8, 9) Mpe basaleli na ye bamonaka ete milende oyo basalaka mpo na komekola bizaleli ya Yehova ezali na motuya mingi.

Tokoki komona yango soki totaleli oyo Biblia elobi mpo na bososoli mpe bwanya. Masese 3:13-15 elobi: “Esengo na moto oyo azwi bwanya, mpe na moto oyo azali kozwa bososoli, mpo litomba ya kozwa yango eleki litomba ya kozwa palata mpe kozwa yango eleki kozwa wolo. Ezali na motuya mingi koleka mabanga kitoko ya korai, mpe bisengo na yo mosusu nyonso ekoki kokokana na yango te.” Ya solo, Yehova azwaka bizaleli wana na motuya mingi koleka biloko nyonso ya motuya.

Kasi, tokoloba nini mpo na bosembo?

Yehova ye moko azali sembo. “Akoki kobuka lokuta te.” (Tito 1:2) Mpe atindaki ntoma Paulo akomela bakristo Baebre na siɛklɛ ya liboso na litambwisi ya elimo na ye ete: “Bóbondelaka mpo na biso, mpo tondimi ya solo ete tozali na lisosoli ya sembo, mpo tolingi kozala sembo na makambo nyonso.”​—Baebre 13:18.

Yesu Kristo atiká ndakisa malamu ya bosembo. Na ndakisa, ntango nganga-nzambe monene Kaifa alobaki ete: “Na nkombo ya Nzambe ya bomoi nalapisi yo ndai ete oyebisa biso soki ozali Kristo Mwana ya Nzambe!,” Yesu alobaki na bosembo mpe andimaki ete azali Masiya. Alobaki solo atako ayebaki ete Sanedrina ekofunda ye ete afingi Nzambe mpe yango ekosala ete báboma ye.​—Matai 26:63-67.

Bongo biso? Soki tokutani na likambo moko oyo esali ete tóboya koyebisa moto makambo nyonso to tóbongola mwa moke makambo mosusu mpo na kozwa matomba na mosuni, tokotikala kaka sembo?

MPO NA NINI KOZALA SEMBO EZALAKA MPASI?

Ekoki kozala mpasi kozala sembo na mikolo oyo ya nsuka mpo bato mingi bazali “bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo.” (2 Timote 3:2) Ntango bato bazali na mikakatano ya mbongo to ntango ezali mpasi mpo na kozwa misala, bato mingi bamonaka mabe te koyiba, kobuba to kokosa, mpe kosala makambo mosusu oyo ezali sembo te. Makanisi ya ndenge wana epalangani mingi, yango wana bato mingi bamonaka ete nzela kaka moko ya kozwa matomba na mosuni ezali ya kozala sembo te. Ata mpe bakristo mosusu bazwaki bikateli ya mabe mpe babungisaki lokumu malamu oyo bazalaki na yango na lisangá mpo na “kozwa litomba na ndenge ya mabe.”​—1 Timote 3:8; Tito 1:7.

Atako bongo, bakristo mingi bamekolaka Yesu. Bayebi ete kozala na bizaleli lokola oyo ya Nzambe ezali na ntina mingi koleka bozwi to matomba nyonso ya mosuni. Yango wana, bilenge bakristo bayibaka na ekzamɛ te mpo na koluka kozwa bapwɛ mingi na kelasi. (Masese 20:23) Ntango mosusu, bosembo efutaka mbala moko te, ndenge ezalaki mpo na Haykanush. Atako bongo, kozala sembo ezali likambo oyo Nzambe asepelaka na yango, mpe esalisaka biso tózala na lisosoli ya pɛto, eloko moko ya motuya mingi.

Ndakisa ya Gagik emonisi yango. Alobi boye: “Liboso ya kokóma mokristo, nazalaki kosala na kompanyi moko ya monene oyo nkolo na yango azalaki te kobimisa benefisi nyonso oyo kompanyi ezalaki kozwa, mpo afuta mpako te. Lokola nazalaki mokambi ya kompanyi yango, nasengelaki kosala ‘kɔntra’ ná mofutisi-mpako mpe kopesa ye kanyaka mpo alandelaka kompanyi te ata soki ezali na makambo ya nyokanyoka. Yango wana, nayebanaki lokola moto ya sembo te. Ntango nayebaki solo, naboyaki kokoba kosala bongo, atako mosala yango ezalaki na lifuti ya malamu. Kutu, nafungolaki nde kompanyi na ngai moko. Kaka na mokolo ya liboso, nakomisaki kompanyi na ngai na Leta mpe nafutaki mpako nyonso.”​—2 Bakorinti 8:21.

Ndeko Gagik alobi boye: “Mbongo oyo nakómaki kozwa ezalaki katikati ya lifuti oyo nazalaki kozwa, yango wana ekómaki mpasi nakokisa bamposa ya libota na ngai. Kasi, sikoyo nazali na esengo mingi. Nazali na lisosoli ya pɛto na miso ya Yehova. Nazali ndakisa malamu mpo na bana na ngai mibale ya mibali, mpe nakokisaki masɛngami mpo na kozwa mikumba na lisangá. Sikoyo, nayebani lokola moto ya sembo epai ya bafutisi-mpako mpe bato mosusu oyo nasalaka na bango mombongo.”

YEHOVA ASALISAKA BISO

Yehova alingaka baoyo bakumisaka ye na ndenge bamekolaka bizaleli na ye ya malamu mingi, na ndakisa bosembo. (Tito 2:10) Mpe soki tosali bongo, alaki ete akosalisa biso. Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, mokonzi Davidi alobaki boye: “Nazalaki elenge, nakómi mpe mobange, kasi namoná naino te moyengebene asundolami mpenza, to bana na ye bazali koluka limpa.”​—Nzembo 37:25.

Makambo oyo Ruta moto ya sembo akutanaki na yango emonisi yango. Atikalaki sembo epai ya mama-bokilo na ye Naomi, na esika ya kosundola ye mpo akómaki mobange. Ruta akendaki kofanda na Yisraele, esika akokaki kosambela Nzambe ya solo. (Ruta 1:16, 17) Azalaki sembo mpe asalaki mosala makasi ya kolɔkɔta mbuma, na kolanda ebongiseli moko ya Mibeko mpo na babola. Ndenge kaka ezalaki mpo na mokonzi Davidi na nsima, Yehova asundolaki Ruta ná Naomi soki moke te. (Ruta 2:2-18) Asukaki kaka te na kokokisa bamposa ya Ruta na mosuni. Aponaki ye mpo akɔta na molɔngɔ ya libota ya mokonzi Davidi mpe ata ya Masiya oyo alakamaki!​—Ruta 4:13-17; Matai 1:5, 16.

Ekoki kozala mpasi mingi mpo na basaleli mosusu ya Yehova kozwa mbongo mpo na kokokisa bamposa na bango ya mokolo na mokolo. Atako bongo, na esika ya koluka nzela mokuse mpe oyo ebongi te, basalaka mosala makasi mpe na molende. Ntango basalaka bongo, bamonisaka ete bizaleli malamu ya Nzambe, lokola bosembo, ezali na motuya mingi koleka biloko nyonso ya mosuni.​—Masese 12:24; Baefese 4:28.

Lokola Ruta, na mokili mobimba, bakristo bandimaka ete Yehova azali na nguya ya kosalisa bango. Batyaka motema mobimba epai ya Moto oyo alakaki ete: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.” (Baebre 13:5) Mbala na mbala, Yehova amonisaki ete akoki kosalisa mpe akosalisa baoyo bazalaka sembo ntango nyonso. Akokisaka ntango nyonso elaka na ye ya kokokisa bamposa ya mokolo na mokolo ya basaleli na ye.​—Matai 6:33.

Ya solo, bato bakoki kozwa diama mpe biloko mosusu ya mosuni na motuya mingi. Kasi tokoki kondimisama ete Tata na biso ya likoló azwaka na motuya mingi bosembo na biso mpe bizaleli na biso mosusu ya malamu koleka eloko mosusu nyonso ya motuya!

Soki tozali sembo, tokoki koloba na lisosoli ya pɛto na mosala ya kosakola