LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Juin 2018

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 6/08 tii 2/09/2018.

“Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te”

Ndenge nini ekateli ya Yesu na likambo etali mobulu na mikolo na ye esengeli kotinda biso tóyeba kotalela makambo ya politiki mpe bizaleli ya bato

Tózala na bomoko ndenge Yehova ná Yesu bazali na bomoko

Tokoki kosala nini mpo na kokómisa lisusu makasi bomoko na biso ya basaleli ya Yehova?

Nzambe akokaki kondima ye

Ndakisa ya Rehoboame, mokonzi ya Yuda, ezali kosalisa biso tóyeba eloko oyo Nzambe alukaka epai ya mokomoko na biso.

Tiká mibeko mpe mitinda ya Nzambe eteya lisosoli na yo

Nzambe apesá biso lisosoli lokola busole, kasi tosengeli komindimisa ete ezali komema biso na nzela ya malamu.

“Tiká pole na bino engɛnga” mpo na kopesa Yehova nkembo

Esengeli kosuka kaka te na kosakola nsango malamu.

LISOLO YA BOMOI

Nazwaki libɔndisi na mitungisi na ngai nyonso

Edward Bazely akutanaki na mikakatano na libota, botemeli ya bato ya mangomba, kolemba nzoto ya ye moko, mpe kotungisama na makanisi.

Matomba ya kopesa mbote

Ata mbote ya mokuse ekoki kosala makambo mingi.

Ozali koyeba lisusu?

Okoki koyanola na mituna oyo ezwami na banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo touti kosalela?