Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Nazwaki libɔndisi na mitungisi na ngai nyonso

Nazwaki libɔndisi na mitungisi na ngai nyonso

Nabotamaki mokolo ya 9/11/1929 na engumba moko ya kala na nkombo Sukkur na ngámbo ya Wɛsti ya Ebale Indus, oyo ezali lelo ekólo Pakistan. Na ntango wana, misionɛrɛ moko ya Angleterre apesaki baboti na ngai babuku oyo bakangisá esika moko mpe ezalaki na langi makasi. Babuku yango oyo ezalaki kolimbola Biblia esalisaki ngai mingi mpo nakóma Motatoli ya Yehova.

BABUKU yango ezalaki kobengama Collection arc-en-ciel. Ntango nabandaki koyekola yango, namonaki ete ezalaki na bandakisa ya malamu mpe etikalaki na makanisi na ngai. Yango esalaki ete banda bomwana, nakóma na mposa makasi ya koyeba Biblia, ndenge ebongisamaki malamu na bavolimi yango.

Lokola Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esimbaki mpe Inde, yango ebongolaki bomoi na ngai na ndenge ya mabe. Baboti na ngai bakabwanaki mpe na nsima babomaki libala. Nazalaki koyeba te ndenge nini bato mibale oyo nalingaki bakokaki kokabwana. Etungisaki ngai makasi mpe namonaki lokola ete nasundolami. Babotaki kaka ngai moko, mpe nakokaki mpenza kozwa te libɔndisi mpe lisalisi oyo nasengelaki na yango.

Ngai ná mama tokendaki kofanda na engumba-mokonzi, Karachi. Mokolo moko, Fred Hardaker, monganga moko ya mokóló oyo azalaki mpe Motatoli ya Yehova ayaki na ndako na biso. Azalaki kosambela lingomba moko na misionɛrɛ oyo apesaki libota na biso babuku. Asɛngaki mama báyekola Biblia elongo, mama aboyaki kasi ayebisaki ye ete mbala mosusu ngai nakosepela. Nabandaki koyekola na ndeko Fred Hardaker kaka pɔsɔ oyo elandaki.

Mwa bapɔsɔ na nsima, nabandaki kokende na makita na lopitalo ya ndeko Fred Hardaker. Batatoli soki 12 ya mikóló bazalaki koyangana kuna. Babɔndisaki ngai mpe bazwaki ngai lokola mwana na bango ya mobali. Nazali koyeba lisusu ndenge tozalaki; bazalaki kokita mpo na kotala ngai na miso, mpe kosolola na ngai lokola moninga, nazalaki mpenza na mposa na yango na bantango mosusu.

Eumelaki te ndeko Fred Hardaker amemaki ngai na mosala ya kosakola. Alakisaki ngai ndenge ya kosalela fono mpo tóyokisa bato mwa masolo mikuse ya Biblia. Masolo mosusu ezalaki kopesa bato nkanda, yango wana bato mosusu bazalaki kosepela na nsango yango te. Nakómaki na mposa makasi ya kosakwela basusu. Nasepelaki mingi na solo ya Biblia mpe nazalaki na molende ya koyebisa yango basusu.

Ntango limpinga ya basoda ya Japon ezalaki kopusana na Inde, bakonzi ya Grande-Bretagne bakómaki lisusu konyokola Batatoli ya Yehova. Nsukansuka, na sanza ya 07/1943, ngai moko mpe nakutanaki na monyoko yango. Mokonzi ya eteyelo, oyo azalaki mpe mokonzi ya lingomba moko ya Angleterre, abenganaki ngai mpo alobaki ete “nazali na bizaleli mabe.” Ayebisaki mama ete lokola nazalaki elongo na Batatoli ya Yehova nazalaki ndakisa mabe mpo na bana kelasi mosusu. Yango etungisaki mama makasi mpe alingaki lisusu te nakutanaka na Batatoli ya Yehova. Na nsima, atindaki ngai epai ya tata na Peshawar, engumba oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 1 370 na nɔrdi. Lokola nazalaki lisusu kolya na elimo te mpe nazalaki mosika na bandeko, nalɛmbaki na elimo.

NAZONGI MAKASI NA ELIMO

Na 1947, nazongaki na Karachi mpo na koluka mosala. Ntango nakómaki kuna, nakendaki na lopitalo ya ndeko Hardaker. Ayambaki ngai malamu mpenza.

Atunaki ngai, “Nini ezali kotungisa yo?” akanisaki nazalaki kobɛla yango wana nayaki koluka toli ya monganga.

Nayanolaki ye, “Nazali kobɛla na mosuni te, kasi na elimo. Nalingi nayekola Biblia.”

Atunaki ngai, “Olingi tóbanda ntango nini?”

Nayanolaki, “Ata sikoyo soki ekosimba.”

Toyekolaki Biblia malamu mpenza mpokwa wana. Nazwaki mpenza libɔndisi mpo nazalaki lisusu elongo na basaleli ya Yehova. Mama alukaki lisusu kopekisa ngai kokutanaka na Batatoli ya Yehova, kasi mbala oyo nazwaki ekateli ya kofandisa solo na motema na ngai. Na mokolo ya 31/08/1947, nazwaki batisimo mpo na komonisa komipesa na ngai. Na nsima, ntango nakómaki na mbula 17, nakómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza.

NAZWI ESENGO NA MOSALA YA MOBONGISI-NZELA

Esika ya liboso nasalaki lokola mobongisi-nzela ezalaki na Quetta, esika basoda ya Angleterre batyaká biro na bango. Na 1947, ekólo ekabwanaki na mibale; Inde ná Pakistan. * Likambo yango etyaki lisusu mobulu na mangomba, mpe esalaki ete ebele ya bato bákima na bamboka mosusu. Bato soki milio 14 bakimaki. Bamizilma ya Inde bakendaki Pakistan, ba-Hindu ná ba-Sikhs balongwaki Pakistan bayaki Inde. Na ntango wana ya yikiyiki, mpo na kokende na Quetta nazwaki engbunduka moko na Karachi oyo ezalaki na bato ebele.

Na liyangani ya zongazonga na Inde na 1948

Na Quetta, nakutanaki na George Singh, elenge moko oyo azalaki mobongisi-nzela monene mpe azalaki na mbula pene na 25. George apesaki ngai velo moko ya kala oyo nakokaki kopusa na teritware ya bangomba. Mbala mingi nazalaki kosakola ngai moko. Na boumeli ya sanza 6, nakómaki na bayekoli ya Biblia 17, basusu kati na bango bakómaki Batatoli ya Yehova. Moko na bango nkombo na ye Sadiq Masih, azalaki mokonzi ya basoda, mpe asalisaki ngai ná George tóbongola mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia na Urdu, monɔkɔ ya mboka ya ekólo Pakistan. Na nsima, Sadiq akómaki mosakoli ya molende ya nsango malamu.

Na masuwa Queen Elizabeth mpo na kokende na Eteyelo ya Gileade

Na nsima, nazongaki na Karachi mpe kuna nasalaki elongo na ndeko Henry Finch ná Harry Forrest, oyo bazalaki bamisionɛrɛ ya sika ya Eteyelo ya Gileade. Bapesaki ngai mpenza formasyo ya malamu na mosala ya Nzambe. Mbala ya liboso nakendaki kosakola elongo na ndeko Finch na nɔrdi ya Pakistan. Na esika moko ya bangombangomba, tokutaki ebele ya bato ya komikitisa oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Urdu, bazalaki na mposa makasi ya koyeba solo ya Biblia. Nsima ya mbula mibale, ngai mpe nakɔtaki Eteyelo ya Gileade, ntango nazongaki na Pakistan na bantango mosusu nazalaki kosala lokola mokɛngɛli ya zongazonga. Nafandaki na ndako ya bamisionɛrɛ na Lahore, elongo na bandeko mibali mosusu 3 ya bamisionɛrɛ.

NAZONGELI ESENGO NA NGAI

Likambo ya mawa, na 1954, boyokani ezalaki te na ndako ya bamisionɛrɛ. Lokola ngai mpe nakɔtaki na matata yango, nazwaki toli ya makasi. Elɛmbisaki ngai mpenza, mpe namonaki ete nabongi te na miso ya Nzambe. Nazongaki na Karachi mpe na nsima nakendaki na Londres, na Angleterre, na elikya ete kuna nakozongela makasi na ngai ya elimo.

Na lisangá oyo nazalaki kokende na Londres, tozalaki na bandeko ebele ya Betele. Ndeko Pryce Hughes oyo azalaki mokɛngɛli ya filiale, apesaki ngai formasyo ya malamu mpenza. Mokolo moko, ayebisaki ngai ndenge azwaki toli ya makasi epai ya ndeko Joseph Rutherford, oyo azalaki kotambwisa mosala ya kosakola na mokili mobimba. Ntango ndeko Hughes alukaki komilongisa, ndeko Rutherford apamelaki ye makasi. Nakamwaki ndenge ndeko Hughes azalaki kosɛka ntango azalaki kokanisa likambo yango. Alobaki ete na ebandeli likambo yango ezalaki kopesa ye nkanda. Kasi na nsima, amonaki ete azalaki na mposa ya toli yango ya makasi mpe emonisaki bolingo ya Yehova. (Baebre 12:6) Maloba na ye esimbaki mpenza motema na ngai mpe esalisaki ngai nasalela lisusu Yehova na esengo.

Na ntango wana mama ayaki na Londres mpe andimaki koyekola Biblia na ndeko John Barr, oyo na nsima akómaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Akolaki nokinoki na elimo mpe azwaki batisimo na 1957. Bayebisaki ngai ete liboso tata akufa, ye mpe ayekolaki Biblia na Batatoli ya Yehova.

Na 1958, tobalanaki na Lene, ndeko mwasi moko ya ekólo Danemark, oyo azalaki kofanda na Londres. Mbula elandaki, tobotaki Jane, mwana na biso ya mwasi, na nsima tobotaki bana mosusu minei. Nazwaki mpe libaku ya kopesa mabɔkɔ na lisangá ya Fulham. Na nsima, lokola Lene akómaki kobɛla, tosengelaki kokende na mboka ya molunge. Yango wana, na 1967, tokendaki kofanda na Australie, na Adélaïde.

LIKAMBO MOKO YA MPASI MPENZA

Lisangá na biso na Adélaïde ezalaki na bandeko 12 ya mikóló oyo batyamaki mafuta na elimo. Bazalaki kosakola mpenza na molende. Toumelaki te mpo na kozongela mimeseno malamu ya kosalela Yehova.

Na 1979, Daniel, mwana na biso ya mitano abotamaki. Azalaki na maladi babengi trisomie * mpe asengelaki koumela na bomoi te. Ata tii sikoyo nakokaka te kolobela mpasi oyo toyokaki. Tosalaki nyonso mpo na kosalisa ye, kasi tosundolaki bana mosusu te. Na bantango mosusu lokola madusu mibale esalemaki na motema ya Daniel ezalaki kosala ete azanga oxygène, na ntango yango azalaki kokóma bulé mpe tozalaki komema ye mbangu na lopitalo. Atako azalaki kobɛla, azalaki mayele mpenza mpe azalaki kolinga bato. Alingaki mpe makambo ya elimo. Ntango tozalaki kobondela na libota liboso ya kolya, azalaki kokangisa mabɔkɔ na ye, mpe kondima na motó, mpe koloba na motema moko “Amen!” Kaka nsima ya kosala bongo nde azalaki kolya.

Ntango Daniel akómaki na mbula 4, abɛlaki kanser ya makila (leucémie aiguë). Ngai ná Lene tolɛmbaki na mosuni mpe na elimo. Namonaki ete etikali moke nabɛla ligboma. Mokolo moko tokómaki mpenza na nsuka, mpe ndeko Neville Bromwich, mokɛngɛli ya zongazonga na biso ayaki kotala biso. Na mpokwa yango alelaki mpe ayambaki biso, biso mpe tolelaki. Bolingo na ye, mpe maloba na ye ya boboto, elendisaki biso makasi. Afandaki elongo na biso tii na ngonga ya liboso ya ntɔngɔ. Mwa moke na nsima Daniel akufaki. Liwa na ye etungisaki biso koleka. Atako bongo, toyikaki mpiko na mawa na biso, na elikya ete eloko moko te, ata liwa ekoki te kokabola Daniel na bolingo ya Yehova. (Baroma 8:38, 39) Tozali na mposa makasi ya komona Daniel na mokili ya sika ntango akosekwa!​—Yoane 5:28, 29.

KOSALISA BASUSU EMEMELI BISO ESENGO

Nazali kaka nkulutu na lisangá, atako nabɛlaki makasi mbala mibale. Makambo nakutaná na yango esali ete namityaka na esika ya basusu mpe nayokelaka bato mawa, mingimingi baoyo bazali kobunda na mikakatano. Nasalaka makasi nakanisela bango mabe te. Kutu namitunaka boye: ‘Ndenge nini makambo oyo bakutaná na yango na bomoi ebongolaki bizaleli ná bomoi na bango? Ndenge nini nakoki komonisa ete natyelaka bango likebi? Ndenge nini nakoki kosalisa bango bákoba kosala mokano ya Yehova?’ Nasepelaka mingi na mosala ya kobatela bampate na lisangá! Kasi, ntango nalendisaka mpe napesaka basusu makasi na elimo, ngai moko mpe nalendisamaka mpe nazwaka makasi.

Nakobaka kosepela na mosala ya kokende kotala bampate

Nayokaka lokola mokomi ya nzembo oyo alobaki: “Ntango makanisi oyo etungisaka ngai ekómaki mingi na kati na ngai, mabɔndisi na yo [Yehova] ebandaki kokitisa molimo na ngai motema.” (Nzembo 94:19) Asalisi ngai na mikakatano ya libota, na botɛmɛli, ntango nalɛmbaki nzoto, mpe ntango nanyokwamaki na makanisi. Ya solo, Yehova azali Tata ya solosolo mpo na ngai!

^ par. 19 Liboso, Pakistan ezalaki na biteni mibale, Pakistan occidental (oyo lelo ezali Pakistan) mpe Pakistan oriental (oyo lelo ezali Bangladesh).

^ par. 29 Talá lisolo L’éducation d’un enfant trisomique : Les difficultés, les joiesna Lamuká! ya 06/2011 na français.