Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ozali koyeba lisusu?

Ozali koyeba lisusu?

Otángaki na likebi banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Talá soki okoki koyanola na mituna oyo elandi:

Makambo nini minei tokoki kosala mpo na koyemba malamu?

Ezali malamu kotɛlɛma semba mpe komatisa mwa moke buku ya nzembo. Tosengeli kobenda mpema makasi. Soki tofungoli monɔkɔ makasi ntango tozali koyemba, tokozala na likoki ya koyemba na mongongo makasi.​—w17.11, lok. 5.

Bisika mpe banzela oyo ezalaki komema na bingumba ya ekimelo na Yisraele, ezali kokamwisa biso na nini?

Bingumba ya ekimelo ezalaki motoba mpe ekabolamaki na bisika ekeseni, mpe banzela oyo ezalaki komema kuna ebongisamaki malamu. Mobomi akokaki kokóma kuna nokinoki mpe na pɛtɛɛ nyonso.​—w17.11, lok. 14.

Mpo na nini likabo ya lisiko oyo Nzambe apesá biso na nzela ya Yesu ezali likabo oyo eleki makabo mosusu nyonso?

Ekokisi mposa na biso ya kokoba kozala na bomoi, ekokisi bosɛnga na biso ya kolongwa na boombo ya lisumu mpe na liwa. Nzambe apesaki Yesu mpo na biso wana tozalaki naino basumuki, mpo azalaki na makanisi malamu mpo na bana ya Adama.​—wp17.6, nk. 6-7.

Na ndenge nini Nzembo 118:22 ezali kolobela lisekwa ya Yesu?

Bato bandimaki Yesu te lokola Masiya mpe babomaki ye. Asengelaki kosekwisama mpo akóma “libanga monene ya litumu ya ndako.”​—w17.12, nk. 9-10.

Molɔngɔ oyo ezalaki komema na Masiya ezalaki koleka kaka epai ya mwana ya liboso?

Na bantango mosusu ezalaki kosalema bongo, kasi ntango nyonso te. Davidi azalaki mwana ya liboso ya Yese te; kasi masiya azalaki nkɔkɔ ya Davidi.​—w17.12, nk. 14-15.

Wapi mwa mitinda mosusu ya Biblia oyo eyokani na mayele ya minganga?

Mibeko ya Moize ezalaki kosɛnga ete bato oyo bazali na maladi mosusu báfanda mosika na bato mosusu. Bato bazalaki kosukola mabɔkɔ nsima ya kosimba ebembe. Mibeko esɛngaki kobwaka bosɔtɔ na esika ebongi. Esengelaki kokata mwana mobali ngenga na mokolo ya mwambe, ezalaki malamu mpo mpota ebimisa makila mingi te.​—wp18.1, lok. 7.

Komilinga ya ndenge nini ebongi na bakristo?

Tosengeli kolinga bazalani na biso lokola biso moko. (Marko 12:31) Mibali basengeli “kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko.” (Baefese 5:28) Kasi, komilinga ekoki kokóma likama.​—w18.01, lok. 23.

Wapi mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na kokóma makasi na elimo?

Tosengeli koyekola Liloba ya Nzambe mpe komanyola makambo oyo tozali kotánga. Tosengeli mpe kotika nzela ete elimo santu esala mosala na bomoi na biso mpe kondima lisalisi ya basusu.​—w18.02, lok. 26.

Mpo na nini tosengeli te kotya motema na Astroloji mpe na mayele ya kosakola makambo oyo ebombaná mpo na koyeba makambo ekoya?

Bantina ezali mingi, kasi ntina ya libosoliboso ezali mpo Biblia eboyi makambo wana mibale.​—wp18.2, nk. 4-5.

Tokosala nini soki babengisi biso mpo na kolya mwa eloko?

Soki tondimi ete tokokende, tosengeli kosala nyonso mpo na kokokisa maloba na biso. (Nzembo 15:4) Tosengeli te kobongola maloba kaka mpamba. Mbala mosusu moto oyo abengisi biso asalaki mosala makasi mpo na kobongisa bilei.​—w18.03, lok. 18.

Mateya nini bankulutu mpe basaleli na misala bakoki kozwa epai ya Timote?

Timote azalaki mpenza kotyela bato likebi mpe kotya makambo ya elimo na esika ya liboso. Asalaki makasi mpo na mosala mosantu mpe asalelaki mateya oyo azwaki. Azalaki koyekola makambo mingi mpe kotyela elimo ya Yehova motema. Bankulutu mpe basaleli na misala bakoki komekola ndakisa na ye.​—w18.04, nk. 13-14.